Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Septembre 2014

Biblia na monɔkɔ ya Syriaque—Lisalisi mpo na koyeba makambo mingi etali istware ya mabongoli ya liboso ya Biblia

Biblia na monɔkɔ ya Syriaque—Lisalisi mpo na koyeba makambo mingi etali istware ya mabongoli ya liboso ya Biblia

Na 1892, bandeko basi mibale ya mapasa Agnes Smith Lewis ná Margaret Dunlop Gibson basalaki mobembo ya mikolo 9 na kamela na bango na esobe tii na Monastɛrɛ Sainte-Catherine na nse ya Ngomba Sinai. Mpo na nini basi wana oyo bazalaki na mbula pene na 50 basalaki mobembo ya ndenge wana na ntango oyo kosala mibembo na Azia ezalaki mpenza likama? Eyano na motuna wana ekoki kotinda yo ondima mpenza ete makambo oyo ezali na Biblia ezali solo.

Agnes Smith Lewis mpe Monastɛrɛ Sainte-Catherine

LIBOSO Yesu azonga na likoló, atindaki bayekoli na ye básakola mpo na ye “na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Misala 1:8) Bayekoli basalaki yango na molende mpe mpiko. Kasi, eumelaki te, bakutanaki na botɛmɛli makasi na Yerusaleme mpe yango esalaki ete Stefano (Étienne) akufa liwa ya martire. Bayekoli mingi ya Yesu bakimaki na Antiokia, Siri, moko ya bingumba minene ya ampire ya Roma na ntaka ya kilomɛtrɛ 550 na nɔrdi ya Yerusaleme.Misala 11:19.

Na Antiokia, bayekoli bakobaki kosakola “nsango malamu” oyo etali Yesu, mpe bato mingi oyo bazalaki Bayuda te bakómaki bandimi. (Misala 11:20, 21) Atako Grɛki ezalaki monɔkɔ oyo ezalaki kolobama mingi na kati ya Antiokia, kasi na libándá mpe na etúká, bato bazalaki koloba monɔkɔ ya Syriaque.

NSANGO MALAMU EBONGOLAMI NA MONƆKƆ YA SYRIAQUE

Lokola na siɛklɛ ya mibale motángo ya bakristo oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Syriaque ezalaki kobakisama, esɛngaki ete nsango malamu ebongolama na monɔkɔ na bango. Na yango, emonani ete Syriaque ezali monɔkɔ ya liboso oyo  babongolaki Makomami ya Grɛki ya Bokristo kasi Latin te.

Na mobu soki 170 ya ntango na biso, Tatien, mokomi moko ya Siri (kobanda mobu 120 tii 173) asangisaki baevanzile minei oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe mpe abimisaki na Grɛki to na Syriaque, libongoli oyo babengaka Diatessaron, liloba ya Grɛki oyo elimboli “Na kolanda baevanzile [yango] minei.” Na nsima Éphrem, moto ya Siri (kobanda mobu 310 tii 373) abimisaki buku oyo elobelaki Diatessaron, yango emonisaki ete bakristo mingi ya Siri bazalaki kosalela libongoli yango.

Libongoli Diatessaron ezali na ntina mingi mpo na biso lelo oyo. Mpo na nini? Na siɛklɛ ya 19, bato mosusu ya mayele balobaki ete baevanzile ekomamaki mwa moke na nsuka ya siɛklɛ ya mibale, kobanda na mobu 130 tii mobu 170 ya ntango na biso, yango wana ekoki te kozala na masolo ya solo ya bomoi ya Yesu. Nzokande, bamaniskri ya kala ya Diatessaron oyo bautaki komona, emonisaki ete bato mingi bazalaki na evanzile ya Matai, Marko, Luka mpe Yoane na katikati ya siɛklɛ ya mibale. Boye, esengelaki kokomama mwa moke liboso. Lisusu, lokola Tatien asalelaki te baevanzile oyo ekomamaki te na elimo ya Nzambe ndenge asalaki yango mpo na baevanzile minei ntango abimisaki libongoli Diatessaron, yango emonisi ntina oyo bato bazalaki te kotyela baevanzile wana mosusu motema.

Peshitta ya Syriaque ya mikanda mitano ya liboso ya Biblia ya mobu 464 ya ntango na biso ezali maniskri ya Biblia oyo ezali na esika ya mibale na bamaniskri oyo eumeli mingi

Na ebandeli ya siɛklɛ ya 5, bato mingi ya nɔrdi ya Mezopotamia bakómaki kosalela Biblia ya monɔkɔ ya Syriaque. Libongoli yango oyo esalemaki na boumeli ya siɛklɛ ya mibale to ya misato, ezalaki na mikanda nyonso ya Biblia longola kaka mikanda oyo: 2 Petro, 2 ná 3 Yoane, Yuda mpe Emoniseli. Babengaka yango Peshitta, oyo elimboli “Mpasi te” to “Polele.” Peshitta ezali moko ya mabongoli ya kala mpe oyo ezalaki komonisa mpenza ete eutaki na bamaniskri ya ebandeli ya Biblia.

Likambo ya esengo, maniskri moko ya Peshitta ezali na dati oyo bakomá, oyo ekokani na dati ya mobu 459/460 ya ntango na biso; yango esali ete ezala maniskri ya kala mpenza ya Biblia oyo ezali na dati oyo eyebani. Na mobu soki 508 ya ntango na biso, babongisaki lisusu libongoli ya Peshitta mpe babakisaki babuku mitano oyo ezangaki. Bakómaki kobenga libongoli yango Philoxenian Version.

BAMONAKI BAMANISKRI MOSUSU YA MONƆKƆ YA SYRIAQUE

Tii na siɛklɛ ya 19, bakopi nyonso ya Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo eyebanaki, ezalaki ya siɛklɛ ya mitano to koleka. Mpo na ntina yango, bato ya mayele na makambo ya Biblia batyaki likebi mingi na mabongoli wana ya liboso, na ndakisa Vulgate ya Latin mpe Peshitta ya monɔkɔ ya Syriaque. Bamosusu bakómaki kokanisa ete basalelaki libongoli ya kala ya monɔkɔ ya Syriaque mpo na kobimisa Peshitta. Kasi ata makomi moko te ya libongoli yango eyebani. Lokola libongoli ya monɔkɔ ya Syriaque esalemaki na siɛklɛ ya mibale, ekosalisa mpo na koyeba ndenge makomi ya ebandeli ya Biblia ezalaki, mpe na ntembe te, ekosalisa mpenza bato ya mayele na makambo ya Biblia! Libongoli moko ya monɔkɔ ya Syriaque ezalaki mpenza? Tokoki komona yango?

Maniskri oyo bapalolá lisusu oyo babengi Syriaque ya Sinai. Makomi oyo baevanzile ezali komonana na mopanzi

Ɛɛ, ezalaki! Kutu, bamonaki bamaniskri mibale ya monɔkɔ ya Syriaque ya ndenge wana. Ya liboso ezalaki ya siɛklɛ ya mitano. Ezalaki na kati ya ebele ya bamaniskri ya monɔkɔ ya Syriaque oyo British Museum ezwaki na esobe ya Nitrian na Egypte na mobu 1842. Babengaki yango Syriaque ya Cureton mpo William Cureton, oyo asungaka mokambi ya British Museum na oyo etali kobatela bamaniskri nde amonaki mpe abimisaki yango. Maniskri yango ya motuya mingi ezalaki na baevanzile minei oyo ebandaki na Matai, Marko, Yoane mpe Luka.

Maniskri ya mibale oyo ezali tii lelo, ezali Syriaque ya Sinai. Yango nde bandeko mibale ya mapasa oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo bamonaki. Atako Agnes akɔtaki iniversite te, ayekolaki  minɔkɔ 8 ya bapaya, moko na yango ezalaki monɔkɔ ya Syriaque. Na 1892, Agnes amonaki biloko moko ya motuya na Monastɛrɛ ya Sainte-Catherine na Egypte.

Kuna, amonaki maniskri ya monɔkɔ ya Syriaque na armware moko oyo ezalaki na molili. Ndenge ye moko alobaki, “maniskri yango ezalaki kitoko te na kotala mpo ezalaki salite makasi, mpe bapapye na yango ekangamakangamá mpo ata moto moko te asimbá yango” na boumeli ya basiɛklɛ. Ezalaki maniskri oyo bapalolaki makomi oyo ezalaki liboso mpe bakómaki na esika na yango makomi mosusu ya Syriaque oyo elobeli basi basantu. Nzokande, Agnes atalaki malamumalamu mwa makomi oyo ezalaki na nse mpe maloba “ya Matai,” “ya Marko,” to “ya Luka” oyo ezalaki likoló. Maniskri oyo ezalaki na mabɔkɔ na ye ezalaki codex ya monɔkɔ ya Syriaque ya baevanzile nyonso minei! Bato ya mayele bamoni sikoyo ete codex yango ekomamaki pene na nsuka ya siɛklɛ ya minei.

Bazwaka Syriaque ya Sinai lokola moko ya bamaniskri ya ntina mpenza ndenge moko na bamaniskri ya Biblia ya monɔkɔ ya Grɛki oyo bamonaki, na ndakisa Codex Sinaiticus mpe Codex Vaticanus. Lelo oyo, bato mingi bandimaka ete basalelaki bakopi ya kala ya baevanzile ya monɔkɔ ya Syriaque ya nsuka ya siɛklɛ ya mibale to ya ebandeli ya siɛklɛ ya misato mpo na kosala bamaniskri ya Cureton mpe ya Sinai.

“LILOBA YA NZAMBE NA BISO EKOUMELA SEKO”

Bamaniskri yango ekoki kosalisa bayekoli ya Biblia lelo oyo? Ɛɛ! Tozwa ndakisa ya oyo babengaka bosukisi ya molai ya evanzile ya Marko, oyo na Babiblia mosusu elandaka Marko 16:8. Ezali mpe na Codex Alexandrinus ya Grɛki ya siɛklɛ ya mitano mpe Vulgate ya Latin mpe na bisika mosusu. Kasi, Codex Sinaiticus ná Codex Vaticanus baminiskri mibale ya ntina mingi ya monɔkɔ ya Grɛki ya siɛklɛ ya minei esuki kaka na Marko 16:8. Maniskri Syriaque ya Sinai ezali te na bosukisi wana ya molai, yango emonisi mpenza ete bosukisi wana ya molai ezali makambo oyo babakisá kobakisa mpe ezalaki te na evanzile oyo Marko akomaki.

Tózwa ndakisa mosusu. Na siɛklɛ ya 19, pene na mabongoli nyonso ya Babiblia ebakisaki likanisi ya lokuta ya Bosato na 1 Yoane 5:7. Kasi, likanisi yango ezali te na bamaniskri ya kala ya monɔkɔ ya Grɛki. Ata na Peshitta, likanisi yango ezali te mpe emonisi ete likanisi oyo babakisá kobakisa na 1 Yoane 5:7 ezali mpenza kobebisa makomi ya Biblia.

Emonani polele ete Yehova Nzambe abatelaki Liloba na ye Mosantu kaka ndenge alakaki. Na kati na yango, Nzambe ayebisi biso boye: “Matiti ya mobesu ekauki, fololo elɛmbilɛmbi; kasi liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko.” (Yisaya 40:8; 1 Petro 1:25) Libongoli oyo babengi Peshitta esalisi mingi mpo na kobongola na bosikisiki nsango ya Biblia mpo na bato nyonso.

Makambo mosusu

Biblia eteyaka mpenza nini?

Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe