Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Mars 2015

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Kozala Moroma ezalaki na litomba mpo na ntoma Paulo?

Paulo alobaki ete: “Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”

Kozala Moroma ezalaki kopesa moto mwa lotomo ya kosala makambo mosusu mpe kozwa matomba mosusu na esika nyonso oyo akokende na ampire yango. Moroma azalaki na nse ya mibeko ya Baroma, kasi ya bingumba mosusu te. Soki bafundi ye, akokaki kondima básambisa ye na kolanda mibeko ya mboka yango, ata bongo, azalaki kaka na lotomo ya kokende kosamba na tribinale ya Roma. Soki bakateli ye etumbu ya liwa, azalaki na lotomo ya kosɛnga akende kosamba liboso ya amperɛrɛ.

Na kotalela lotomo yango, Cicéron, mokonzi moko ya Roma, na siɛklɛ ya liboso, liboso ya ntango na biso, alobaki boye: “Kokanga Moroma bansinga, kobɛta ye fimbo ezali mabe mpenza; kasi koboma ye ezali lokola koboma moboti to ndeko mpenza ya libota.”

Ntoma Paulo asakolaki mingi na ampire mobimba ya Roma. Na Makomami, ezali na mabaku misato oyo asalelaki lotomo na ye ya mwana-mboka ya Roma: (1) Ayebisaki bazuzi ya Filipi ete batosaki lotomo na ye te ndenge babɛtaki ye fimbo. (2) Na Yerusaleme, amonisaki ete azali Moroma mpo bábɛta ye fimbo te. (3) Asɛngaki asamba liboso ya Kaisala, oyo azalaki amperɛrɛ ya Roma, mpo ye moko ayoka ye.​—Misala 16:37-39; 22:25-28; 25:10-12.

Ndenge nini bazalaki kofuta babateli ya mpate na ntango ya kala?

Kɔntra moko ya kosomba bampate ná bantaba ya makomi ya cuneiforme, ya mobu soki 2050 L.T.B.

Yakobo abatelaki bampate ya nɔkɔ na ye Labana na boumeli ya mbula 20. Mbula 14 ya liboso Yakobo asalaki mosala yango mpo na kobala bana-basi mibale ya Labana mpe mbula 6 oyo etikali, Labana azalaki kofuta ye bibwɛlɛ mpo na mosala yango. (Ebandeli 30:25-33) Zulunalo moko (Biblical Archaeology Review) elobi boye: “Kɔntra ya kobɔkɔla bibwɛlɛ ndenge oyo Labana asalaki ná Yakobo ezalaki kosalema mingi epai ya bakomi mpe batángi ya kala ya makomi ya Biblia.”

Bakɔntra ya kala oyo bakundolaki na Nuzi, Larsa mpe bisika mosusu na Irak ezali bakɔntra ya ndenge wana. Kɔntra moko ekokaki kozala ya mbula mobimba. Babateli ya mpate bazalaki kondima mokumba ya kobatela motángo ya bibwɛlɛ oyo eyebani na kotalela mbula na yango to soki ezali basi to mibali. Mbula moko na nsima, nkolo bibwɛlɛ azalaki kozwa mwa lɛnɛ, miliki, bibwɛlɛ ya bana mpe biloko mosusu na kotalela ndenge bayokanaki. Nyonso oyo ezalaki kotikala ezalaki ya mobateli ya mpate.

Mpo bampate ekóma mingi, etalelaki motángo ya bampate ya basi oyo bapesi mobateli ya mpate. Bazalaki kozela ete bampate ya basi 100 ebota bana 80. Mobateli ya mpate asengelaki kosala nyonso mpo ata moko ezanga te. Yango wana, azalaki kosala nyonso mpo na kobatela bibwɛlɛ oyo bapesaki ye malamu mpenza.