Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Janvier 2015

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | GUVƐRNEMA OYO EZANGI KANYAKA

Guvɛrnema ya kanyaka ezali pwazɔ

Guvɛrnema ya kanyaka ezali pwazɔ

Guvɛrnema ya kanyaka ezali guvɛrnema oyo esalelaka bokonzi na yango na ndenge ya mabe mpo na matomba na yango moko. Likambo yango ebanda kala. Na ndakisa, esali sikoyo mbula koleka 3 500 Biblia elobelaki mobeko oyo epekisaki kanyaka ntango bazuzi bazali kosambisa, yango emonisi ete likambo yango eyebanaki malamu banda kala. (Kobima 23:8) Toboyi te, kanyaka esuki kaka te na kondima eloko moko oyo moto apesi yo mpo osalela ye bolamu moko boye. Mbala mingi, bakonzi mabe ya Leta bazwaka na makasi biloko ya bato, balukaka kozwa litomba na misala oyo bazali na lotomo na yango te to mpe bayibaka mpenza mosolo. Babukaka mpe mibeko mpo bazali bakonzi kaka mpo básalela baninga mpe bato ya libota na bango bolamu.

Atako kanyaka ezalaka na bibongiseli nyonso ya bato, emonani ete oyo ezalaka na baguvɛrnema nde ezali mabe koleka. Lapolo oyo ebongiseli moko (Transparency International) ebimisaki na 2013 mpo na kanyaka na mokili mobimba, emonisaki ete bato na mokili mobimba bamoni ete kanyaka ezalaka mingi nde na baparti politiki, epai ya bapolisi, bakonzi ya Leta, bato ya parlema mpe bazuzi. Tótalela mwa balapolo oyo emonisi ete ezali mpenza bongo.

  • AFRIKA: Na 2013 na Afrika ya Sudi, bafundaki bakonzi ya Leta soki 22 000 mpo na makambo ya kanyaka.

  • AMERIKA: Na 2012 na Brésil, bakatelaki bato 25 etumbu nsima ya kosamba liboso ya bazuzi mpo basalelaki mbongo ya Leta mpo bálonga na voti. Mokambi moko ya kala ya misala ya prezida, oyo azalaki moto ya mibale nsima ya prezida oyo azalaki na bokonzi mingi na ekólo yango, azalaki mpe na kati ya bato yango.

  • AZIA: Na engumba Séoul, na Corée du Sud, bato 502 bakufaki na magazini moko monene oyo ebukanaki na 1995. Bato oyo basalaki ankɛtɛ bamonaki ete bakonzi ya Leta bazwaki kanyaka epai ya bakomelesa mpo bátonga magazini yango kozanga kotosa mibeko etali kobatela bomoi ya bato.

  • MPOTO: Cecilia Malmström, mokambi moko ya Commission européenne des Affaires intérieures, alobi ete: “Ndenge oyo likambo ya kanyaka epalangani mingi na Mpoto ezali kokamwisa mpenza.” Abakisi boye: “Milende oyo bakonzi ya politiki bazali kosala mpo na kosilisa kanyaka ezali komonana lokola ekolonga te.”

Likambo ya kanyaka na baguvɛrnema ezwá mpenza misisa. Profesɛrɛ Susan Rose-Ackerman, moto moko ya mayele na makambo etali kosilisa kanyaka, alobi ete mpo makambo ebonga, ekosɛnga “baguvɛrnema ebongola lolenge na yango ya kokɔtisa mbongo na kɛsi ya Leta.” Atako elikya ezali te ete likambo yango ekosalema, kasi Biblia emonisi ete makambo ekoki kobongwama mpenza.