Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Août 2014

 MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | YOZEFE

“Nabondeli bino, bóyoka ndɔtɔ oyo nalɔti”

“Nabondeli bino, bóyoka ndɔtɔ oyo nalɔti”

YOZEFE azali kotalatala na ɛsti, azali na mposa ya kolongwa na kati ya ebele wana ya bato oyo bazali kotambola na molɔngɔ mpo akima. Ndako na bango ezali na Hebrone, ezali mosika mingi mpenza te soki oleki mwa bangomba. Ntango mosusu tata na ye Yakobo afandi azali kozwa mwa mopɛpɛ na mpokwa, ayebi te likambo oyo ekómeli mwana na ye ya bolingo. Kasi sikoyo Yozefe azali na mwaye te ya kokóma epai na bango; mpo bilenge mibali wana nyonso bayebi ete Yozefe akomona lisusu te elongi ya mobange wana oyo alingaka mingi. Bakomelesa wana bazali kotala ye na miso mabe ntango bazali kotambwisa bakamela na bango na nzela wana oyo bato mingi balekaka oyo ekei na sudi. Basombi Yozefe mpe miso na bango nyonso ezali kaka likoló na ye. Mpo na bango, elenge mobali yango azali na valɛrɛ ndenge moko na kole mpe mafuta ya nsolo kitoko oyo bamemi—biloko ya valɛrɛ oyo bakozwela yango benefisi mingi na Ezipito.

Yozefe alekisi naino mbula 17 te. Meká naino komona ye na makanisi ndenge azali kobɛtabɛta miso mpo na kotala epai moi ezali kokende kolala, ntango ezali komonana lokola nde ezali kopusana na Mbu Monene, wana azali kokanisa ndenge bomoi na ye ebongwani na mbalakaka na ndenge ya mabe mpenza. Azali kondima te ete kaka bandeko na ye moko nde balingaki koboma ye mpe batɛki ye lokola moombo. Yozefe azalaki kaka kolela. Ayebaki te makambo oyo ekokómela ye.

Yozefe abungisaki nde bonsomi kasi kondima na ye te

Ebandaki boni Yozefe akutana na bampasi nyonso wana? Mpe liteya nini tokoki kozwa na kondima ya elenge mobali wana oyo bato ya libota na ye mpenza basalaki ye mabe mpe basundolaki ye?

LIBOTA MOKO YA MINDƆNDƆ

Yozefe azalaki na libota moko ya bana ebele, kasi libota yango ezalaki ya esengo te mpe na bomoko te. Ndenge oyo Biblia elobeli libota ya Yakobo, emonisi ete ezali mabe kobala basi ebele, atako Nzambe atikelaki momeseno yango nzela mpe ekɔtaki makasi epai ya basaleli na ye tii ntango Mwana na ye azongisaki bango na mobeko ya ebandeli oyo esɛngaki mobali abala kaka mwasi moko. (Matai 19:4-6) Yakobo azalaki na bana soki 14 oyo basi na ye minei babotelaki ye, elingi koloba Lea ná Rashele mpe Zilipa ná Bila oyo bazalaki bato na bango ya misala. Na ebandeli, Yakobo alingaki Rashele, mwasi kitoko. Kasi alingaki Lea ndenge wana te, yaya ya Rashele oyo babalisaki ye na makasi. Basi yango mibale bazalaki koyokelana zuwa makasi mpenza mpe  esalaki ete bana na bango mpe bákóma koyokelana zuwa.Ebandeli 29:16-35; 30:1, 8, 19, 20; 37:35.

Bambula mingi Rashele azalaki kobota te, kasi na nsima ntango abotaki Yozefe, Yakobo akómaki kozwa Yozefe na valɛrɛ mingi koleka bana na ye mosusu nyonso. Na ndakisa, na nzela ntango libota na ye elingaki kokutana na Esau, yaya na ye oyo azalaki mobomi, Yakobo asalaki ete Rashele ná Yozefe oyo azalaki naino mwana moke bázala na esika moko ya libateli koleka bato mosusu nyonso ya libota na ye. Yozefe akokaki te kobosana mokolo wana oyo batungisamaki mingi. Meká naino kokanisa ndenge ayokaki na mokolo wana na ntɔngɔ ntango azalaki komituna na kokamwa nyonso mpo na nini tata na ye akómaki kotɛnguma. Akamwaki mpenza ntango ayebaki ntina ya likambo yango: Tata na ye autaki kobunda na butu oyo eleki ná anzelu moko ya nguya mpenza! Mpo na nini? Mpo Yakobo azalaki na mposa ya lipamboli oyo euti epai ya Yehova Nzambe. Lipamboli oyo azwaki ezalaki ete nkombo na ye ekómi Yisraele. Ekólo mobimba esengelaki kobengama na nkombo na ye! (Ebandeli 32:22-31) Yozefe ayebaki ete bana ya Yisraele nde basengelaki kosala ekólo yango!

Na nsima, elenge Yozefe akutani na likambo moko ya mpasi ntango moto oyo azalaki kolinga mingi atikaki ye ntango azalaki naino elenge mpenza. Mama na ye akufaki ntango azalaki kobota leki na ye Benyamina. Tata na ye ayokaki mawa makasi mpo na yango. Meká naino kokanisa ndenge Yakobo azalaki kopangwisa mpisoli na miso ya Yozefe, kobɔndisa ye azala na elikya oyo ebɔndisaki mpe nkɔkɔ na ye Abrahama. Esimbaki mpenza motema ya Yozefe ntango ayebaki ete mokolo mosusu Yehova akozongisa mama na ye na bomoi! Mbala mosusu Yozefe akómaki kolinga Yehova mingi mpo azali “Nzambe . . . ya bato ya bomoi,” mpe akabaka mpenza. (Luka 20:38; Baebre 11:17-19) Nsima ya liwa ya mwasi na ye, Rashele, Yakobo azalaki ntango nyonso kolinga bana mibale wana mingi mpenza.Ebandeli 35:18-20; 37:3; 44:27-29.

Bana mingi babebaka soki bazali kosalela bango makambo ndenge wana, kasi Yozefe azwaki liteya na bizaleli mingi ya malamu ya baboti na ye mpe akómaki na kondima makasi mpe azalaki na likoki ya kokesenisa mabe ná malamu. Ntango azalaki na mbula 17, akómaki mobateli ya bampate, mpe azalaki kopesa bayaya na ye mosusu toli ntango amoni ete basali mabe. Azalaki nde kobomba mabe na bango mpo bámona ye moto malamu? Ezala ndenge nini, asalaki oyo ezalaki sembo. Ayebisaki tata na ye likambo yango. (Ebandeli 37:2) Mbala mosusu ndenge asalaki bongo etindaki tata na ye akóma kolinga ye lisusu makasi. Ezali mpenza ndakisa malamu oyo bilenge bakristo basengeli kokanisaka! Soki likanisi eyeli yo obomba lisumu moko monene oyo moto asali, ezala ndeko na yo to moninga na yo, ezali malamu kolanda ndakisa ya Yozefe mpe koyebisa likambo yango epai ya bato oyo bazali na mokumba ya kosalisa moto oyo asali mabe.Balevi 5:1.

Bomoi ya libota ya Yozefe ekoki mpe koteya biso. Atako bakristo babalaka basi ebele te, kasi mabota mingi ezali kobɔkɔla bana oyo molongani moko abotaki na libala mosusu. Libota ya Yakobo ekoki  koteya bango nyonso ete kopona bilongi mpe kokabola bana ebebisaka bomoko ya libota. Baboti ya bwanya oyo bazali na mabota oyo molongani moko abotá liboso abalana na molongani mosusu basengeli kosala nyonso mpo na kondimisa bana na bango mpe bana ya balongani na bango ete balingaka bana nyonso, mpe mokomoko na bango azali na makoki na ye mpe akoki kobakisa esengo ya libota.Baroma 2:11.

ZUWA EKÓMI MAKASI

Yakobo alingaki Yozefe koleka bandeko na ye mpo azalaki sembo

Ekoki kozala mpo na mpiko oyo Yozefe amonisaki mpo na makambo oyo ezalaki sembo nde esalaki ete Yakobo apesa ye lokumu mingi. Asalelaki mwana na ye elamba moko ya kitoko mingi mpenza. (Ebandeli 37:3) Mbala mingi bazalaki kobenga yango elamba ya nzelanzela to ya langilangi, kasi ezali mpenza na makambo mingi te oyo endimisi likambo yango. Ekoki kozala elamba moko ya molai, robɛ moko ya kitoko, oyo ezalaki kozipa mabɔkɔ ná makolo. Ekoki kozala ete bato ya lokumu to bana ya bakonzi nde bazalaki kolata elamba ya ndenge wana.

Yakobo amonaki ete asalaki malamu mpenza, mpe ndenge azalaki kolinga Yozefe mpe kozwa ye na valɛrɛ, esimbaki mpenza motema ya Yozefe. Kasi azalaki komiyoka malamu te soki alati elamba yango mpo azalaki mobateli ya mpate mpe yango ezalaki mosala ya mabɔkɔ ya makasi mpenza. Meká naino komona na makanisi ndenge elenge wana alati elamba yango ntango azali koleka na nzela ya matiti milai, azali komata na mabanga ya minene, to azali koluka kolongola mpate oyo ekangami na matiti moko ya nzubɛnzubɛ. Likambo ya mabe koleka ezali ndenge oyo bandeko na ye bakoyoka soki bamoni ye alati robɛ yango oyo ezalaki komonisa ete tata na ye alingaka ye mingi.

Biblia elobi boye: “Ntango bandeko na ye bamonaki ete tata na bango azali kolinga ye mingi koleka bandeko na ye nyonso, babandaki koyina ye, mpe bazalaki lisusu koloba na ye na boboto te.” * (Ebandeli 37:4) Atako bakokaki koyoka zuwa, kasi bandeko ya Yozefe bazangaki bwanya ndenge batikaki ezaleli mabe wana ekonza bango. (Masese 14:30; 27:4) Ekómelá yo naino te oyoka zuwa makasi ntango batyeli moto moko likebi to bapesi ye lokumu oyo ozalaki na mposa na yango? Kanisá bandeko ya Yozefe. Zuwa na bango etindaki bango básala makambo oyo na nsima, epesaki bango mpasi mingi na motema. Ndakisa na bango ezali kokundwela bakristo ete eleki malamu ‘kosepela elongo na bato oyo bazali kosepela.’Baroma 12:15.

Na ntembe te, Yozefe amonaki ete bandeko na ye bayinaki ye. Boye, abombaki nde robɛ na ye wana ya kitoko ntango alingaki akóma esika bandeko na ye bazali? Mbala mosusu akokaki kosala bongo. Kobosana te ete Yakobo alingaki ete robɛ yango ezala elembo oyo emonisaki ete azali kozwa ye na valɛrɛ mingi mpe azali kolinga ye. Yozefe alataki robɛ yango mpo alingaki ete tata na ye atyelaka ye kaka motema. Ndakisa na ye ezali na ntina mpo na  biso. Atako Tata na biso ya likoló aponaka bilongi te, na bantango mosusu, asalelaka basaleli na ye mosusu ya sembo makambo ya malamu mingi mpe amoniselaka bango boboto mingi koleka basusu. Lisusu, asɛngaka bango bámikɔtisa te na makambo ya mbindo mpe ya mabe ya mokili oyo. Ndenge moko na robɛ ya kitoko mingi mpenza ya Yozefe, bizaleli ya bakristo ya solo esalaka ete bákesana na bato mosusu oyo bafandi na bango. Ntango mosusu bizaleli ya ndenge wana etindaka basusu báyokela bango zuwa mpe báyina bango. (1 Petro 4:4) Mokristo asengeli nde kobomba makambo oyo emonisaka ete azali mosaleli ya Nzambe? Te. Akobomba yango te kaka ndenge Yozefe abombaki robɛ na ye te.Luka 11:33.

BANDƆTƆ OYO YOZEFE ALƆTAKI

Yozefe alɔtaki ndɔtɔ mibale ya kokamwa. Na oyo ya liboso, amonaki ye ná bandeko na ye, moto na moto azali kokanga maboke ya matiti ya mbuma ya kosala farini. Kasi na nsima, matiti ya bandeko na ye ezingaki oyo ya ye mpe egumbamelaki yango kasi oyo ya ye etɛlɛmaki kaka alima. Na ndɔtɔ ya mibale, moi, sanza mpe minzoto 11 ezalaki kogumbamela ye. (Ebandeli 37:6, 7, 9) Yozefe asengelaki kosala nini na bandɔtɔ wana ya kokamwa mpe ya polele?

Ndɔtɔ yango eutaki epai ya Yehova. Ezalaki bandɔtɔ ya esakweli, mpe Nzambe alingaki ete Yozefe apesa nsango yango. Na maloba mosusu, Yozefe asengelaki kosala kaka ndenge basakoli nyonso oyo bazalaki liboso na ye basalaki ntango bayebisaki bato oyo bakómaki batomboki nsango mpe bitumbu ya Nzambe.

Na mayele nyonso, Yozefe ayebisaki bandeko na ye boye: “Nabondeli bino, bóyoka ndɔtɔ oyo nalɔti.” Bandeko na ye bakangaki ntina ya ndɔtɔ yango mpe esepelisaki bango ata moke te. Bayanolaki ye boye: “Yo okozala mpenza mokonzi na biso?” Lisolo yango ebakisi boye: “Yango wana bayinaki ye lisusu koleka mpo na bandɔtɔ na ye mpe mpo na maloba na ye.” Ntango Yozefe ayebisaki tata mpe bandeko na ye ndɔtɔ na ye ya mibale, esepelisaki bango kaka te. Biblia elobi boye: “Tata na ye abandaki kopamela ye mpe koloba na ye ete: ‘Ndɔtɔ oyo olɔti elimboli nini? Ngai ná mama na yo mpe bandeko na yo tokoya mpenza kogumbamela yo tii na nse?’” Kasi, Yakobo akobaki kokanisa likambo yango. Mbala mosusu Yehova azalaki nde kosolola na mwana yango?Ebandeli 37:6, 8, 10, 11.

Yozefe azalaki mosaleli ya Yehova ya liboso mpe ya nsuka te oyo Yehova atindaki asakola nsango moko oyo bato bakosepela na yango te mpe oyo ekokaki kobimisela ye minyoko. Yesu azalaki momemi-nsango oyo alekaki bamemi-nsango nyonso ya ndenge wana mpe ayebisaki bayekoli na ye boye: “Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoane 15:20) Bakristo nyonso, ezala bilenge to mikóló, bakoki koyekola makambo mingi na kondima mpe mpiko ya elenge Yozefe.

KOYINA NA BANGO ELEKI NDELO

Mwa moke nsima ya ndɔtɔ yango, Yakobo atindaki elenge Yozefe na mobembo. Bayaya na ye bazalaki kobatela bampate na nɔrdi pene ya Shekeme, epai bonguna na bango ekómaki makasi. Yakobo azalaki komitungisa mpo na bana na ye, yango wana atindaki Yozefe akende kotala soki bazali malamu. Okanisi ete Yozefe amiyokaki ndenge nini? Ayebaki ete bayinaki ye makasi koleka ndenge ezalaki liboso! Ndenge nini bakokaki kosepela aya epai na bango lokola molobeli ya tata na bango? Ata bongo, Yozefe atosaki mpe asalaki mobembo yango.Ebandeli 34:25-30; 37:12-14.

Ezalaki mobembo moko molai—esɛngaki kotambola mikolo minei to mitano. Shekeme ezali soki na kilomɛtrɛ 80 na nɔrdi ya Hebrone. Kasi ntango Yozefe akómaki na Shekeme, bayebisaki ye ete bandeko na ye balongwe wana mpe bakei na Dotane; esɛngaki atambola lisusu kilomɛtrɛ 22 to koleka na nɔrdi. Nsukansuka ntango Yozefe akómaki pene ya Dotane, bandeko na ye bamonaki ye na mosika. Mbala moko, koyina na bango ebimaki polele. Lisolo yango elobi boye: “Bongo balobanaki ete: ‘Talá! Molɔti-ndɔtɔ yango ye wana azali koya. Mpe sikoyo, bóya tóboma ye mpe tóbwaka ye na moko ya mabulu ya mai; mpe tokoloba ete nyama mabe moko ya zamba elei ye. Bongo tótala soki bandɔtɔ na ye ekosuka boni.’” Kasi Rubene ayebisaki bandeko na ye bábwaka Yozefe na libulu moko, mpo azalaki na mokano ya kobikisa ye na nsima.Ebandeli 37:19-22.

Yozefe akaniselaki bango mabe te, apusanaki pene na bango, azalaki na elikya ete bakoyamba ye na boboto. Kasi, basalaki ye nde mabe! Bapasolaki robɛ na ye, mpe babendaki ye pene ya libulu ya mai mpe batindikaki ye. Yozefe akweaki mabe na libulu yango! Ntango mpasi na ye ekitaki, alukaki kobima na libulu yango kasi mwaye ye moko abima ezalaki  te. Azalaki komona kaka mwa mapata moke mpe mingongo ya bandeko na ye ezalaki koyokana moke mpenza. Alelelaki bango, abondelaki bango bábimisa ye kasi bakipaki ye te. Bazalaki kolya bilei pembeni wana na kimya nyonso. Ntango Rubene alongwaki wana, balukaki lisusu koboma ye, kasi Yuda ayebisaki bango bátɛka ye epai ya bakomelesa oyo bazalaki koleka. Dotane ezalaki pene ya nzela oyo ezalaki kokende na Ezipito, mpe eumelaki te molɔngɔ ya ebele ya Bayishimaele mpe Bamadiani balekaki na nzela yango. Liboso Rubene azonga, batɛkaki ye. Batɛkaki ndeko na bango lokola moombo na shekele 20. *Ebandeli 37:23-28; 42:21.

Yozefe alingaki bosembo, kasi bandeko na ye bayinaki ye

Yango ezongisi biso na likambo oyo tolobelaki na ebandeli. Ntango bazalaki komema Yozefe na sudi, na nzela oyo ezalaki kokende na Ezipito, amonaki lokola abungisi nyonso. Akabwani na bato nyonso! Na boumeli ya bambula mingi ayebaki ata likambo moko te oyo etali libota na ye; ayebaki te oyo Rubene ayokaki ntango azongaki mpe akuti ye te; mawa oyo tata na ye ayokaki ntango bakosi ye ete Yozefe akufi; oyo ekómelaki nkɔkɔ na ye Yisaka, mobange wana oyo azalaki naino na bomoi, ayebaki mpe ata nsango moko te mpo na Benyamina, leki na ye ya bolingo. Kasi Yozefe atikalaki ata na eloko moko te?Ebandeli 37:29-35.

Yozefe atikalaki na eloko moko oyo bandeko na ye bakokaki te kobɔtɔla ye: Kondima. Ayebaki makambo mingi oyo etali Nzambe na ye, Yehova, mpe eloko moko te ekokaki kobɔtɔla ye yango; ezala libota na ye oyo abungisaki, mpasi oyo amonaki ntango bazalaki komema ye na mobembo molai na Ezipito, ezala ata nsɔni ya kotɛkama lokola moombo epai ya Potifare moto moko ya bozwi na Ezipito. (Ebandeli 37:36) Kondima mpe ekateli ya Yozefe ya kotikala penepene na Nzambe na ye ekobaki kokóma makasi na ntango wana ya mpasi. Na masolo oyo ekobima nsima, tokomona ndenge kondima yango esalaki ete Yozefe akóma na ntina mingi lisusu na miso ya Nzambe na ye, Yehova, ata mpe na miso ya bato ya libota na ye oyo balukelaki ye mpasi. Ekozala malamu soki tomekoli ndakisa ya Yozefe!

^ par. 15 Bato mosusu ya mayele balobaka ete bandeko ya Yozefe bamonaki ete elamba oyo tata na bango apesaki Yozefe emonisaki ete alingaki kopesa ye lotomo ya mwana ya liboso. Bayebaki ete Yozefe azali mwana ya liboso oyo tata na bango abotaki na mwasi oyo azalaki kolinga mingi; mwasi oyo esengelaki abala liboso. Longola yango, Rubene mwana ya liboso ya Yakobo asangisaki nzoto na makango ya tata na ye, asambwisaki tata na ye mpe abungisaki lotomo na ye ya mwana ya liboso.Ebandeli 35:22; 49:3, 4.

^ par. 25 Ata na makambo ya mikemike ndenge wana, Biblia elobi makambo na bosikisiki. Mikanda oyo ekomamaki na eleko wana emonisi ete shekele 20 ezali ntalo oyo bato nyonso bayebaki mpo na kotɛka baombo na Ezipito.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

“Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye?”

Ndenge nini Yozefe akweaki te atako mwasi ya Potifare azalaki na ekateli ya kolɛngola ye?