Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Février 2015

 MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | YOZEFE

“Nzambe nde alimbolaka makambo, boye te?”

“Nzambe nde alimbolaka makambo, boye te?”

YOZEFE azali kotambola na kulware ya molili, atɔki mingi mpo na mosala makasi oyo azali kosala na bolɔkɔ mpe mpo molunge ezali makasi. Na libándá, moi engali makasi. Emonani lokola ete ayebi babriki mokomoko oyo ezali na esika yango mpe bisika nyonso oyo bifelo esali banzela. Esika mosusu ya kokende ezali te. Atako azalaki na lokumu mingi na esika yango, kasi azalaki kaka moto ya bolɔkɔ.

Na ntembe te, azali kokanisa bomoi oyo azalaki na yango na Hebrone epai azalaki koleisa bampate ya tata na ye na bangomba milai ya mabangamabanga! Azalaki na mbula 17 ntango tata na ye Yakobo atindaki ye na mobembo oyo esɛngaki atambola bakilomɛtrɛ ebele kolongwa na ndako na bango. Kasi, sikoyo azali lisusu na bonsomi ya ndenge wana te. Bandeko ya Yozefe bayokelaki ye zuwa, bayinaki ye makasi mpe na nsima, batɛkaki ye lokola moombo. Bakitaki na ye na Ezipito, epai asalaki liboso na ndako ya Potifare, mokonzi moko ya Ezipito. Patrɔ ya Yozefe azalaki na konfianse na ye tii ntango mwasi ya Potifare akoselaki ye makambo ete alingaki kosangisa na ye nzoto na makasi mpe yango nde esalaki ete bákɔtisa ye bolɔkɔ. *​—Ebandeli, mokapo 37, 39.

Yozefe azali sikoyo na mbula 28, ekokisi mbula soki 10 banda akóma moombo mpe azali na bolɔkɔ. Akanisaki te ete bomoi na ye ekokóma boye. Akozwa bonsomi mokolo mosusu? Akomona lisusu tata na ye ya mobange to Benyamina, leki na ye oyo alingaka mingi? Tii ntango boni akozala kaka na bolɔkɔ oyo?

Ekómelá yo naino te omiyoka lokola Yozefe? Na bantango mosusu bomoi na biso ezalaka kaka te ndenge tozalaki kokanisa ntango tozalaki naino bilenge. Makambo ya mpasi ekoki kobakisama mpe kozala mpasi kozwela yango solisyo to koyikela yango mpiko. Tótala naino liteya oyo tokoki kozwa na kondima ya Yozefe.

“YEHOVA AZALAKI KAKA ELONGO NA YOZEFE”

Yozefe ayebaki ete Yehova, Nzambe na ye abosanaki ye soki moke te, mpe na ntembe te, boyebi yango nde esalisaki ye ayika mpiko. Ata na bolɔkɔ oyo ya bapaya, Yehova azwaki mabaku ya kopambola Yozefe. Na yango, Biblia elobi boye: “Yehova azalaki kaka elongo na Yozefe mpe azalaki komonisela ye motema boboto mpe kosala ete andimama na miso ya kapita-mokonzi ya ndako ya bolɔkɔ.” (Ebandeli 39:21-23) Lokola Yozefe azalaki kaka kosala mosala makasi, akobaki kopesa Yehova nzela ya kopambola ye. Koyeba ete Yehova azalaki na ye ntango nyonso, ezalaki kobɔndisa ye mpenza!

Yehova alingaki ete Yozefe atikala na bolɔkɔ yango libela? Yozefe ayebaki mpenza te mpe na ntembe te, akobaki koyebisa Yehova likambo yango na libondeli. Kaka ndenge ekómelaki ye mbala mingi, azwaki eyano na ndenge oyo akanisaki te. Mokolo moko, mwa loyenge ekɔtaki na bolɔkɔ ntango bato mibale oyo bazalaki kosala na ndako ya Farao babakisamaki. Moko ezalaki mosali-mampa ya mokonzi mpe mosusu mopesi-masanga.​—Ebandeli 40:1-3.

Kapita ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi apesaki Yozefe mokumba ya kokipe bato yango mibale, oyo bazalaki liboso mibali ya lokumu. * Butu moko,  bato yango balɔtaki moto na moto ndɔtɔ moko ya nsɔmɔ mpenza. Ntango Yozefe amonaki bango na ntɔngɔ, amonaki ete likambo moko ezali kotungisa bango. Yango wana, atunaki bango boye: “Mpo na nini bilongi na bino ezali mawamawa lelo?” (Ebandeli 40:3-7) Ekoki kozala ete boboto na ye nde esalaki ete mibali yango bábanga te koyebisa ye likambo oyo ezalaki kotungisa bango. Yozefe ayebaki te ete lisolo yango ekobongola mpenza bomoi na ye. Soki Yozefe atyelaka mibali wana mibale likebi te, balingaki kosolola te, boye te? Likambo oyo asalaki ekoki kotinda biso tómituna boye: ‘Natyelaka basusu likebi mpo na komonisa kondima na ngai epai ya Nzambe?’

Yozefe asalelaki baninga na ye ya bolɔkɔ makambo na boboto mpe na limemya

Mibali yango mibale balobaki ete bandɔtɔ ya nsɔmɔ oyo balɔtaki nde ezalaki kobangisa bango mpe mpo moto ya kolimbolela bango yango azalaki te. Baezipito bazalaki kozwa bandɔtɔ na valɛrɛ mingi mpe motema na bango mobimba ezalaki epai ya moto oyo akokaki kolimbolela bango yango. Mibali yango bayebaki te ete bandɔtɔ na bango eutaki epai ya Yehova, Nzambe ya Yozefe. Kasi Yozefe ayebaki yango. Akitisaki bango motema na maloba oyo: “Nzambe nde alimbolaka makambo, boye te? Nabondeli bino, bóyebisa ngai [ndɔtɔ] yango.” (Ebandeli 40:8) Tii lelo oyo maloba ya Yozefe ezalaka na ntina mingi epai ya baoyo nyonso bayekolaka Biblia na motema mobimba. Elingaki kozala malamu soki moto nyonso oyo asambelaka azalaka na komikitisa ya ndenge wana! Tosengeli kolongola makanisi ya lolendo oyo bato bazalaka na yango mpe kotalela Nzambe ntango tozali koluka bandimbola oyo ebongi ya Liloba na ye.​—1 Batesaloniki 2:13; Yakobo 4:6.

Mopesi-masanga nde abandaki. Ayebisaki Yozefe ndɔtɔ oyo etali nzete ya vinyo ya bitape misato ya mikemike oyo ezalaki na bituka ya mbuma. Bambuma yango etelaki mpe mopesi-masanga akamolaki mai na yango na kɔpɔ ya Farao. Na lisalisi ya Yehova, Yozefe ayebaki mbala moko ndimbola ya ndɔtɔ yango. Ayebisaki mopesi-masanga ete bitape misato elimboli mikolo misato; nsima ya mikolo yango Farao akozongisa ye na mosala oyo azalaki kosala. Motema ya moto yango ekitaki, mpe Yozefe asɛngaki lisusu moto yango boye: “Nabondeli yo, osengeli komonisela ngai motema boboto mpe kotánga ngai epai ya Farao.” Yozefe alobaki ete bakangaki ye na makasi na mboka na ye mpe bakɔtisaki ye bolɔkɔ mpo na likambo oyo asalaki te.​—Ebandeli 40:9-15.

Nsango malamu yango elendisaki kapita ya basali-mampa mpe asɛngaki Yozefe alimbolela ye ndɔtɔ na ye oyo etali kitunga misato ya mampa mpe bandɛkɛ oyo ezalaki kolya na moko ya kitunga oyo ezalaki na motó na ye. Yehova apesaki mpe Yozefe ndimbola ya ndɔtɔ yango. Kasi, ezalaki nsango malamu te mpo na kapita ya basali-mampa. Yozefe alobaki boye: “Talá ndimbola na yango: Kitunga misato ezali mikolo misato. Nsima ya mikolo misato banda lelo, Farao akotombola motó na yo, akolongola yango mpe akokakisa yo na nzete; mpe bandɛkɛ ekolya mosuni na yo.” (Ebandeli 40:16-19) Ndenge moko na basaleli nyonso ya sembo ya Nzambe, Yozefe amonisaki na mpiko mpenza bansango ya Nzambe, ezala ya malamu to oyo etali kopesa bitumbu.​—Yisaya 61:2.

Nsima ya mikolo misato, maloba ya Yozefe ekokisamaki. Farao asalisaki fɛti ya mbotama na ye;  momeseno oyo ezalaki te epai ya basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, mpe ayebisaki bikateli oyo azwelaki basaleli na ye mibale. Kapita ya basali-mampa abomamaki mpe mopesi-masanga azongaki na mosala na ye kaka ndenge Yozefe alobaki. Likambo ya mawa, moto yango abosanaki Yozefe.​—Ebandeli 40:20-23.

“EZALI NGAI TE!”

Mbula mibale mobimba elekaki. (Ebandeli 41:1) Kanisá naino ndenge Yozefe alɛmbaki nzoto! Mbala mosusu akómaki na elikya makasi ntango Yehova apesaki ye ndimbola ya bandɔtɔ wana ya nsɔmɔ oyo kapita ya bapesi-masanga mpe ya basali-mampa ya Farao balɔtaki. Na nsima, ntɔngɔ nyonso, Yozefe azalaki kolamuka na likanisi ete akobima na bolɔkɔ kasi eloko moko ebongwanaki te. Mbula mibale wana ezalaki ya mpasi mingi koleka bambula nyonso oyo Yozefe alekisaki na bolɔkɔ mpo ayikela yango mpiko. Ata bongo, atikaki ata moke te kotyela Nzambe na ye Yehova motema. Na esika alɛmba nzoto, azalaki na ekateli ya koyika mpiko mpe alongaki ntango wana ya mpasi na mpiko mpenza.​—Yakobo 1:4.

Na ntango ya mpasi ndenge wana, nani kati na biso akozala te na mposa ya koyika lisusu mpiko makasi? Mpo tólonga mikakatano ya bomoi, tozali na mposa ya kozala na ekateli, motema molai mpe kimya ya motema oyo Nzambe kaka nde akoki kopesa biso. Ndenge asalaki epai ya Yozefe, akoki mpe kosalisa biso tóbundisa ezaleli ya kolɛmba nzoto mpe tókangama na elikya na biso.​—Baroma 12:12; 15:13.

Ata soki kapita ya bapesi-masanga abosanaki Yozefe, kasi Yehova abosanaki ye te. Butu moko, alɔtisaki Farao bandɔtɔ mibale oyo akokaki kobosana yango te. Na ndɔtɔ ya liboso, amonaki bangɔmbɛ nsambo oyo ezalaki kitoko mingi mpe mafutamafuta eutaki na ebale Nile mpe bangɔmbɛ mosusu nsambo ya mabe mpenza mpe ekɔndakɔndá ebandaki komata nsima na yango. Oyo ekɔndakɔndá ezalaki kolya oyo ya mafutamafuta. Na nsima, Farao alɔtaki lisusu mitó nsambo ya mbuma ya kosala farini oyo ebimaki na nzete kaka moko. Kasi na nsima, mitó mosusu nsambo ya mbuma ya kosala farini oyo ekɔndakɔndá ebandaki komɛla oyo ya kitoko. Na ntɔngɔ, ntango Farao alamukaki, atungisamaki mingi mpo na bandɔtɔ yango, yango wana abengisaki bato nyonso ya mayele mpe banganga-nzambe nyonso ya Ezipito oyo basalelaka maji mpo bálimbolela ye yango. Moko te alongaki. (Ebandeli 41:1-8) Toyebi te soki ezalaki mpo bandɔtɔ yango elekelaki bango to mpo bayaki na makanisi ndenge na ndenge oyo eyokanaki te. Ezala ndenge nini, Farao alɛmbaki nzoto; kasi azalaki kaka na mposa makasi ya kozwa ndimbola ya bandɔtɔ wana ya kokamwa.

Nsukansuka, kapita ya bapesi-masanga akanisaki Yozefe! Lisosoli na ye etungisamaki mpenza mpe ayebisaki Farao mpo na elenge mobali wana ya bwanya mpenza oyo azalaki na bolɔkɔ, oyo alimbolaki malamu ndɔtɔ na ye mpe ya kapita ya basali-mampa eleki sikoyo mbula mibale. Mbala moko, Farao asɛngaki bábimisela ye Yozefe na bolɔkɔ.​—Ebandeli 41:9-13.

Kanisá naino ndenge Yozefe ayokaki ntango bamemi-nsango ya Farao bayelaki ye nsango wana! Alataki nokinoki bilamba mosusu mpe akataki nsuki na ye; ekoki kozala akataki nsuki nyonso ya motó na ye mpo ezalaki momeseno ya Baezipito. Na ntembe te, abondelaki na motema mobimba ete Yehova apambola ye ntango akosolola na Farao! Eumelaki te, bamemaki ye na ndako ya kitoko mpenza esika Farao azalaki kofanda mpe atɛlɛmaki liboso ya mokonzi yango. Biblia elobi boye: “Bongo Farao alobaki na Yozefe ete: ‘Nalɔti ndɔtɔ, kasi moto ya kolimbola yango azali te. Kasi ngai, nayoki nsango ete okoki koyoka ndɔtɔ mpe kolimbola yango.’” Eyano ya Yozefe emonisaki lisusu komikitisa mpe kondima na ye epai ya Nzambe na ye; alobaki boye: “Ezali ngai te! Nzambe nde akoyebisa Farao makambo ya malamu.”​—Ebandeli 41:14-16.

Na komikitisa nyonso, Yozefe alobaki na Farao boye: “Ezali ngai te!”

Yehova alingaka bato ya komikitisa mpe ya sembo, yango wana tokoki kokamwa te soki apesaki Yozefe eyano oyo bato ya bwanya mpe banganga-nzambe ya Ezipito bayebaki te. Yozefe ayebisaki Farao ete bandɔtɔ na ye mibale ezalaki na ndimbola kaka moko. Lokola Yehova azongelaki nsango yango, alingaki komonisa ete ‘akanaki mpenza likambo’​—esengelaki mpenza kokokisama. Bangɔmbɛ ya mafutamafuta mpe mitó ya mbuma ya kosala farini ya malamu emonisaki mbula nsambo oyo Ezipito ekozala na ebele ya biloko, kasi bangɔmbɛ oyo ekɔndakɔndá mpe mitó ya mbuma ya kosala farini oyo ya mabe mpenza emonisaki mbula nsambo ya nzala oyo ekolanda na nsima. Nzala yango ekosilisa ebele ya biloko nyonso ya mboka yango.​—Ebandeli 41:25-32.

 Farao amonaki ete ndimbola ya Yozefe ezalaki solo mpenza. Kasi basengelaki kosala nini? Yozefe amonisaki likambo oyo basengelaki kosala. Farao asengelaki koluka mobali moko ya “mayele mpe ya bwanya” mpo akamba misala ya kobomba bilei oyo ezalaki kotikala na bamagazini na boumeli ya mbula nsambo oyo bilei ezalaki ebele mpe na nsima kokabola yango epai ya baoyo bakokelela na boumeli ya eleko ya nzala. (Ebandeli 41:33-36) Atako eksperiansi mpe makoki na ye emonisaki ete abongi na mosala yango, kasi Yozefe asɛngaki te ete bátya ye na esika yango. Komikitisa na ye esalaki ete akanisa ata moke te kosala makambo na lofundo; mpe kondima na ye esalaki ete alula mosala yango te. Soki tozali na kondima ya solosolo epai ya Yehova, ekozala na ntina te tóluka lokumu to mikumba minene. Tokoki kozala na kimya, mpe kotika makambo nyonso na mabɔkɔ na ye!

“TOKOKI NDE KOZWA MOTO MOSUSU LOKOLA YE?”

Farao ná basali na ye nyonso bamonaki ete likanisi ya Yozefe ebongi mpenza. Mokonzi andimaki mpe ete Nzambe ya Yozefe nde asalisaki ye abimisa makanisi wana ya bwanya. Alobaki na bato na ye ya mosala boye: “Tokoki nde kozwa moto mosusu lokola ye, oyo elimo ya Nzambe ezali kati na ye?” Alobaki na Yozefe boye: “Lokola Nzambe asali ete yo oyeba makambo nyonso oyo, moto ya mayele mpe ya bwanya lokola yo azali te. Yo nde moto okoyangela ndako na ngai, mpe bato na ngai nyonso bakotosa yo na makambo nyonso. Kaka na kiti ya bokonzi nde ngai nakoleka yo.”​—Ebandeli 41:38-41.

Farao atosaki maloba na ye. Balatisaki mbala moko Yozefe bilamba ya lini ya kitoko. Farao apesaki ye nsinga ya monzɛlɛ ya wolo, lopɛtɛ ya kotya bilembo, likalo ya lokumu, mpe bonsomi ya kotambola na mboka yango mobimba mpo na kokokisa mokumba na ye. (Ebandeli 41:42-44) Kaka na mokolo moko mpamba, Yozefe alongwe na bolɔkɔ mpe akómi na ndako ya mokonzi. Abandaki lokola moto mpamba ya bolɔkɔ, kasi na nsima akómaki moto ya mibale na bokonzi nsima ya Farao. Emonani polele ete kondima ya Yozefe epai ya Yehova Nzambe ezalaki mpamba te! Yehova amonaki makambo nyonso ya kozanga bosembo oyo enyokolaki mosaleli na ye wana na boumeli ya bambula mingi. Asilisaki yango na ntango mpe na ndenge oyo ebongi mpenza. Yehova azalaki na mposa kaka te ya kosilisa mabe oyo basalelaki Yozefe kasi mpe kobatela ekólo Yisraele mpo na mikolo oyo ezalaki koya. Tokomona mpo na nini ezalaki bongo na banimero oyo ekolanda.

Soki ozali kokutana na makambo ya mpasi, mbala mosusu oyo ezangi bosembo mpe ezali komonana lokola ekosila te, kolɛmba nzoto te. Kanisá ndakisa ya Yozefe. Lokola abatelaki ezaleli na ye ya boboto, ya komikitisa, ya koyika mpiko mpe kondima, apesaki Yehova nzela ya kopambola ye na nsuka.

^ par. 4 Talá masolo “Mekolá kondima na bango” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2014 mpe ya 01/11/2014.

^ par. 10 Na ntango wana, Baezipito bazalaki kosala mampa ná bagato ya lolenge koleka 90. Boye, mokambi ya basali-mampa ya Farao azalaki moto ya lokumu mpenza. Mopesi-masanga ya Farao azalaki kokamba bato oyo bazalaki kolandela ete vinyo to biɛrɛ ya Farao ezala ya kitoko mpenza mpe ekɔta pwazɔ te mpo ezalaki mpenza likama mpamba te botomboki mpe koboma ezalaki mingi. Ezalaki kosalema mbala mingi ete mopesi-masanga akóma mpe mopesi-toli oyo mokonzi azalaki kotyela motema.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

“Nabondeli bino, bóyoka ndɔtɔ oyo nalɔti”

Libota ya Yozefe ezalaki na mindɔndɔ, yango ekoki koteya mabota oyo ebɔkɔlaka bana oyo molongani abotaki na libala mosusu.

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

“Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye?”

Ndenge nini Yozefe akweaki te atako mwasi ya Potifare azalaki na ekateli ya kolɛngola ye?

BABUKU MPE MWA BABUKU

Mekolá kondima na bango

Matomba nini tokozwa sikoyo soki toyekoli masolo ya mibali mpe basi ya kondima oyo Biblia elobeli?