Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Avril 2015

Bazwi eloko moko ya kala ya valɛrɛ mingi na esika ya salite

Bazwi eloko moko ya kala ya valɛrɛ mingi na esika ya salite

NINI ekoyela yo na makanisi soki balobeli esika moko oyo etondi na salite? Na ntembe te, okomona mbala moko fulu to esika ya nsolo mabe mpenza. Boye, okokanisa te ete eloko moko ya valɛrɛ mingi ekoki kozala na esika ya ndenge wana.

Kasi, eleki sikoyo siɛklɛ moko bamonaki eloko moko ya ndenge wana na esika ya salite. Eloko yango ezalaki te libanga moko ya ntalo kasi nde eloko mosusu ya valɛrɛ mingi mpenza. Ezalaki nini? Mpo na nini ezali na ntina mpo na biso lelo oyo?

BAMONAKI YANGO KOZANGA KOKANA

Na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, Bernard Grenfell ná Arthur Hunt, bato ya mayele na iniversite ya Oxford, basalaki mobembo na Ezipito. Bamonaki ebele ya biteni ya bapapirisi na kati ya ebele ya salite oyo ezalaki pene ya lobwaku ya ebale Nile. Na nsima, na 1920, ntango bango mibale bazalaki kosala liste ya biloko yango, Grenfell azwaki biteni mosusu ya bapapirisi oyo batimolaki yango na Ezipito. Azwaki yango mpo na Bibliotɛkɛ John Rylands, na Manchester, na Angleterre. Kasi, mibali yango mibale bakufaki liboso básilisa kosala liste yango.

Colin Roberts, moto mosusu ya mayele na iniversite ya Oxford asilisaki mosala yango. Ntango azalaki kosala liste ya biteni ya bapapirisi yango, amonaki eteni ya papirisi oyo molai na yango ezalaki santimɛtrɛ 9 mpe monene na yango santimɛtrɛ 6. Akamwaki mpo makomi ya Grɛki oyo bakomaki kuna ezalaki na maloba oyo ye ayebaki malamu. Ngámbo moko ezalaki na maloba oyo ezwami na Yoane 18:31-33. Ngámbo mosusu ezalaki na maloba oyo ezali na vɛrsɛ 37 mpe 38. Roberts amonaki mbala moko ete ezalaki eloko moko ya valɛrɛ mingi.

KOYEBA MBULA NA YANGO

Roberts amonaki lokola eteni ya papirisi yango esalaki bambula mingi mpenza. Mbula boni? Mpo na koyeba, akokanisaki makambo oyo bakomaki na mabɔkɔ, oyo ezalaki na papirisi yango ná oyo ya bamaniskri ya kala oyo dati na yango eyebani​—babengaka mayele yango paléographie. * Lokola asalelaki mayele yango, esalisaki ye ayeba mwa moke mbula oyo esali. Kasi azalaki na mposa ya koyeba mbula mpenza oyo yango esali. Yango wana, akangaki yango fɔtɔ mpe atindaki bakopi na yango epai ya bato misato ya mayele oyo bayekolaka bapapirisi mpe atunaki bango bápesa mbula oyo yango esali. Bato yango balobaki nini?

Ntango bayekolaki lolenge oyo maniskri yango ekomamaki mpe bilembo mosusu, bato yango misato ya mayele bandimaki ete eteni ya papirisi yango ekomamaki na eteni ya liboso ya siɛklɛ ya mibale ya ntango na biso; mwa bambula moke nsima ya liwa ya ntoma Yoane! Kasi, kaka paléographie te nde esalisaka mpo na koyeba mbula ya bamaniskri, moto mosusu ya mayele alobi ete mbala mosusu makomi yango ekomamaki na ntango moko boye na boumeli ya siɛklɛ ya mibale. Ata bongo, eteni moke ya papirisi yango ezali eteni ya maniskri oyo eumeli mingi koleka bamaniskri mosusu ya Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo bamoná.

ETENI YA PAPYRUS RYLANDS EMONISI NINI?

Mpo na nini eteni yango ya evanzile ya Yoane ezali na ntina mingi mpo na baoyo balingaka Biblia lelo oyo? Mpo na bantina soki mibale. Ya liboso, ndenge oyo eteni ya papirisi yango ezali esalisi biso tóyeba ndenge bakristo ya liboso bazalaki kozwa Makomami na valɛrɛ.

Mpo na nini eteni yango ya evanzile ya Yoane ezali na ntina mingi mpo na baoyo balingaka Biblia lelo oyo?

 Na siɛklɛ ya mibale ya ntango na biso, bato bazalaki kokoma na rulo mpe codex. Barulo ezalaki biteni ya papirisi to ya mposo ya nyama oyo bazalaki kokangisa yango mpo ekóma molai mpenza. Na nsima, bakokaki kolínga mpe kofungola yango soki balingi kotánga yango. Mingimingi bazalaki kokoma kaka na ngámbo moko ya rulo yango.

Kasi, eteni moke ya papirisi oyo Roberts amonaki ezalaki na makomi ngámbo nyonso mibale. Yango emonisi ete eutaki na codex kasi na rulo te. Bazalaki kosala codex na mposo ya nyama to papirisi oyo bazalaki kotonga yango mpe kogumba yango mpo ezala lokola buku.

Codex elekaki rulo na nini? Bakristo ya liboso bazalaki bapalanganisi ya nsango malamu. (Matai 24:14; 28:19, 20) Bapalanganisaki nsango ya Biblia esika nyonso oyo bakutaki bato; na bandako, na bazando mpe na balabala. (Misala 5:42; 17:17; 20:20) Na yango, kozala na Makomami oyo ezali lokola buku ezalaki malamu mingi mpo na kosalela.

Codex ezalaki mpe kosalisa masangá mpe bato básala bakopi na bango moko ya Makomami na pɛtɛɛ nyonso. Na ndenge yango, basalaki bakopi ya baevanzile mbala na mbala mpe na ntembe te, yango esalisaki mpo lisangá ya bokristo ekola nokinoki.

Eteni ya papirisi ya Rylands, liboso mpe nsima

Ya mibale, eteni ya papirisi ya Rylands ezali na ntina mpo na biso lelo oyo mpo ezali kondimisa biso ete makomi ya Biblia oyo tozali na yango lelo euti mpenza na makomi ya ebandeli ya Biblia. Atako eteni ya papirisi yango ezali kaka na mwa bavɛrsɛ ya evanzile ya Yoane, makomi na yango ezali ndenge moko na oyo totángaka lelo na Biblia. Eteni ya papirisi ya Rylands emonisi ete balongolaki to babakisaki te makambo mosusu na Biblia atako basalaki bakopi na yango mbala na mbala.

Toboyi te, eteni ya papirisi ya Rylands ya evanzile ya Yoane ezali kaka moko ya maniskri kati na ebele ya biteni ya bapapirisi mpe bamaniskri oyo endimisi ete bato oyo basalaki bakopi ya makomi ya ebandeli ya Biblia basalaki yango na bosembo mpenza. Na buku na ye The Bible as History, Werner Keller, asukisaki boye: “[Bamaniskri] yango ya kala ezali eyano oyo endimisi mpenza ete Biblia oyo tozali na yango lelo euti mpenza na makomi ya ebandeli ya Biblia.”

Kondima ya bakristo esimbami te na biloko oyo bato ya arkeoloji bamoni. Bandimaka ete “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” (2 Timote 3:16) Ata bongo, biloko ya kala ya valɛrɛ oyo bamoni ezali mpenza kokitisa motema mpe kondimisa mpenza oyo Biblia elobá banda kala ete: “Liloba ya Yehova ezali koumela libela na libela”!​—1 Petro 1:25.

^ par. 8 Buku Manuscripts of the Greek Bible, elobi ete paléographie “ezali siansi oyo eyekolaka makomi ya kala.” Na boumeli ya mwa ntango, lolenge ya kokoma na mabɔkɔ ebongwanaka. Mbongwana yango ekoki kosalisa mpo na koyeba mbula ya maniskri soki bakokanisi yango na mikanda mosusu oyo mbula na yango eyebani malamu.

Makambo mosusu

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Makambo oyo Biblia elobi mpo na bomoi ya Yesu ezali solo?

Talá makambo oyo ezali na Baevanzile mpe na maniskri ya kala mpenza.