Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Juin 2014

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE OYO NZAMBE ATALELAKA KOMƐLA MAKAYA

Ndenge nini Nzambe atalelaka komɛla makaya?

Ndenge nini Nzambe atalelaka komɛla makaya?

Naoko, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, alobeli ndenge alongaki kotika komɛla makaya: “Koyekola solo etali bizaleli ya Nzambe mpe mokano na ye esalisaki ngai nabongola bomoi na ngai.” Makambo oyo ayekolaki ezali na Biblia. Ata soki Biblia elobeli makaya te, esalisaka biso tóyeba ndenge oyo Nzambe atalelaka komɛla makaya. * Mpo na bato mingi, boyebi yango nde epesaka bango makasi ya kotɛmɛla to kotika makaya. (2 Timote 3:16, 17) Tótalela naino makambo misato ya mabe oyo eyebani malamu, oyo makaya ebimisaka mpe tótala oyo Biblia elobi mpo na yango.

MAKAYA EKÓMISAKA MOTO MOOMBO

Makaya ezalaka na nicotine, drɔgɛ moko oyo eyebani, oyo ekómisaka mpenza moto moombo. Ekoki kobakisela moto makasi na nzoto to mpe kolɛmbisa yango. Komɛla makaya esalaka ete nicotine ekenda nokinoki na bɔɔngo mpe mbala na mbala. Mbala nyonso oyo moto abendi milinga ya likaya, mwa nicotine ekɔtaka na bɔɔngo, soki amɛli pakɛ moko ya likaya, akobenda doze 200 ya nicotine na mokolo; doze oyo eleki badoze ya badrɔgɛ mosusu nyonso na makasi. Doze ya ndenge wana esalaka ete nicotine ekómisa mpenza moto moombo. Soki momɛli-makaya akangami na motambo yango, akómaka komona lokola azangi eloko soki akokisi naino mposa wana te.

‘Bozali baombo ya moto oyo bozali kotosa.’​—Baroma 6:16

Okoki mpenza kotosa Nzambe soki ozali moombo ya makaya?

Biblia esalisaka biso tótalela makambo na ndenge ebongi; elobi boye: “Boyebi te ete soki bozali kokoba komipesa na moto moko bózala baombo mpo na kotosa ye, bozali baombo na ye na ndenge bozali kotosa ye?” (Baroma 6:16) Soki mposa ya makaya nde ekómi kotambwisa makanisi mpe misala ya moto, mosika te akómaka moombo ya makambo ya mbindo. Nzokande, Nzambe, oyo nkombo na ye ezali Yehova, alingi tózala na bonsomi, kaka te ya kolongwa na boombo ya makambo oyo ebebisaka nzoto, kasi mpe oyo ebebisaka elimo na biso, elingi koloba mposa oyo etindaka moto asala likambo boye to boye. (Nzembo 83:18; 2 Bakorinti 7:1) Na yango, ntango moto akómi kosepela na Yehova mpe kotosa ye, ayebaka ete Yehova abongi bápesa ye eloko oyo eleki malamu mpe akoki te kopesa Nzambe eloko yango soki azali kokoba kozala moombo ya bizaleli oyo ebebisaka nzoto. Koyeba makambo yango epesaka moto makasi ya kotɛmɛla bamposa mabe.

Olaf, oyo afandaka na Allemagne, alongwaki na boombo ya mbula 16 ya makaya oyo abandaki komɛla ntango azalaki na mbula 12. Olaf akanisaki ete komɛla makaya ekozala likama te. Kasi nsima ya bambula ekómisaki ye moombo mpenza. Alobi boye: “Mokolo moko ntango nazangaki makaya, nayokaki mabe mpenza yango wana nasangisaki biteni nyonso ya makaya oyo etikalaka na saani oyo batyaka putulu ya likaya mpe nalíngaki yango na eteni ya papye moko. Soki nakanisi likambo yango, nayokaka nsɔni mpenza.” Ndenge nini atikaki momeseno mabe ya komɛla makaya?  Alobi boye: “Mposa ya kosepelisa Yehova nde esalisaki ngai. Bolingo ya Yehova mpo na bato mpe elikya oyo apesi epesaki ngai makasi ya kolongwa na boombo yango mpo na libela.”

MAKAYA EBEBISAKA NZOTO

Zulunalo moko (Tobacco Atlas) elobi boye: “Bato ya siansi bamoni ete komɛla makaya . . . ebebisaka enama nyonso ya nzoto ya moto mpe esalaka ete bato bábɛla mingi to mpe bákufa mingi.” Eyebani ete makaya ebimisaka te bamaladi oyo ekoki kozwa bato mosusu, na ndakisa kansɛr, maladi ya motema mpe ya pumɔ. Kasi OMS elobi ete esalaka ete bato bákufa na bamaladi oyo ezwaka bato mosusu na ndakisa maladi ya tibɛrkiloze.

“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.”​—Matai 22:37

Ntango ozali kobebisa nzoto oyo Nzambe apesá yo na biloko oyo ebebisaka nzoto, okanisi ete ozali mpenza kolinga mpe kotosa ye?

Na Liloba na ye Biblia, Yehova azali koteya biso tótalelaka bomoi, nzoto, mpe makoki na biso na ndenge oyo ebongi. Mwana na ye Yesu, amonisaki yango ntango alobaki ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” (Matai 22:37) Ezali polele ete Nzambe alingaka ete tósalela bomoi mpe nzoto na biso na ndenge ya malamu mpe tómemyaka yango. Ntango tozali koyekola makambo etali Yehova mpe bilaka na ye, tokómaka kolinga ye mpe kozwa na valɛrɛ makambo nyonso oyo asalelá biso. Yango etindaka biso tóboya makambo nyonso oyo ekoki kobebisa nzoto na biso.

Jayavanth, monganga moko na Inde, oyo amɛlaki makaya na boumeli ya mbula 38, alobi boye: “Nayebaki ete komɛla makaya ezali mabe ntango natángaki babuku ya minganga. Mpe nazalaki kopesa bato na ngai ya maladi toli mpo bátika komɛla yango. Atako namekaki kotika mbala mitano to motoba mobimba kasi nazalaki kaka kolonga te.” Kasi nini mpenza esalisaki ye atika komɛla yango? Alobi boye: “Koyekola Biblia nde esalisaki ngai natika. Mposa ya kosepelisa Yehova nde esalaki ete natika momeseno yango mpo na libela.”

MAKAYA ESALAKA MPE BASUSU MABE

Milinga ya makaya oyo moto afuli mpe oyo ebimaka ntango likaya ezali kopela ezali pwazɔ. Kopema milinga ya likaya oyo moto mosusu amɛli ekoki kopesa moto maladi ya kansɛr mpe bamaladi mosusu, mpe mbula nyonso ebomaka bato 600 000 oyo bamɛlaka makaya te, mingimingi basi mpe bana. Lapolo moko ya OMS ekebisi boye: “Ezali na libateli moko  te ntango opemi milinga ya likaya oyo moto mosusu azali komɛla.”

“Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”​—Matai 22:39

Okomonisa ete olingaka bazalani mpe bato ya libota na yo ntango ozali kotya bomoi na bango na likama na milinga ya makaya oyo ozali kofulela bango?

Ndenge Yesu amonisaki yango, bolingo mpo na mozalani, mpo na bato ya libota na biso, baninga mpe bato oyo tofandi na bango ezali mobeko ya mibale nsima ya mobeko oyo etali kolinga Nzambe. Alobaki boye: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Soki tozali kokoba na momeseno oyo ezali kotya bomoi ya basusu na likama, tozangi bolingo mpo na mozalani. Bolingo ya solosolo etindaka biso tólanda toli oyo ya Biblia: “Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”​—1 Bakorinti 10:24.

Armen, oyo afandaka na Arménie alobi boye: “Bato ya libota na ngai babondelaki ngai natika komɛla makaya mpo ezalaki kosala bango mabe. Kasi nazalaki kondima te ete ekokaki kosala bango mabe.” Alobeli makambo oyo etindaki ye abongola makanisi; alobi boye: “Boyebi ya Biblia oyo nazwaki mpe bolingo mpo na Yehova esalisaki ngai natika komɛla likaya mpe namona ete ezalaki mabe kaka te mpo na ngai kasi mpe mpo na bato oyo tozalaki kofanda na bango.”

MAKAYA EKOSILA MPO NA LIBELA!

Boyebi ya Biblia esalisaki Jayavanth mpe Armen bátika momeseno mabe oyo ezalaki kobebisa nzoto na bango mpe ya basusu. Balongaki kaka te mpo bayebaki ete komɛla makaya ezali mabe, kasi nde mpo bakómaki kolinga Yehova mpe koluka kosepelisa ye. Ntina ya bolingo emonisami na 1 Yoane 5:3; elobi boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.” Toboyi te, kolanda batoli ya Biblia ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi ntango bolingo makasi oyo moto azali na yango mpo na Nzambe etindi ye, kotosa mibeko na ye ekozala kilo te.

Lelo oyo Yehova Nzambe azali kosalisa bamilio ya bato bátika to bálongwa na boombo ya makaya na nzela ya mosala monene ya koteya bato na mokili mobimba. (1 Timote 2:3, 4) Mosika te, na nzela ya Bokonzi na ye; elingi koloba guvɛrnema ya likoló oyo Mwana na ye Yesu Kristo azali mokonzi na yango, Yehova akolongola ebongiseli ya mimbongo ya lokoso oyo ekɔtisi bamilio ya bato na boombo ya makaya. Akosukisa makaya mpo na libela mpe akosala ete nzoto mpe makanisi ya bato ya botosi ezonga ya kokoka.​—Yisaya 33:24; Emoniseli 19:11, 15.

Soki ozali kosala makasi mpo na kotika makaya, kolɛmba te. Koyekola kolinga Yehova mpe kondima likanisi na ye na likambo etali makaya, ekosalisa yo mpe ozwa makasi ya kotika komɛla makaya. Batatoli ya Yehova bakosepela koya epai na yo mpo na kosalisa yo oyekola Biblia mpe osalela batoli na yango. Okoki mpenza kotya motema ete soki ozali na mposa ya lisalisi ya Yehova mpo na kolongwa na boombo ya makaya, akopesa yo nguya mpe makasi oyo esengeli mpo olonga.​—Bafilipi 4:13.

^ par. 3 Awa, komɛla makaya elingi koloba kobenda milinga ya cigarette, ya cigare, ya mibokolo to pipe. Kasi, yango etaleli mpe makaya oyo batyaka na monɔkɔ, oyo babendaka na zolo, mpe makaya mosusu.