Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Janvier 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | GUVƐRNEMA OYO EZANGI KANYAKA

Bokonzi ya Nzambe​—Guvɛrnema oyo ezangi kanyaka

Bokonzi ya Nzambe​—Guvɛrnema oyo ezangi kanyaka

Ntango alimbolaki ntina oyo kanyaka ekoki kosila te na baguvɛrnema, mokambi ya biro ya guvɛrnema ya Nicaragua oyo atalaka makambo ya mosolo alobaki boye: “Ntina mpenza oyo bakonzi ya Leta bazwaka kanyaka ezali mpo bango moko bazali bana-mboka mpe soki bana-mboka bandimaka kanyaka, boye bakonzi ya Leta mpe bandimaka yango.”

Lokola kanyaka etondi na mokili, omoni te ete ekoki kozanga te na guvɛrnema nyonso oyo ezali na mokili? Soki ezali bongo, boye guvɛrnema oyo ezangi kanyaka esengeli kouta libándá ya mokili. Biblia elobeli mpenza guvɛrnema yango; elingi koloba Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na yango.​—Matai 6:9, 10.

Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo oyo ezali koyangela na likoló. Ekozwa esika ya baguvɛrnema nyonso ya bato. (Nzembo 2:8, 9; Emoniseli 16:14; 19:19-21) Bokonzi yango ekomemela bato mapamboli mpo ekolongola mpe baguvɛrnema ya kanyaka. Tótalela makambo 6 oyo endimisi biso ete Bokonzi yango ekosala yango.

1. NGUYA

MOKAKATANO: Bana-mboka nde basalaka ete baguvɛrnema ezala, mingimingi mpo bafutaka bampako mpe basalaka misala. Ebele ya mbongo oyo ekɔtaka etyelaka bakonzi ya Leta motambo ya koyiba, bakonzi mosusu bazwaka mbongo oyo bato mosusu bapesaka mpo bákitisela bango bampako to misolo mosusu oyo basengeli kofuta na guvɛrnema. Yango esalaka ete baguvɛrnema ebakisa lisusu ntalo ya mpako mpo na kozipa libulu wana; yango ebakisaka lisusu kanyaka. Na mokili ya boye, baoyo balingaka bosembo banyokwamaka mingi.

SOLISYO: Nguya ya Bokonzi ya Nzambe euti nde na Yehova * Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. (Emoniseli 11:15) Bokonzi yango ezali na mposa ya bampako  te mpo etambwisa misala na yango. Kutu, lokola Nzambe azali na ‘nguya ya kokamwa’ mpe azali mokabi monene, yango endimisi biso ete Bokonzi yango ekokokisa mpenza bamposa ya bato nyonso oyo yango ekoyangela.​—Yisaya 40:26; Nzembo 145:16.

2. MOKONZI

MOKAKATANO: Susan Rose-Ackerman oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki alobi ete milende mpo na kosilisa kanyaka “esengeli kobanda naino epai ya bakonzi.” Bato batyelaka mpenza baguvɛrnema motema te mpo elukaka kosilisa kanyaka kaka epai ya bapolisi to bato ya dwane kasi ekipaka bakonzi ya minene te. Ata mokonzi ya malamu ndenge nini azali kaka moto ya kozanga kokoka. Ndenge Biblia elobi yango, “ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu.”​—Mosakoli 7:20.

Yesu aboyaki kanyaka monene oyo balingaki kopesa ye

SOLISYO: Na kokesana na bato ya kozanga kokoka, Yesu Kristo oyo Nzambe aponi azala Mokonzi ya Bokonzi na ye akoki kosala mabe ata moke te. Yesu amonisaki yango ntango aboyaki kanyaka monene oyo balingaki kopesa ye; elingi koloba ‘bokonzi nyonso ya mokili ná nkembo na yango.’ Zabolo, mokonzi ya mokili oyo, alakaki Yesu bokonzi yango soki asaleli ye likambo moko ya losambo ya lokuta. (Matai 4:8-10; Yoane 14:30) Ata ntango banyokolaki Yesu makasi, azalaki mpenza na ekateli ya kobatela bosembo na ye tii liwa, yango wana aboyaki drɔgɛ oyo bapesaki ye mpo na kokitisa mpasi na ye, oyo elingaki mpe kosala ete likoki na ye ya kokanisa ebeba. (Matai 27:34) Lokola Nzambe asekwisaki ye mpe azongelaki bomoi oyo azalaki na yango na likoló, Yesu amonisaki ete abongi mpenza kozala moyangeli ya Bokonzi ya Nzambe.​—Bafilipi 2:8-11.

3. KOPIKAMA MAKASI

MOKAKATANO: Bikólo mingi esalaka voti mbala na mbala, na likanisi ete bakonzi oyo bandimaka kanyaka bakolongwa. Kasi, mpo na koloba solo, kanyaka ekɔtaka kaka na bakampanye mpe na maponami, ata na bikólo oyo ebengamaka bikólo ya bozwi. Mpo na mbongo oyo batyaka na bakampanye mpe misala mosusu, bato ya bozwi bakoki kosala ete baoyo bazali na bokonzi na guvɛrnema sikoyo mpe baoyo bakoya nsima, bándima makanisi na bango.

John Paul, zuzi moko ya tribinale monene ya États-Unis akomaki ete likambo yango esukaka na kobebisa “kaka te lotomo ya koyangela ya baguvɛrnema mpe ndenge oyo yango esengeli kotambwisa makambo, kasi ebebisaka mpe konfianse oyo bato batyelaka baguvɛrnema.” Na yango, tokoki kokamwa te soki bato mingi na mokili bamonaka ete kanyaka ezalaka mingi na baparti politiki koleka bibongiseli mosusu nyonso.

SOLISYO: Bokonzi ya Nzambe epikami makasi mpe ekoyangela libela mpo yango esɛngi kampanye te  to voti oyo etindaka bato báyiba na maponami. (Danyele 7:13, 14) Lokola Nzambe nde aponi mokonzi na yango, voti ezali na ntina te mpe moto moko te akoki kolongola Bokonzi yango. Lokola epikami makasi, yango endimisi biso ete makambo oyo yango ekosala ekozala ntango nyonso mpo na bolamu ya bato oyo yango ekoyangela.

4. MIBEKO

Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo oyo ezali koyangela na likoló

MOKAKATANO: Liboso, okoki kokanisa ete kotya mibeko ya sika ekoki kobongisa makambo. Kasi, bato ya mayele bamoni ete mbala mingi kobakisa mibeko ebeleebele epesaka nde bato mabaku mingi ya kozwa kanyaka. Lisusu, mibeko oyo batyaka mpo kanyaka ezala mingi te mbala mingi ebakisaka nde yango.

SOLISYO: Mibeko ya Bokonzi ya Nzambe eleki mosika mibeko ya baguvɛrnema ya bato. Na ndakisa, na esika asala liste molai ya makambo ya kosala mpe ya kosala te, Yesu alobaki nde boye: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Mbala mosusu likambo eleki ntina ezali ete mibeko ya Bokonzi ya Nzambe etalelaka mingi makanisi mpe misala ya moto. Yesu alobaki boye: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Ya solo, Nzambe oyo azali na likoki ya koyeba oyo ezali na mitema ya bato, akoki kosala ete bato bátosa mpenza mibeko yango.​—1 Samwele 16:7.

5. MAKANISI

MOKAKATANO: Makambo mpenza oyo etindaka bato bázwaka kanyaka ezali lokoso mpe moimi. Mbala mingi bakonzi ya Leta mpe bana-mboka bamonisaka bizaleli mabe wana. Mpo na magazini ya monene oyo ebukanaki na engumba Séoul, ndenge tolobelaki yango na lisolo oyo eleki, bakonzi ya Leta bandimaki kanyaka epai ya bakomelesa oyo bayebaki ete kofuta kanyaka ekosɛnga bábimisa mbongo mingi te ndenge balingaki kobimisa soki bátongaka yango na bisaleli oyo esengeli mpe na ndenge ebongi.

 Boye, mpo na kosilisa kanyaka, bato basengeli koteyama ndenge ya kolongola lokoso mpe moimi. Kasi, baguvɛrnema ya bato ezangi mposa mpe likoki ya kosala programɛ ya mateya ya ndenge wana.

SOLISYO: Mpo na kosilisa kanyaka, Bokonzi ya Nzambe eteyaka bato ndenge ya kolongola bizaleli oyo etindaka mpenza bato bándima kanyaka. * Mateya yango esalisaka bato ‘bákómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kotambwisa makanisi na bango.’ (Baefese 4:23) Bayekolaka ndenge ya kolongola lokoso mpe moimi mpe kotya na esika na yango ezaleli ya kosepela na biloko oyo bazali na yango mpe kotyela basusu likebi.​—Bafilipi 2:4; 1 Timote 6:6.

6. BATO

MOKAKATANO: Ata na esika ya malamu koleka mpe mateya ya kitoko mpenza oyo etali bizaleli malamu, bato mosusu bakolinga kozala sembo te mpe kozwa kanyaka. Bato ya mayele bandimi ete yango nde ntina oyo baguvɛrnema ya bato ekokoka te kolongola kanyaka. Elikya oyo bazali na yango ezali ya kosala ete kanyaka mpe makambo mabe oyo yango ebimisaka ezala mingi te.

SOLISYO: Na Likita oyo ONU esalaki mpo na kosilisa kanyaka, balobaki ete baguvɛrnema esengeli kolendisa bato bázala “sembo mpe bákokisaka mikumba na bango.” Atako yango ezali mokano moko malamu, Bokonzi ya Nzambe esuki kaka te na kolendisa bizaleli yango, kasi esɛngi bato oyo yango ekoyangela bámonisa yango. Biblia elobi ete “bato ya lokoso” mpe ya “lokuta” bakozwa Bokonzi ya Nzambe te.​—1 Bakorinti 6:9-11; Emoniseli 21:8.

Bato bakoki koyekola ndenge ya komonisa bizaleli malamu yango ndenge bakristo ya liboso basalaki. Na ndakisa, ntango moyekoli moko na nkombo Simo alukaki kosomba elimo santu epai ya bantoma, baboyaki kanyaka mpe balobaki na ye boye: “Bongolá motema na mabe na yo oyo.” Lokola Simo amonaki ete mposa mabe wana ezali likama, asɛngaki bantoma bábondela mpo na ye mpo alonga yango.​—Misala 8:18-24.

NDENGE YA KOKÓMA MWANA-MBOKA YA BOKONZI

Ezala ozali moto ya ekólo nini, ozali na libaku ya kokóma mwana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe. (Misala 10:34, 35) Programɛ ya mateya oyo Bokonzi yango ebongisi, oyo ezali sikoyo na mokili mobimba, ekomonisa yo oyo okoki kosala. Batatoli ya Yehova bakosepela kolakisa yo ndenge bayekolaka na bato Biblia ofele, oyo ekoki kozwa miniti soki zomi na pɔsɔ. Okoki mpe koyekola makambo mosusu etali “nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe,” ata mpe ndenge oyo yango ekolongola baguvɛrnema ya kanyaka. (Luka 4:43) Tosɛngi yo okutana na Batatoli ya Yehova na esika ofandi to okɔta na site na biso jw.org.

Okosepela koyekola Biblia ofele?

^ par. 8 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.

^ par. 22 Na ndakisa, talá lisolo “Moto akoki kozala sembo na mokili oyo etondi na kanyaka?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2012.