Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Mars 2015

Makabo oyo ebongaki na Mokonzi

Makabo oyo ebongaki na Mokonzi

“Banganga-minzoto bauti na ɛsti . . . bafungolaki mpe biloko na bango ya motuya mpe bapesaki ye makabo: wolo, olibana ná mire.”​—Matai 2:1, 11.

OKOPONA likabo ya ndenge nini soki olingi kopesa moto moko ya lokumu? Na ntango ya kala, matiti mosusu ya nsolo kitoko ezalaki na valɛrɛ ndenge moko na wolo; lokola ezalaki na valɛrɛ mingi, ezalaki na kati ya makabo oyo bazalaki kopesa mokonzi. * Yango wana na makabo oyo banganga-minzoto bamemelaki “mokonzi ya Bayuda,” mibale na yango ezalaki matiti ya nsolo kitoko.​—Matai 2:1, 2, 11.

Mafuta ya balsame

Biblia elobi mpe ete ntango mokonzi-mwasi ya Sheba ayaki kotala Solomo, “apesaki mokonzi talanta nkama moko na ntuku mibale (120) ya wolo, ebele ya mafuta ya balsame ná mabanga ya ntalo; mpe mafuta ya balsame lokola oyo mokonzi-mwasi ya Sheba apesaki Mokonzi Salomo emonaná lisusu te.” * (2 Ntango 9:9) Bakonzi bazalaki mpe kotindela Salomo mafuta ya balsame mpo na komonisa ete basepeli na ye.​—2 Ntango 9:23, 24.

Mpo na nini matiti yango ya nsolo kitoko mpe biloko mosusu ya ndenge wana ezalaki na motuya mpe ntalo mingi na ntango ya kala? Mpo bazalaki kosala na yango makambo mingi ya ntina, na ndakisa kosala mafuta mpo na kobongisa loposo, kosalela yango na milulu ya losambo mpe na kokunda ebembe. (Talá etanda “ Ndenge oyo bazalaki kosalela matiti ya nsolo kitoko na ntango ya kala.”) Eloko ezalaki kosala ete ezala ntalo mingi ezalaki mpo bato mingi bazalaki na mposa na yango mpe mpo tike mpe piblisite na yango ezalaki kozwa mbongo mingi.

EKATISI ESOBE YA ARABIE

Kasia

Na ntango ya kala, matiti mosusu ya nsolo kitoko ezalaki kobota na lobwaku ya Yordani. Kasi, mosusu ezalaki kouta na bikólo mosusu. Biblia elobeli matiti ndenge na ndenge ya nsolo kitoko. Fololo safra, aloe, balsame, kinamono, olibana, mire nde eyebanaki mingi. Longola yango, ezalaki mpe na biloko mikemike oyo batyaka na biloko lokola kumini, manti mpe aneti.

Matiti wana ya nsolo kitoko ezalaki kouta wapi? Aloe, kasia mpe kinamono ezalaki kouta na bamboka oyo tobengaka lelo Chine, Inde mpe Sri Lanka. Matiti ya nsolo kitoko lokola mire mpe olibana ezalaki kouta na banzete mpe banzete mikemike oyo ezalaki kokóla na sudi ya Arabie tii na Somalie, na Afrika. Mpe narde ezalaki kaka na Himalaya, na Inde.

Safra

Mpo ekóma na Yisraele, matiti mingi ya nsolo kitoko ezalaki kokatisa Arabie. Mpo na yango, buku moko (The Book of Spices) elobi ete na boumeli ya mobu 2000 mpe mobu 1000 liboso ya ntango na biso, Arabie ekómaki “nzela kaka moko oyo biloko ezalaki koleka na Ɛsti mpo na kokende na Wɛsti.” Bingumba ya kala, bifelo mpe esika oyo bato ya mimbongo bazalaki kosuka, oyo bamonaki na Néguev na sudi ya Yisraele, emonisi banzela oyo bakomelesa ya matiti ya nsolo kitoko bazalaki koleka. Lapolo moko ya UNESCO emonisi ete bisika yango “ezali komonisa ete mombongo wana  oyo ezalaki kosalema kolongwa na sudi ya Arabie tii na Mediterane, ezalaki na benefisi mingi.”

“Atako ezalaki mikemike, ntalo makasi mpe bato bazalaki koluka yango mingi, matiti ya nsolo kitoko ezalaki biloko ya kotɛka oyo bato balingaki mingi.”​Buku The Book of Spices

Bakomelesa bazalaki komema mbala na mbala ebele ya matiti ya nsolo kitoko mpo na kosala mobembo ya bakilomɛtrɛ 1 800 mpo na kokatisa Arabie. (Yobo 6:19) Biblia elobeli molɔngɔ ya ebele ya Bayishimaele oyo bazalaki bakomelesa mpe bamemaki matiti ya nsolo kitoko lokola “ladanume mpe balsame mpe mposo ya nzete oyo ebimisaka mpaka” ya Gileade mpo na kokende na yango na Ezipito. (Ebandeli 37:25) Bana ya Yakobo batɛkaki ndeko na bango Yozefe lokola moombo epai ya bakomelesa yango.

“SEKELE YA MOMBONGO OYO EBATELAMAKI KOLEKA BASEKELE MOSUSU NYONSO”

Aneti

Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, kaka bakomelesa ya Arabie nde bazalaki kotɛka matiti ya nsolo kitoko. Na Azia mobimba, bango kaka nde bazalaki kotɛka matiti ya nsolo kitoko, lokola kasia mpe kinamono. Mpo na kolɛmbisa bato oyo bafandaka pembenipembeni ya Mbu Mediterane nzoto mpo básala te mombongo ya biloko oyo ezalaki kouta na Ɛsti, bato ya Arabie babimisaki masapo ya lokuta mpo na komonisa ete koluka kozwa matiti ya nsolo kitoko ezali na makama. Buku moko (The book of Spices) elobi ete esika mpenza matiti yango ya nsolo kitoko ezalaki kouta ekómaki “sekele ya mombongo oyo ebombamaki malamu koleka basekele mosusu nyonso.”

Kumini

Masapo nini bato ya Arabie bapalanganisaki? Herodote, moto moko ya istware ya siɛklɛ ya 5 liboso ya ntango na biso, alobelaki masapo ya bandɛkɛ ya nsɔmɔ oyo ezalaki kotonga bazumbu na yango na mposo ya nzete ya kinamono likoló ya ngomba oyo moto akokaki kokóma te. Mpo na kozwa matiti yango ya ntina mingi, akomaki ete esengelaki kotya biteni minene ya misuni na nse ya ngomba. Na lokoso nyonso, bandɛkɛ ezalaki komema ebele ya misuni yango na bazumbu  na yango, kilo ya misuni yango ezalaki kosala ete bazumbu yango ekwea na nse mpe epanzana. Na nsima, bato bazalaki kolɔkɔta nokinoki mposo ya nzete ya kinamono mpo na kotɛkela yango bakomelesa. Masapo ya ndenge wana epalanganaki mingi. Buku yango ebakisi ete mpo na “makama oyo babandaki koloba mpo na kozwa [kinamono] yango, esalaki ete etɛkama na ntalo mingi.”

Manti

Nsukansuka, sekele ya bato ya Arabie eyebanaki mpe bato mosusu bakómaki mpe kosala mombongo yango. Na siɛklɛ ya liboso liboso ya ntango na biso, Alexandrie, na Ezipito, ekómaki libongo ya monene mpe esika oyo mombongo ya matiti ya nsolo kitoko ezalaki kosalema mingi. Ntango bakapitɛni ya bamasuwa ya Roma bayebaki ndenge ya kotambwisa bamasuwa na ntango ya mbula makasi mpe mipɛpɛ makasi ya Mbu Indien, bakómaki kokatisa mabongo ya Ezipito mpo na kokende na Inde. Yango esalaki ete matiti ya nsolo kitoko ekóma ebele mpe ntalo na yango ekita.

Lelo oyo, valɛrɛ na yango ekokani ata moke te na oyo ya wolo. Mpe ezali mpasi tómona ete ezali likabo oyo ebongi kopesa mokonzi. Kasi, bamilio ya bato na mokili mobimba bazali kokoba kosalela yango mpo na kosala bamalasi mpe bankisi; mpe mpo na kobakisa elɛngi na biloko na bango ya kolya. Na ntembe te, nsolo kitoko ya matiti yango esali ete eyebana mingi lelo oyo, kaka ndenge ezalaki eleki sikoyo bankóto ya bambula.

Kinamono

^ par. 3 Na Biblia, liloba oyo babongoli na “matiti ya nsolo kitoko” emonisaka mingimingi matiti oyo bazwaka na banzete oyo ebimisaka nsolo kitoko, kasi te biloko mikemike oyo batyaka na biloko mpo na kopesa yango elɛngi.

^ par. 4 “Mafuta ya balsame” emonisaka mafuta ya nsolo kitoko to mpaka oyo eutaka na banzete mpe banzete mikemike.