Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Octobre 2014

 BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nazalaki koluka kaka matomba na ngai moko

Nazalaki koluka kaka matomba na ngai moko
  • ABOTAMAKI NA: 1951

  • EKÓLO: ALLEMAGNE

  • BOMOI NA YE YA KALA: EZALELI YA LOLENDO MPE YA LIPANDA

NDENGE NAZALAKI:

Ntango nazalaki mwana moke, tozalaki kofanda pene na Leipzig, na Ɛsti ya Allemagne, mosika te na République tchèque mpe ekólo Pologne. Ntango nakómaki na mbula 6, mosala ya tata na ngai esalaki ete tókende Brésil mpe na nsima na Équateur.

Ntango nakómaki na mbula 14, batindaki ngai na Internat na Allemagne. Lokola baboti na ngai bazalaki mosika na Amerika ya Sudi, nakómaki komisalela makambo nyonso ngai moko. Nakómaki kosala makambo oyo nalingi, nazalaki kokipe te soki ekopesa basusu mpasi to te.

Ntango nakómaki na mbula 17, baboti na ngai bazongaki na Allemagne. Na ebandeli, nafandaki na ndako na bango. Kasi, ezaleli oyo nakómaki na yango ya kosala kaka makambo oyo nalingi, esalaki ete nakóma na mokakatano ya kosala oyo bango bazalaki kolinga. Ntango nakokisaki mbula 18, nalongwaki na ndako.

Nakómaki motó likolólikoló mpe nazalaki koluka koyeba ntina ya bomoi. Nsima ya kotala lolenge ya bomoi oyo bato mosusu bazalaki na yango mpe bibongiseli ndenge na ndenge, namonaki ete likambo eleki ntina ya kosala na bomoi ezali ya kokende kotambola na bisika ndenge na ndenge ya planɛti na biso oyo ya kitoko liboso ete bato babebisa yango.

Nalongwaki na Allemagne, nasombaki tukutuku, mpe nakendaki na Afrika. Eumelaki te, nalingaki kozonga na Mpoto mpo na kobongisa tukutuku na ngai. Mwa moke na nsima, nakómaki na libongo moko na Portugal. Nazwaki ekateli ya kotika kosala mibembo na tukutuku mpe nakómaki kosala yango na masuwa.

Nakɔtaki na etuluku moko ya bilenge oyo bazalaki komibongisa mpo na mobembo moko na Mbu ya Atlantike. Kaka na kati ya bilenge yango nde nakutanaki na Laurie, mwasi oyo nabalaki. Liboso, tokatisaki na masuwa mpo na kokende na bisanga ya Caraïbe. Nsima ya kofanda mwa moke na Porto Rico, tozongaki na Mpoto. Tolingaki kosomba masuwa moko oyo tokobanda kofanda na kati. Kasi, nsima ya koluka na boumeli na sanza misato, likanisi yango esukaki na nzela na mbalakaka. Bakɔtisaki ngai na mosala ya soda na Allemagne.

Nalekisaki sanza 15 na mosala ya basoda oyo babundaka na mai na Allemagne. Na ntango wana, tobalanaki na Laurie mpe tomibongisaki mpo na kokoba na bomoi na biso ya kosala mibembo.  Mwa moke liboso ete nakɔta na mosala ya soda, tosombaki nkɔbɛ ya masuwa (coque). Ntango nazalaki na mosala ya soda, mokemoke tokómisaki nkɔbɛ yango mwa masuwa ya moke. Tozalaki na mposa ya kofanda na kati mpe kokoba kotambola mpo na kotala planɛti na biso ya kitoko. Nsima ya mosala na ngai ya soda mpe liboso ya kosilisa mwa masuwa oyo nazalaki kosala, tokutanaki na Batatoli ya Yehova mpe tokómaki koyekola Biblia.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Na ebandeli, namonaki te ntina ya kobongola makambo mingi na bomoi na ngai. Nabalaki mwasi oyo nazalaki kofanda na ye, mpe natikaki komɛla makaya. (Baefese 5:5) Lokola tomityelaki mokano ya kotambola mokili mobimba, namonaki ete ezali na ntina kokende kotala biloko kitoko oyo Nzambe akelá.

Nzokande, nasengelaki mpenza kobongola makambo mosusu na bomoi na ngai, mingimingi bizaleli na ngai. Lokola nazalaki mpenza na lolendo mpe komityela motema mingi, nazalaki kaka kotyela makoki mpe makambo oyo nazalaki kosala motema. Nazalaki koluka kaka matomba na ngai moko.

Mokolo moko, natángaki lisolo oyo Yesu asalaki likoló ya ngomba. (Matai mokapo 5 tii 7) Liboso, nayebaki mpenza te soki kozala na esengo oyo Yesu alobelaki ezali mpenza nini. Na ndakisa, alobaki ete esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa. (Matai 5:6) Namitunaki ndenge nini moto oyo azali na mposa akoki kozala moto ya esengo. Ntango nakobaki koyekola, nayaki koyeba ete moto nyonso azalaka na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe, kasi na komikitisa nyonso, tosengeli koyeba mposa yango liboso ya kokokisa yango. Ezali ndenge Yesu alobaki yango: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​—Matai 5:3.

Nsima ya kobanda koyekola Biblia na Allemagne, ngai ná Laurie tokendaki na France, mpe na nsima na Italie. Esika nyonso oyo tozalaki kokende, tozalaki kokutana na Batatoli ya Yehova. Bolingo ya solosolo mpe bomoko oyo bazalaki na yango, ezalaki kokamwisa ngai mingi. Namonaki ete Batatoli ya Yehova bazali mpenza libota moko ya mokili mobimba. (Yoane 13:34, 35) Na nsima, ngai ná Laurie tozwaki batisimo mpe tokómaki Batatoli ya Yehova.

Nsima ya batisimo, nakobaki kobongola bizaleli na ngai. Ngai ná Laurie tozwaki ekateli ya kokende na Afrika mpe na nsima kokatisa Mbu Atlantike mpo na kokende na États-Unis. Ntango tozalaki na kati ya mbu mpe kaka biso mibale na masuwa na biso ya moke mpe mai ezingi biso, namonaki mpenza ete tozali na ntina te soki tomikokanisi na Mozalisi na biso. Lokola na kati ya mbu tozalaki na ntango mingi, namipesaki na kotánga Biblia. Masolo ya bomoi ya Yesu awa na mabele, ebendaki mpenza likebi na ngai. Atako azalaki moto ya masumu te mpe na makoki koleka moto nyonso awa na mabele, abendaki soki moke te likebi ya bato epai na ye moko. Bomoi na ye ezalaki te mpo na koluka matomba na ye moko, kasi nde oyo ya Tata na ye ya likoló.

Namonaki ete nasengelaki kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ngai

Ntango nakanisaki na mozindo na ndakisa ya Yesu, namonaki ete nasengelaki kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ngai na esika ya koluka kokokisa makambo ndenge na ndenge oyo nalingaki kosala. (Matai 6:33) Ntango tokómaki na États-Unis, tozwaki ekateli ya kotika kotambola mokili mobimba mpe kofanda kuna mpo na komipesa na losambo na biso.

MATOMBA OYO NAZWI:

Ntango nazalaki komityela motema mingi, nazalaki mpenza koyeba te soki nazwa ekateli nini. Kasi, lelo oyo namoni mpenza esika ya kozwa bwanya oyo ebongi mpo na kosalisa ngai nazwaka bikateli ya malamu. (Yisaya 48:17, 18) Nayebaki mpenza ntina ya bomoi oyo nayebaki te liboso; elingi koloba kosalela Nzambe mpe kosalisa bato mosusu báyeba makambo etali ye.

Kosalela batoli ya Biblia esalaki ete tókóma koyokana lisusu malamu ná Laurie. Tozwaki mpe lipamboli ya kobota mwana ya mwasi ya kitoko, oyo ayebi Yehova mpe alingaka ye.

Bomoi na biso ya kosala mibembo na mai ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kasi, na lisalisi ya Yehova, tozwaki ekateli ya kolɛmba soki moke te kosalela Nzambe to kotika kotyela ye motema.​—Masese 3:5, 6.