Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Mars 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | YESU ABIKISI BISO​—NA NINI?

Liwa mpe lisekwa ya Yesu​—Ekoki komemela yo nini?

Liwa mpe lisekwa ya Yesu​—Ekoki komemela yo nini?

“Ndimelá Nkolo Yesu mpe okobika.”​—Misala 16:31.

Ntoma Paulo mpe Silasi balobaki maloba yango oyo eyebani mingi epai ya mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ na engumba Filipi, na Masedonia. Maloba yango elimboli nini? Mpo tóyeba mpenza ndenge oyo kondimela Yesu ekoki kobikisa biso na liwa, tosengeli liboso koyeba mpo na nini tokufaka. Tótala naino oyo Biblia eteyaka.

Nzambe akelaki bato te mpo bákufaka

“Mpe Yehova Nzambe akamataki moto mpe atyaki ye na elanga ya Edene mpo na kolona yango mpe kobatela yango. Lisusu Yehova Nzambe apesaki moto etinda oyo: ‘Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.’”​—Ebandeli 2:15-17.

Nzambe atyaki Adama, mobali ya liboso na elanga ya Edene, paradiso oyo etondaki na banyama mpe banzete ya kitoko. Ezalaki na banzete oyo ebotaka mbuma, oyo Adama akokaki kolya ndenge alingi. Kasi, Yehova Nzambe apekisaki Adama polele mbuma ya nzete moko mpe akebisaki ye ete soki alei yango, akokufa.

Adama akangaki ntina ya mobeko yango? Ayebaki soki liwa ezali nini mpo azalaki komona ndenge banyama ezalaki kokufa. Soki Nzambe asalaki Adama mpo na nsima akufaka, mbɛlɛ likebisi wana elingaki kozala na ntina te. Kutu, Adama ayebaki ete soki atosi Nzambe mpe alei te mbuma ya nzete yango, akozala na bomoi libela na libela; akokufa te.

Bato mosusu balobaka ete mbuma oyo balyaki ezalaki nde kosangisa nzoto, kasi ekoki kozala bongo te. Kutu, Yehova alingaki ete Adama ná mwasi na ye Eva ‘bábota mpe bákóma mingi’ mpe ‘bátondisa mabele mpe bátya yango na nse na bango.’ (Ebandeli 1:28) Mobeko yango etalelaki nzete ya solo mpenza. Yehova abengaki yango “nzete ya koyeba malamu ná mabe” mpo na komonisa ete ye nde azali na lotomo ya koyebisa bato oyo ezali malamu to mabe. Soki Adama alyaka te mbuma ya nzete yango, alingaki komonisa botosi mpe botɔndi epai ya Moto oyo akelaki ye mpe apambolaki ye mingi mpenza.

 Adama akufaki mpo atosaki Nzambe te

“Mpe [Nzambe] alobaki na Adama ete: ‘Lokola . . . olei mbuma ya nzete oyo napesaki yo etinda oyo, . . . na motoki ya elongi na yo okolya limpa kino okozonga na mabele, mpo outaki na yango. Mpamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu.’”​—Ebandeli 3:17, 19.

Adama alyaki mbuma ya nzete oyo bapekisaki ye. Kozanga botosi na ye ezalaki likambo ya lisɛki te. Ezalaki botɔmbɔki, atyolaki mpenza makambo nyonso ya malamu oyo Yehova asalelaki ye. Ndenge alyaki mbuma ya nzete yango, Adama aboyaki Yehova, alingaki lipanda mpe yango ebimisaki makambo mabe mpenza.

Kaka ndenge Yehova alobaki, nsukansuka Adama akufaki. Nzambe asalaki Adama “na putulu ya mabele” mpe ayebisaki ye ete ‘akozonga na putulu.’ Adama akómaki na bomoi ya lolenge mosusu te to akendaki kofanda na esika mosusu. Ntango akufaki, azalaki lisusu na bomoi te lokola putulu epai autaki.​—Ebandeli 2:7; Mosakoli 9:5, 10.

Tokufaka mpo toutá na Adama

“Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.”​—Baroma 5:12.

Mabe oyo kozanga botosi ya Adama to lisumu oyo asalaki ebimisaki, esukaki kaka epai na ye moko te. Ntango asalaki lisumu, Adama abungisaki kaka bomoi na ye moko te to ya biso oyo ezalaka soki mbula 70 to 80, kasi mpe elikya ya kozala na bomoi ya seko. Longola yango, ntango Adama asalaki lisumu, azalaki lisusu moto ya kokoka te mpe akokaki te kobota bana ya kokoka.

Biso nyonso tozali bana ya Adama. Kozanga ete tólinga, tokómá bato ya kozanga kokoka mpo na ye mpe nzoto yango ememaka biso na masumu mpe nsukansuka na liwa. Paulo amonisaki malamu ndenge nzoto na biso ezalaka. Akomaki boye: “Ngai nazali na nzoto ya mosuni, natɛkamá mpo nazala moombo ya lisumu. Ngai moto ya mawa! Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali komema ngai na liwa?” Na nsima, Paulo ayanolaki na motuna na ye boye: “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso!”​—Baroma 7:14, 24, 25.

 Yesu apesaki bomoi na ye mpo biso tózwa bomoi ya seko

“Tata atindi Mwana na ye azala Mobikisi ya mokili.”​—1 Yoane 4:14.

Yehova Nzambe azwaki bibongiseli mpo na kosilisa makambo mabe oyo lisumu ebimisá mpe kolongola biso na etumbu ya liwa ya seko. Ndenge nini? Atindaki Mwana na ye oyo alingaka mingi aya kobotama moto ya kokoka awa na mabele lokola Adama. Kasi, na kokesana na Adama, Yesu “asalaki lisumu te.” (1 Petro 2:22) Lokola azalaki moto ya kokoka, etumbu ya liwa ezalaki mpo na ye te mpe akokaki kozala na bomoi libela na libela.

Ata bongo, Yehova atikaki nzela ete banguna na ye báboma Yesu. Mikolo misato na nsima, Yehova asekwisaki ye na nzoto ya elimo mpo azala na likoki ya kozonga na likoló. Na likoló, Yesu alakisaki Nzambe valɛrɛ ya bomoi na ye ya kokoka oyo apesaki mpo na kosomba oyo Adama abungisaki mpo na ye moko mpe bana na ye. Yehova andimaki mbeka yango mpe asalaki ete na nzela na yango, moto nyonso oyo akomonisa kondima epai ya Yesu azwa bomoi ya seko.​—Baroma 3:23, 24; 1 Yoane 2:2.

Na ndenge yango, Yesu asombaki oyo Adama abungisaki. Anyokwamaki mpe akufaki mpo biso tózwa bomoi ya seko. Biblia elobi boye: “Yesu . . . anyokwamaki mpe akufaki, mpo, na nzela ya boboto monene ya Nzambe, akufela moto nyonso.”​—Baebre 2:9.

Likabo yango emonisi makambo mingi mpo na Yehova. Bosembo na ye ya kokoka esalaki ete ezala mpasi mpo bato ya kozanga kokoka bámilongola na etumbu ya liwa. Kasi, bolingo mpe motema mawa na ye etindaki ye akokisa makambo oyo ye moko asɛngaka ata soki ekosɛnga apesa eloko ya motuya mpenza; elingi koloba kopesa Mwana na ye moko mpo tólongwa na etumbu ya liwa.​—Baroma 5:6-8.

Yesu asekwaki, bato mosusu mpe bakosekwa

“Kristo alamuki uta na bakufi, mbuma ya liboso ya baoyo balali na kati ya liwa. Mpo lokola liwa eyei na nzela ya moto moko, lisekwa ya bakufi eyei mpe na nzela ya moto moko. Mpo kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.”​—1 Bakorinti 15:20-22.

Ntembe ezali te ete Yesu azalaki na bomoi mpe akufaki, kasi ezali mpenza na likambo oyo endimisi ete asekwaki? Likambo mpenza oyo endimisi ete Yesu asekwaki ezali ndenge abimelaki bato ebele na mabaku ndenge na ndenge mpe na bisika ekeseni. Na mbala mosusu, abimelaki bato koleka 500. Ntoma Paulo akomaki yango na mokanda na ye epai ya Bakorinti, amonisaki ete bamosusu oyo bamonaki likambo yango bazalaki naino na bomoi, mpo na komonisa ete bakokaki kopesa litatoli ya makambo oyo bamonaki mpe bayokaki.​—1 Bakorinti 15:3-8.

Na yango, ntango Paulo akomaki ete Kristo azali “mbuma ya liboso” ya baoyo bakosekwa, amonisaki ete bamosusu mpe basengelaki kosekwa na nsima. Yesu ye moko alobaki ete ntango ekoya wana “baoyo nyonso bazali na kati ya malita . . . bakobima.”​—Yoane 5:28, 29.

 Mpo tózwa bomoi ya seko, tosengeli komonisa kondima epai ya Yesu

“Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”​—Yoane 3:16.

Mikapo ya liboso ya mokanda ya liboso ya Biblia emonisi ndenge liwa ekɔtaki na mokili mpe paradiso ebungaki. Mikapo ya nsuka ya mokanda ya nsuka ya Biblia elobeli ntango oyo liwa ekosilisama makasi mpe Nzambe akozongisa paradiso na mabele. Na nsima, bato bakozala na bomoi ya esengo libela na libela. Emoniseli 21:4 elobi boye: “Liwa ekozala lisusu te.” Mpo na komonisa ete ebongi mpenza kotyela elaka yango motema, vɛrsɛ 5 ebakisi boye: “Maloba oyo ezali sembo mpe solo.” Yehova azali mpenza na likoki ya kosala nyonso oyo alaki.

Ondimi ete “maloba oyo ezali sembo mpe solo”? Boye, yekolá makambo mingi etali Yesu mpe monisá kondima epai na ye. Soki osali bongo, Yehova akondima yo. Akopambola yo lelo oyo mpe akopesa yo elikya ya bomoi ya seko na paradiso awa na mabele, epai “liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”

Makambo mosusu