Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Novembre 2014

 MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | YOZEFE

“Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye?”

“Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye?”

YOZEFE azali kopema mopɛpɛ oyo etondi na molunge, azali koyoka nsolo kitoko ya bafololo ya lotisi mpe ya milona mosusu ya mai. Etuluku moko ya bakomelesa oyo bazali kotambola na molɔngɔ bazali komema ye mpe balingi kokatisa mabwaku ya ebale Nile. Meká komona na makanisi molɔngɔ ya mibali oyo bazali kotambwisa bakamela na bango pembenipembeni ya mai mpo na kokóma na engumba moko ya Ezipito, bazali kokamwa moke bandɛkɛ babengi punzebale to ibis oyo ezali kopumbwa. Yozefe azali kokanisa lisusu ndako na bango oyo etikali mosika na bangomba ya Hebrone epai mopɛpɛ ezalaka makasi; akómi sikoyo na mokili mosusu mpenza.

Meká koyoka makelele ya bamakako oyo ezali koganga likoló ya banzete ya mbila mpe ya figi. Yozefe azali koyoka ata moke te monɔkɔ ya bato oyo bazali koleka na nzela. Mbala mosusu azali koluka kokanga ntina ata ya liloba moko to fraze oyo azali koyoka. Asengeli mpe koyekola. Kasi, ayebi ete akomona lisusu ndako na bango te.

Ekoki kozala ete Yozefe alekisaki naino mbula 17 to 18 te; kasi akutanaki na mikakatano oyo ekoki kolɛmbisa mibali mingi oyo bazali mikóló. Bandeko na ye moko bayokelaki ye zuwa mpe balukaki kutu koboma ye mpo azalaki mwana oyo tata na bango azalaki kolinga mingi. Na esika báboma ye, batɛkaki nde ye epai ya bakomelesa. (Ebandeli 37:2, 5, 18-28) Sikoyo, lokola batamboli bapɔsɔ ebele, esengo ya bakomelesa yango ezali se kobakisama, mpo bazali kopusana penepene ya engumba monene epai bakozwa benefisi ntango bakotɛka Yozefe mpe biloko mosusu ya valɛrɛ oyo bazali na yango. Yozefe asalaki nini mpo kozanga elikya ezwa misisa te na motema na ye mpe elɛmbisa ye nzoto te? Mpe ndenge nini tokoki lelo kosala mpo mikakatano to mitungisi ebebisa kondima na biso te? Ndakisa ya Yozefe ekoki koteya biso makambo mingi.

“YEHOVA AZALAKI ELONGO NA YOZEFE”

“Nzokande bakitaki na Yozefe na Ezipito, mpe Potifare, mosali ya Farao, kapita ya basoda oyo bakɛngɛlaka ye, Moezipito, asombaki ye na lobɔkɔ ya Bayishimaele, oyo bakitaki na ye kuna.” (Ebandeli 39:1) Na maloba wana, lisolo yango ya Biblia esalisi biso tómona nsɔni oyo elenge mobali yango ayokaki ntango batɛkaki ye lisusu. Akómaki lokola mwa eloko moko boye! Tokoki komona na makanisi ndenge Yozefe azali kolanda patrɔ na ye ya sika, mokonzi moko ya basoda ya Ezipito na engumba wana ya loyenge makasi oyo banzela na yango etondi na bazando ntango azali komema Yozefe na ndako ya sika oyo akobanda kofanda.

Ndako! Ekesanaki mpenza na eloko nyonso oyo Yozefe azalaki kobenga ndako. Abɔkwamaki na libota oyo bato na yango bazalaki kofanda na bahema mpo mbala na mbala bazalaki kolongwa ná bampate na bango mpe kokende kofanda na bisika mosusu. Awa, moto ya bozwi lokola Potifare afandaka na ndako moko kitoko mpenza oyo bapakolá balangi. Bato ya arkeoloji balobi ete bato ya kala ya Ezipito bazalaki kosepela na ba-jardin ya kitoko mpenza oyo ezali na banzete ya malili mpe mwa maziba ya mai mpo na kobɔkɔla bapapirisi, lotisi mpe milona mosusu oyo ekolaka na mai. Bandako mosusu ezingamaki na ba-jardin, ezalaki na baveranda mpo na kozwa mopɛpɛ, bafenetre ya likoló mpo na kokɔtisa mopɛpɛ, mpe bashambrɛ ebele, esika monene ya kolya mpe bashambrɛ ya bato ya misala.

 Bomɛngo wana ekamwisaki Yozefe? Emonani ete ekamwisaki ye te. Ekoki kozala ete libosoliboso amiyokaki mpenza ete azali ye moko. Baezipito bakesenaki na ye na monɔkɔ, na kolata, na kosala monzɛlɛ, oyo eleki mpenza, akesanaki na bango na makambo ya losambo. Baezipito bazalaki kosambela ebele ya banzambe, bazalaki kosalela maji mpe misala ya molili, bazalaki kosepela mpenza koyeba makambo etali liwa mpe bomoi nsima ya liwa. Ata bongo, likambo moko esalisaki Yozefe mpo komiyoka ete azali ye moko elɛmbisa ye nzoto te. Lisolo yango ya Biblia elobi boye: “Yehova azalaki elongo na Yozefe.” (Ebandeli 39:2) Na ntembe te, Yozefe afungolelaki Nzambe na ye motema. Biblia elobi ete “Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.” (Nzembo 145:18) Yozefe asalaki nini lisusu mpo apusana penepene ya Nzambe na ye?

Elenge yango atikaki te ete kozanga elikya elɛmbisa ye, mpe amipesaki na mosala na ye. Na ndenge yango, asalaki likambo oyo epesaki Yehova nzela apambola ye mingi, mpe eumelaki te patrɔ na ye ya sika akómaki kosepela na ye. Potifare amonaki ete Yehova, Nzambe ya libota ya Yozefe azalaki kopambola elenge mobali yango mpe na ntembe te, mapamboli yango ememelaki ndako ya Moezipito yango bolamu mingi. Mokemoke Yozefe akómaki na lokumu mingi na miso ya Potifare mpe patrɔ yango apesaki biloko na ye nyonso na mabɔkɔ ya elenge mobali wana ya makoki mpenza.​—Ebandeli 39:3-6.

Yozefe atiká ndakisa malamu mpo na bilenge oyo bazali kosalela Nzambe lelo oyo. Na ndakisa, na kelasi, na bantango mosusu bakoki kozala na esika oyo bazali komiyoka ete bakeseni mpenza na bato mosusu, esika oyo bato basepelaka na misala ya molili mpe bazali ata na elikya moko te mpo na bomoi. Soki ozali kokutana na makambo ya ndenge wana, kobosana te ete Yehova abongwanaka te. (Yakobo 1:17) Azalaki ntango nyonso elongo na baoyo bazalaki sembo epai na ye mpe balukaki kosala mosala makasi na ndenge oyo esepelisaki ye. Apambolaki bango mpenza, akosala mpe bongo mpo na yo.

Kasi lisolo yango emonisi ete na ntango yango, Yozefe azalaki kokóla. Elenge yango akómaki mobali mpenza, “azalaki kitoko mingi, na nzoto mpe na elongi.” Maloba yango emonisi ete likama moko ezalaki na nzela, mpo mbala mingi kozala kitoko mingi esalaka ete bato mosusu bátyela yo likebi oyo olingi te mpe oyo ebongi te.

Mwasi ya Potifare atyelaki Yozefe elenge ya sembo miso

“AYOKELAKI YE ATA MOKE TE”

Bosembo ezalaki na ntina mingi mpo na Yozefe; kasi ezalaki bongo te mpo na mwasi ya Potifare. Biblia elobi boye: “Mwasi ya nkolo na ye abandaki kotyela Yozefe miso mpe koloba ete: ‘Lalá na ngai.’” (Ebandeli 39:7) Yozefe alingaki nde kotika maloba ya mwasi mopakano wana ekweisa ye? Biblia emonisi biso te ete Yozefe azwaki mangwele mpo azanga mposa oyo ezalaka epai ya bilenge mibali, to mpo mwasi wana ya moto ya bozwi oyo azalaki kosala  epai ya Farao, oyo mobali na ye azalaki kobondelabondela ye azalaki kitoko te. Yozefe akanisaki ete patrɔ na ye akotikala koyeba likambo yango te? Alingaki nde kobendama na biloko oyo mwasi yango alingaki kopesa ye soki andimi kosangisa na ye nzoto?

Mpo na koloba solo, toyebi te nyonso oyo eyelaki Yozefe na makanisi. Kasi toyebi polele oyo ezalaki na motema na ye. Emonisami polele na eyano na ye: “Talá nkolo na ngai azali koyeba te eloko nini nazali na yango na ndako, mpe eloko na ye nyonso, apesi yango na lobɔkɔ na ngai. Na ndako oyo, ezali na moto moko te oyo aleki ngai, mpe ye aboyeli ngai ata eloko moko te longola kaka yo, mpo ozali mwasi na ye. Bongo ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?” (Ebandeli 39:8, 9) Meká komona na makanisi ndenge elenge mobali yango azali koloba maloba wana na lisɛki te. Ezali kosala ye mpasi koyoka kutu likambo oyo mwasi yango alingi kotinda ye asala. Mpo na nini?

Ndenge Yozefe alobaki, patrɔ na ye atyelaki ye motema. Potifare atyaki biloko nyonso ya ndako na ye na mabɔkɔ ya Yozefe, aboyelaki ye ata eloko moko te longola kaka mwasi na ye. Ndenge nini Yozefe akokaki kobebisa konfianse wana? Ayinaki likanisi wana. Kasi likambo mpenza oyo etindaki ye ayina yango makasi ezali: likanisi ya kosalela mpenza Yehova, Nzambe na ye lisumu. Yozefe ayekolaki makambo mingi etali ndenge oyo Yehova atalelaka libala mpe bosembo epai ya baboti na ye. Yehova nde abandisaki libala ya liboso mpe amonisaki makanisi na ye polele. Mwasi ná mobali basengeli kokangama esika moko mpe kokóma “mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Baoyo balukaki kobuka mobeko yango Nzambe alingaki kopesa bango etumba. Na ndakisa, mibali oyo balingaki kosangisa nzoto na makasi na mwasi ya Abrahama mpe ya Yisaka oyo bazalaki bankɔkɔ ya Yozefe, etikalaki moke Nzambe aboma bango. (Ebandeli 20:1-3; 26:7-11) Yozefe azwelaki yango liteya mpe alingaki kotosa yango.

Mwasi ya Potifare alingaki kutu koyoka yango te. Mpo, kanisá naino mwa moombo ya mpamba aboya ye, mpe aloba ete likambo oyo asɛngi ye ezali “mabe monene”! Ata bongo, atyaki ye kaka mbamba. Ntango mosusu ayokaki mabe mpo azalaki lofundo mpe lolendo, yango nde etindaki ye aluka kondimisa Yozefe na makasi. Na yango, amonisaki ezaleli lokola oyo Satana amonisaki ntango amekaki Yesu. Satana mpe alongaki te, mpe na esika alɛmba, azelaki “tii na ntango mosusu ya malamu.” (Luka 4:13) Na yango, bato ya sembo basengeli kokangama na ekateli na bango. Yango nde Yozefe asalaki. Atako likambo yango ekobaki “mokolo na mokolo,” aboyaki kobongola makanisi. Biblia elobi boye: “Ayokelaki ye ata moke te.” (Ebandeli 39:10) Ata bongo, mwasi ya Potifare azalaki molɛngoli ya mbamba mpenza.

Ntango bato nyonso ya misala bazalaki te na kati ya ndako, amonaki yango libaku moko kitoko. Ayebaki ete Yozefe akokɔta na ndako mpo asala mosala na ye. Ntango Yozefe akɔtaki na ndako, alukaki kokanga ye. Akangaki Yozefe na elamba mpe alobaki na ye mbala ya nsuka boye: “Lalá na ngai!” Yozefe alɛmbisaki mabɔkɔ te. Alukaki kolongwa na mabɔkɔ ya mwasi yango, amibendaki kasi mwasi yango akangaki elamba na ye makasi. Asundolaki elamba yango na mabɔkɔ ya mwasi yango. Mpe na nsima akimaki!​—Ebandeli 39:11, 12.

Tokoki kokanisa lisusu toli oyo ntoma Paulo akomaki na litambwisi ya elimo santu: “Bókima pite!” (1 Bakorinti 6:18) Oyo nde ndakisa kitoko Yozefe atikelá bakristo nyonso ya solo! Bomoi ekoki kotinda biso tózala elongo na baoyo batosaka te mibeko ya Nzambe na makambo etali bizaleli malamu, kasi yango elingi koloba te ete tosengeli kolanda bizaleli mabe. Ezala likama nini yango ekoki kobimisela biso, tosengeli kokima yango.

Yango ebimiselaki Yozefe mpasi makasi. Mwasi ya Potifare alingaki Yozefe afuta mpo na likambo yango. Abandaki mbala moko koganga, kobenga bato mosusu ya misala na ndako. Alobaki ete Yozefe alukaki kosangisa na ye nzoto na makasi mpe akimaki ntango ye agangaki. Abombaki elamba ya Yozefe oyo etikalaki na mabɔkɔ na ye tii ntango mobali na ye akoya. Ntango Potifare ayaki, ayebisaki ye lokuta yango, alobaki ete ezalaki foti ya mobali na ye ndenge amemaki mopaya yango na ndako na bango. Potifare asalaki nini? Biblia elobi boye: “Nkanda na ye engalaki”! Akɔtisaki Yozefe bolɔkɔ.​—Ebandeli 39:13-20.

“BAMONISAKI MAKOLO NA YE MPASI NA BIKANGELI”

Toyebi mpenza te ndenge babolɔkɔ ya Baezipito ezalaki na ntango wana. Bato ya arkeoloji bamonaki bisika yango oyo ebebá​—bandako ya makasi oyo ezalaki na babolɔkɔ mosusu na nse ya mabele. Yozefe alobelaki na nsima esika yango oyo soki babongoli liloba ná liloba elimboli “libulu,” oyo emonisi ete ezalaki esika moko oyo elikya ezalaki te. (Ebandeli 40:15) Mokanda ya Nzembo emonisi ete Yozefe anyokwamaki lisusu makasi: “Bamonisaki makolo  na ye mpasi na bikangeli, molimo na ye ekɔtaki na bibende.” (Nzembo 105:17, 18) Na bantango mosusu, Baezipito bazalaki kotya bato ya bolɔkɔ mabɔkɔ na nsima ya mokɔngɔ mpe kokanga yango na bansinga; bazalaki kolatisa bamosusu shɛni na kingo. Yozefe anyokwamaki mingi atako asalaki likambo moko te oyo esɛngaki ete bányokola ye bongo!

Kutu, ezalaki mpo na ntango mokuse te. Lisolo yango elobi ete Yozefe “atikalaki kuna na ndako ya bolɔkɔ.” Alekisaki bambula mingi na esika wana ya nsɔmɔ mpenza! * Yozefe ayebaki kutu te soki akobima na bolɔkɔ yango. Nini esalisaki Yozefe abungisa elikya te ntango mikolo, bapɔsɔ mpe basanza wana ya mpasi ezalaki koleka?

Lisolo yango epesi biso eyano ya kokitisa motema; elobi boye: “Yehova azalaki kaka elongo na Yozefe mpe azalaki komonisela ye motema boboto.” (Ebandeli 39:21) Ezala bolɔkɔ, bikangiseli, ata mpe bolɔkɔ ya molili na nse ya mabele ekoki te kopekisa motema boboto ya Yehova ekómela basaleli na ye. (Baroma 8:38, 39) Tokoki kokanisa ndenge Yozefe azalaki koyebisa Tata na ye ya likoló bampasi na ye na libondeli mpe na nsima kozwa kimya oyo kaka “Nzambe ya kobɔndisama nyonso” nde akoki kopesa. (2 Bakorinti 1:3, 4; Bafilipi 4:6, 7) Yehova asalelaki Yozefe nini lisusu? Biblia elobi ete Yehova azalaki kosala ete “andimama na miso ya kapita-mokonzi ya ndako ya bolɔkɔ.”

Emonani ete bazalaki kopesa bato ya bolɔkɔ misala, na mbala oyo mpe Yozefe asalaki likambo oyo etindaki Yehova apambola ye. Azalaki kosala mosala makasi, kosala nyonso mpo na kokokisa mosala oyo bazalaki kopesa ye mpe kotika nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Na lipamboli ya Yehova, bakómaki kotyela Yozefe motema mpe kopesa ye limemya, kaka ndenge azwaki yango na ndako ya Potifare. Biblia elobi boye: “Bongo kapita-mokonzi ya ndako ya bolɔkɔ apesaki bato nyonso ya bolɔkɔ oyo bazalaki na ndako ya bolɔkɔ na lobɔkɔ ya Yozefe; mpe eloko nyonso oyo bazalaki kosala kuna, ezali ye nde moto azalaki kotinda bango básala yango. Kapita-mokonzi ya ndako ya bolɔkɔ azalaki kotala eloko ata moko te oyo ezalaki na lobɔkɔ na ye, mpamba te Yehova azalaki elongo na Yozefe mpe oyo ye azalaki kosala, Yehova azalaki kolongisa yango.” (Ebandeli 39:22, 23) Koyeba ete Yehova azalaki kotyela ye likebi ebɔndisaki Yozefe!

Yozefe asalaki mosala makasi na bolɔkɔ mpe Yehova apambolaki ye

Tokoki kokutana na makambo mosusu na bomoi oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto, bakoki kutu kosalela biso makambo ya kozanga bosembo mpenza, kasi kondima ya Yozefe ekoki koteya biso. Soki topusani penepene na Yehova na libondeli, totosi mibeko na ye mpe tosali makasi mpo tósala oyo ezali sembo na miso na ye, tokopesa ye libaku ya kopambola biso. Mpo na Yozefe, Yehova abombelaki ye mapamboli mingi lisusu, ndenge tokomona yango na masolo ya mbala ya nsima.

^ par. 23 Biblia emonisi ete Yozefe azalaki na mbula soki 17 to 18 ntango ayaki na ndako ya Potifare mpe aumelaki kuna mwa moke mpo akóma mobali mpenza; ekoki kozala mwa bambula. Azalaki na mbula 30 ntango abimaki bolɔkɔ.​—Ebandeli 37:2; 39:6; 41:46.