Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Juin 2015

 LISOLO YA BOMOI

Libula moko oyo eumeli mabota nsambo

Libula moko oyo eumeli mabota nsambo

Bato balobaka ete nakokaná na tata na ngai. Ndenge na ngai ya kotɛlɛma, miso mpe ndenge nasɛkisaka bato, nyonso wana eutá epai na ye. Kasi, atikelá biso mpe libula moko ya valɛrɛ mingi; elingi koloba mabota nsambo mobimba esaleli Yehova mpo na ye. Tiká nalimbolela bino naino.

Ngai ná tata tozali koyekola makambo etali libula ya libota na biso

Nkɔkɔ na ngai Thomas (1) * Williams abotamaki na mokolo ya 20/01/1815, na Angleterre. Mama na ye akufaki mbula mibale na nsima, yango wana, tata na bango John Williams abɔkɔlaki ye ná bandeko na ye misato. John apesaki Thomas formasyo ya mosala ya mabaya, kasi Thomas azalaki na mposa ya koyekola mosala mosusu.

Makambo ya mangomba ezongaki lisusu na Angleterre mobimba. Pastɛrɛ John Wesley alongwaki na eglize ya Angleterre mpo na kosala Lingomba ya Méthodiste, oyo ezalaki kolobela mingi boyekoli ya Biblia ya moto ye moko mpe kosakola. Mateya ya Wesley epalanganaki nokinoki mpenza mpe libota ya William ekɔtaki na lingomba yango. Thomas akómaki mosakoli na lingomba ya Wesley mpe amipesaki nokinoki na mosala ya misionɛrɛ na sudi ya Pasifike. Na sanza ya 07/1840, ye ná Mary, (2) mwasi oyo autaki kobala, bazwaki aviɔ mpe bakitaki na esanga Lakeba, * na Fidji, esanga moko oyo ebimisaka volka mpe na nsima bafandaki elongo na bato oyo balyaka bato.

KOFANDA ESIKA MOKO NA BATO OYO BALYAKA BATO

Na bambula ya liboso oyo Thomas ná Mary bafandaki na Fidji, bakutanaki na mikakatano makasi. Bazalaki kosala mosala na boumeli ya bangonga ebele na nse ya moi makasi mpe na mikakatano mpenza. Bakutanaki mpe na makambo ya nsɔmɔ mpenza, na ndakisa bitumba ya bana-mboka, kokamola nkingo ya basi oyo mibali bakufá, koboma babebe mpe kolya bato. Bato mingi ya mboka yango batɛmɛlaki mateya na bango. Mary ná mwana na ye ya liboso John, babɛlaki makasi pene na liwa. Na 1843, Thomas akomaki boye: “Nayokaki mpasi mingi na motema. . . . Nazalaki lisusu na elikya te.” Ata bongo, ye ná Mary bayikaki mpiko mpe kondima na bango epai ya Yehova Nzambe epesaki bango makasi.

Na nsima, Thomas asalelaki mayele na ye ya mosali-mabaya mpo na kotonga ndako ya liboso na Fidji, oyo modɛlɛ na yango ekokanaki na oyo ya Mpoto. Ndako yango ezalaki na etaje ya molai mpe na makambo mosusu oyo ebendaki likebi ya bato mosusu ya mboka yango. Mwa moke liboso ndako yango esila, Mary abotaki Thomas Whitton (3) Williams, mwana na ye ya mibale ya mobali, oyo azalaki nkɔkɔ na ngai.

Na 1843, Thomas, nkɔkɔ oyo ya liboso apesaki mabɔkɔ na kobongola evanzile ya Yoane na monɔkɔ ya Fidji, mosala oyo mpo na ye ezalaki pɛtɛɛ te. * Ata bongo, azalaki moto moko ya mayele oyo ayekolaka bizaleli ya bato mpe azalaki na likoki ya koyeba makambo ata ya mikemike kaka na kotala. Akomaki malamumalamu mpenza makambo oyo amonaki na  bolukiluki na ye na buku na ye [Fiji and the Fijians (1858)], oyo ezalaki na masolo ya bomoi ya bato ya Fidji ya siɛklɛ ya 19.

Mpo na mosala ya mpasi oyo asalaki na boumeli ya mbula 13 na Fidji, nsukansuka sante ya Thomas ebebaki mpe ye ná libota na ye bakendaki na Australie. Nsima ya kosala mosala ya Pastɛrɛ na boumeli ya bambula mingi, Thomas akufaki na engumba Ballarat, na etúká ya Victoria, na 1891.

“WOLO” NA WƐSTI

Na 1883, Thomas Whitton Williams ná mwasi na ye, Phoebe, (4) bamemaki libota na bango ya sika na Perth, na wɛsti ya Australie. Mwana na bango ya mibale, Arthur Bakewell (5) Williams nkɔkɔ oyo aboti nkɔkɔ ya tata azalaki na mbula 9.

Ntango Arthur akómaki na mbula 22, akómaki kosala na esika batimolaka wolo na boomtown na ntaka ya kilomɛtrɛ 600 na ɛsti ya Perth mpo na koluka mosolo. Atángaki kuna mwa mikanda oyo ebimisamaki na Bayekoli ya Biblia, oyo bakómá kobengama lelo Batatoli ya Yehova. Akómaki mpe kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona. Lokola asepelaki mingi na makambo oyo atángaki, Arthur akómaki koyebisa bato mosusu makambo ya sika oyo ayebaki mpe kotambwisa makita mpo na boyekoli ya Biblia. Lokola lisɛki, mosala yango ya Batatoli ya Yehova epalanganaki na wɛsti ya Australie.

Arthur ayebisaki mpe bato ya libota na ye makambo oyo azalaki koyekola. Tata na ye Thomas Whitton, apesaki lisangá ya Bayekoli ya Biblia mabɔkɔ, kasi mwa moke na nsima, akufaki. Mama na ye Phoebe ná baleki na ye ya basi, Violet ná Mary bakómaki mpe Bayekoli ya Biblia. Violet akómaki kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola. Arthur alobaki ete Violet azalaki “mpenza na molende koleka basakoli nyonso ya wɛsti ya Australie mpe azalaki kosala yango malamu mpe na motema moko.” Arthur azalaki kopona bilongi, kasi molende ya Violet ezalaki ndakisa malamu mpo na mabota ya Williams oyo elandaki.

Na nsima, Arthur abalaki mpe akendaki kofanda na Donnybrook, engumba moko na sudi-wɛsti ya wɛsti ya Australie epai bazalaki kolona banzete oyo ebimisaka mbuma. Kuna, bakómaki kobenga ye “Mobange ya ligboma 1914” mpo azalaki kosakola na molende bisakweli ya Biblia oyo ezalaki kolobela mbula yango. * Batikaki kosɛka ye ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki. Arthur azalaki mbala na mbala kosakwela bakiliya ya magazini na ye, epai azalaki kotanda mikanda oyo elimbolaka Biblia na fɛnɛtrɛ. Atyaki mpe na fɛnɛtrɛ yango elembo oyo emonisaki ete moto nyonso oyo akolonga komonisa ete liteya ya Bosato ezali solo; liteya oyo euti na Biblia te mpe oyo ye azalaki koboya yango mpenza, akopesa ye mosolo ya dolare 280. Ata moto moko te azwaki mbongo yango.

Ndako ya Williams na Donnybrook, ekómaki esika ya koyekola Biblia mpe kosala makita ya losambo. Na nsima, Arthur atongaki Ndako ya Bokonzi to esika ya losambo ya liboso na engumba yango na wɛsti ya Australie. Ata ntango akómaki na mbula koleka 70, azalaki kolata kazaka na ye ná kravati, azalaki komata likoló  ya mpunda na ye oyo apesaki yango nkombo Doll mpe azalaki kokende kosakola mosika na etúká mobimba ya Donnybrook.

Atako Arthur azalaki moto ya kimya mpe ya lokumu, molende na ye na mosala ya kosakola esimbaki mpenza mitema ya bana na ye. Mwana na ye ya mwasi Florence (6) asalaki mosala ya misionɛrɛ na Inde. Bana na ye ya mibali Lindsay (7) ná Thomas bazalaki bankulutu na boumeli ya ntango molai lokola tata na bango.

WILLIAMS MWASI MALAMU

Arthur Lindsay Williams, nkɔkɔ ya nkɔkɔ na ngai ayebanaki mpe balingaki ye mingi mpo na ezaleli na ye ya boboto. Azalaki kolekisa ntango na basusu mpe kosalela bango makambo na limemya. Azalaki mpe elombe ya kokata banzete, alongaki momekano oyo esalemaki na etúká na bango mbala 18 na boumeli ya mbula 12.

Kasi Arthur akamwaki mpenza te ntango Ronald (8) (nkɔkɔ na ngai ya mobali), mwana na ye ya mbula mibale akataki mwa nzete ya pɔme oyo ezalaki na nsima ya ndako na bango. Mama ya Ronald akangisaki mwa nzete yango malamumalamu mpe nsukansuka ebotaki bapɔme oyo ezalaki elɛngi mingi. Bakómaki kobenga yango pɔme ya Lady Williams mpe na pɔme yango, babimisaki lolenge mosusu ya pɔme ya rozɛ, moko ya lolenge ya bapɔme oyo bato mingi na mokili balingaka yango.

Ronald, to Gramp ndenge nabengaka ye, aponaki kosala mosala ya ntina mingi. Ye ná nkɔkɔ ya mwasi bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kotonga bisika ya losambo ya Batatoli ya Yehova na Australie mpe na Bisanga Salomon. Lelo oyo nkɔkɔ ya mobali azali na mbula soki 80 kasi azali nkulutu na lisangá mpe apesaka mabɔkɔ na mosala ya kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi na wɛsti ya Australie.

NAZWI LIBULA NA NGAI NA VALƐRƐ

Mpo na kobatela libula ya libota na biso, baboti na ngai Geoffrey (9) ná Janice (10) Williams, basalaki mosala makasi mpo na kosalisa ngai (12) ná leki na ngai ya mwasi Katharine (11) tózwaka batoli ya Biblia na valɛrɛ. Ntango nakómaki na mbula 13, ngai moko nakómaki kozwa batoli yango na valɛrɛ mpenza. Ntango nayanganaki na liyangani moko ya losambo, nayokaki ndenge John Barr, moko ya bandeko oyo batambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba alendisaki bilenge boye: “Bóbebisa te eloko ya motuya koleka oyo bozali na yango​—libaku ya koyeba mpe kolinga Yehova.” Na butu ya mokolo yango, namipesaki epai ya Yehova na libondeli. Mbula mibale na nsima, nakómaki kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola.

Lelo oyo, ngai ná mwasi na ngai Chloe, tolekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola na Tom Price, engumba moko ya mosika na nɔrdi-wɛsti ya wɛsti ya Australie epai batimolaka mabanga ya ntalo. Tosalaka mosala ndambo ya mokolo mpo na kokokisa bamposa na biso. Baboti mpe leki na ngai Katharine mpe mobali na ye, Andrew, balekisaka ngonga mingi na mosala ya kosakola na engumba Port Hedland, na ntaka ya bakilomɛtrɛ soki 420 na nɔrdi. Ngai ná tata tozali mpe bankulutu na lisangá.

Eleki sikoyo mabota nsambo, nkɔkɔ na ngai Thomas Williams azwaká ekateli ya kosalela Yehova Nzambe. Libula wana ya kondima na ye mpe mosala na ye ekómi tii epai na ngai. Namonaka mpenza ete ezali lipamboli kozala na libula ya valɛrɛ mingi ndenge wana ya koyeba Nzambe.

^ par. 5 Mitángo eyokani na bato oyo bazali na bililingi oyo elandi.

^ par. 6 Bazalaki kobenga yango kala esanga Lakemba, ezali na ngámbo ya ɛsti ya Fidji na etuluku ya Lau.

^ par. 10 Misionɛrɛ John Hunt abongolaki mikanda mingi ya Testama ya sika na monɔkɔ ya Fidji oyo ebimaki na 1847. Libongoli yango ezali kobenda likebi mpo esalelaki nkombo ya Nzambe “Jiova,” na Marko 12:36, Luka 20:42, mpe Misala 2:34.

^ par. 16 Talá apɛndisi ya lisolo “1914​—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia” na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova, ezali mpe na Internet na www.jw.org.