Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Mai 2015

 MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | YOZEFE

“Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?”

“Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?”

YOZEFE atɛlɛmi na jardin na ye ntango molili ebandi kokɔta. Ekoki kozala ete miso na ye ekei na banzete ya mbila, banzete mosusu oyo ebotaka mbuma, bapisini oyo ezali na milona oyo ekolaka na mai mpe ndako ya Farao ezali komonana na mosika na nsima ya efelo. Kanisá naino ndenge Yozefe azali koyoka na mosika mwa makelele oyo ezali kouta na kati ya ndako na ye; ndenge mwana na ye Manase azali kosakanisa leki na ye Efraime oyo azali naino bebe. Yozefe akokaki komona na makanisi nyonso oyo ezalaki koleka na kati ya ndako, ndenge mwasi na ye azali kosɛka ntango bana yango bazali kosakana. Asɛkaki mwa moke mpe amonaki ete apambolamaki mpenza.

Yozefe apesaki mwana na ye ya liboso nkombo Manase mpo elakisi kobosana. (Ebandeli 41:51) Na ntembe te, ndenge oyo Nzambe apambolaki ye na bambula oyo eutaki koleka, ekitisaki mpasi oyo Yozefe azalaki na yango ya kokanisa ndako na bango, bandeko mpe tata na ye. Koyina oyo bandeko na ye bayinaki ye ebongolaki mpenza bomoi na ye. Babɛtaki ye, balukaki koboma ye mpe batɛkaki ye lokola moombo epai ya bakomelesa oyo bazalaki na mobembo. Banda wana, akutanaki na makambo ndenge na ndenge ya mpasi na bomoi na ye. Na boumeli ya bambula soki zomi, azalaki moombo mpe na nsima akɔtaki bolɔkɔ​—na ntango moko boye, bakangisaki ye na bibende. Kasi sikoyo, akómi moto ya mibale nsima ya Farao mokonzi ya Ezipito, ekólo moko ya nguya! *

Na boumeli ya bambula mingi, Yozefe amonaki ndenge makambo esalemaki kaka ndenge Yehova alobaki. Ezipito ekɔtaki na eleko ya mbula nsambo ya bilei mingi ndenge esakolamaki mpe Yozefe akambaki misala ya kobomba na bamagazini bambuma oyo ezalaki kotikala. Na boumeli ya ntango yango, mwasi na ye Asenate abotelaki ye bana mibale ya mibali. Kasi, mbala mingi azalaki kaka kokanisa libota na ye oyo ezalaki mosika mpenza; mingimingi leki na ye Benyamina mpe tata na ye Yakobo oyo azalaki kolinga mingi. Ntango mosusu Yozefe azalaki komituna soki bazali malamu mpe na likama te. Ntango mosusu azalaki mpe komituna soki bayaya na ye batikaki ezaleli na bango ya mobulu to soki akoki kozongisa kimya mpe bomoko na libota na bango.

Soki kimya ya libota na bino ebebá mpo na likunya, koyina to kotɛka baninga, boye, okokani na Yozefe. Kondima ya Yozefe ekoki koteya biso nini na ndenge akipaki bato ya libota na ye?

“BÓKENDE EPAI YA YOZEFE”

Yozefe azalaki na mosala mingi mpe bambula ezalaki koleka nokinoki. Kaka ndenge Yehova amonisaki yango na ndɔtɔ oyo alɔtisaki Farao, mbula nsambo ya bilei mingi esilaki mpe mbongwana monene ekɔtaki. Milona ebotaki te! Eumelaki te nzala ekɔtaki na mikili nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Ezipito. Ndenge Biblia emonisi yango, ata bongo, “mampa ezalaki na mokili mobimba ya Ezipito.” (Ebandeli 41:54) Na ntembe te, likambo oyo Nzambe amonisaki Yozefe mpe ndenge atambwisaki makambo malamu, ememelaki bato ya Ezipito matomba.

Lokola Yozefe azalaki kaka na komikitisa, Yehova akobaki kosalela ye mingi

Bato ya Ezipito bamiyokaki lokola Yozefe akɔtisi bango nyongo mpe bakumisaki ye ndenge atambwisaki  makambo na bwanya mpenza. Ata bongo, Yozefe alingaki te ete bápesa ye lokumu kasi bápesa yango nde Yehova Nzambe na ye. Soki na komikitisa nyonso tosaleli makoki nyonso oyo tozali na yango na mosala ya Nzambe, akosalisa biso tósalela yango na ndenge oyo tokanisaki te.

Kasi na nsima, nzala ekɔtelaki mpe bato ya Ezipito. Ntango balelelaki Farao, ayebisaki bango boye: “Bókende epai ya Yozefe. Nyonso oyo akoloba na bino, bósala yango.” Na yango, Yozefe abandaki kofungola bamagazini nyonso oyo abombaki mbuma mpe bato bakómaki kosomba na kolanda mposa na bango.​—Ebandeli 41:55, 56.

Kasi nzala ekɔtaki mpe na mikili ya zingazinga. Na ebele ya bakilomɛtrɛ mosika na Kanana, libota ya Yozefe ezalaki konyokwama. Yakobo oyo akómaki mobange ayokaki ete mbuma ezali na Ezipito, yango wana ayebisaki bana na ye bákita kuna mpo na kosomba bilei.​—Ebandeli 42:1, 2.

Yakobo atindaki bana na ye 10, kasi Benyamina te. Yakobo abosanaki te mokolo oyo atindaki Yozefe mwana na ye oyo azalaki kolinga mingi akende kotala bandeko na ye. Ezalaká mokolo ya nsuka oyo amonaká mwana yango. Bayaya ya Yozefe bamemelaká Yakobo elamba kitoko oyo epasuká mpe etondá na makila, oyo apesaká Yozefe mpo na komonisa ete alingaki ye mingi. Bandimisaká mobange wana oyo motema ezokaki ete banyama ya zamba elyaki Yozefe.​—Ebandeli 37:31-35.

“NA MBALA MOKO YOZEFE AKANISAKI”

Nsima ya kosala mobembo molai, bana ya Yakobo bakómaki na Ezipito. Ntango batunaki esika ya kosomba mbuma, batindaki bango epai ya mokonzi moko monene ya guvɛrnema na nkombo Zafenate-panea. (Ebandeli 41:45) Ntango bamonaki ye, bayebaki nde ete ezalaki Yozefe? Ata moke te! Bamonaki ye kaka lokola mokonzi moko monene ya Ezipito, oyo bazalaki na mposa asalisa bango. Mpo na komonisa limemya, basalaki lokola bato nyonso: “Bagumbamaki liboso na ye, bilongi na nse.”​—Ebandeli 42:5, 6.

Bongo Yozefe? Ayebaki bandeko na ye mbala moko! Longola yango, ntango amonaki bango bafukameli ye, akanisaki lisusu bolenge na ye. Lisolo yango elobi ete “na mbala moko Yozefe akanisaki bandɔtɔ oyo alɔtaki” oyo Yehova alɔtisaki ye ntango azalaki naino elenge, ndɔtɔ oyo esakolaki eleko oyo bandeko na ye bakoya kofukamela ye mpe yango nde basali! (Ebandeli 37:2, 5-9; 42:7, 9) Yozefe alingaki kosala nini? Koyamba bango? Kozongisela bango mabe?

Yozefe ayebaki ete asengelaki te kosala makambo na nkanda, ata soki bazalaki ndenge nini. Ezali polele ete Yehova azalaki kotambwisa makambo wana nyonso mpo asengelaki kokokisa mokano na ye. Alakaki ete bana ya Yakobo bakokóma ekólo moko ya nguya. (Ebandeli 35:11, 12) Soki bandeko ya Yozefe bázalaka kaka mobulu, miyimi to mitema mabe, makambo oyo elingaki kobima na nsima elingaki kozala mabe mpenza! Lisusu, soki Yozefe asalaka likambo moko kozanga kokanisa, makambo elingaki kobeba lisusu, mbala mosusu alingaki kutu kotya bomoi ya tata na ye mpe ya Benyamina na likama. Bazalaki kutu na bomoi? Yozefe amonaki malamu báyeba ye te mpo ameka  bandeko na ye, atala soki bakómi bato ya ndenge nini. Na nsima, akoyeba oyo Yehova alingi ye asala.

Mbala mosusu likambo ya ndenge wana ekokómela yo te. Kasi, lelo oyo, matata mpe bokabwani ezali komonana na mabota mingi. Ntango tokutani na mikakatano ya ndenge wana, tokoki kosala oyo motema na biso elingi mpe kosala makambo na nkanda ndenge bomoto na biso ya kozanga kokoka etindi biso. Ezali malamu kolanda ndakisa ya Yozefe mpe koluka kososola ndenge oyo Nzambe alingi tósala na likambo boye to boye. (Masese 14:12) Kobosana te ete ndenge kaka ezalaka na ntina kozongisa kimya ná bato ya libota, kimya elongo na Yehova mpe Mwana na ye ezali na ntina mingi koleka.​—Matai 10:37.

“BOKOMEKAMA”

Mpo na koyeba oyo ezalaki na mitema ya bandeko na ye, Yozefe atyaki bango na komekama ndenge na ndenge. Abandaki naino na koloba na bango maloba makasimakasi na nzela ya moto oyo azalaki kobongola maloba na ye na monɔkɔ oyo bandeko na ye balobaka, afundaki bango ete bazali banɔngi. Mpo na komonisa ete bazali banɔngi te, bayebisaki ye makambo etali libota na bango mpe ntina oyo leki na bango ya nsuka atikalaki na ndako. Yozefe amekaki kobomba esengo na ye. Leki na ye azalaki mpenza na bomoi? Sikoyo Yozefe ayebaki ndenge akosala. Alobaki boye: “Na likambo oyo nde bokomekama” mpe na nsima ayebisaki bango ete asengeli komona leki na bango. Na nsima, andimaki bázonga na ndako na bango mpo na kozwa leki na bango soki moko na bango akondima kotikala mokangami.​—Ebandeli 42:9-20.

Ntango bandeko na ye bazalaki kosolola likambo yango bango na bango, kozanga koyeba ete Yozefe akokaki koyoka, bamipesaki foti mpo na lisumu monene oyo basalaki mbula 20 liboso. Balobaki boye: “Ya solo mpenza tozali na ngambo mpo na ndeko na biso, mpamba te tomonaki mpasi ya molimo na ye ntango azalaki kobondela biso ete tóyokela ye mawa, kasi toyokaki te. Yango wana mpasi oyo eyeli biso.” Yozefe ayokaki makambo oyo balobaki mpe abalukaki mpo bámona mai ya miso na ye te. (Ebandeli 42:21-24) Ata bongo, ayebaki ete kobongola motema ya solosolo esuki kaka te na koyoka mawa na mabe oyo ebimi na likambo oyo moto asalaki. Yango wana akobaki komeka bango.

Atikaki bango bázonga ndako mpe akangaki Simeone. Atindaki mpe bato na ye bátya mbongo oyo bandeko na ye basombaki bilei na basaki oyo bazongaki na yango ndako. Bandeko na ye bazongaki ndako mpe na mpasi mpenza, bandimisaki Yakobo apesa bango Benyamina bákende ná ye na Ezipito. Ntango bakómaki kuna, bayebisaki moto ya mosala ya Yozefe polele mpo na mbongo oyo bakutaki na basaki na bango, basɛngaki báfuta mbongo yango nyonso. Likambo yango ezalaki malamu mpenza, kasi Yozefe alingaki koyeba lisusu bomoto na bango ya solosolo. Asalelaki bango fɛti mpo báyeba mpenza te ete asepeli mpo amoni Benyamina. Na nsima, atikaki bango bázonga epai na bango, atyelaki bango lisusu bilei ebele, kasi na mbala oyo, atyaki kɔpɔ na ye ya palata na saki ya Benyamina.​—Ebandeli 42:26–44:2.

Na nsima Yozefe amonisaki polele motambo oyo atyelaki bango. Atindaki bálanda bandeko na ye, bákanga bango mpe báloba na bango ete bayibi kɔpɔ na ye. Ntango bamonaki kɔpɔ yango na saki ya Benyamina, bamemaki bango nyonso epai ya Yozefe. Sikoyo Yozefe azalaki na libaku ya koyeba soki bandeko na ye babongwanaki. Yuda nde azalaki koloba na esika na bango nyonso. Asɛngaki ayokela bango mawa, asɛngaki kutu ete bango nyonso 11 bákóma baombo na Ezipito. Yozefe alobaki ete kaka Benyamina nde asengeli kotikala moombo na Ezipito kasi bango nyonso bázonga epai na bango.​—Ebandeli 44:2-17.

Yuda alobaki maloba oyo ya kokamwa: “Atikalá kaka ye moko mwana ya mama na ye, mpe tata na ye alingaka ye mpenza.” Na ntembe te, maloba yango esimbaki mpenza motema ya Yozefe mpo azalaki mwana ya liboso ya Rashele, mwasi oyo Yakobo azalaki kolinga mingi, oyo akufaki ntango azalaki kobota Benyamina. Ndenge moko na tata na ye, Yozefe azalaki kokanisa Rashele mingi. Mbala mosusu yango nde esalaki ete alinga Benyamina mingi.​—Ebandeli 35:18-20; 44:20.

Yuda abondelaki Yozefe akómisa Benyamina moombo te. Asɛngaki kutu akóma moombo na esika ya Benyamina. Na nsima, asukisaki na maloba oyo ya kosimba motema: “Ndenge nini nakoki komata epai ya tata na ngai mpe mwana mobali yango  azala elongo na ngai te, kozanga ete namona mpasi oyo ekozwa tata na ngai?” (Ebandeli 44:18-34) Yango emonisaki ete abongwanaki mpenza. Amonisaki kaka te ete abongolaki motema kasi amonisaki mpe ezaleli ya komitya na esika ya basusu, kozanga moimi mpe motema mawa.

Yozefe amonaki ete bandeko na ye bayokaki mabe mpo na oyo basalaki ye

Yozefe akokaki lisusu kokanga motema te. Asengelaki kobimisa polele ndenge oyo azalaki komiyoka na motema. Abimisaki basaleli na ye nyonso, alelaki na mongongo makasi na boye ete makelele yango eyokanaki tii na ndako ya Farao. Na nsima, ayebisaki bango polele boye: “Ngai nazali Yozefe ndeko na bino.” Ayambaki bandeko na ye wana oyo babulunganaki mpe na boboto nyonso alimbisaki mabe nyonso oyo basalaki ye. (Ebandeli 45:1-15) Na ndenge yango, amonisaki ezaleli ya Yehova ya kolimbisa na motema mobimba. (Nzembo 86:5) Biso mpe tosalaka bongo?

“OZALI NAINO NA BOMOI”!

Ntango Farao ayokaki makambo nyonso oyo ebimisaki makelele wana na ndako ya Yozefe, asɛngaki Yozefe aya na tata na ye na Ezipito elongo na libota na ye mobimba. Eumelaki lisusu te, Yozefe amonanaki lisusu ná tata na ye oyo azalaki kolinga mingi. Yakobo alelaki mpe alobaki boye: “Mbala oyo nandimi kokufa, sikoyo lokola namoni elongi na yo, mpo ozali naino na bomoi.”​—Ebandeli 45:16-28; 46:29, 30.

Kutu, Yakobo aumelaki lisusu mbula 17 na Ezipito. Aumelaki mingi na bomoi mpe apambolaki bana na ye nyonso 12 na maloba oyo ezalaki mpe esakweli. Apesaki Yozefe mwana na ye ya 11 biteni mibale ya libula oyo mbala mingi bapesaka yango mwana ya liboso. Mabota mibale ya Yisraele ekouta epai na ye. Bongo Yuda, mwana na ye ya 4, oyo alekaki bandeko na ye ntango amonisaki ezaleli wana ya kobongola motema? Azwaki lipamboli moko monene: Masiya asɛngelaki kobima na libota na ye!​—Ebandeli mokapo 48 mpe 49.

Yakobo akufaki ntango azalaki na mbula 147, na ntango yango, bandeko ya Yozefe babangaki ete akozongisela bango mabe mpo azalaki mokonzi monene. Kasi Yozefe alobaki na bango na maloba ya kokitisa motema. Abongolaki makanisi na ye te mpo Yehova nde asalaki ete libota na ye eya na Ezipito, bandeko na ye basengelaki kotika komiyoka mabe mpo na oyo elekaki. Abakisaki motuna oyo ya kokamwa: “Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?” (Ebandeli 15:13; 45:7, 8; 50:15-21) Yozefe amonaki ete Yehova azali zuzi oyo abongi mpenza. Yozefe azalaki nani mpo na kopesa baoyo Yehova alimbisi etumbu?​—Baebre 10:30.

Ekómelá yo naino te omona mpasi mpo na kolimbisa? Ekoki kozala mpasi, mingimingi soki moto moko asali biso mabe na nko. Kasi soki tolimbisi na motema moko baoyo babongoli mpenza motema, ekosala ete mpasi na bango mpe oyo ya biso esila. Mpe tokomekola kondima ya Yozefe mpe ndakisa ya Yehova tata na ye ya motema mawa.

^ par. 4 Talá masolo “Mekolá kondima na bango” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2014; 01/11/2014 mpe 01/02/2015.

Makambo mosusu

BABUKU MPE MWA BABUKU

Mekolá kondima na bango

Matomba nini tokozwa sikoyo soki toyekoli masolo ya mibali mpe basi ya kondima oyo Biblia elobeli?