Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Juin 2014

Bato misato ya siɛklɛ ya 16 oyo balukaki solo​—Bamonaki nini?

Bato misato ya siɛklɛ ya 16 oyo balukaki solo​—Bamonaki nini?

“SOLO ezali nini?” Yango nde motuna oyo Ponse Pilate, guvɛrnɛrɛ ya Roma na Yudea na siɛklɛ ya liboso atunaki Yesu ntango azalaki kosambisa ye. (Yoane 18:38) Emonani ete Pilate azalaki mpenza te koluka koyeba solo. Kutu, motuna na ye ezalaki nde mpo na kotyola. Emonani ete mpo na Pilate solo ezalaki eloko nyonso oyo moto akoki kopona to oyo bateyá ye andimaka; moto moko te akoki koloba ete solo nde yango oyo. Lelo oyo mpe bato mingi bakanisaka bongo.

Bato oyo bazalaki kokende ndako-nzambe na siɛklɛ ya 16 na Mpoto bazalaki mpenza koyeba te mateya nini ezalaki solo. Lokola banda bomwana bateyaki bango bándimaka bokonzi ya Pápa mpe mateya mosusu ya eglize, bakómaki na mokakatano mpo na makanisi ya sika oyo bato oyo balingaki mbongwana bapalanganisaki na Mpoto na ntango wana. Basengelaki kondima nini? Ndenge nini bakokaki koyeba oyo ezali solo?

Na ntango wana, na kati ya bato yango, ezalaki na mibali misato oyo bazalaki na ekateli ya koluka solo. * Basalaki nini mpo na koyeba mateya ya solo mpe ya lokuta? Mpe bamonaki nini? Tótala naino.

“TIKÁ BIBLIA . . . NDE EZALA NTANGO NYONSO NA BOKONZI”

Wolfgang Capito azalaki elenge mobali moko oyo azalaki kokangama mpenza na mateya ya lingomba. Nsima ya kotánga kelasi ya monganga, ya mibeko, mpe ya teoloji, Capito akómaki sango na parwasi na 1512 mpe na nsima akómaki episkɔpɔ-mokonzi ya engumba Mayence.

Na ebandeli, Capito alukaki kolɛmbisa milende ya bato oyo bazalaki koluka mbongwana, oyo bazalaki koteya mateya oyo ekesanaki na mateya ya Katolike. Kasi, eumelaki te, Capito ye moko akómaki kopesa mabɔkɔ mpo na mbongwana. Asalaki nini? James Kittelson, moto moko ya istware akomaki boye: Ntango Capito atalelaki mateya ndenge na ndenge, andimaki ete “buku ya malamu koleka mpo na koyeba soki mateya oyo wapi ezali solo ezalaki nde Biblia, mpo yango nde ezalaki na makambo ya solo.” Yango wana, Capito amonaki ete liteya oyo elobaka ete limpa ná vinyo ebongwanaka mpenza nzoto mpe makila ya Kristo mpe kosambela basantu eutaki na Biblia te. (Talá etanda “ Bótala soki makambo yango ezali bongo.”) Capito asundolaki mosala na ye ya episkɔpɔ-mokonzi na 1523 mpe akendaki kofanda na engumba Strasbourg, esika bato oyo bazalaki koluka mbongwana na makambo ya losambo bazalaki kofanda.

 Ndako ya Capito na Strasbourg ekómaki esika bato oyo bazalaki koluka mbongwana bazalaki kokutana mpo na kolobela makambo mingi ya lingomba mpe mateya ya Biblia. Atako bato mosusu oyo bazalaki koluka mbongwana bazalaki kokoba kondima liteya ya Bosato, buku moko (The Radical Reformation) elobi ete makomi ya Capito emonisaki ete “aboyaki kolobela liteya ya Bosato.” Mpo na nini? Ndenge oyo Michael Servetus, moto moko ya teoloji ya Espagne asalelaki mikanda ya Biblia mpo na kokweisa liteya ya Bosato *, ekamwisaki Capito.

Koboya liteya ya Bosato ekokaki komemela moto likama monene, yango wana Capito azalaki ekɛngɛ mpo na komonisa makanisi na ye polele. Kasi, makomi na ye emonisi ete azalaki te kondima liteya ya Bosato liboso kutu akutana na Servet. Na nsima, sango moko ya Katolike akomaki ete Capito mpe baninga na ye “bazalaki kopesana makanisi na esika na bango moko mpo na mateya oyo lingomba elobaka ete ezali libombami; [mpe] baboyaki oyo etali Bosato.” Siɛklɛ moko na nsima, batyaki Capito na esika ya liboso na molɔngɔ ya bakomi oyo bazalaki koboya liteya ya Bosato.

Wolfgang Capito andimaki ete “koboya kotalela Makomami” nde ekweisaki lingomba

Capito azalaki kondima ete solo ezali nde na Biblia. Akomaki boye: “Tiká Biblia mpe mobeko ya Kristo ezala ntango nyonso ya bokonzi na teoloji.” Kittelson moto moko ya filozofi alobaki ete Capito “abɛtaki nsɛtɛ ete bato ya teoloji bakwei libosoliboso mpo baboyaki kotalela Makomami.”

Martin Cellarius (ayebanaki mpe na nkombo ya Martin Borrhaus), elenge mobali oyo afandaki na ndako ya Capito na mobu 1526 azalaki mpe na mposa wana ya koyeba solo ya Liloba ya Nzambe.

“BOYEBI YA NZAMBE YA SOLO”

Titre ya buku (On the Works of God) ya Martin Cellarius, oyo akokanisaki mateya ya lingomba na oyo ya Biblia

Cellarius abotamaki na mobu 1499; azalaki moyekoli ya molende ya teoloji mpe ya filozofi. Andimaki kozala molakisi na Wittenberg, na Allemagne. Lokola engumba Wittenberg ezalaki esika oyo mbongwana ebandaki, eumelaki te Cellarius ayebanaki na Martin Luther mpe bato mosusu oyo bazalaki na mposa mbongwana ekɔta na mateya ya lingomba. Ndenge nini Cellarius akokaki kokesenisa mateya oyo ezalaki kaka makanisi ya bato mpe solo ya Makomami?

Buku moko (Teaching the Reformation) elobi ete Cellarius azalaki kondima ete boyebi ya solosolo eyaka “na kotánga Makomami na molende, na kotala soki vɛrsɛ boye ya Biblia eyokani na vɛrsɛ mosusu, mpe na mabondeli oyo esangani na kobongola motema.” Cellarius amonaki nini na boyekoli na ye ya Biblia?

Na sanza ya 07/1527, Cellarius abimisaki buku On the Works of God, oyo ezalaki na makambo oyo amonaki na Biblia. Akomaki ete na milulu lokola oyo ya elekeli ya nkolo, limpa ná vinyo ebongwanaka nzoto mpe makila ya Yesu te, kasi ezalaki kaka na ndenge ya elilingi. Profɛsɛrɛ Robin Barnes alobi ete buku ya Cellarius “elobelaki mpe ndimbola ya bisakweli ya Biblia oyo emonisaki koya ya eleko moko oyo makama mpe bampasi ekoyela mokili mobimba mpe na nsima makambo ekobonga mpenza na mokili mobimba.”​—2 Petro 3:10-13.

Likambo oyo ebendi mpenza likebi ezali bakomantɛrɛ ya mokuse oyo Cellarius atyaki mpo na kolobela Yesu Kristo. Atako amonisaki polele te ete liteya ya Bosato ezali lokuta, Cellarius amonisaki ete “Tata ya likoló” akeseni na “Mwana na ye Yesu Kristo” mpe akomaki ete Yesu azalaki moko kati na banzambe ebele mpe mwana ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.​—Yoane 10:34, 35.

Na buku na ye Antitrinitarian Biography (1850), Robert Wallace akomaki ete makomi ya Cellarius elandaki te liteya ya Bosato ya Ba-ɔrtɔdɔkse oyo epalanganaki na siɛklɛ ya 16. * Bato mingi ya  mayele bamoni ete Cellarius aboyaki liteya ya Bosato. Balobeli ye lokola moko ya bato oyo Nzambe asalelaki “mpo na koteya boyebi ya Nzambe ya solo mpe ya Kristo.”

ELIKYA YA KOZONGISA MATEYA YA SOLO

Na mobu soki 1527, Johannes Campanus, moto moko ya teoloji oyo akómaki mpe kofanda na Wittenberg; bazalaki kotalela ye lokola moko ya bato ya mayele mingi ya eleko na ye. Atako afandaki esika oyo mbongwana ya mateya ya mangomba ebandaki, Campanus azalaki kosepela te na mateya ya Martin Luther. Mpo na nini?

Campanus aboyaki liteya oyo elobaka ete limpa ná vinyo ebongwanaka nzoto mpe makila ya Yesu mpe liteya oyo elobaka ete nzoto mpe makila ya Yesu esanganaka na limpa mpe vinyo. * Mokomi moko André Séguenny, alobaki ete Campanus azalaki kondima ete “limpa etikalaka kaka limpa, kasi na molulu wana, ezalaka nde elilingi ya nzoto ya Kristo.” Na mobu 1529, na likita ya Marburg oyo bato bayanganaki mpo na kolobela mpenza makambo yango, baboyaki ete Campanus alobela makambo oyo atángaki na Biblia. Na nsima, baninga na ye oyo bazalaki mpe koluka mbongwana babenganaki ye na Wittenberg.

Na buku na ye (Restitution), Campanus andimaki liteya ya Bosato te

Likambo mpenza oyo esilikisaki bato yango ezali ndenge oyo Campanus azalaki kotalela Tata, Mwana mpe elimo santu. Na buku (Restitution) oyo abimisaki na 1532, Campanus ateyaki ete Yesu ná Tata bazali ndenge moko te. Alimbolaki ete Tata ná Mwana ‘bazali moko,’ kaka ndenge elobamaka ete mwasi ná mobali bazali “mosuni moko,” basangani, kasi bazali kaka bato mibale oyo bakeseni. (Yoane 10:30; Matai 19:5) Campanus amonaki ete Biblia esaleli ndakisa ndenge moko mpo na komonisa ete Tata azali na bokonzi likoló ya Mwana: “Mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Kristo ezali Nzambe.”​—1 Bakorinti 11:3.

Bongo mpo na elimo santu? Awa mpe Campanus asalelaki Biblia, akomaki boye: “Vɛrsɛ moko te emonisi ete elimo santu ezali moko ya bapersona misato . . . Elimo santu esalelami lokola nguya moko oyo esalaka mosala na ndenge ebongisaka mpe ekokisaka makambo nyonso na nzela ya nguya na yango ya elimo mpe mosala.”​—Ebandeli 1:2.

Luther abengaki Campanus mofingi mpe monguna ya Mwana ya Nzambe. Moko na bango alobaki báboma Campanus. Ata bongo, Campanus azongaki nsima te. Buku moko (The Radical Reformation) elobi ete “Campanus andimaki mpenza ete soki lingomba ekweaki ezalaki mpo na kozanga koyeba Biblia malamumalamu mpe mateya ya bantoma oyo etalaki bonzambe mpe moto.”

Campanus azalaki te na likanisi ya kosala lingomba. Alobaki ete alukaki solo “na kati ya mwa mangomba mpe epai ya baoyo nyonso bapɛngwaki” kasi asalaki mosala ya mpunda. Yango wana azalaki na elikya ete soki Lingomba ya Katolike ebongisi makambo, ekozongisa mateya ya solo ya bokristo. Nsukansuka, bakonzi ya Lingomba ya Katolike bakangaki Campanus, mpe ekoki kozala ete alekisaki mbula koleka 20 na bolɔkɔ. Bato ya istware bakanisaka ete ekoki kozala akufaki na mobu soki 1575.

 ‘BÓLUKA KOYEBA LIKAMBO NYONSO SOKI EZALI SOLO’

Koyekola Biblia na molende esalisaki Capito, Cellarius, Campanus, mpe bamosusu bákesenisa solo ná lokuta. Atako makambo nyonso te oyo bango balobaki eyokanaki na oyo Biblia elobaka, na komikitisa nyonso, bato yango oyo bazalaki koluka solo batalelaki Makomami mpe bazwaki na motuya mpenza solo oyo bayekolaki.

Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bakristo boye: “Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo; bókangama makasi na oyo ezali malamu.” (1 Batesaloniki 5:21) Mpo na kosalisa yo oyeba solo, Batatoli ya Yehova babimisá buku Biblia eteyaka mpenza nini?

^ par. 4 Talá etanda Laissez l’un et l’autre croître ensemble jusqu’à la moisson,” na lokasa 44 ya buku Les Témoins de Jéhovah : Prédicateurs du Royaume de Dieu, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 8 Talá lisolo Michel Servet, seul dans sa quête de la vérité,” na Lamuká! ya 05/2006 na Lifalanse, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 17 Mpo na ndenge oyo Cellarius asalelaki liloba “nzambe” ntango alobelaki Kristo, buku yango elobi boye: “Akomaki deus kasi te Deus, oyo asalelaki yango kaka ntango azalaki kolobela Nzambe Oyo-Aleki-Likoló.”

^ par. 20 Luther nde ateyaki liteya oyo elobaka ete limpa mpe vinyo “esanganaka” na nzoto ya Kristo na elambo ya Nkolo.