Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Mai 2015

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Arkeoloji endimaka makambo oyo Biblia elobaka?

Sargon II, mokonzi ya Asiri oyo Yisaya 20:1 elobeli

Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Biblical Archaeology Review) elobaki ete makambo oyo bato ya arkeoloji bamoni endimisi ete “bato soki 50” oyo Makomami ya Ebre elobeli bazalaki mpenza na bomoi. Na kati ya bato yango, tokoki kotánga bakonzi 14 ya Yuda mpe Yisraele, ata mpe bakonzi oyo bayebani mingi lokola Davidi ná Hizikiya mpe baoyo bayebani mingi te lokola Menaheme ná Peka. Liste yango etángi mpe Bafarao 5 mpe bakonzi 19 ya Asiri, Babilone, Moabe, Perse mpe Siri. Ata bongo, kaka bakonzi te nde bankombo na bango ezali na Biblia mpe na makambo ya bato ya arkeoloji. Ezali mpe bongo mpo na bato oyo bayebani mingi te, lokola banganga-nzambe minene, bakomeli mpe bakonzi mosusu.

Lisolo yango elobi lisusu ete mpo na bato wana nyonso, “ebele ya bato ya mayele bandimi” ete bato yango bazalaki mpenza. Ya solo, Makomami ya Grɛki elobeli bato mingi oyo bayebani mpe ezali na makambo ya arkeoloji oyo endimi mingi ya bato yango; na ndakisa Erode, Ponse Pilate, Tibere, Kaifa mpe Sergiusi Paulusi.

Ntango nini bankɔsi ezalaki lisusu te na mikili oyo Biblia elobeli?

Briki ya ngɛlingɛli oyo batyá mayemi na Babilone

Atako lelo oyo bankɔsi ezalaka te na zamba ya Mabele Mosantu, kasi ndenge Makomami elobeli yango mbala soki 150 emonisi ete bato oyo bakomaki Biblia bayebaki nyama yango. Bavɛrsɛ yango mingi elobeli nyama yango na ndenge ya elilingi; kasi mwa ndambo elobeli bankɔsi mpenza oyo bato bakutanaki na yango. Na ndakisa, Biblia elobi ete Samsone, Davidi mpe Benaya babomaki bankɔsi. (Basambisi 14:5, 6; 1 Samwele 17:34, 35; 2 Samwele 23:20) Bankɔsi ebomaki mpe bato mosusu.​—1 Bakonzi 13:24; 2 Bakonzi 17:25.

Na ntango ya kala, nkɔsi ya Azia (Panthera leo persica) ezalaki na Azia Moke, Grɛsi tii Palestine, Siri, Mezopotamia mpe nɔrdi-wɛsti ya Inde. Lokola bato bazalaki kobanga mpe komemya yango, mbala mingi bato ya Proche-Orient bazalaki kosala mayemi ya nyama yango. Na Babilone, batyaki babriki ya ngɛlingɛli oyo ezalaki na mayemi ya bankɔsi na nzela na bango ya monene.

Balobaka ete bato oyo babundaki etumba babengi croisade babomaki bankɔsi na Palestine na nsuka ya siɛklɛ ya 12 ya ntango na biso. Emonani ete bankɔsi ezalaki lisusu te na esika yango mwa moke nsima ya siɛklɛ ya 13. Kasi, na Mezopotamia mpe Siri bankɔsi ezalaki tii na siɛklɛ ya 19 mpe ezalaki na Iran ná Iraq tii na ebandeli ya siɛklɛ ya 20.