Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Août 2015

 MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | DEBORA

“Natɛlɛmaki lokola mama na Yisraele”

“Natɛlɛmaki lokola mama na Yisraele”

DEBORA azali kotalatala basoda oyo bazali likoló ya Ngomba Tabore. Asepeli mingi ndenge amoni bango. Na ntɔngɔntɔngɔ mpenza, amoni mpiko na bango mpe kondima ya Barake, mokambi na bango. Atako bazali kaka bato 10 000, kondima mpe mpiko na bango ekotyama na komekama na mokolo ya lelo. Basengeli kobunda na monguna moko mabe mpenza kasi bazali moke mpe na bibundeli ya malonga te. Ata bongo bayei kaka, mingimingi mpo mwasi yango alendisi bango mingi.

Meká komona na makanisi ndenge bilamba ya Debora ezali koningananingana na mopɛpɛ ntango ye ná Barake likoló ya ngomba bazali kotala na mosika. Ngomba Tabore ezalaki monene mpe ezalaki nsɔngɛ te. Lokola molai na yango ezalaki mɛtrɛ soki 400, moto oyo azali likoló na yango akokaki komona mokili patatalu ya Esdrelon, oyo ekendaki tii na sudi-wɛsti. Ebale kishone ekatisaki mabele ya matitimatiti mpe elekaki na Ngomba Karamele mpo na komibwaka na Mbu monene. Ekoki kozala ete na ntɔngɔ ya mokolo yango, ebale ezalaki ya kokauka, kasi eloko mosusu ezalaki kongɛnga na mokili wana monene ya patatalu. Basoda ya Sisera bazalaki se kopusana, bibende ya makalo na bango ezalaki kongɛngangɛnga mpe kobangisa. Eutaki na bibundeli ya malamu koleka ya Sisera; ezalaki makalo soki 900, oyo mbala mosusu ezalaki na makwangola oyo ebimá na baakse. Sisera akanaki kokata Bayisraele wana oyo bazalaki na bibundeli ya malonga te ndenge bakataka mbuma ya ɔrje!

Debora ayebaki ete Barake mpe basoda na ye bazalaki kozela aloba mwa liloba. Kaka ye moko nde mwasi oyo azalaki na esika yango? Azalaki komiyoka ndenge nini kozala na mokumba monene bongo na esika ya ndenge wana? Amitunaki soki azalaki kosala nini wana? Te, amitunaki te! Yehova Nzambe na ye ayebisaki ye abanda etumba yango; ayebisaki ye mpe ete akosalela mwasi moko mpo na kosukisa etumba yango. (Basambisi 4:9) Debora ná basoda wana ya mpiko bakoki koteya biso nini na likambo etali kondima?

“KENDE MPE PALANGANÁ NA NGOMBA TABORE”

Biblia elobeli Debora mpo na mbala ya liboso lokola “mosakoli.” Ezali likambo ya kokamwa te soki Biblia ebengi ye bongo mpo azali moto ya liboso te. * Debora azalaki mpe na mokumba mosusu. Emonani ete azalaki mpe kosilisa matata ndenge azalaki kopesa bato oyo bazalaki koya na makambo na bango epai na ye eyano ya Yehova.​—Basambisi 4:4, 5.

Debora azalaki kofanda na mokili ya ngombangomba ya Efraime oyo ezalaki na katikati ya engumba Betele mpe Rama. Azalaki kofanda na nse ya nzete ya mbila mpe kosalela bato makambo ndenge Yehova azalaki kopesa ye malako. Na ntembe te mokumba na ye ezalaki mpasi, kasi Debora atikaki te ete yango elɛmbisa ye nzoto. Bato bazalaki mpenza na mposa ya lisalisi na ye. Kutu na nsima, asalaki loyembo moko na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezalaki na maloba oyo mpo na bato na ye oyo bazangaki bosembo: “Baponaki banzambe ya sika. Na ntango yango nde etumba ezalaki na baporte.” (Basambisi 5:8) Yehova asundolaki Bayisraele na mabɔkɔ ya banguna na bango mpo bakómaki kosalela banzambe mosusu. Yabine, mokonzi ya Kanana, azalaki kokonza bango na lisalisi ya Sisera, mokonzi ya basoda na ye oyo azalaki elombe mpenza.

Nkombo Sisera mpamba, ezalaki kobangisa Bayisraele  makasi. Lingomba mpe bonkɔkɔ ya Bakanana ezalaki kobangisa, ezalaki na makambo lokola kopesa bana mbeka mpe kindumba na tempelo. Makambo ezalaki ndenge nini lokola mokonzi ya basoda Mokanana mpe basoda na ye nde bazalaki kokonza? Loyembo ya Debora emonisi ete bato bazalaki kosala lisusu mibembo te mpe moto moko te azalaki kofanda lisusu na bamboka ya Yisraele. (Basambisi 5:6, 7) Tokoki komona na makanisi ndenge bato bazalaki kolɛnga na kobanga na nse ya banzete mpe bangomba, kobanga mpo na kosala bilanga to kofanda na bamboka oyo ezangá bifelo mpe kobanga kotambola na banzela ya polele noki bábundisa bango, bákanga bana na bango mpe básangisa ná basi na bango nzoto na makasi. *

Monyoko yango eumelaki mbula 20 tii ntango Yehova amonaki ete bato na ye ya motó makasi bandimaki kobongwana to ndenge loyembo ya Debora ná Barake elobi, “tii ntango ngai Debora natɛlɛmaki, tii ntango ngai natɛlɛmaki lokola mama na Yisraele.” Toyebi te soki Debora, mwasi ya Lapidote abotaki mpenza bana, kasi maloba yango ezalaki nde ya elilingi. Kutu, Yehova apesaki Debora mokumba ya kobatela ekólo yango ndenge mama abatelaka bana na ye. Apesaki ye mokumba ya kobenga mosambisi Barake, mobali moko ya kondima makasi mpe koyebisa ye atɛmɛla Sisera.​—Basambisi 4:3, 6, 7; 5:7.

Debora alendisaki Barake atɛlɛma lokola mosikoli ya libota ya Nzambe

Na nzela ya Debora Yehova alobaki boye: “Kende mpe palanganá na Ngomba Tabore.” Barake asengelaki koyanganisa mibali 10 000 ya mabota mibale ya Yisraele. Debora ayebisaki bango elaka ya Nzambe ete bakolonga elombe Sisera mpe makalo na ye 900! Na ntembe te, elaka yango ekamwisaki Barake. Yisraele ezalaki na basoda te mpe na bibundeli mpenza te. Ata bongo, Barake andimaki kokende etumba; kasi kaka soki Debora akei ná bango na Ngomba Tabore.​—Basambisi 4:6-8; 5:6-8.

Balobaka ete Barake azalaki na kondima te mpo asɛngaki Debora akende ná bango, kasi ezali bongo te. Kutu, asɛngaki Nzambe te abakisela bango bibundeli. Lokola azalaki moto ya kondima, Barake amonaki ntina ya kozala elongo na momonisi ya Nzambe mpo alendisa ye ná basoda na ye. (Baebre 11:32, 33) Yehova andimaki mpe atikaki ete Debora akende ná bango ndenge Barake asɛngaki. Kasi, na nzela ya elimo na ye, Yehova atindaki Debora asakola ete na nsuka ya etumba yango lokumu ekokende epai ya mobali te. (Basambisi 4:9) Nzambe azwaki ekateli ete mwasi moko nde akoboma Sisera, moto mabe!

Na mokili ya lelo, basi bazali kokutana na makambo mingi ya kozanga bosembo, mobulu mpe minyoko. Bapesaka bango mpenza te lokumu oyo Nzambe alingaka bápesa bango. Kasi, Nzambe azwaka basi ná mibali na valɛrɛ ndenge moko. (Baroma 2:11;  Bagalatia 3:28) Ndakisa ya Debora emonisi biso ete apesaka mpe basi mikumba mpe bilembo oyo emonisaka ete atyelaka bango motema mpe andimaka bango. Ezali na ntina mpenza tóboya ezaleli ya kozwa basusu na valɛrɛ te oyo ekómi mingi lelo oyo.

“MABELE ENINGANAKI, LIKOLÓ MPE ETANGAKI”

Barake akendaki koyanganisa basoda na ye. Azwaki mibali 10 000 oyo bazalaki na mpiko mpo na kokende kobundisa limpinga ya basoda ya Sisera oyo ezalaki kobangisa. Ntango Barake azalaki kokamba mibali yango na Ngomba Tabore, asepelaki ndenge azalaki na likoki ya kopesa bango mpiko lisusu. Biblia elobi boye: “Debora amataki elongo na ye.” (Basambisi 4:10) Kanisá naino ndenge basoda yango bazwaki mpiko ntango bamonaki mwasi wana ya mpiko ayei elongo na bango na Ngomba Tabore, atye mpe bomoi na ye na likama mpo na kondima na ye epai ya Yehova Nzambe!

Ntango Sisera ayokaki ete Yisraele eyanganisaki basoda mpo na kobunda ná ye, asalaki nokinoki. Bakonzi mosusu ya Kanana bapesaki mokonzi Yabine mabɔkɔ, oyo ekoki kozala ete azalaki mokonzi oyo alekaki na nguya. Na nsima, limpinga monene ya basoda ya Sisera oyo batambwisaka makalo baningisaki mabele na makelele ya makalo na bango ntango bazalaki koya elongo mpe batondaki na esika yango. Bakanana bandimisamaki ete bakolonga basoda ya Yisraele nokinoki mpo balekaki bango na nguya.​—Basambisi 4:12, 13; 5:19.

Debora ná Barake balingaki kosala nini ndenge limpinga yango ezalaki kopusana? Soki batikalaka kaka likoló ya Ngomba Tabore, elingaki kozala mpo na litomba na bango ntango mampinga ya basoda ya Bakanana ezali kopusana. Mpo esɛngaki mokili ezala polele mpe na ngomba te mpo makalo na bango etambola mpe bábunda malamu. Kasi, Barake asengelaki kobunda na kolanda malako ya Yehova, yango wana azelaki liloba ya Debora. Nsukansuka, ntango ekokaki. Debora alobaki boye: “Tɛlɛmá, mpo lelo ezali mokolo oyo Yehova akopesa mpenza Sisera na lobɔkɔ na yo. Yehova nde abimi liboso na yo, boye te?” Na nsima, “Barake alongwaki na Ngomba Tabore mpe akitaki elongo na mibali nkóto zomi (10 000) nsima na ye.”​—Basambisi 4:14. *

Basoda ya Yisraele bakitaki na ngomba mpe bakendaki epai bamasini wana ya nsɔmɔ ya bitumba ezalaki. Yehova akendaki elongo na bango ndenge Debora alakaki? Eyano eyaki nokinoki. Biblia elobi boye: “Mabele eninganaki, likoló mpe etangaki.” Yehova akɔtisaki mobulungano na kati ya limpinga monene ya Sisera. Mpe mbula ebandaki! Ebɛtaki makasi mpenza na boye ete mabele elingaki kotonda nokinoki na mai. Eumelaki te, makalo yango oyo ezalaki ya bibende ya kilo ezalaki lisusu na ntina te. Ezindaki na pɔtɔpɔtɔ mpe ekangamaki kuna.​—Basambisi 4:14, 15; 5:4.

Mopɛpɛ makasi wana ebangisaki Barake mpe basoda na ye te mpo bayebaki esika eutaki. Bakendaki mbala moko esika mampinga ya basoda ya Kanana ezalaki. Lokola Nzambe asalelaki bango mpo na kopesa basoda ya Sisera etumbu, batikaki ata soda moko te na bomoi. Ebale Kishone etondaki mpe etindikaki bibembe yango na Mbu Monene.​—Basambisi 4:16; 5:21.

Ndenge Debora asakolaki, Yehova abundelaki bato na ye, alongaki limpinga ya Sisera

Lelo oyo, Yehova atindaka lisusu te basaleli na ye bábunda ndenge wana. Ata bongo, asɛngaka bango bábunda etumba ya elimo. (Matai 26:52; 2 Bakorinti 10:4) Soki tozali kotosa Nzambe na mokili ya lelo, tozali kobunda etumba yango. Tosengeli kozala na mpiko mpo baoyo bamityaka lelo na ngámbo ya Nzambe bakutanaka na botɛmɛli makasi. Kasi Yehova abongwani te. Asalisaka baoyo bazalaka na kondima mpe batyelaka ye motema lokola Debora, Barake mpe basoda ya mpiko ya Yisraele basalaki.

“AKOPAMBWAMA KOLEKA BASI NYONSO”

Sisera, Mokanana oyo azalaki monguna monene mpe moto oyo azalaki konyokola mpenza libota ya Nzambe akimaki etumba yango na makolo! Atikaki basoda na ye bákufa na pɔtɔpɔtɔ, alekaki basoda ya Yisraele mpe akómaki na mabele ya kokauka mpe atalisaki elongi epai akanisaki ete akomona baninga na ye penepene wana. Akimaki mbangu ebele ya bakilomɛtrɛ na esika ya polele, na kobanga ete basoda ya Yisraele bakoki kokanga ye, akendaki na hema ya Hebere, Mokeni oyo akabwanaki na bato na ye oyo bazalaki kotambolatambola na sudi mpe asalaki kondimana ná Mokonzi Yabine.​—Basambisi 4:11, 17.

Sisera alɛmbaki makasi ntango akómaki na ndako ya Hebere. Akutaki kaka mwasi na ye Yaele kasi  ye moko azalaki te. Sisera akanisaki mpenza ete Yaele akotosa kondimana oyo mobali na ye asalaki ná Mokonzi Yabine. Mbala mosusu akanisaki ete ekoki kosalema te ete mwasi asala likambo to azala na makanisi ekeseni na oyo ya mobali na ye. Emonani polele ete Sisera ayebaki mpenza Yaele malamu te! Yaele amonaki mpenza ndenge Bakanana bazalaki konyokola bato; ekoki kozala amonaki mpe ete asengeli kopona kosalisa moto mabe wana to komitya na ngámbo ya Yehova mpe koboma monguna wana ya bato na ye. Kasi alingaki kosala nini? Ndenge nini mwasi akokaki kolonga elombe wana ya bitumba?

Yaele asengelaki kokanisa nokinoki. Apesaki Sisera esika ya kopema. Sisera ayebisaki ye ete moto nyonso oyo akoluka ye, aloba na ye ete azali te. Azipaki ye ntango alalaki mpe ntango asɛngaki ye mai, Yaele apesaki ye miliki. Eumelaki te Sisera alalaki mpɔngi makasi. Na nsima, na mayele nyonso, Yaele azwaki bisaleli mibale oyo basi oyo bafandaka na bahema bazalaki kosalela mbala mingi; pike mpe marto. Apusanaki pene ya motó ya Sisera mpe mokumba monene ya kosala lokola moto oyo Yehova azali kosalela mpo na kopesa etumbu ezalaki liboso na ye. Ata mwa kokakatana moke ekokaki kozala likama mpo na ye. Akanisaki libota ya Nzambe mpe ndenge oyo mobali yango anyokolaki bango na boumeli ya bambula ebele? To akanisaki nde libaku oyo azwaki ya komitya na ngámbo ya Yehova? Lisolo yango elobeli yango te. Toyebi kaka ete akokisaki mokumba yango nokinoki. Sisera akufaki!​—Basambisi 4:18-21; 5:24-27.

Na nsima, Barake ayaki koluka monguna yango. Ntango Yaele alakisaki ye ebembe ya Sisera oyo ezalaki na pike na mpakatoi na ye, amonaki ete esakweli ya Debora ekokisamaki. Mwasi nde abomaki Sisera elombe wana ya bitumba! Bato mosusu ya maloba mabe mpe baoyo batyaka ntembe bapesi Yaele bankombo ndenge na ndenge ya mabe, kasi Barake ná Debora bayebaki ye malamu koleka. Na loyembo na bango, na litambwisi ya elimo ya Nzambe bakumisaki Yaele lokola mwasi oyo “akopambwama koleka basi nyonso” mpo na mpiko oyo amonisaki. (Basambisi 4:22; 5:24) Simbá ete Debora azalaki na ezaleli ya koluka kaka lokumu na ye moko te. Ayokaki mabe te kopesa Yaele lokumu ya ndenge wana; kutu, asalaki nyonso mpo maloba ya Yehova ekokisama.

Lokola Sisera akufaki, Mokonzi Yabine azalaki lisusu kobangisa Bayisraele te. Monyokoli ya Bakanana esukaki. Kimya ekɔtaki na boumeli ya mbula 40. (Basambisi 4:24; 5:31) Debora, Barake mpe Yaele bapambolamaki mpenza ndenge bamonisaki kondima epai ya Yehova! Soki tomekoli kondima ya Debora, na mpiko nyonso tomitye na ngámbo ya Yehova mpe tolendisi basusu básala mpe bongo, Yehova akopambola biso; akolongisa biso mpe akopesa biso kimya ya seko.

^ par. 7 Basi mosusu oyo bazalaki basakoli ezali Miriame, Huluda mpe mwasi ya Yisaya.​—Kobima 15:20; 2 Bakonzi 22:14; Yisaya 8:3.

^ par. 9 Loyembo ya Debora emonisi ete mbala mingi Sisera azalaki kozonga na biloko ebele oyo abɔtɔli na bitumba; na kati na yango bilenge basi, na bantango mosusu bilenge basi ebele mpo na soda mokomoko. (Basambisi 5:30) Liloba oyo esalelami mpo na “mwasi” na vɛrsɛ yango elimboli “libumu.” Elobeli yango etindi biso tókanisa ete basi yango bazalaki kozwa bango libosoliboso mpo na binama na bango ya kobotela. Kosangisa na basi nzoto na makasi ezalaki kosalema mingi.

^ par. 17 Etumba yango elobelami mbala mibale na lisolo oyo ezali na Basambisi mokapo 4 mpe na loyembo ya Debora ná Barake na mokapo 5. Mikapo yango mibale ezali na boyokani, makambo mikemike oyo elobelami te na mokapo moko ezali na mokapo oyo mosusu.