Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Mars 2015

 MITUNA YA BATÁNGI . . .

Pasika ezali mpenza fɛti ya bakristo?

Pasika ezali mpenza fɛti ya bakristo?

Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobeli Pasika lokola “fɛti ya libosoliboso oyo bakristo basalaka mpo na kokanisa lisekwa ya Yesu Kristo.” Kasi, ezali mpenza fɛti ya bakristo?

Mpo na koyeba soki eloko moko ezali ya monyato te, esɛngaka kotalela ata makambo mikemike ya eloko yango. Ndenge moko mpe, mpo tóyeba soki Pasika ezali mpenza fɛti ya bakristo, ezali na ntina tótalela makambo mikemike ya fɛti yango.

Ya liboso, Yesu asɛngaki bayekoli na ye bákanisaka nde liwa na ye kasi lisekwa na ye te. Ntoma Paulo abengaki molulu yango “bilei ya mpokwa ya Nkolo.”​—1 Bakorinti 11:20; Luka 22:19, 20.

Lisusu, buku Britannica elobi ete mimeseno mingi ya Pasika “eyokani mpenza te” na lisekwa ya Yesu “kasi eutá nde na mimeseno ya bonkɔkɔ.” Na ndakisa, buku moko (The Encyclopedia of Religion) elobi boye mpo na maki mpe lapin oyo basalelaka na molulu yango: “Maki ezalaka elembo ya bomoi ya sika oyo ebimaka na mposo ya maki oyo ezalaka (makasi), oyo emonisaka liwa.” Ebakisi boye: “Lapin eyebanaki lokola nyama ya kokamwa oyo ebotaka mingi mpenza mpe ezalaki komonisa ebandeli ya eleko ya prɛnta.”

Philippe Walter, profesɛrɛ moko oyo ayekolaka babuku ya Moyen-Âge alimboli ndenge mimeseno ya ndenge wana ekɔtaki na fɛti ya Pasika. Akomaki boye: “Ntango bazalaki koluka kokómisa bapakano bakristo,” ezalaki mpasi te básangisa lisekwa ya Yesu na fɛti ya bapakano oyo bazalaki kosala mpo na kokanisa “kolongwa na kufa ya eleko ya malili mpo na koleka na kobotama ya eleko ya prɛnta.” Walter abakisi ete yango nde esalaki mpenza ete bákɔtisa “ekaniseli ya bakristo” na kalandriye ya bapakano mpo na kokómisa makambo pɛtɛɛ mpo ebele ya bato bakóma bakristo.

Ndenge wana ya “kokómisa bato bakristo” esalemaki te na ntango bantoma bazalaki naino na bomoi mpo bazalaki “kokanga nzela” mpo losambo ya bapakano ekɔta te. (2 Batesaloniki 2:7) Ntoma Paulo akebisaki ete nsima ya ‘kokende na ye’ mibali “bakobima mpe bakoloba makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Misala 20:29, 30) Na nsuka ya siɛklɛ ya liboso, ntoma Yoane akomaki ete mibali mosusu basí babandaki kobungisa bakristo mosusu nzela. (1 Yoane 2:18, 26) Nzela efungwamaki mpo mimeseno ya bapakano ekɔta na lingomba ya bokristo.

“Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te.”​—2 Bakorinti 6:14

Kasi, bato mosusu bakoki kokanisa ete kotika nzela na mimeseno mosusu ya Pasika ezalaki mabe te; esalisaki nde “bapakano” bákanga ntina ya lisekwa ya Yesu malamu koleka. Kasi, Paulo alingaki kondima yango ata moke te. Ata ntango azalaki kosala mibembo na ampire ya Roma mobimba epai mimeseno ya bapakano ezalaki mingi, asalelaki ata moko na yango te mpo na kosalisa bato báyeba Yesu malamu koleka. Kutu, akebisaki nde bakristo boye: “Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te. Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe kobuka mibeko? To pole ná molili esanganaka na nini? ‘Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo.’”​—2 Bakorinti 6:14, 17.

Makambo mikemike oyo totaleli na mokuse emonisi nini? Emonisi polele ete Pasika ezali fɛti ya bakristo te.