Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Octobre 2015

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Mikakatano nini Erode akutanaki na yango ntango atongaki lisusu tempelo ya Yerusaleme?

Na ebandeli, Salomo atongaki tempelo ya Yerusaleme likoló ya ngomba mpe atongaki bifelo na ngámbo ya ɛsti mpe wɛsti mpo na kobatela tempelo yango mpe mpo na kosala mikala zingazinga na yango. Erode azalaki na mposa ya tempelo moko oyo ekoleka oyo ya Salomo na kitoko, yango wana abandaki kobongisa lisusu mpe kokómisa yango monene.

Ba-ingénieur ya Erode bakómisaki ngámbo ya nɔrdi ya tempelo monene mpo na kobakisa mikala. Na ngámbo ya sudi bakómisaki yango monene na ntaka ya mɛtrɛ 32. Mpo na kokokisa mosala yango, batongaki bisika ya kobomba biloko na mabanga ya makasi mpe efelo ya molai mpo na kobatela yango. Na bisika mosusu, bifelo yango ezalaki na bolai ya mɛtrɛ 50.

Erode azalaki na mposa te ya kosilikisa Bayuda to kokata misala mpe bambeka na tempelo. Moyuda moko na nkombo Josèphe oyo azalaki mpe moto ya istware, alobaki ete Erode apesaki Bayuda oyo bazalaki banganga-nzambe formasyo ya kotonga mpe kosala mabaya mpo moto mosusu asala mosala na esika mosantu te.

Erode akufaki liboso ete mokano na ye ekokisama. Na mobu 30 ya ntango na biso, mosala yango esalaki mbula 46. (Yoane 2:20) Agrippa II, nkɔkɔ ya Erode nde asilisaki mosala yango na katikati ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso.

Mpo na nini bato ya Malta bakanisaki ete ntoma Paulo azalaki mobomi-bato?

Nzambe-mwasi ya bosembo (na loboko ya mwasi) azali kobɛta nzambe-mwasi ya kozanga bosembo

Bato mosusu ya Malta babandaki kolanda makanisi ya lingomba ya Bagrɛki. Tótala oyo esalemaki nsima ya aksida ya masuwa oyo Paulo asalaki na Malta, ndenge mokanda ya Misala emonisi yango. Ntango ntoma Paulo atyaki nkoni na mɔtɔ oyo bapelisaki mpo ye ná baoyo basalaki na ye aksida báyɔta, nyoka moko ekangamaki ye na lobɔkɔ. Mpo na yango, bato ya esanga yango balobaki boye: “Ya solo mpenza moto oyo azali mobomi-bato, mpe atako alongwaki na likama ya mbu, bosembo oyo esɛngaka kopesa etumbu etiki ye te ete akoba kozala na bomoi.”​—Misala 28:4.

Liloba ya Grɛki oyo ebongolami awa na “bosembo oyo esɛngaka kopesa etumbu” ezali “di’ke.” Liloba yango ekoki kolimbola kaka bosembo. Kasi, na masapo ya Bagrɛki, Dike ezalaki nkombo ya nzambe-mwasi ya bosembo. Babandaki kokanisa ete azalaki kolandela makambo ya bato mpe koyebisa Zeusi makambo ya kozanga bosembo oyo ebombani mpo bápesa moto oyo asali likambo yango etumbu. Yango wana, na kotalela buku moko, ekoki kozala ete bato ya Malta bazalaki kokanisa boye: “Atako Paulo abikaki na mbu, nzambe-mwasi Dike . . . atyaki ye elembo na nzela ya nyoka yango.” Bato yango babongolaki makanisi ntango bamonaki ete nyoka yango esalaki Paulo eloko te.