Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Septembre 2014

Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele ezalaki sembo?

Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele ezalaki sembo?

ELEKI mwa mikolo, tribinale moko na ekólo moko ya Mpoto endimaki makambo ya lokuta oyo bafundaki mibali mibale ete babomi moto mpe bakatelaki bango etumbu ya liwa. Ntango eyebanaki ete likambo yango ezali lokuta, baavoka basalaki makasi mpo moko na bango azwa bonsomi. Kasi, ata avoka ya mayele ndenge nini akokaki kosala eloko te mpo na oyo mosusu mpo basí babomaki ye.

Lokola makambo ya ndenge wana ekoki kosalema ata na tribinale ya ndenge nini, Biblia elobi boye: “Bosembo, ɛɛ bosembo nde okolanda.” (Kolimbola Mibeko 16:20) Na bisika oyo bazuzi basalelaka toli yango, bana-mboka bazwelaka yango matomba. Mibeko ya Nzambe esɛngaki bazuzi ya Yisraele básambisaka na bosembo mpe kozanga kopona bilongi. Tótalela naino Mibeko yango mpo tómona soki “banzela na ye [Nzambe] nyonso ezali bosembo.”​—Kolimbola Mibeko 32:4.

BAZUZI YA “BWANYA, YA MAYELE MPE OYO BAYEBI MAKAMBO MINGI”

Soki bazuzi bayebi mosala malamu, bazali sembo mpe baboyaka kanyaka, bato bazwelaka yango bolamu. Mibeko ya Nzambe epai ya Bayisraele esɛngaki bazuzi bázala ndenge wana. Na ebandeli mpenza ya mobembo na bango na esobe, Nzambe ayebisaki Moize aluka “mibali oyo bakoki, oyo babangaka Nzambe, mibali oyo babongi kotyelama motema, oyo bayinaka litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe,” mpo bázala bazuzi. (Kobima 18:21, 22) Bambula 40 na nsima, Nzambe amonisaki lisusu ntina ya kozala na “mibali ya bwanya mpe ya mayele mpe oyo bayebi makambo mingi,” mpo na kosambisa bato na ye.​—Kolimbola Mibeko 1:13-17.

Basiɛklɛ mingi na nsima, Yehoshafate * mokonzi ya Yuda akebisaki bazuzi boye: “Bótala malamu oyo bozali kosala, mpo bozali kosambisa mpo na moto te, kasi nde mpo na Yehova; mpe na likambo oyo etali kosambisa, ye azali elongo na bino. Bongo, sikoyo, nsɔmɔ ya Yehova ekwela bino. Bókeba mpe bósala, mpo epai ya Yehova Nzambe na biso, kozanga boyengene to kopona bilongi to kozwa kanyaka ezalaka te.” (2 Ntango 19:6, 7) Na yango, mokonzi akundwelaki bazuzi ete soki kopona bilongi mpe lokoso esali ete bázwa bikateli ya mabe, bakozongisa monɔkɔ mpo na makambo nyonso ya mabe oyo yango ekobimisa.

Ntango bazuzi ya Yisraele bazalaki kotosa mibeko yango, ekólo mobimba ezalaki na kimya mpe ebatelamaki malamu. Kasi Mibeko ya Nzambe epesaki mpe malako oyo esalisaki bazuzi bákata makambo na bosembo ata na makambo ya mpasi koleka. Wapi mwa malako yango mosusu?

MALAKO OYO ESALISAKI MPO NA KOKATA MAKAMBO NA BOSEMBO

Atako esɛngaki ete bazuzi bázala na bwanya mpe na makoki, basengelaki te kotyela makoki to bwanya yango motema mpo na kosambisa. Yehova Nzambe apesaki bango malako oyo ekokaki kosalisa bango bákata makambo na bosembo. Talá mwa malako yango oyo bazuzi ya Yisraele bazwaki.

Kosala ankɛtɛ malamumalamu. Na nzela ya Moize, Nzambe ayebisaki bazuzi ya Yisraele ete: “Ntango bokoyoka makambo kati na bandeko na bino, bosengeli kosambisa na boyengebene.” (Kolimbola Mibeko 1:16) Bazuzi bakokaki kokata makambo na bosembo kaka soki bayebi makambo nyonso oyo etali  likambo yango. Yango wana, Nzambe ayebisaki bazuzi oyo bazalaki kosambisa boye: “Osengeli koluka mpe kotalatala mpe kotuna malamumalamu.” Bazuzi basengelaki kondimisama ete likambo oyo bafundi moto “ezali solo” liboso básambisa ye.​—Kolimbola Mibeko 13:14; 17:4.

Koyoka oyo batɛmwɛ bakoloba. Maloba ya batɛmwɛ ezalaki kosalisa na baankɛtɛ. Mibeko ya Nzambe elobaki boye: “Motatoli moko kaka akotɛlɛma te mpo na kokweisa moto mpo na libunga to lisumu moko boye, na lisumu nyonso oyo moto yango akoki kosala. Na monɔkɔ ya batatoli mibale to na monɔkɔ ya batatoli misato nde likambo ekondimama.” (Kolimbola Mibeko 19:15) Mibeko ya Nzambe elobaki boye mpo na batɛmwɛ: “Osengeli te kopalanganisa nsango oyo ezali solo te. Kopesa moto mabe mabɔkɔ te na kokómáká motatoli oyo azali kokana kosala mabe.”​—Kobima 23:1.

Batɛmwɛ basengelaki koloba solo. Etumbu moto oyo akosi na tribinale asengelaki kozwa ezalaki likebisi mpo na tɛmwɛ nyonso. Mibeko elobaki boye: “Basambisi yango basengeli koluka koyeba likambo yango malamumalamu, mpe soki motatoli yango azali motatoli ya lokuta mpe afundi ndeko na ye na efundeli ya lokuta, bosengeli kosala ye kaka ndenge akanaki kosala ndeko na ye, mpe osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.” (Kolimbola Mibeko 19:18, 19) Yango wana soki moto akosi na tribinale mpo azwa libula ya moto mosusu, ye mpe asengelaki kobungisa libula na ye. Soki akoseli moto oyo ayebi ete asali likambo te mpo báboma ye, ye mpe asengelaki kobomama. Malako yango ezalaki kotinda mpenza bato báloba solo.

Kosambisa kozanga kopona bilongi. Kaka soki bazuzi bayebi makambo nyonso oyo etali likambo yango nde bazalaki koyokana mpo na kokata yango. Na ntango yango, kolandela Mibeko ya Nzambe malamumalamu ezalaki na ntina mingi: “Osengeli kopona bilongi te ntango ozali kotalela likambo ya moto oyo azangá, mpe osengeli te kosepela kaka  na moto monene. Okosambisa moninga na yo na bosembo.” (Balevi 19:15) Na makambo nyonso, bazuzi basengelaki kokata likambo na ndenge esengeli kasi te na kotala ndenge moto azali komonana to soki azali mozwi to mobola.

Malako wana oyo emonisamaki polele na Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele eleki sikoyo bambula mingi, ekoki mpe kosalisa batribinale lelo oyo. Soki bazuzi balandi yango, bakosala mabunga te ntango bazali kokata makambo.

Soki bazuzi balandaka malako oyo ezali na Mibeko ya Nzambe, mbɛlɛ basalaka mabunga te ntango bakataka makambo

KOSAMBISA NA BOSEMBO EMEMELAKI BAYISRAELE MATOMBA

Moize atunaki Bayisraele motuna oyo: “Ekólo monene nini oyo ezali na malako mpe na bikateli ya lisambisi ya boyengebene lokola mobeko nyonso oyo nazali kotya liboso na bino lelo oyo?” (Kolimbola Mibeko 4:8) Ya solo, ata ekólo moko te ezwaki libaku yango. Na boyangeli ya Salomo, mokonzi oyo ntango azalaki elenge azalaki kotosa Mibeko ya Yehova, Bayisraele “bakobaki kofanda na kimya” mpe bazalaki kozanga eloko te, “bazalaki kolya, komɛla mpe kosepela.”​—1 Bakonzi 4:20, 25.

Likambo ya mawa, Bayisraele bapesaki Nzambe mokɔngɔ. Na nzela ya mosakoli Yirimia, Nzambe alobaki boye: “Talá! Babwaki liloba mpenza ya Yehova, bongo bwanya nini bazali na yango?” (Yirimia 8:9) Likambo yango esalaki ete Yerusaleme ekóma “engumba oyo ezali na ngambo ya makila,” oyo etondaki na ‘makambo oyo eyinamá.’ Nsukansuka, ebebisamaki mpe etikalaki mpamba na boumeli ya mbula 70.​—Ezekiele 22:2; Yirimia 25:11.

Mosakoli Yisaya azalaki na bomoi na ntango oyo Yisraele ezalaki na mobulu. Ntango azongisaki makanisi nsima, etindaki ye aloba likambo moko ya ntina mingi oyo etali Yehova mpe Mibeko na ye: “Ntango okosambisa mabele, bato oyo bafandi na mabele oyo ebotaka bakoyekola boyengebene.”​—Yisaya 26:9.

Yisaya asepelaki makasi ntango, na litambwisi ya elimo santu, asakolaki mpo na boyangeli ya Mokonzi Masiya, Yesu Kristo; alobaki boye: “Akosambisa te na kolanda kaka oyo ekomonana na miso na ye, mpe akopamela te na kolanda kaka likambo oyo matoi na ye eyoki. Mpe akosambisa na boyengebene mpenza bato oyo bazangá, mpe akopamela na kolongobana mpo na bolamu ya bato ya komikitisa oyo bazali na mabele.” (Yisaya 11:3, 4) Oyo nde bilaka kitoko mpo na baoyo nyonso Mokonzi Masiya akoyangela na Bokonzi ya Nzambe!​—Matai 6:10.

^ par. 6 Nkombo Yehoshafate elimboli “Yehova azali Mosambisi.”