Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Juin 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | SIANSI EZWI NDE ESIKA YA BIBLIA?

Ndenge oyo siansi ememelaka yo matomba

Ndenge oyo siansi ememelaka yo matomba

Diksionɛrɛ moko elobi ete siansi ezali “boyekoli ya mozindo ya biloko oyo ezalaka na likoló mpe na mabele, koluka koyeba ndenge yango ezalaka na kotala, na baankɛtɛ mpe na bakalkile.” Mbala mingi, kosala nyonso wana ezalaka mpasi mpe elɛmbisaka nzoto. Bato ya siansi babundanaka na kosala baankɛtɛ mpe kotala biloko oyo bazali koyekola na boumeli ya bapɔsɔ, basanza to mpe bambula. Na bantango mosusu bazwaka ata solisyo moko te, kasi mbala mingi makambo oyo bamonaka ememelaka bato matomba. Tótalela mwa bandakisa.

Kompanyi moko na Mpoto esangisaki baplastike ya makasi na mwa eloko moko oyo ekangaka basalite ya mai (filtre) mpo na kosala eloko oyo esalisaka moto azwa te bamaladi oyo eutaka na mai oyo ekɔti mikrobe. Basalelaki biloko ya ndenge wana na ntango ya makama oyo ebimaka mpo na mipɛpɛ makasi to koningana ya mabele; na ndakisa ntango mabele eninganaki na Haïti, na 2010.

Na mapata, ezali na basatelite oyo batyá yango mwa aparɛyi (GPS), oyo esalisaka mpo na koyeba esika nyonso oyo moto azali. Atako liboso basalaki mwa aparɛyi yango mpo na kosalisa basoda, kasi esalisaka mpe basofɛlɛ, bakumbi-mpɛpɔ, bakapitene ya masuwa ata mpe babomi-nyama ná bato oyo batambolaka na bangomba bámona nzela. Soki bato ya siansi bábimisaka aparɛyi yango te, mbɛlɛ elingaki kozala mpasi mpo moto akende esika nyonso alingi na pɛtɛɛ nyonso.

Osalelaka telefone, ordinatɛrɛ to Internet? Omoná ete sante na yo ebongá to ezongá ndenge ezalaka mpo mayele ya minganga ekoli? Osalaka mobembo na mpɛpɔ? Soki ezali bongo, ozwaka matomba na mwa makambo mosusu oyo siansi esalelaka bato. Siansi esalisaka yo na makambo mingi.

MAKAMBO OYO SIANSI EKOKI KOSALA TE

Lelo oyo, lokola bato ya siansi bazali na mposa ya koyeba makambo mingi lisusu, bazali koyekola na mozindo biloko oyo ezali na mokili. Bato ya mayele oyo bayekolaka baatɔmɛ bazali koluka koyeba makambo oyo esalemaka na kati na yango, kasi bato ya astronomi bazali koluka koyeba makambo oyo eleká bamiliare ya bambula mpo na koyeba ndenge molɔ́ngɔ́ ebimá. Ntango bazali kokɔta na mozindo na baankɛtɛ na bango, ata na biloko oyo emonanaka na miso te mpe oyo moto akoki kosimba te, bato mosusu ya siansi bamoni ete soki Nzambe ya Biblia azalaka, basengeli kozala na likoki ya komona ye.

Bato mosusu ya siansi mpe ya filozofi oyo bayebani mingi basuki wana te. Bandimi kutu makanisi ya Amir Aczel, mokomi moko ya makambo ya siansi oyo akomaki ete “ezali na makambo ya siansi oyo emonisi mpenza ete Nzambe azalaka te.” Na ndakisa, moto moko ya fiziki oyo ayebani mingi alobaki ete “lokola ezali te na makambo oyo endimisi ete Nzambe moko oyo atambwisaka makambo na molɔ́ngɔ́ mobimba azalaka, ebongi te kondima ete Nzambe ya ndenge wana azali.” Bamosusu balobelaka misala ya  Nzambe ya Biblia ete ezali “maji” to “likambo moko oyo ekoki kolimbolama te.” *

Kasi motuna oyo esengeli kotunama yango oyo: Siansi eyekoli makambo nyonso oyo etali biloko oyo ezali na mokili mpo epesa makanisi ya nsuka? Na mokuse, eyekoli makambo nyonso te. Mayele ya siansi ekoli mpenza, kasi bato mingi ya siansi bandimi ete ezali naino na makambo mingi oyo bayebi te mpe mbala mosusu oyo ekoki koyebana te. Steven Weinberg, moto moko ya fizike oyo azwaki mbano babéngi prix Nobel na likambo etali koyeba biloko oyo ezali na mokili, alobaki boye: “Ata toyekoli ndenge nini, tokoyeba makambo nyonso te.” Profesɛrɛ Martin Rees, moto moko ya astronomi na Grande-Bretagne, akomaki boye: “Ekozala kaka na makambo oyo bato bakotikala koyeba te.” Mpo na koloba solo, biloko mingi oyo Nzambe akelá, kobanda na selile ya moke mpenza tii na ebakata ya molɔ́ngɔ́ oyo ezingi biso, ezali kaka kolekela mayele ya bato ya siansi. Talá bandakisa oyo elandi:

  • Bato ya bioloji bayebaka mpenza te makambo oyo esalemaka na kati ya baselile. Bato ya siansi bamonisi naino mpenza te ndenge oyo baselile esalelaka nguya, esalaka baproteini mpe ndenge oyo ekabwanaka.

  • Nguya oyo esalaka ete baplanɛti elongwa te na nzela na yango mpe biloko oyo babwaki likoló ekwea na nse (gravitation) esalaka mosala na bomoi na biso mikolo nyonso, na basegonde nyonso. Kasi elekelaka kaka bato ya fiziki. Bayebaka mpenza te ndenge oyo nguya yango esalaka ete moto oyo apumbwe likoló akita na mabele mpe sanza ebaluka kaka zingazinga ya mabele.

  • Bato oyo bayekolaka molɔ́ngɔ́ bamoni ete eteni monene na yango (95%) emonanaka te na miso mpe baaparɛyi oyo bato ya siansi basalelaka ekoki komona yango te. Bakaboli nguya yango na biteni mibale, eteni moko babengi yango énergie noire mpe mosusu matière noire. Bato ya siansi bayebi te ndenge nguya yango ezalaka.

Ezali mpe na biloko mosusu oyo eyebani te, oyo etyaka bato ya siansi mobulu na motó. Mpo na nini ezali bongo? Mokomi moko ya makambo ya siansi oyo ayebani mingi, alobi boye: “Makambo oyo toyebi te ezali ebele koleka oyo toyebi. Mpo na ngai, siansi esengeli kotinda moto akamwaka mpe aluka koyekola makambo mingi lisusu na esika makanisi na ye etɛlɛma kaka esika moko.”

Soki omitungisaka ete siansi ekozwa esika ya Biblia mpe ekosala ete bato bándima te ete Nzambe azali, talelá likambo oyo: Soki bato ya siansi ya mayele mingi ná baaparɛyi na bango ya makasi mpenza bayebi kaka mwa makambo moke oyo ezalaka na molɔ́ngɔ́, ebongi mpenza tóboya nokinoki kondima makambo oyo bato ya siansi bazali te na likoki ya koyekola yango? Mpo na likambo yango kaka, na nsuka ya lisolo molai oyo elobelaki istware ya astronomi mpe ndenge oyo bakolisaki mayele yango, buku moko (Encyclopedia Britannica) elobi boye: “Nsima ya mbula soki 4 000 ya koyekola minzoto mpe baplanɛti, molɔ́ngɔ́ ekamwisaka kaka ndenge ekamwisaki bato ya Babilone.”

Batatoli ya Yehova bamemyaka lotomo ya moto ya kozwa ekateli na likambo yango. Tosalaka nyonso mpo tólanda toli oyo ya Biblia: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Na yango, tosɛngi yo otalela ndenge oyo siansi eyokani na Biblia.

^ par. 9 Bato mosusu bandimaka Biblia te mpo na mateya ya kala mpe ya lelo oyo mangomba eteyaka, na ndakisa oyo elobaka ete mabele ezali na katikati ya molɔ́ngɔ́ to Nzambe asalaki mokili na boumeli ya mikolo motoba ya ngonga 24.​—Talá etanda “ Biblia mpe makambo oyo siansi endimi.”

Makambo mosusu

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Nzambe azali?

Biblia epesi biyano na mituna mitano oyo emonisi ete Nzambe azali.