Na mosala na ye awa na mabele, Yesu alobelaki makambo mingi. Na ndakisa, ateyaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela, ya kosepelisa Nzambe mpe ya kozwa esengo ya solosolo. (Matai 6:5-13; Marko 12:17; Luka 11:28) Kasi, likambo oyo alobelaki koleka makambo mosusu nyonso mpe oyo azalaki kosepela kolobela mingi, ezalaki Bokonzi ya Nzambe.​—Luka 6:45.

Ndenge lisolo oyo eleki emonisaki yango, Yesu amipesaki mingi na “koteya mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 8:1) Amipesaki mpenza, atambolaki ebele ya bakilomɛtrɛ na mabele mobimba ya Yisraele mpo na koteya bato Bokonzi ya Nzambe. Mosala oyo Yesu asalaki elobelami na baevanzile minei, oyo etángi Bokonzi mbala koleka 100. Bisika mingi oyo etángi yango ezali na maloba ya Yesu, mpe ezali kaka mwa moke na kotalela makambo nyonso oyo alobaki mpo na Bokonzi ya Nzambe!​—Yoane 21:25.

Mpo na nini Bokonzi ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu ntango azalaki awa na mabele? Ezali mpo Yesu ayebaki ete Nzambe aponaki ye mpo azala Mokonzi na yango. (Yisaya 9:6; Luka 22:28-30) Kasi, Yesu azalaki te koluka kozwa Bokonzi to koluka lokumu na ye moko. (Matai 11:29; Marko 10:17, 18) Soki alobelaki mingi Bokonzi, ezalaki te mpo na koluka matomba na ye moko. Libosoliboso, ezali mpo ayebaki makambo oyo Bokonzi ya Nzambe * ekosala mpo na Tata na ye ya likoló mpe bayekoli na ye ya sembo.

OYO BOKONZI EKOSALA MPO NA TATA YA YESU

Yesu alingaka Tata na ye ya likoló mingi mpenza. (Masese 8:30; Yoane 14:31) Asepelaka na bizaleli kitoko ya Tata na ye na ndakisa bolingo, motema mawa mpe bosembo. (Kolimbola Mibeko 32:4; Yisaya 49:15; 1 Yoane 4:8) Na ntembe te, Yesu ayinaka koyoka lokuta oyo elobamaka mpo na Tata na ye ete Nzambe akipaka bampasi ya bato te mpe alingaka ete bato banyokwama. Ntina mosusu oyo Yesu azalaki kosepela kosakola “nsango malamu ya bokonzi” ezali mpo ayebaki ete ekozongisa lokumu ya Tata na ye. (Matai 4:23; 6:9, 10) Ndenge nini ekosala yango?

Na nzela ya Bokonzi, Yehova akosala makambo ya malamu mpo na bato. “Akopangwisa mpisoli nyonso” na miso ya bato ya sembo. Yehova akolongola makambo nyonso oyo etindaka bato babimisa mpisoli, akosala ete ‘liwa ezala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ezala lisusu mpe te.’ (Emoniseli 21:3, 4) Nzambe akolongola bampasi nyonso na nzela ya Bokonzi yango. *

 Ezali likambo ya kokamwa te soki Yesu azalaki kosepela kolobela Bokonzi yango epai ya bato! Ayebaki ete ekomonisa mpenza nguya mpe motema mawa ya Tata na ye. (Yakobo 5:11) Ayebaki mpe ete Bokonzi yango ekomemela bato mosusu oyo ye alingaka matomba; elingi koloba bato ya sembo.

OYO BOKONZI EKOSALA MPO NA BATO YA SEMBO

Bambula mingi liboso aya awa na mabele, Yesu azalaki na likoló ná Tata na ye. Tata asalaki ná ye elongo mpo na kozalisa biloko mosusu nyonso, kobanda na likoló, ebele ya minzoto, bagalaksi tii na mabele ya kitoko mpe banyama ná bandɛkɛ oyo ezali na kati. (Bakolose 1:15, 16) Na nyonso wana, Yesu azalaki nde “kolinga mingi” bato.​—Masese 8:31.

Bolingo ya Yesu mpo na bato emonanaki mpenza na mosala na ye ya kosakola. Kaka na ebandeli mpenza ya mosala yango, amonisaki polele ete ayaki awa na mabele mpo na ‘kosakola nsango malamu’ epai ya baoyo bazalaki na bosɛnga. (Luka 4:18) Kasi, Yesu asukaki kaka te na kosalisa bato na maloba. Mbala na mbala, asalaki makambo oyo emonisaki ete alingaka mpenza bato. Na ndakisa, ntango bato ebele bayanganaki mpo na koyoka ye, Yesu “ayokelaki bango mawa, mpe abikisaki bato na bango ya maladi.” (Matai 14:14) Ntango moto moko oyo azalaki na maladi ya mabe mpenza andimaki ete Yesu akokaki kobikisa ye soki alingi, bolingo etindaki Yesu abikisa moto yango mpe na boboto nyonso, ayebisaki moto yango boye: “Nalingi. Kómá pɛto.” (Luka 5:12, 13) Ntango amonaki moninga na ye Maria azali kolela ndeko na ye Lazare oyo akufaki, Yesu “atungisamaki makasi,” “abulunganaki” mpe ‘abimisaki mpisoli.’ (Yoane 11:32-36) Na nsima, asalaki likambo ya kokamwa, asekwisaki Lazare atako elekaki mikolo minei banda Lazare akufaki!​—Yoane 11:38-44.

Kasi Yesu ayebaki ete lisalisi wana oyo apesaki, ezalaki kaka mpo na ntango mokuse. Ayebaki ete nsukansuka bato nyonso oyo abikisaki bakobɛla lisusu mpe baoyo nyonso oyo asekwisaki, bakokufa lisusu. Ata bongo, Yesu ayebaki mpe ete Bokonzi ya Nzambe ekosukisa makambo ya ndenge wana mpo na libela. Yango wana, Yesu asukaki kaka te na kosala makamwisi; asakolaki mpe “nsango malamu ya Bokonzi” na molende nyonso. (Matai 9:35) Makamwisi oyo asalaki emonisaki mwa moke oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala kala mingi te na mabele mobimba. Tótala oyo Biblia elaki mpo na eleko yango.

  •  Maladi ekozala lisusu te.

    “Na ntango yango miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama, mpe matoi ya bato oyo bakufá matoi ekofungwama. Na ntango yango motɛngumi akopumbwa lokola serfe, mpe lolemo ya moto oyo alobaka te ekoganga na esengo.” Lisusu, “moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yisaya 33:24; 35:5, 6.

  • Liwa ekozala lisusu te.

    “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​Nzembo 37:29.

    “Akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.”​—Yisaya 25:8.

  • Bakufi bakozonga na bomoi.

    “Baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.”​—Yoane 5:28, 29.

    “Lisekwa ekozala.”​—Misala 24:15.

  • Moto nyonso akozala na ndako na ye mpe mosala.

    “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te. . . . Mpe bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.”​—Yisaya 65:21, 22.

  •  Bitumba ekozala lisusu te.

    “Ye azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele.”​—Nzembo 46:9.

    “Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu, bakoyekola mpe etumba lisusu te.”​—Yisaya 2:4.

  • Kozanga bilei ekozala lisusu te.

    “Mabele ekobota mpenza mbuma na yango; Nzambe, Nzambe na biso, akopambola biso.”​—Nzembo 67:6.

    “Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”​—Nzembo 72:16.

  • Bobola ekozala lisusu te.

    “Mpo bakobosana mobola libela te.”​—Nzembo 9:18.

    “Mpo akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa, mpe akobikisa milimo ya babola.”​—Nzembo 72:12, 13.

Ntango ozali kotalela bilaka yango oyo etali Bokonzi ya Nzambe, omoni sikoyo mpo na nini ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu? Ntango azalaki awa na mabele, azalaki kosepela kolobela Bokonzi ya Nzambe epai ya moto nyonso oyo andimaki koyoka ye mpo ayebaki ete Bokonzi yango ekosukisa makambo nyonso ya mpasi oyo tozali komona lelo.

Bilaka wana ya Biblia oyo elobeli Bokonzi, esepelisi yo? Soki Ɛɛ, okolinga koyekola lisusu makambo mingi oyo etali Bokonzi yango? Okoki kosala nini mpo ozwa mapamboli wana? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.

^ par. 5 Lisolo oyo emonisi maloba ya Yesu lokola nde azali koloba yango sikoyo mpo azali na bomoi na likoló, mpe banda azongá na likoló, na ntembe te, Bokonzi ezalaka kaka na ntina mingi mpo na ye.​—Luka 24:51.

^ par. 8 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala mpo na mwa ntango, talá mokapo 11 na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.