Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Décembre 2014

Nasengeli kodefa mbongo?

Nasengeli kodefa mbongo?

“Kodefa ezali lokola fɛti ya libala; kofuta ezali lokola matánga.”​—Lisese moko ya Swahili.

BATO mingi ya Afrika ya ɛsti bayebi lisese yango, mpe na ntembe te, bato mingi na mokili mobimba bamiyokaka mpe bongo. Yo mpe omiyokaka bongo soki odefi mbongo epai ya moninga moko to epai mosusu? Atako na bantango mosusu ekoki kozala malamu, likanisi yango ebongi mpenza? Kodefa ezali na makama mpe mitambo nini?

Lisese mosusu ya Swahili emonisi mokakatano monene oyo kodefa ebimisaka. Elobi boye: “Kodefa mpe kodefisa ebebisaka boninga.” Ya solo, banyongo ekoki kobebisa boninga mpe boyokani kati na bato. Ata soki moto amibongisi malamu mpe azali na makanisi malamu, makambo etambolaka ntango nyonso te ndenge akanisaki. Na ndakisa, soki ntango oyo esengelaki kofuta nyongo eleki, moto oyo adefisaki akoki kosilika. Akoki kobanda kobomba nkanda mpe boyokani na ye ná moto oyo adefaki ekoki kobeba ata mpe boyokani ya mabota na bango. Lokola banyongo ebimisaka matata, tosengeli kotalela yango lokola solisyo ya nsuka, kasi te likambo oyo tosengeli kosala mbala moko soki mokakatano moko boye ekómeli biso.

Kodefa mbongo ekoki mpe kobebisa boyokani ya moto ná Nzambe. Ndenge nini? Ya liboso, Biblia elobi ete moto mabe nde aboyaka kofuta banyongo na ye na nko. (Nzembo 37:21) Emonisi mpe polele ete “modefi azali mosaleli ya moto oyo azali kodefisa.” (Masese 22:7) Modefi asengeli koyeba ete soki afuti naino nyongo te, azali moombo ya modefisi. Lisese mosusu oyo ya Afrika ezali solo: “Soki odefi lokolo ya moto, akomema yo esika nyonso alingi.” Yango elingi koloba ete moto oyo azali na banyongo mingi, azali lisusu na bonsomi te ya kosala makambo oyo alingi.

Na yango, kofuta mbongo oyo odefaki esengeli kozala na makambo oyo otyaka na esika ya liboso. Soki bongo te, ekoki kobimisela yo mikakatano. Banyongo ebeleebele ekoki kobakisela yo mitungisi, ata mpe kozangisa yo mpɔngi na butu, kosalisa yo mosala mingi koleka, kobimisa koswana kati na mwasi ná mobali, kopanza libota, mbala mosusu mpe kosamba na Leta to kokɔta bolɔkɔ. Maloba oyo ezali na Baroma 13:8, ezali na bwanya mpenza; elobi boye: “Bózala na nyongo ya moto te, longola kaka nyongo ya kolingana.”

 EZALI MPENZA NA NTINA?

Nakotalela makambo oyo nyonso, ekozala malamu kozala ekɛngɛ ntango olingi kodefa mbongo. Ekozala malamu omituna boye: Ezali mpenza na ntina nádefa mbongo? Ezali nde mpo na kobatela mosala to mombongo oyo esalisaka ngai nakokisa bamposa ya libota na ngai? To ezali nde mwa lokoso, mbala mosusu mposa ya kozala na biloko oyo eleki makoki na ngai? Ata ndenge nini, ekozala malamu kosepela na oyo ozali na yango na esika ya komona ete osengeli kaka kodefa.

Toboyi te, tokoki kodefa soki likambo moko ya mbalakaka ebimi mpe mwaye mosusu ya kosala ezali te. Ata bongo, soki moto amoni malamu adefa, asengeli komonisa ete abongi kotyelama motema. Ndenge nini akoki kosala yango?

Ya liboso, koboya te kofuta moto nyongo na ye kaka mpo azali komonana lokola azali na mbongo mingi koleka basusu. Tosengeli te kokanisa ete soki moto azali komonana lokola azali na bozwi, asengeli kosunga biso soki tokeleli na mbongo. Tosengeli mpe te kokanisa ete ezali mabe te soki tosaleli moto ya ndenge wana makambo na bosembo te. Kolula te bato oyo bamonanaka lokola bakelelaka na mbongo te.​—Masese 28:22.

Na nsima, salá nyonso ofuta mbongo odefaki, mpe salá yango nokinoki. Soki moto oyo adefisaki yo apesaki dati ya sikisiki te, osengeli kopesa ye dati oyo okofuta mpe kotosa dati yango. Ezalaka malamu kokoma makambo wana nyonso na papye mpo kowelana ezala te kati na bino mibale. (Yirimia 32:9, 10) Soki esengeli, futá nyongo na yo na mabɔkɔ ya moto oyo adefisaki yo mpo opesa ye mersi. Kofuta nyongo ya moto ndenge boyokanaki, ebongisaka boyokani. Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu alobaki: “Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te.” (Matai 5:37) Lisusu, kobosanaka mobeko oyo te: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.”​—Matai 7:12.

BATOLI YA BIBLIA OYO ESALISAKA

Biblia epesi toli malamu mpo na mposa oyo moto azalaka na yango ya kodefa mbongo. Elobi boye: “Ya solo, ezaleli yango ya kokangama na Nzambe ná ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango ezali nzela ya kozwa litomba monene.” (1 Timote 6:6) Na maloba mosusu, kosepela na oyo ozali na yango ezali lolenge ya malamu koleka mpo na kokima makambo mabe oyo kodefa mbongo ebimisaka. Kasi, mpo na koloba solo, ezali pɛtɛɛ te kosepela na oyo ozali na yango na mokili ya lelo oyo bato balingaka mposa na bango ekokisama kaka mbala moko. Awa nde esɛngaka komonisa mpenza ‘ezaleli ya kokangama na Nzambe.’ Na ndenge nini?

Tózwa ndakisa ya mwasi moko ná mobali na ye na Asie, oyo bazali bakristo. Ntango bazalaki naino bilenge, bazalaki kolula baoyo bazalaki na ndako na bango moko. Yango wana, bazwaki ekateli ya kodefa mbongo na banki mpe epai ya bandeko mpo na kobakisa na mbongo oyo bazalaki na yango mpo básomba ndako. Kasi eumelaki te, ekómelaki bango kilo mpo na kofuta banyongo sanza nyonso. Bakómaki kosala misala ebele mokolo mobimba, yango esalaki ete bázala na ntango mingi te ya kolekisa ná bana na bango. Mobali alobi boye: “Mitungisi, mpasi mpe kozanga mpɔngi ezalaki lokola libanga moko ya kilo na motó na ngai. Emɛlisaki ngai mpema.”

“Kotalela biloko ya mokili ndenge oyo Nzambe atalelaka yango ezali libateli”

Na nsima, bakanisaki maloba oyo ezali na 1 Timote 6:6 mpe bamonaki ete solisyo ezalaki kaka ya kotɛka ndako yango. Ezwaki bango mbula mibale mobimba mpo kilo yango ekita. Liteya nini mwasi ná mobali yango bazwaki? Balobi boye: “Kotalela biloko ya mokili ndenge oyo Nzambe atalelaka yango ezali libateli.”

Bato mingi bayebi lisese ya Swahili oyo tolobelaki na ebandeli. Ata bongo, epekisá bato kodefa te. Na kotalela batoli ya Biblia oyo touti komona awa likoló, omoni te ete ezali likambo ya bwanya kokanisa malamumalamu na motuna oyo: Nasengeli kodefa mbongo?