Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Septembre 2015

Olɛmbi Nzambe mpo na bampasi?

Olɛmbi Nzambe mpo na bampasi?

“MPO NA NINI KAKA NGAI? Mpo na nini Nzambe atiki ete yango ekómela ngai?” Yango ezali mituna oyo etungisaki Sidnei, elenge moko ya mbula 24 na Brésil. Nsima ya aksida moko oyo asalaki na lisano na mai, akómaki kotambola kaka na kiti ya bibɔsɔnɔ.

Bampasi oyo ezwaka moto mpo na aksida, maladi, liwa ya ndeko to moninga, makama lokola mopɛpɛ makasi, koningana ya mabele to bitumba ekoki kosala ete bato bálɛmba Nzambe. Yango ezali likambo ya sika te. Yobo, moto moko na ntango ya kala akutanaki na bampasi ndenge na ndenge. Na libunga nyonso, apesaki Nzambe foti na maloba oyo: “Nazali kobelela yo mpo na koluka lisalisi, kasi ozali kondima te; natɛlɛmi, mpo otyela ngai likebi. Ozali kobongwana mpo na kosala ngai nko; na nguya nyonso ya lobɔkɔ na yo, ozali kobombela ngai nkanda na motema.”​—Yobo 30:20, 21.

Yobo ayebaki te esika bampasi na ye ezalaki kouta, ayebaki mpe te mpo na nini ekómelaki ye to mpo na nini Nzambe atikaki ete ekómela ye. Likambo ya esengo, Biblia esalisi biso tóyeba mpo na nini makambo ya ndenge wana esalemaka mpe oyo tokoki kosala mpo na yango.

MOKANO YA NZAMBE EZALAKI ETE BATO BÁNYOKWAMAKA?

Biblia elobi boye mpo na Nzambe: “Mosala na ye ezali ya kokoka, mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo. Nzambe moko ya bosembo, epai na ye kozanga bosembo ezali te; azali moyengebene mpe sembo.” (Kolimbola Mibeko 32:4) Lokola ezali bongo, ebongi mpenza tóloba ete Nzambe oyo azali “moyengebene mpe sembo” akanaki bato bányokwamaka to abimisaka makama mpo na kopesa etumbu to kopɛtola bango?

Biblia elobi boye: “Ntango moto azali komekama, aloba te ete: ‘Nzambe azali komeka ngai.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (Yakobo 1:13) Kutu Biblia elobaka ete ntango Nzambe asalaki bato, bazalaki na bomoi ya kokoka. Apesaki Adama mpe Eva, bato ya liboso esika kitoko ya kofanda, biloko nyonso oyo moto azalaka na mposa na yango mpo na kozala na bomoi mpe mosala moko ya malamu. Nzambe alobaki na bango boye: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.” Ntina ezalaki te ete Adama ná Eva bálɛmba Nzambe.​—Ebandeli 1:28.

Kasi lelo oyo, bomoi ya bato ezali lisusu ya kokoka te. Kutu, istware emonisi ete bato bakutanaka kaka na bampasi ya makasi mpenza. Maloba oyo ezali solo: “Biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kokimela elongo mpe konyokwama elongo tii sikoyo.” (Baroma 8:22) Nini esalemaki?

MPO NA NINI BAMPASI EZALI?

Mpo na koyeba ntina oyo bampasi ezali, tosengeli kozonga naino ntango bampasi yango ebandaki. Adama ná Eva baboyaki mibeko ya Nzambe oyo etali mabe ná malamu ntango anzelu moko ya rebɛlɛ, oyo na nsima akómaki kobengama Satana Zabolo atindaki bango básala bongo mpe balyaki mbuma ya “nzete ya koyeba malamu ná mabe” oyo Nzambe apekisaki bango kolya. Zabolo ayebisaki Eva ete bakokufa te soki batosi Nzambe te, na ndenge yango, abimisaki Nzambe moto ya lokuta. Satana afundaki mpe Nzambe ete alingaka te ete bato na ye bápona bango moko oyo ezali malamu to mabe. (Ebandeli 2:17; 3:1-6) Satana amonisaki ete bato bakozala malamu koleka soki Nzambe ayangeli bango te. Makambo wana nyonso ebimisaki motuna ya ntina mingi​—Nzambe abongi mpenza koyangela?

Zabolo abimisaki mpe likambo mosusu. Alobaki ete bato basalelaka Nzambe na bolingo ya solosolo te. Zabolo alobaki na Nzambe boye mpo na Yobo, moto ya sembo: “Yo otɛlɛmisi lopango te zingazinga na ye mpe zingazinga ya ndako na ye mpe zingazinga ya eloko nyonso oyo azali na yango epai na epai? . . . Kasi, mpo makambo ebongwana, nabondeli yo, sembolá lobɔkɔ na yo, mpe simbá eloko nyonso oyo azali na yango, bongo otala soki akolakela yo mabe te na miso na yo.” (Yobo 1:10, 11) Atako Satana alobaki maloba wana mpo na Yobo, amonisaki ete bato nyonso basalelaka Nzambe na bolingo ya solosolo te.

NDENGE OYO NZAMBE ASILISI MAKAMBO YANGO

Esɛngaki nini mpo na kosilisa makambo yango libela mpe na ndenge ya malamu koleka? Nzambe,  oyo aleki na bwanya, azalaki na solisyo ya malamu koleka; solisyo oyo ekosala te ete tólɛmba nzoto. (Baroma 11:33) Azwaki ekateli ete bato bámiyangela bango moko mpo na mwa ntango mpe makambo oyo ekobima emonisa soki boyangeli ya nani eleki malamu.

Makambo ya mpasi oyo ezali lelo na mokili emonisi polele ete boyangeli ya bato elongi ata moke te. Baguvɛrnema ya bato elongi te kotya kimya, kobatela bato, kopesa bango esengo mpe ebebisi mabele. Yango endimisi biso mpenza maloba oyo ya Biblia: “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Yirimia 10:23) Kaka boyangeli ya Nzambe nde ekoki komemela bato kimya ya seko, esengo mpe bolamu mpo yango nde mokano ya Nzambe.​—Yisaya 45:18.

Kasi, ndenge nini Nzambe akosala makambo yango mpo na kokokisa mokano na ye? Kobosana te ete Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:10) Ɛɛ, na ntango oyo ebongi, Nzambe akolongola makambo nyonso oyo ebimisaka bampasi na nzela ya Bokonzi na ye. (Danyele 2:44) Bobola, maladi mpe liwa ekokóma makambo ya kala. Mpo na babola, Biblia emonisi ete Nzambe “akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi.” (Nzembo 72:12-14) Mpo na bato ya maladi, Biblia elaki boye: “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’” (Yisaya 33:24) Ata mpo na bakufi oyo bazali na makanisi ya Nzambe, Yesu alobaki boye: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Oyo nde bilaka kitoko!

Kozala na kondima na bilaka ya Nzambe esalisaka biso tólongola makanisi mabe oyo tokoki kozala na yango mpo na Nzambe

NDENGE YA KOLONGOLA MAKANISI YANGO

Mbula soki 17 nsima ya aksida na ye, Sidnei, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, alobi boye: “Napesaki Yehova Nzambe foti te mpo na aksida yango, kasi mpo na koloba solo, na ebandeli nalɛmbaki Nzambe. Mikolo mosusu esengo esilaka ngai mpe nalelaka soki nakanisi ndenge nakómá. Kasi, Biblia esalisi ngai nayeba ete aksida yango ezalaki te etumbu ya Nzambe. Ndenge Biblia elobi, ‘ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka biso nyonso.’ Kobondela Yehova mpe kotánga bavɛrsɛ ya sikisiki esalisi ngai nakóma na boyokani makasi na Nzambe mpe nalɛmba nzoto te.”​—Mosakoli 9:11; Nzembo 145:18; 2 Bakorinti 4:8, 9, 16.

Kobatela na makanisi bantina oyo Nzambe atiki bampasi ezala mpe ndenge oyo akolongola yango mosika te, esalisaka biso tólongola makanisi mabe oyo tokoki kozala na yango mpo na Nzambe. Tondimisami mpenza ete Nzambe “akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” Moto moko te oyo azali na kondima epai ya Nzambe mpe Mwana na ye akoyoka nsɔni.​—Baebre 11:6; Baroma 10:11.