Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Décembre 2014

Timgad​—Engumba oyo ekundamá ebimisi basekele na yango

Timgad​—Engumba oyo ekundamá ebimisi basekele na yango

ATA moto ya mpiko mpenza oyo asalaka mibembo mpo na koyeba mokili akoki kokamwa mpenza. Esika yango ezali na monimá moko oyo ndambo na yango ekundamá na zɛlo ya esobe ya Algérie, oyo ezali komonisa elonga ya Baroma! Ntango James Bruce, moto ya Écosse amonaki monimá yango na mobu 1765, ayebaki te ete atɛlɛmaki likoló ya esika oyo ebebá, oyo Baroma batongaká na nɔrdi ya Afrika epai bazalaki kokonza; engumba ya kala ya Thamugadi, oyo lelo babengaka yango Timgad.

Siɛklɛ koleka moko na nsima, bato ya arkeoloji ya France bamonaki na 1881 biloko mosusu ya Timgad oyo ebatelamaki malamu. Bamonaki ete atako esika yango ebebá mpe ezali mabe, bato oyo bafandaki kuna liboso bazalaki na bomoi ya malamu mpenza. Kasi nini etindaki Baroma bátonga engumba ya bozwi na esika ya ndenge wana? Mpe mateya nini tokoki kozwa mpo na engumba wana ya kala mpe bato oyo bazalaki kofanda kuna?

MOKANO MOKO YA POLITIKI OYO EBOMBAMAKI

Ntango bokonzi ya Baroma ekómaki tii na nɔrdi ya Afrika na siɛklɛ ya liboso, liboso ya ntango na biso, bakutanaki na botɛmɛli makasi mpenza epai ya bato mosusu ya mboka yango oyo bazalaki kofanda esika moko te. Ndenge nini Baroma balingaki koyokana na bato yango? Liboso, basoda ya limpinga ya misato ya Auguste batongaki bakaa ya makasi mpe bisika ya kokɛngɛla bakaa na etúká wana monene ya ngombangomba oyo babengaka lelo nɔrdi ya Algérie. Na nsima, batongaki engumba Timgad, kasi mpo na mokano mosusu.

Baroma batongaki Timgad mpo na basoda na bango oyo bazwaki pansiɔ, kasi ezalaki mpenzampenza mpo na kolɛmbisa bato ya mboka wana oyo bazalaki kotɛmɛla bango. Mokano na bango elongaki. Lokola bato ya Timgad bazalaki na bomoi ya malamu, eumelaki te bato ya mboka oyo bazalaki koya kotɛka biloko na bango na vile bakómaki kosepela na Timgad. Lokola bazalaki na mposa ete bándima bango na Timgad, epai kaka Baroma nde bazalaki kofanda, bato mingi ya mboka yango bandimaki kokɔta na limpinga ya Roma mpo na mbula 25 mobimba, kaka mpo bango ná bana na bango bákóma bana-mboka ya Roma.

Lokola basepelaki kosuka kaka te na kokóma bana-mboka ya Roma, nsukansuka bato mosusu ya Afrika bazwaki bibonga minene na Timgad to na bingumba mosusu oyo Baroma bazalaki kokonza. Mayele mabe oyo Baroma basalelaki mpo na kokokana na bato ya mboka yango esimbaki mpenza na boye ete kaka mbula 50 nsima ya kotonga engumba yango, bato ya Afrika ya nɔrdi nde balekaki mingi na Timgad.

NDENGE OYO ROMA EBENDAKI MITEMA YA BATO

Zando oyo ezali na makonzí mpe bamesa

Ndenge nini Baroma balongaki kobenda mitema ya bato ya mboka yango nokinoki? Ezali mpo bazalaki  kosalela bato nyonso makambo ndenge moko na kolanda mobeko oyo Cicéron mokonzi ya Roma atyaki. Bakabolaki mabele ya mboka yango na katikati, ndambo basoda ya kala ya Roma bazwaki, ndambo mosusu bato ya Afrika. Bandako ya mɛtrɛ-kare 20 etandamaki na engumba yango, oyo banzela ya mikemike ekabolaki yango. Ndenge oyo bakabolaki mpe batongaki yango na molɔngɔ, na ntembe te ezalaki kosepelisa bato ya engumba yango.

Ndenge ezalaki kosalema na bingumba mingi ya Roma, bato ya engumba yango bakokaki kokutana na mikolo oyo bato bazalaki koya ebele na zando mpo na koyoka bansango ya sika to kosala masano. Na ntembe te, bankolo mboka oyo bazalaki kofanda pene wana na bangomba oyo mai ezalaka te, bazalaki komona na makanisi ndenge bazali kotambola na nse ya malili ya makonzí oyo ezipi bango na moi to bazali kozwa mwa mopɛpɛ na moko ya ebele ya bapisini ya bato nyonso ntango mai ezali kosala mwa makelele. Bakokaki komona na makanisi ndenge bafandi pembeni ya maziba ya mai ya pɛto mpe bazali kosolola na baninga. Nyonso wana mpo na bango ezalaki lokola ndɔtɔ.

Liyemi ya nzambe ya Bosato oyo batyá na lilita

Esika ya masano mpe esalisaki mpo na kobenda mitema ya bato. Lokola ezalaki na bisika ya kofanda koleka 3 500, ebele ya bato ya Timgad mpe ya bingumba ya zingazinga bazalaki koya wana. Na ntango ya lisano, bato ya teyatre bazalaki kolakisa bato ndenge oyo Baroma basepelaka na masano ya mabe oyo mbala mingi ezalaki kolakisa makambo ya mobulu mpe ya kosangisa nzoto.

Lingomba ya Roma mpe ebendaki mitema ya bato. Na pavema mpe bifelo ya badushɛ na bango batyaki mayemi ya balangi ndenge na ndenge oyo ezalaki komonisa makambo ya masapo ya banzambe ya bapakano. Lokola kosukola ezalaki moko ya makambo oyo bato bazalaki kosala na mokolo, mokemoke bato ya mboka yango bamesanaki na banzambe ya Baroma mpe lingomba na bango. Ndenge oyo balukaki kokɔtisa bato ya Afrika na mimeseno ya Baroma esimbaki mpenza, na boye ete na malita na bango, bato ya Afrika bakómaki kotya mayemi ya banzambe ya bosato ya bango moko mpe ya Baroma.

ENGUMBA KITOKO OYO BABOSANÁ YANGO

Ntango amperɛrɛ Trajan atongaki engumba yango na mobu 100 ya ntango na biso, na nsima, Baroma balendisaki bato bálona bambuma, básalaka mafuta ya olive mpe vinyo na Afrika ya nɔrdi mobimba. Eumelaki te, etúká yango ekómaki esika oyo Baroma bazalaki kozwa biloko wana ya ntina mingi mpo na ampire na bango. Ndenge moko na bingumba oyo bazalaki kokonza, Timgad ekómaki na lokumu na boyangeli ya Baroma. Nsima ya bambula, bato bakómaki mingi na Timgad, mpe engumba yango ekómaki monene koleka ndenge ezalaki.

Bato ya engumba yango mpe bankolo-mabele bakómaki na mbongo mingi mpo na biloko oyo bazalaki kotɛkɛla Baroma, kasi bato ya mboka oyo bazalaki kolona biloko yango bazalaki kozwa benefisi moke. Na siɛklɛ ya misato ya ntango na biso, kozanga bosembo mpe bampako ya koleka ndelo etindaki bato mosusu ya bilanga yango bátomboka. Bamosusu, oyo bakómaki bandimi ya Lingomba ya Katolike, basanganaki ná Ba-Donatiste, etuluku moko ya bato oyo bazalaki komibenga bakristo, oyo batɛmɛlaki kanyaka oyo ezalaki na Lingomba ya Katolike.​—Talá etanda “ Ba-Donatiste​—‘Eglize ya pɛto’ te.

Nsima ya basiɛklɛ mingi ya matata ya mangomba, bitumba ya basivile mpe mobulu, Baroma bazalaki  lisusu na bokonzi te na nɔrdi ya Afrika. Kobanda siɛklɛ ya motoba ya ntango na biso, Ba-Arabe ya mboka wana batumbaki Timgad mpe nsukansuka, babosanaki engumba yango na boumeli ya bambula koleka 1 000.

“YANGO NDE BOMOI!”

Makomi ya Latin na esika ya makita, oyo elobi: “Koboma nyama, kosukola, kosakana mpe kosɛka​—yango nde bomoi!”

Bato ya arkeoloji oyo bakundolaki biloko ebebá ya Timgad basepelaki na makomi ya Latin oyo bakutaki na esika oyo bato bazalaki kosala makita. Ezalaki na maloba oyo: “Koboma nyama, kosukola, kosakana mpe kosɛka​—yango nde bomoi!” Moto moko ya istware ya France alobaki ete yango “eyokani na likanisi oyo mbala mosusu ezangi mposa ya koluka lokumu, kasi oyo bato mosusu bakoki komona ete yango nde sekele ya kokóma na bwanya.”

Baroma bazalaki koluka kozala na bomoi ya ndenge wana. Ntoma Paulo, mokristo moko ya siɛklɛ ya liboso alobelaki bato oyo makanisi na bango ezalaki “tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.” Atako bazalaki kosambela, Baroma bazalaki kolinga bisengo ya ntango wana, bazalaki koyeba mpenza te ntina ya bomoi. Paulo akebisaki baninga na ye bakristo bálanda te bato ya ndenge wana; alobaki boye: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”​—1 Bakorinti 15:32, 33.

Atako bato ya Timgad bazalaki na bomoi eleki sikoyo mbula soki 1 500, ndenge oyo bato batalelaka bomoi ebongwani mpenza te. Lelo oyo, bato mingi batalaka kaka lelo. Mpo na bango, ndenge oyo Baroma bazalaki kotalela bomoi ebongi mpenza, ata soki yango ekobimisela bango makambo nini. Kasi, Biblia epesi likanisi oyo ebongi; elobi boye: “Makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.” Yango wana ekebisi biso ‘tósalela mokili na makambo nyonso te.’​—1 Bakorinti 7:31.

Engumba wana ya Timgad oyo ebebá ezali litatoli ete sekele ya kozala na bomoi ya esengo mpe oyo ezali na ntina etaleli te makambo oyo ezali na makomi oyo bazwaki, oyo ekundamá banda kala, na zɛlɔ ya Afrika ya nɔrdi. Kasi, ezali nde na koyoka toli oyo ya Biblia: “Mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”​—1 Yoane 2:17.