Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Janvier 2015

Mibali​—Bósala ete ndako na bino ezala esika ya libateli

Mibali​—Bósala ete ndako na bino ezala esika ya libateli

MOBALI asengeli kobatela mwasi na ye ndenge nini? Bato mingi babɔkɔlá bango na makanisi ete mokumba ya libosoliboso ya mobali ezali ya kosalisa libota na ye ekelela na mbongo te. Kasi, basi mosusu oyo bazali na biloko ebele bamiyokaka kaka ete bazali na kimya na motema te, kutu babangaka. Na ndakisa, mwasi moko ya ekólo Espagne na nkombo Rosa alobi boye mpo na mobali na ye: “Azalaki boboto kaka epai ya bato mosusu, kasi na ndako, makambo mabe.” Mwasi mosusu ya Nigeria, na nkombo Joy alobi mpe boye: “Soki toyokani te na mobali na ngai, azalaki koloba ete ‘osengeli kosala nyonso oyo nalobi mpo ngai nde mobali na yo.’”

Ndenge nini na libala mobali akoki kokokisa mokumba na ye na ndenge ya malamu? Esɛngaka nini mpo mobali asala ete ndako na ye ezala esika ya libateli to “esika ya kopema” mpo na mwasi na ye?​—Ruta 1:9.

OYO BIBLIA ELOBI MPO NA BOKONZI YA MOBALI

Atako mobali ná mwasi bazali ndenge moko na miso ya Nzambe, Biblia elobi ete mokomoko azali na mokumba na ye na libota. Baroma 7:2 elobi ete mwasi oyo abalá azali na nse ya “mobeko ya mobali na ye.” Kaka ndenge bibongiseli mingi etyaka mokambi moko mpo na kokɛngɛla misala na yango, Nzambe mpe atyá mobali mokonzi ya mwasi. (1 Bakorinti 11:3) Mibali basengeli kokamba mabota na bango.

Soki ozali mobali, ndenge nini osengeli kosalela bokonzi oyo Nzambe apesá yo? Biblia elobi boye: “Bókoba kolinga basi na bino, ndenge Kristo mpe alingaki lisangá.” (Baefese 5:25) Ya solo, atako abalaki te, ndakisa ya Yesu Kristo ekoki kosalisa yo okóma mobali malamu. Ndenge nini?

BOMOI YA YESU​—NDAKISA MALAMU MPO NA MIBALI

Yesu azalaki kobɔndisa mpe kosunga basusu. Yesu alakaki baoyo nyonso bazalaki konyokwama mpe na makambo oyo ezalaki kotungisa bango boye: “Bóya epai na ngai, . . . mpe ngai nakopemisa bino.” (Matai 11:28, 29) Mbala mingi, abikisaki bango na bamaladi mpe asalisaki bango bápusana penepene na Yehova. Tokoki kokamwa te soki bato mingi bazalaki koya epai ya Yesu na elikya ete akokitisa mikumba na bango!

Ndenge oyo mibali bakoki komekola Yesu. Lukáká ndenge oyo okoki kosalisa mwasi na yo na misala oyo azali na yango.  Basi mosusu bamiyokaka lokola Rosa, oyo amilelaki boye: “Na miso ya mobali na ngai, nazalaki kaka lokola mwana ya mosala moko boye.” Nzokande, mobali moko na nkombo Kweku, oyo azali na libala ya malamu, alobi boye: “Mbala mingi, natunaka mwasi na ngai ndenge oyo nakoki kosalisa ye na mosala. Lokola nalingaka ye, mbala mingi nasalisaka ye na misala ya ndako kozanga ete atinda ngai.”

Yesu azalaki kotyela basusu likebi mpe komitya na esika na bango. Mwasi moko ya mobola abɛlaki makasi na boumeli ya mbula 12. Ntango ayokaki ete Yesu azali na nguya ya kosala makamwisi, “azalaki koloba ete: ‘Soki nasimbi kaka elamba na ye ya likoló nakobika.’” Amikosaki te. Apusanaki pene na Yesu, asimbaki nsɔngɛ ya elamba na ye mpe mbala moko abikaki. Atako ekoki kozala ete bato mosusu balobaki ete mwasi yango asalaki bongo na lofundo, Yesu amonaki ete asalaki bongo mpo azangaki elikya. * Na boboto nyonso, alobaki na ye boye: “Mwana na ngai, . . . biká na maladi na yo ya mpasi.” Yesu aboyaki kaka te koyokisa ye nsɔni to kopamela ye, kasi ayebaki mpe maladi na ye. Na ndenge yango, amonisaki lolenge ya  moto oyo azalaki; elingi koloba moto oyo amityaka na esika ya basusu.​—Marko 5:25-34.

Ndenge oyo mibali bakoki komekola Yesu. Ntango mwasi na yo azali komiyoka malamu te, tyelá ye lisusu likebi mpe zalá motema molai. Meká komitya na esika na ye mpe koyeba mpo na nini azali kosala boye to boye. Na ndakisa, Ricardo alobi boye: “Soki namoni ete mwasi na ngai akómi kosilikasilika, nasalaka makasi naloba te likambo moko oyo ekoki kobebisa lisusu makambo.”

Yesu azalaki kosolola na bayekoli na ye. Yesu azalaki kosolola mingi ná baninga na ye. Alobaki boye: “Makambo nyonso oyo nayoki epai ya Tata na ngai, nayebisi bino yango.” (Yoane 15:15) Ezali solo ete na bantango mosusu, Yesu azalaki kolinga kozala kaka ye moko mpo na kokanisa na mozindo mpe kobondela. Kasi, mbala mingi, azalaki koyebisa bayekoli na ye ndenge azali koyoka na motema. Na butu ya nsuka liboso báboma ye lokola mosali mabe, ayebisaki bayekoli na ye polele ete ‘molimo na ye eyoki mawa makasi.’ (Matai 26:38) Ata mpe ntango bazalaki kosala makambo oyo ezalaki kosepelisa ye te, Yesu atikaki soki moke te kosolisa baninga na ye.​—Matai 26:40, 41.

Kokanisa na ndakisa ya Yesu ekoki kosalisa mobali akóma lisusu mobali mpe tata malamu

Ndenge oyo mibali bakoki komekola Yesu. Yebisáká mwasi na yo ndenge ozali komiyoka mpe makanisi na yo. Mwasi akoki komilela ete mobali na ye asololaka na pɛtɛɛ nyonso na bato mosusu kasi na ndako, afandaka kaka nyɛɛ. Kasi tótala ndenge Ana amiyokaka ntango mobali na ye afungolelaka ye motema; alobi boye: “Namonaka ete alingaka ngai mpenza mpe namiyokaka penepene na ye.”

Koboya kosolisa mwasi na yo te mpo na kopesa ye etumbu. Mwasi moko alobi boye: “Soki mobali na ngai asiliki, azalaki koboya kosolisa ngai na boumeli ya mikolo ebele. Yango ezalaki kosala ete namiyoka lokola namemi ngambo mpe nazangi ntina.” Kasi, Edwin amekaka kolanda ndakisa ya Yesu. Alobi boye: “Soki nasiliki, nafandaka naino nyɛɛ, kasi na nsima nalukaka ntango oyo ebongi mpo na kosolola mpe kobongisa likambo yango.”

Joy, oyo tolobelaki na ebandeli, amonaki ete mobali na ye abongwanaki ntango abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Joy alobi ete “mobali na ye abongwanaki mpo akómaki kosala makasi alanda ndakisa ya Yesu mpo na kozala mobali malamu.” Bamilio ya mibali mpe basi oyo babalá bazali kozwela mateya wana ya Biblia matomba. Yo mpe okosepela kosala lokola bango? Okoki kosɛnga Motatoli moko ya Yehova ayekola na yo Biblia ofele.

^ par. 10 Na kotalela Mibeko ya Moize, maladi ya mwasi yango ekómisaki ye mbindo, mpe moto nyonso oyo mwasi yango asengelaki kosimba, asengelaki kokóma mpe mbindo.​—Balevi 15:19, 25.