Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Juin 2015

Makambo ya kosala mpo olekisa bobange na yo malamu

Makambo ya kosala mpo olekisa bobange na yo malamu

OMIYOKAKA ndenge nini ntango okanisaka ete okokóma mobange? Mingi bamitungisaka mpenza mpe babangaka kutu. Ezali mpo mbala mingi bobange eyaka na makambo mabe lokola kozanga komona malamu, nzoto elɛmbilɛmbi, kobosanabosana makambo mpe kobɛla bamaladi oyo esilaka te.

Kasi, emonani ete bato nyonso banunaka ndenge moko te. Bamosusu bazalaka na sante ya mwa malamu, mwa makasi na nzoto mpe motó esalaka mwa malamu. Lokola mayele ya minganga ezali se kobakisama, minganga mosusu bakómi kobikisa bamaladi mosusu to kosala ete bamaladi oyo esilaka te enyokola bato mingi mpenza te. Yango esali ete na bikólo mosusu bato mingi bákóma koumela mingi na bomoi mpe bázala na sante ya malamu.

Ata bongo, bato mingi balingaka ete bálekisa bobange na bango malamu ata soki bakutani na mikakatano oyo bobange ememaka. Yango ekoki kosalema ndenge nini? Yango etali ndenge oyo moto atalelaka bobange mpe mposa to makoki oyo azali na yango ya komesana na bomoi wana ya sika. Mpo na kosalisa biso na makambo yango, tótalela naino mwa batoli ya pɛtɛɛ mpe oyo ebongi ya Biblia.

YEBÁ ESIKA MAKOKI NA YO ESUKI: “Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.” (Masese 11:2) Na vɛrsɛ oyo, “bato ya bopɔlɔ” ekoki kotalela mibange oyo bandimaka ete bakokoka lisusu te kosala makambo oyo bazalaki kosala liboso. Charles, oyo azali na mbula 93, na Brésil, alobi boye: “Soki olingi koumela ntango molai na mokili, okonuna kaka. Mwaye ya kozonga lisusu elenge ezali te.”

Kasi, koyeba ete okokoka makambo nyonso te elimboli te kokóma na makanisi mabe lokola “nasí nanuni, nakosala lisusu nini.” Makanisi ya ndenge wana ekoki kosilisa moto esengo. Masese 24:10 elobi boye: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” Kutu, moto oyo ayebi esika makoki na ye esuki amonisaka bwanya mpe amekaka kosala oyo akoki kosala.

Corrado, oyo azali na mbula 77, na Italie, alobi boye: “Ntango ozali komata ngomba na motuka, esengeli kokitisa vitɛsi mpo motɛrɛ ebeba te.” Ya solo, ntango moto azali kokóma mobange, esɛngaka kobongola makambo mosusu. Corrado ná mwasi na ye batalelaka misala ya ndako na ndenge oyo ebongi, balandaka programɛ moko ya malamu mpo na nsuka ya mokolo bámiyoka te ete makasi nyonso esili bango. Marian, oyo azali na mbula 81, na Brésil, atalelaka mpe bobange  na ndenge oyo ebongi; alobi boye: “Nayekoli kosala makambo na kotalela makoki na ngai. Napemaka liboso nasala mosala mosusu soki esengeli. Nafandaka to nalalaka mpo na kotánga to koyoka miziki. Nayekoli kondima ete nakokoka te kosala makambo ndenge nazalaki kosala liboso.”

Kolekisa ndelo te

KOLEKISA NDELO TE: “Basi bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, bálekisaka ndelo te mpe bázala na makanisi malamu.” (1 Timote 2:9) Maloba “molato ya malamu” elingi koloba ya kolekisa ndelo te mpe oyo ebongi. Barbara, oyo azali na mbula 74, na Canada; alobi boye: “Nasalaka nyonso nabongisa nzoto na ngai mpe nazala pɛto. Naboyaka likanisi oyo ete ata soki ‘nalati bongobongo, ekosala nini, nazali na ngai mobange.’” Fern, oyo azali na mbula 91, na Brésil, alobi boye: “Nasombaka bilamba ya sika mpo namiyoka malamu.” Bongo mibali oyo bakómi mibange? Antônio, oyo azali na mbula 73, na Brésil, alobi boye: “Nasalaka nyonso namonana kitoko, nalataka bilamba ya pɛto mpe ya sika.” Mpo na bopɛto ya nzoto na ye; alobi boye: “Nasukolaka mikolo nyonso mpe nakataka nsuki na ngai.”

Epai mosusu, ezali na ntina te komitungisa mingi mpo na ndenge oyo ozali komonana na miso ya bato tii okoka lisusu te komonisa “makanisi malamu.” Bok-im, oyo azali na mbula 69, na Corée du Sud, alekisaka ndelo te na makambo ya kolata; alobi boye: “Nayebaka ete bilamba oyo nazalaki kolata ntango nazalaki elenge ebongi lisusu te mpo na ngai.”

Zalá na makanisi malamu

ZALÁ NA MAKANISI MALAMU: “Mikolo nyonso ya moto ya mpasi ezalaka mabe; kasi ye oyo azali na motema ya esengo azalaka na fɛti ntango nyonso.” (Masese 15:15) Ntango ozali konuna, makanisi mabe ekoki koyela yo soki okanisi makasi na yo ya bolenge mpe makambo mingi oyo ozalaki kokoka kosala. Kokanisa bongo ezali mabe te. Kasi, salá makasi ete makanisi yango elekela yo motó te. Kokanisa kaka makambo eleká ekoki kosilisa yo esengo mpe kolɛmbisa yo mpo okoka te kosala makambo oyo ozali naino na makoki ya kosala. Joseph, oyo azali na mbula 79, na Canada, azali na makanisi malamu; alobi boye: “Nasepelaka na makambo oyo nakoki kosala mpe namilelaka te mpo na makambo oyo namesanaki kosala kasi nakokoka lisusu kosala yango te.”

Kotánga mpe koyekola ekoki kosala ete ozala na makanisi malamu, oyeba makambo mosusu ya sika. Na yango, soki likoki ezali, salelá mabaku nyonso oyo emonani mpo na kotánga mpe koyekola makambo ya sika. Ernesto, oyo azali na mbula 74, na Philippines, akendaka na bibliotɛkɛ mpe alukaka babuku ya kitoko mpo na kotánga. Alobi boye: “Kotánga babuku mpo na koyeba makambo oyo ezali koleka na bisika mosusu epesaka ngai esengo.” Lennart, oyo azali na mbula 75, na Suède, amekaki kutu koyekola monɔkɔ ya sika.

Kabáká

KABÁKÁ: “Bópesaka, mpe bato bakopesa bino.” (Luka 6:38) Kómisá yango momesano na yo ya kopesaka basusu ntango mpe biloko na yo. Yango ekosala ete  omiyoka ete osali eloko moko oyo ebongi mpe oyoka esengo. Hosa, oyo azali na mbula 85, na Brésil, asalaka makasi asalisa basusu atako sante na ye ezali malamu te. Alobi boye: “Nabengaka baninga oyo bazali kobɛla to balɛmbi nzoto na telefone mpe nakomelaka bango mikanda. Na bantango mosusu natindelaka bango mwa eloko. Nasepelaka mpe kolambela bato ya maladi biloko ya kolya to biloko ya mikemike.”

Soki okabaka, basusu mpe bakokabela yo. Jan, oyo azali na mbula 66, na Suède; alobi boye: “Soki ozali komonisela basusu bolingo, bango mpe bakolinga yo.” Ya solo, moto oyo akabaka asalaka ete esika oyo ye azali bato básepela mpenza kozala wana.

ZALÁ BOBOTO: “Ye oyo azali komitangola na bamosusu akoluka mposa na ye ya lokoso; akotombokela makambo nyonso ya bwanya.” (Masese 18:1) Atako na bantango mosusu okosepela kozala yo moko, ekóma momesano te ya kokima basusu. Innocent, oyo azali na mbula 72, na Nigeria asepelaka kozala elongo na baninga. Alobi boye: “Nasepelaka kozala elongo na bato ya mbula nyonso.” Börje, oyo azali na mbula 85, na Suède, alobi boye: “Nasalaka nyonso nazala esika oyo bilenge bazali. Makasi na bango esalaka ete namiyoka lisusu lokola bango; mingimingi na kati na ngai.” Yo nde salelá mabaku ndenge na ndenge mpo na kobengisa baninga. Han-sik, oyo azali na mbula 72, na Corée du Sud, alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tosepelaka kobengisa baninga ya mbula nyonso; mibange mpe bilenge mpo na kolya elongo.”

Zalá boboto

Bato ya boboto basololaka malamu na bato. Kasi, lokola kosolola esɛngaka koyoka mpe oyo moninga azali koloba, zalá moninga malamu. Tyeláká basusu likebi. Helena, oyo azali na mbula 71, na Mozambique, alobi boye: “Nazalaka boboto mpe nasalelaka basusu makambo na limemya. Nayokaka oyo balingi koyebisa ngai mpo nayeba makanisi na bango mpe likambo oyo balingi.” José, oyo azali na mbula 73, na Brésil, alobi boye: “Bato basepelaka kozala na moto oyo ayokaka bango malamu; oyo amityaka na esika ya basusu mpe atyelaka bango likebi, oyo apesaka basusu longonya na ntango oyo ebongi mpe oyo ayebi kosɛkisa.”

Ntango ozali kobimisa makanisi na yo, kebá ete ‘maloba na yo ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa.’ (Bakolose 4:6) Zaláká na makanisi malamu mpe lendisáká basusu.

PESÁKÁ MERSI: “Bózala na botɔndi.” (Bakolose 3:15) Soki moto asalisi yo, pesá ye mersi mpo na likebi oyo atyeli yo. Kopesa mersi esalisaka moto akóma na boyokani malamu na basusu. Marie-Paule, oyo azali na mbula 74, na Canada, alobi boye: “Ngai ná mobali na ngai toutaki kolongwa na ndako mpe tokendaki kofanda na apartema moko boye. Ebele ya baninga basalisaki biso. Maloba ezangaki biso mpo na kopesa bango mersi. Totindelaki mokomoko na bango mwa mokanda ya kopesa mersi mpe tobengisaki bamosusu epai na biso mpo na kolya mwa eloko.” Jae-won, oyo azali na mbula 76, na Corée du Sud, asepelaka ndenge basalisaka ye akende na Ndako ya Bokonzi. Alobi boye: “Napesaka mersi mpo na lisungi wana nyonso mpe namibongisaka mpo na kopesa mwa mbongo mpo na esansi. Na bantango mosusu, nabongisaka mwa kado mpe nakomaka mwa maloba ya bɔtɔndi.”

Na nyonso, pesáká mersi mpo na ndenge ozali na bomoi. Salomo, mokonzi ya bwanya alobaki boye: “Mbwa ya bomoi eleki nkɔsi oyo ekufá.” (Mosakoli 9:4) Ya solo, soki ozali na makanisi malamu mpe ozali komesana na bomoi wana ya sika, yango ekoki kosalisa yo olekisa bobange na yo malamu.

Pesáká mersi