Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Mai 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Nsuka ya mokili ekómi pene?

Nsuka ya mokili ekómi pene?

Nzambe akotika bato bákoba kokonza baninga na bango bato mpe bátya avenire na bango na likama? Te, mpo ndenge tomoni yango, akokanga mabɔkɔ te, akosilisa bampasi mpe minyoko oyo eumeli ebele ya basiɛklɛ. Mozalisi ya mabele mpe ya bato alingi oyeba ete ntango yango ekómi pene. Ndenge nini asalisi biso tóyeba likambo yango ya ntina mingi?

Tózwa ndakisa oyo: Soki olingi kosala mobembo na motuka, okoki liboso kokɔta na Internet, kotala karte mpe makomi oyo ezali kolakisa esika ozali kokende. Na nzela, soki omoni bilembo oyo eyokani na oyo otángaki, motema na yo ekokita mpo okomona ete etikali moke okóma. Ndenge moko mpe, Nzambe apesi biso Liloba na ye oyo emonisi ndenge makambo ya mokili ezali kokende. Ntango tozali komona ndenge bilembo ya makambo yango ezali kokokisama, ezali kondimisa biso mpenza ete tozali na eleko oyo ezali komema na nsuka ya mokili.

Biblia emonisi ete mokili ekokóma na eleko oyo ekeseni na bileko mosusu nyonso, eleko ya likama mpenza oyo ekomema na nsuka ya mokili. Na ntango yango, makambo ndenge na ndenge oyo ekobima na mokili ekokesana mpenza na oyo bato bamoná na bileko mosusu nyonso. Tótalela mwa makambo oyo Biblia elobeli.

1. MAKAMBO YA MPASI NA MOKILI MOBIMBA Esakweli oyo ezali na Matai mokapo 24 etángi makambo oyo ekosalema na mabele, oyo ezali na kati ya elembo ya mikolo ya nsuka. Elembo yango ekomonisa “bosukisi ya makambo ya ntango oyo” mpe ekomema na eleko oyo “nsuka ekoya.” (Vɛrsɛ 3, 14) Na makambo yango, tokoki kotánga bitumba minene, nzala, koningana ya mabele na bisika ndenge na ndenge, makambo ya kobuka mibeko ekokóma mingi, bolingo ekozala te, bakonzi ya mangomba bakosalela mayele mabe mpo na kobungisa bato nzela. (Vɛrsɛ 6-26) Toboyi te, na lolenge moko to mosusu, makambo ya ndenge wana esalemaka banda bambula mingi. Kasi, wana nsuka ezali kokóma pene, makambo yango ekomonana nyonso na eleko yango ya likama mpenza. Ekomonana nzela moko na makambo misato oyo elandi.

2. BIZALELI YA BATO Biblia elobi ete na “mikolo ya nsuka” oyo ekomema na nsuka ya mokili, bizaleli ya bato ekobeba mpenza. Elobi boye: “Bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.” (2 Timote 3:1-4) Toboyi te, kozanga limemya ezali likambo ya sika te, kasi kaka na “mikolo ya nsuka” nde ezaleli yango ekoleka ndelo na boye ete ebongi mpenza kolobela eleko yango lokola “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” Omoni te ete bato mingi bakómi na bizaleli yango?

3. BATO BAZALI KOBEBISA MABELE Biblia elobi ete Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’ (Emoniseli 11:18) Na ndenge nini bato bazali kobebisa mabele? Biblia ekokanisi yango na eleko ya Noa; elobi boye: “Mabele ebebaki na miso ya Nzambe ya solo mpe mabele etondaki na mobulu. Bongo Nzambe atalaki mabele mpe, talá! yango ebebaki.” Na yango, Nzambe alobaki mpo na bato mabe yango boye: “Nazali kobebisa bango ná mabele elongo.” (Ebandeli 6:11-13) Omoni polele makambo oyo endimisi ete mobulu ezali se kotonda na mabele? Longola yango, bato bakómi na nivo moko oyo bakóma naino liboso te: Bakómi na likoki ya kobebisa mabele mpe koboma bato nyonso oyo bazali na mabele. Bazali na bibundeli na mabɔkɔ na bango. Mabele ezali mpe kobebisama na lolenge mosusu. Makambo oyo esalaka ete bomoi  ebatelama awa na mabele; na ndakisa mopɛpɛ oyo topemaka, banyama, milona mpe mbu ezali kobeba mpo bato bazali kosalela yango na ndenge ya mabe.

Omituna boye: ‘Na siɛklɛ oyo eleki, bato bazalaki mpenza na likoki ya kosala makambo ya ndenge wana?’ Kasi, lelo oyo bato bakómi na likoki yango, bazali kosala ebele ya bibundeli ya makasi mpe bakómi kobebisa mabele. Lokola mayele ya teknoloji ezali se kokola, bato bazali koyeba mpenza te makama oyo yango ekoki kobimisa to ndenge ya komibatela na yango. Kasi, avenire ya mabele ezali na mabɔkɔ ya bato te. Liboso bato bábebisa bikelamu oyo ezali na mabele, Nzambe alaki ete akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele!

4. MOSALA YA KOSAKOLA NA MABELE MOBIMBA Likambo mosusu ya elembo ya mikolo ya nsuka ezali ete mosala ya kosakola ekosalema na ndenge oyo esalemá naino liboso te: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Mosala yango ya kosakola ekokesana mpenza na mosala ya kosakola oyo mangomba mingi esalá na boumeli ya basiɛklɛ. Na boumeli ya mikolo ya nsuka, “nsango malamu oyo ya bokonzi” nde nsango mpenza oyo ekosakolama. Lingomba nini oyebi oyo emipesaka mpenza na kosakola nsango yango? Ata soki emonani ete bamosusu basakolaka nsango ya ndenge wana, bazali kosuka na yango kaka na esika bafandi to bazali kopalanganisa yango “esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso”?

Nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama na mokili mobimba na minɔkɔ ebele

Site Internet www.jw.org elobelaka mingi “nsango malamu oyo ya bokonzi.” Site yango ezali na mikanda oyo elimbolaka nsango yango na minɔkɔ koleka 700. Site nini mosusu oyebi elobelaka nsango malamu ya bokonzi mingi ndenge wana? Banda kala mpenza liboso Internet ebima, Batatoli ya Yehova bayebanaki mpo na milende na bango ya kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Banda 1939, ezipeli ya nimero mokomoko ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaka na maloba “Eyebisaka Bokonzi ya Yehova.” Buku moko oyo elobelaka makambo ya mangomba elobaki ete Batatoli ya Yehova basakolaka na “molende mpenza nsango yango na mokili mobimba koleka mangomba mosusu nyonso.” Litatoli yango elobelaka mingi nsango malamu oyo ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekosala ete ‘nsuka eya.’

ELEKO MOKO YA LIKAMA MPENZA NA BOMOI YA BATO

Omoni ndenge makambo minei nyonso oyo Biblia elobeli na lisolo oyo ezali komonana na mikolo  na biso? Esali mbula koleka 100, zulunalo oyo ezali kopesa batángi na yango bansango etali makambo oyo ezali koleka na mokili mpo na kosalisa bango báyeba ete nsuka ya mokili ezali kokóma pene. Kasi, atako bongo, bato mosusu ya ntembe baboyi kondima, bazali koloba ete makambo yango ezali makanisi ya bato mpe bakoki kobongisa yango mpo eyokana na mateya na bango. Balobaka mpe ete lokola kosolola na bato na mokili mobimba ezali lisusu mpasi te, yango nde ezali kosala ete makambo ya mokili ebeba se kobeba. Ata bongo, ezali na makambo mingi oyo ezali komonisa ete eleko oyo tozali ekeseni mpenza na bileko mosusu nyonso.

Bato mosusu ya mayele bazali komona ete etikali moke bambongwana minene esalema na mabele. Na ndakisa, na 2014, zulunalo moko (Bulletin of the Atomic Scientists) ekebisaki ebongiseli ya ONU oyo babengi Conseil de sécurité mpo na makama minene oyo ekotya bomoi ya bato na likama. Bato yango ya siansi balobaki boye: “Ndenge oyo totaleli likambo yango malamumalamu etindi biso tóloba ete makama oyo teknoloji ekobimisela bato ezali kaka mingi.” Bato mingi bazali se kondimisama ete tokómi na eleko moko ya likama mpenza na bomoi ya bato. Babimisi ya zulunalo oyo mpe bato mingi oyo batángaka yango bandimi mpenza ete eleko oyo ezali mpenza mikolo ya nsuka mpe ete nsuka ya mokili ekómi pene. Kasi, na esika obanga avenire, okoki nde kosepela na ndenge makambo ekosuka. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo okoki kobika!