Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Juillet 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOLONGA MITUNGISI

Mitungisi mpo na makama

Mitungisi mpo na makama

Alona alobi boye: “Soki nayoki lokito ya mindoki, nakendaka mbangu komibomba na esika oyo ebatelaka na babɔmbi. Kasi ata na esika yango, namitungisaka kaka. Namitungisaka lisusu koleka soki nazali libándá mpe esika ya komibomba ezali te. Mokolo moko, ntango nazalaki kotambola na nzela, nabandaki kolela mpe mpema ekómaki mokuse. Esɛngaki bangonga mingi eleka mpo nakitisa motema. Na nsima, lokito ya mindoki ezongaki lisusu.”

Alona

Bitumba ezali moko ya makambo mingi oyo etyaka bomoi ya bato na likama. Na ndakisa, koyeba ete yo to moto moko oyo olingaka azali na maladi moko mabe ekoki kosala ete omiyoka lokola bɔmbi ekweli yo. Mpe mpo na basusu, kobanga avenire ekoki kosala ete bámitungisa. Bamitunaka boye: ‘Bana na biso to bana na bango, bakofanda na mokili oyo etondi na bitumba, mobulu, kobeba ya mopɛpɛ, kobongwana ya klima mpe bamaladi oyo ezwaka bato mingi?’ Ndenge nini tokoki kolonga mitungisi ya ndenge wana?

Koyeba ete makambo ya mabe esalemaka, ‘moto ya ekɛngɛ amonaka likama mpe amibombaka.’ (Masese 27:12) Kaka ndenge tobatelaka nzoto na biso, tokoki mpe kosala mwa makambo mosusu mpo na kobatela makanisi na biso. Masano ya bitumba mpe bansango oyo etondi na bililingi ya nsɔmɔ esalaka ete biso mpe bana na biso tómitungisa lisusu mingi. Koboya kotala bililingi wana ya nsɔmɔ elingi koloba  te ete toyebi te makambo oyo ezali koleka. Nzambe asalá bɔɔngo na biso te mpo ekanisaka makambo ya mabe. Kutu, tosengeli nde kotondisa bɔɔngo na biso na “makambo nyonso ya solo, . . .  ya boyengebene, . . . ya pɛto, . . . oyo ekoki kolingama.” Soki tosali bongo, “Nzambe ya kimya” akopesa biso kimya ya motema mpe ya makanisi.​—Bafilipi 4:8, 9.

NTINA YA LIBONDELI

Kondima ya solosolo esalisaka biso tólonga mitungisi. Biblia elendisi biso ‘tózala na bokɛngi mpe tóbondelaka mpenza.’ (1 Petro 4:7) Tokoki kosɛnga Nzambe lisalisi, bwanya mpe mpiko ya kolonga mikakatano, na elikya ete “akoyoka biso mpo na eloko nyonso oyo tozali kosɛnga.”​—1 Yoane 5:15.

Ná mobali na ye, Avi

Biblia elobi ete Satana nde azali “mokonzi ya mokili oyo” kasi Nzambe te, mpe “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (Yoane 12:31; 1 Yoane 5:19) Yango wana, Yesu amonisaki ete Satana azalaka mpenza mpe Yehova abikisaka biso mpenza ntango ateyaki biso tóbondelaka ete “bikisá biso na moto mabe.” (Matai 6:13) Alona alobi boye: “Ntango nyonso oyo lokito ya mindoki ebandaka, nasɛngaka Yehova asalisa ngai nabatela makanisi na ngai. Lisusu, mobali na ngai abengaka ngai na telefone mpe tobondelaka. Libondeli esalisaka mpenza.” Kaka ndenge Biblia elobi yango: “Yehova azali pene ya baoyo nyonso bazali kobelela ye, na baoyo nyonso babelelaka ye na bosolo.”​—Nzembo 145:18.

ELIKYA NA BISO MPO NA MIKOLO EZALI KOYA

Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Bokonzi na yo eya.” (Matai 6:10) Bokonzi ya Nzambe ekolongola mitungisi nyonso mpo na libela. Na nzela ya Yesu “Nkumu ya Kimya,” Nzambe ‘akosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele.’ (Yisaya 9:6; Nzembo 46:9) Nzambe “akokata mpenza makambo na kati ya bato ya bikólo ebele . . . Bakotombola mopanga te, ekólo moko mpo na kobunda na ekólo mosusu, mpe bakoyekola etumba lisusu te. . . . Moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.” (Mika 4:3, 4) Mabota ya esengo “bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango.” (Yisaya 65:21) “Mpe moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yisaya 33:24.

Lelo oyo, ata soki tozwi bibongiseli ya ndenge nini, tozalaka ntango nyonso te na likoki ya kopekisa “makambo oyo ekanami te” to koboya kozala na esika ya mabe na ntango ya mabe. (Mosakoli 9:11) Ndenge kaka bitumba, mobulu mpe bamaladi ebomá bato na boumeli ya basiɛklɛ, ezali kokoba koboma bato ya malamu tii lelo oyo. Elikya nini ezali mpo na bato yango?

Bamilio ya bato oyo kaka Nzambe nde ayebi motángo na bango, bakosekwa. Kasi sikoyo, balali mpe Nzambe abateli bango na makanisi na ye tii mokolo oyo “baoyo nyonso bazali na kati ya malita . . . bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Biblia elobeli lisekwa na maloba oyo: “Elikya oyo tozali na yango ezali lokola longo mpo na molimo, ezali makasi mpe ngwi.” (Baebre 6:19) Mpe Nzambe “apesi bato nyonso ndanga ndenge asekwisi ye [Yesu] uta na bakufi.”​—Misala 17:31.

Mpo na sikoyo, ata baoyo basalaka nyonso mpo na kosepelisa Nzambe bakutanaka na mitungisi. Kosala makambo oyo bakoki kosala, kobondela Nzambe mpo na kopusana penepene na ye mpe kolendisa kondima na bango na makambo oyo Biblia elaki mpo na mikolo ezali koya, esalisaka Paul, Janet mpe Alona bálonga mitungisi. Ndenge moko na bango, tiká ete “Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo mpe na kimya nyonso na kondima na bino.”​—Baroma 15:13.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

Moto oyo abimisaka bitumba mpe bampasi

Ndenge nini Biblia emonisi ete etumba oyo ebimaki na likoló ezali na boyokani ná etumba mpe mobulu oyo ebimaki awa na mabele?

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Ndenge nini kimya ekokɔta na mokili?

Talá ndenge Bokonzi ya Nzambe ekokokisa elaka oyo apesi ya kotya kimya na mokili.