“Libota oyo eleki, mpe libota mosusu eyei; kasi mabele ezali koumela seko.”​—MOKONZI SALOMO, SIƐKLƐ YA 11 LIBOSO YA NTANGO NA BISO. *

Bato oyo bakomaki Biblia bamonaki ete bomoi ya bato ezali mokuse mpenza soki tokokanisi yango na ndenge oyo mabele ezalaka seko. Kutu, banda kala, bato babotamaka mpe bakufaka, kasi tii lelo, planɛti na biso ezalaka kaka mpe ezali kaka na likoki ya kobatela bomoi.

Bato mosusu balobi ete banda Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, makambo ya mokili ebongwani nokinoki mpenza koleka ndenge ezalaki liboso. Kaka na mbula 70 mpamba to koleka, mbongwana monene esalemi na makambo ya transport, ya kopanza nsango mpe na makambo mosusu ya tekinoloji, oyo esali ete nkita ya mokili emata koleka ndenge ezalaki liboso. Bato mosusu bakómi na bomoi ya malamu koleka oyo liboso ekokaki kosalema te. Kasi, kaka na ntango yango, motángo ya bato na mokili mobimba ebakisami soki mbala misato mobimba.

Ata bongo, nyonso wana esalemi te kozanga makama. Makambo oyo bato bazali kosala ezali kobebisa mpenza mabele na boye ete mosika te, likoki oyo mabele ezalaka na yango ya kobatela bomoi ekosala lisusu malamu te. Kutu, bato mosusu ya siansi balobi ete tokɔti na eleko ya sika na istware ya mabele oyo babengi Anthropocène​—eleko moko oyo bato bazali kobebisa mabele na ndenge moko ya koloba te.

Biblia esakolaki eleko moko oyo bato ‘bakobebisa mabele.’ (Emoniseli 11:18) Bato mosusu bazali komituna soki eleko yango nde yango oyo. Bato bakobebisa mabele tii wapi? Ekobeba tii na ndenge oyo  ekobonga lisusu te? Bato bakobebisa mabele mpo na libela?

MABELE EKOBONGA LISUSU?

Mabele ekokoba kobeba tii na ndenge oyo ekobonga lisusu te? Bato mosusu ya siansi bamoni ete ezali mpasi báloba liboso soki makambo ekoki kobongwana. Yango nde ntina oyo bazali komitungisa ete mbala mosusu, tozali kopusana na eleko oyo klima ekobongwana na mbalakaka mpe ekobimisa makama minene.

Na ndakisa, tótalela naino likambo ya banɛjɛ oyo ezipá mabele ya wɛsti ya Antarctique. Bato mosusu balobi ete soki molunge makasi ezali kaka kokoba, banɛjɛ yango ekonyangwa tii mwaye ezonga lisusu ndenge ezalaki liboso ekozala te. Ezali bongo mpo kongɛnga ya moi ebɛtaka yango. Nzokande, ntango banɛjɛ yango ezali konyangwa, mai na yango ebakisaka nivo ya mai ya mbu. Molunge ya moi ekɔtaka mingi na esika oyo molili ezalaka makasi na mbu, yango esalaka ete banɛjɛ yango enyangwa lisusu mingi. Soki ekobi kaka bongo, mwaye ya kopekisa yango ekozala lisusu te. Lokola nivo ya mai ya mbu emataka mpo na banɛjɛ oyo enyangwaka, yango ekoki kobimisela ebele ya bato makama minene.

MABELE EZALI KOBEBA SE KOBEBA

Bato bazali kobimisa mayele ndenge na ndenge mpo na kolongola likama wana oyo elingi kokómela mabele. Mayele ya liboso oyo babimisaki ezalaki ya koluka kobongisa makambo na ndenge oyo ekoumela, elingi koloba, koluka komatisa nkita mpe kobongisa bomoi ya bato kozanga kolekisa ndelo na ndenge ya kosalela biloko oyo ezali na mabele. Yango ebimisaki nini?

Likambo ya mawa, kaka ndenge nkita ya mokili ezali se kobeba, mabele mpe ezali se kobeba. Bato bazali kokoba kosilisa bomɛngo ya mabele nokinoki na boye ete ezali mpasi emizongisa ndenge ezalaki. Tokoki kosala nini mpo na yango? Na bosembo nyonso, moto moko ya siansi alobi boye: “Mpo na koloba solo, toyebi te oyo tokoki kosala mpo mabele ebatelama malamu.” Yango eyokani mpenza na maloba ya Biblia oyo elobi ete: “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.”​—Yirimia 10:23.

Kasi Biblia eyebisi biso ete Nzambe, Mozalisi, akotika te ete bato bábebisa mabele mpo na libela. Nzembo 115:16, elobi boye: “Mabele, [Nzambe] apesá yango bana ya bato.” Ya solo, planɛti na biso ezali ‘likabo  ya malamu’ oyo Tata na biso ya likoló apesá biso. (Yakobo 1:17) Tokolinga ete Nzambe apesa biso likabo moko oyo ezali kosala malamu mpenza kaka mpo na mwa ntango mpe na nsima etika kosala? Soki moke te! Yango emonisi ete Nzambe asalaki planɛti na biso mpo eumela libela.

OYO MOZALISI AKANAKI

Na Biblia, mokanda ya Ebandeli elobeli mpenza ndenge oyo Nzambe asalaki mabele. Na ebandeli, “mabele ezalaki na lolenge ata moko te mpe ezalaki mpamba mpe molili ezalaki likoló ya mai.” Elobeli mpe mai oyo ezalaki na mabele; oyo ezali na ntina mpo na bomoi. (Ebandeli 1:2) Na nsima, Nzambe alobaki boye: “Pole ezala.” (Ebandeli 1:3) Emonani ete kongɛnga ya moi ekatisaki mapata mpe mpo na mbala ya liboso, pole ekómaki komonana na mabele. Na nsima, elobeli ndenge mabele ya kokauka mpe mai ya mbu ebimaki. (Ebandeli 1:9, 10) “Matiti, milona oyo ebimisaka mboto na motindo na yango mpe banzete oyo ebotaka mbuma” ebimaki na nsima. (Ebandeli 1:12) Makambo oyo esengelaki mpo bomoi ebatelama awa na mabele, na ndakisa ndenge oyo banzete ebendaka gaze ya mabe mpe ebimisaka oyo ya malamu (photosynthèse) ebandaki mosala na yango. Mpo na nini Nzambe abongisaki malamumalamu makambo wana nyonso?

Mosakoli Yisaya alobeli Nzambe lokola: “Moto oyo asalaki mabele mpe Moto oyo akelaki yango, Moto oyo atɛlɛmisaki yango ngwi, azalisaki yango mpamba te, asalaki yango mpo bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Ezali polele ete Nzambe asalaki mabele mpo bato báfanda libela na libela.

Likambo ya mawa, bato basaleli mabele, likabo kitoko oyo Nzambe apesá biso na ndenge ya mabe mpe babebisi yango. Ata bongo, mokano ya Nzambe ebongwani te. Moto moko ya kala alobaki boye: “Nzambe azali moto te mpo abuka lokuta, azali mpe mwana ya moto te mpo ayoka mawa na likambo oyo asali. Ye moko ayebisi likambo mpe akosala yango te?” (Mitángo 23:19) Kutu, na esika Nzambe atika mabele ekoba kobebisama, ntango oyo atyá mpo na ‘kobebisa baoyo bazali kobebisa mabele,’ ekómi mpenza pene.​—Emoniseli 11:18.

BATO BAKOFANDA NA MABELE MPO NA LIBELA

Na lisolo na ye likoló ya ngomba, Yesu Kristo alobaki boye: “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.” (Matai 5:5) Kaka na lisolo yango, Yesu amonisaki na nsima ndenge oyo Nzambe akosala mpo mabele ebeba libela te. Ayebisaki  bayekoli na ye bábondelaka boye: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” Ya solo, Bokonzi ya Nzambe, to guvɛrnema na ye ekosala ete mokano na ye mpo na mabele ekokisama.​—Matai 6:10.

Mpo na mbongwana monene oyo Bokonzi na ye ekomema, Nzambe alobi boye: “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.” (Emoniseli 21:5) Yango elingi nde koloba ete Nzambe akosala mabele mosusu ya sika? Te, mpo planɛti na biso ekelamá na mabe ata moko te. Kutu, Nzambe akolongola nde baoyo bazali kobebisa planɛti yango; elingi koloba “baoyo bazali kobebisa mabele,” to bato mpe baguvɛrnema ya ntango na biso. Na esika na yango, Nzambe akotya “likoló ya sika ná mabele ya sika,” elingi koloba Bokonzi na ye to guvɛrnema ya sika ya likoló oyo ekoyangela libota ya sika ya bato awa na mabele.​—Emoniseli 21:1.

Mpo mabele ezonga ndenge ezalaki liboso ete bato bábebisa yango, Nzambe akosala ete likoki ya kobatela bomoi oyo mabele ezalaki na yango ezonga lisusu. Na litambwisi ya elimo santu, Mokomi ya Nzembo akomaki boye mpo na oyo Nzambe akosala: “Otyeli mabele likebi na yo, mpo opesa yango biloko ebele; Ozali kokómisa yango na bozwi mingi mpenza.” Lokola klima ekozala malamu mpe oyo eleki nyonso, mapamboli ya Nzambe, mabele ekokóma paradiso oyo etondi na bilei.​—Nzembo 65:9-13.

Pyarelal, sɛkrɛtɛrɛ ya Mohandas Gandhi, mokambi ya kala ya lingomba ya Inde alobi ete Mohandas Gandhi alobaki boye: “Mabele ebimisaka nyonso oyo moto asengeli na yango kasi te mpo na kokokisa lokoso ya moto.” Bokonzi ya Nzambe ekobongola mpenza mitema ya bato mpo yango nde etindaka bango bábebisa mabele. Mosakoli Yisaya alobaki ete na Bokonzi ya Nzambe, bato “bakosala eloko moko te ya mabe mpe bakobebisa eloko moko te” ya bato mosusu to ya mabele. (Yisaya 11:9) Kutu, bamilio ya bato ya ndenge na ndenge bazali koyekola mibeko ya Nzambe. Bazali koteya bango kolinga Nzambe mpe bato oyo bafandi na bango, komonisaka bɔtɔndi, kobatela esika bafandi, koboya kobebisa mai, zamba to mopɛpɛ, mpe kozala na bomoi oyo eyokani na mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabele. Bazali kobongisama mpo na kozala na bomoi na paradiso awa na mabele.​—Mosakoli 12:13; Matai 22:37-39; Bakolose 3:15.

Nzambe akotika ata moke te ete mabele kitoko oyo ebeba mpo na libela

Lisolo ya bozalisi oyo mokanda ya Ebandeli elobeli esuki na maloba oyo: “Nzambe amonaki eloko nyonso oyo asalaki mpe, talá! ezalaki malamu mingi.” (Ebandeli 1:31) Ya solo, Nzambe akotika ata moke te ete mabele kitoko oyo ebeba mpo na libela. Koyeba ete avenire ya planɛti na biso ezali na mabɔkɔ ya Yehova Nzambe, Mozalisi na biso ya bolingo, ekitisaka biso mitema. Alaki boye: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Nzembo 37:29) Tiká ete yo mpe ozala na kati ya “bayengebene” oyo bakobenga mabele esika na bango ya kofanda mpo na libela.

^ par. 3 Euti na Biblia na Mosakoli 1:4.