Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Juin 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | SIANSI EZWI NDE ESIKA YA BIBLIA?

Siansi ezali na ndelo

Siansi ezali na ndelo

Na mikolo oyo euti koleka, babimisaki babuku mingi oyo ezali kolobela makanisi ya bato mosusu oyo bakómi koloba ete Nzambe azalaka te. Babuku yango ebendaki likebi ya bato mingi mpe esali ete bábimisa makanisi ndenge na ndenge mpo na yango. Mpo na likambo yango, David Eagleman, moto moko ya siansi oyo ayekolaka makambo etali bɔɔngɔ, akomaki boye: “Bato mosusu oyo batángaka babuku bakanisaka ete bato ya siansi bayebi makambo nyonso.” Na nsima, abakisaki boye: “Kasi, bato oyo bayebi siansi malamu balukaka koyeba makambo mingi mpe mosala na bango esɛngaka koluka makambo ya sika ata mpe oyo bakanaki te.”

Banda kala, bato ya siansi ya mayele mingi bamonaki makambo mingi ya kokamwa ntango bazalaki koluka biyano na mituna minene oyo etali biloko oyo ezali na mokili. Kasi, bamosusu basalaki mabunga minene na boyekoli na bango. Isaac Newton azalaki moko ya bato minene ya siansi oyo ayebani mingi. Amonisaki ndenge oyo nguya babengi gravitation ekangisaka baplanɛti, minzoto mpe bagalaksi esika moko na molɔ́ngɔ́. Abimisaki bakalkile oyo ezali eteni moko ya matematiki oyo basalelaka mpo na kosala baordinatɛrɛ, kotinda bafize na likoló, mpe kosala babɔmbi. Kasi, Newton asalaki mpe siansi babengi alchimie, siansi moko ya kala oyo ezalaki kosalela astroloji mpe maji mpo na koluka kobongola mondɔlu (plomb) mpe bibende mosusu ekóma wolo.

Bambula 1 500 liboso ya Newton, Ptolémée, moto moko ya mayele na astronomi atalaki likoló malamumalamu kaka na miso. Na butu, azalaki kotalatala baplanɛti na mapata mpe ayebaki mpenza kosala bakarte ya mokili. Kasi, azalaki kokanisa ete mabele ezali na katikati ya biloko nyonso. Carl Sagan, moto moko ya fiziki oyo ayekolaka baplanɛti, akomaki boye mpo na likanisi ya Ptolémée: “Lokola bato bandimaki likanisi wana ya libunga na boumeli ya bambula 1 500, yango emonisi ete ata moto ya mayele ya ndenge nini, akoki komikosa mpenza.”

Lelo oyo, bato ya siansi bazali kokutana na mikakatano ya ndenge wana. Bakoyeba nde kolimbola makambo nyonso oyo etali molɔ́ngɔ́? Atako ebongi tóndima ete mayele ya siansi ekoli mpe esalisi biso na makambo mingi, kasi tosengeli mpe kobosana te ete siansi ezali na ndelo. Paul Davies, moto moko ya fizike alobi boye: “Ezali mpasi kolimbola makambo nyonso etali molɔ́ngɔ́ mpe oyo ezali mpenza na boyokani na makambo ya bato mosusu ya siansi.” Maloba yango emonisi likambo oyo tosengeli kobosana te: Bato bakokoka te koyeba makambo nyonso oyo etali molɔ́ngɔ́. Na yango, soki balobi ete siansi ekoki kolimbola makambo nyonso oyo etali molɔ́ngɔ́, ebongi kokeba kondima makanisi ya ndenge wana.

Ezali polele ete Biblia ekokisaka bamposa na biso na ndenge oyo siansi ekoki kosala te

Biblia elobeli makambo ya kokamwa ya bozalisi na maloba oyo: “Talá! Wana nde ebandeli ya banzela na ye [Nzambe], mpe oyo nde mwa nungunungu ya likambo bayoki mpo na ye!” (Yobo 26:14) Ezali na ebele ya makambo mosusu oyo bato bakoki te komona mpe kokanga ntina na yango. Na ntembe te, maloba ya ntoma Paulo, oyo akomaki eleki sikoyo mbula pene na 2000, ezali kaka solo; alobi boye: “Ee bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza! Bikateli na ye ya lisambisi ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki koyebana te!”​—Baroma 11:33.