Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Février 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOSEPELA NA MOSALA NA YO

Ndenge ya kosepela na mosala ya makasi

Ndenge ya kosepela na mosala ya makasi

“Moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.” (Mosakoli 3:13) Soki Nzambe alingaka ete tómona bolamu mpo na mosala na biso, omoni te ete asengeli mpe kolakisa biso ndenge ya kozwa bolamu yango? (Yisaya 48:17) Likambo ya esengo, Nzambe asalaka yango na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Tótalela batoli ya Biblia oyo elandi, oyo etali ndenge ya kosepela na mosala na biso.

TALELÁ MOSALA NA NDENGE YA MALAMU

Ata soki mosala na yo esɛngaka ete motó na yo esala to obimisa makasi ya nzoto, to mpe yango nyonso mibale, yebá ete “na mosala makasi ya ndenge nyonso litomba ezalaka.” (Masese 14:23) Litomba ya ndenge nini? Na ndakisa, mosala ya makasi esalisaka biso tókokisa bamposa na biso. Ezali solo ete Nzambe alaki kokokisa bamposa ya baoyo basambelaka ye na bosembo nyonso. (Matai 6:31, 32) Kasi, alingi ete biso mpe tósala oyo tokoki kosala mpo na koluka biloko ya kobikela na molende mpe bosembo.​—2 Batesaloniki 3:10.

Na yango, tokoki kotalela mosala na biso lokola mwaye ya kokokisa mokano moko. Mosala ezali mwaye moko malamu mpo na kokokisa mikumba na biso. Joshua, oyo azali na mbula 25, alobi boye: “Kokokisa bamposa na yo ezali likambo ya moke te. Soki mosala na yo ezali kopesa yo likoki ya kosomba biloko oyo osengeli na yango, boye ezali kokokisa mokumba na yango.”

Longola yango, kosala mosala ya makasi esalaka ete tómipesa kilo. Kasi, ezalaka pɛtɛɛ te. Soki tomipesi disiplini ya kotingama na mosala na biso, ata soki ezali komonana ete ezali mpasi mpe ezali kosepelisa biso te, tokoki kozala na esengo mpo toyebi ete tozali komitambwisa na ndenge oyo ebongi mpenza. Tokolonga ezaleli ya koluka nzela mokuse. (Masese 26:14) Na ndenge yango nde mosala ememelaka moto esengo mpenza. Aaron, oyo tolobelaki na lisolo eleki, alobi boye: “Nasepelaka mingi ndenge namiyokaka nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala. Ekoki kozala ete nalɛmbi mpe mbala mosusu bato mosusu bamoni te mosala oyo nasali, kasi nayebi ete nakokisi mokano moko.”

 MIPESÁ NA MOSALA NA YO

Biblia ekumisi mobali oyo azali “na mayele na mosala na ye” mpe mwasi oyo “mabɔkɔ na ye esalaka mosala nyonso na esengo.” (Masese 22:29; 31:13) Toboyi te, moto akómaka mayele na mbala moko te. Mpe bato mingi te nde basepelaka kosala makambo oyo bayebi malamu te. Mbala mosusu yango nde ntina oyo bato mingi basepelaka te na mosala na bango mpo basalaka milende te mpo na koyeba yango malamu.

Mpo na koloba solo, moto akoki koyekola kolinga mosala ata ya ndenge nini soki ataleli yango na ndenge ebongi; elingi koloba soki amipesi mpenza na koyekola ndenge ya kosala mosala yango malamu. William, oyo azali na mbula 24, alobi boye: “Soki omipesi mpenza na mosala moko mpe omoni matomba oyo ebimisi, epesaka mpenza esengo. Okozwa soki moke te esengo ya ndenge wana soki ozali komipesa te na mosala to ozali kosala mingi te.”

KANISÁ MATOMBA OYO BASUSU BAZALI KOZWA NA MOSALA NA YO

Kotya makanisi kaka te na salɛrɛ oyo ozali kozwa. Kutu, osengeli nde komituna boye: ‘Mpo na nini mosala oyo ezali na ntina? Nini ekokóma soki nasali yango te to nasali yango malamu te? Matomba nini mosala na ngai ezali komemela basusu?’

Eleki malamu kokanisa na motuna oyo ya nsuka mpo mosala epesaka esengo mpenza ntango tomonaka matomba oyo ememelaka basusu. Yesu alobaki boye: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Longola bato oyo bazwaka mbala moko matomba na mosala na biso, na ndakisa bakiliya mpe bapatrɔ, ezali na bato mosusu oyo bazwelaka yango mpe matomba. Na ndakisa bato ya libota na biso mpe baoyo bazali kokelela.

Bato ya libota na biso. Ntango mokonzi ya libota azali kosala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya bato ya libota na ye, akosunga bango na balolenge mibale. Ya liboso, bato ya libota na ye bakozanga te biloko ya ntina; na ndakisa bilei, bilamba mpe esika ya kolala. Na ndenge yango, akokokisa mokumba oyo Nzambe apesá ye ya “kopesa bato na ye, . . . biloko oyo basengeli na yango.” (1 Timote 5:8) Ya mibale, moto oyo asalaka na molende mpo na koleisa libota na ye ateyaka na ndakisa na ye ntina ya kosala mosala ya makasi. Shane, oyo tolobelaki na lisolo eleki, alobi boye: “Tata na ngai azali ndakisa malamu ya moto oyo asalaka mosala malamu. Azali moto ya sembo oyo asalaki mosala makasi bomoi na ye mobimba, mingimingi lokola mosali-mabaya. Ndakisa na ye esalisaki ngai nayeba ntina ya mosala ya mabɔkɔ, kosala biloko oyo esalisaka mpenza bato mokolo na mokolo.”

Baoyo bazali kokelela. Ntoma Paulo apesaki bakristo toli ete ‘básala mosala makasi . . . mpo bázala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.’ (Baefese 4:28) Ya solo, soki tozali kosala makasi mpo na kokokisa bamposa na biso mpe ya libota na biso, tokozala mpe na likoki ya kosalisa baoyo bazali kokelela. (Masese 3:27) Na yango, kosala mosala ya makasi ekosalisa biso tózwa esengo monene oyo eutaka na kopesa.

 SALÁ KOLEKA OYO BASƐNGI YO

Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu alobaki boye: “Soki moto moko oyo azali na bokonzi azwi yo na makasi mpo osalela ye mosala kilomɛtrɛ moko, kende na ye kilomɛtrɛ mibale.” (Matai 5:41) Ndenge nini okoki kosalela toli yango na mosala na yo? Na esika osala kaka mwa moke, luká nde mabaku ya kosala mingi koleka oyo basɛngi yo. Mityelá mikano, luká mpenza kosala mosala na yo malamu to nokinoki koleka ndenge basɛngi yo. Salá ata makambo mikemike ya mosala na yo malamu.

Soki ozali kosala koleka oyo basɛngi yo, okosepela mpenza na mosala na yo. Mpo na nini? Mpo oyebi makambo ozali kosala. Ozali kosala mingi mpo olingi, kasi te mpo moto moko atindi yo na makasi. (Filemo 14) Mpo na yango, kobosana te toli oyo ezali na Masese 12:24: “Lobɔkɔ ya bato ya etingya nde ekoyangela, kasi lobɔkɔ ya gɔigɔi bakosalisa yango misala na makasi.” Ezali solo ete mingi na biso tokokóma mpenza te baombo to bakosalisa biso te misala na makasi. Kasi, moto oyo azali kosala kaka mwa moke akoki komiyoka ete akómi moombo ya kokokisa ntango nyonso makambo oyo basusu bazali kosɛnga ye. Kasi, moto oyo azali kosala koleka oyo basɛngi ye, azali kosala mingi mpo ye moko alingi, akomiyoka ete azali moombo ya moto te mpo bazali kotinda ye na makasi te.

TYÁ MOSALA NA ESIKA NA YANGO

Mosala ya makasi ezali malamu, kasi tosengeli kobosana te ete makambo mosusu mpe ya kosala na bomoi ezali. Toboyi te, Biblia elendisaka kozala molende na mosala. (Masese 13:4) Kasi elobi te ete tósala mosala koleka ndelo. Mosakoli 4:6 elobi boye: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.” Yango elingi koloba nini? Moto oyo asalaka mosala koleka ndelo akoki soki moke te kosepela na matomba oyo mosala na ye ebimisaka soki mosala yango ezwaka ntango mpe makasi na ye nyonso. Kutu, mosala na ye ekokóma mpamba lokola nde azali “kolanda mopɛpɛ.”

Biblia ekoki kosalisa biso tótalelaka mosala na ndenge ebongi. Ata soki elendisi biso tómipesa na mosala na biso, epesi mpe toli ete ‘tóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.’ (Bafilipi 1:10) Makambo nini? Na ndakisa kolekisa ntango elongo na libota mpe baninga. Kasi makambo ya Nzambe nde ezali na ntina mingi koleka, na ndakisa kotánga Biblia mpe kokanisa na mozindo na oyo ozali kotánga.

Na ntembe te, baoyo basalaka makambo kozanga kolekisa ndelo basepelaka na mosala na bango mingi koleka. William, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Patrɔ na ngai moko ya kala azali ndakisa malamu ya moto oyo ayebi kotya mosala na esika na yango. Asalaka mosala makasi mpe ayokanaka malamu na bakiliya na ye mpo asalaka mosala na ye malamu. Kasi, na mpokwa ntango asilisi mosala, atikaka yango mpe atyelaka losambo mpe libota na ye likebi. Mpe oyebi nini? Azali moko ya bato ya esengo mpenza oyo nayebi!”

Makambo mosusu

LAMUKÁ!

Oyo okoki kosala mpo olonga mpenza

Makambo mitano oyo ekoki kosalisa yo olonga mpenza.