Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Juin 2014

Elikya nini ezali mpo na bankɔkɔ na ngai oyo bakufá?

Elikya nini ezali mpo na bankɔkɔ na ngai oyo bakufá?

ELEKI mwa bambula, lisolo moko oyo ebendaki likebi ya bato ebimaki na zulunalo moko ya Corée (The Chosun Ilbo). Ezalaki na motuna oyo: “‘Shim Cheong moto malamu’ oyo ayebaki eloko moko te na oyo etali Yesu, akendá na lifelo?”

Lisolo yango ezalaki kobenda likebi mpo Shim Cheong azalaki elenge mwasi moko malamu oyo masolo ya kala ya ekólo Corée elobelaka, oyo akabaki bomoi na ye mpo na kosalisa papa na ye oyo azalaki miso ekufá. Nsima ya bambula, bakómaki kokumisa ye mingi. Kutu, na Corée, bato bakómá komona ete Shim Cheong azali ndakisa malamu ya elenge mwasi ya mpiko.

Mpo na bato mingi, kokanisa ete moto ya ndenge wana akozwa etumbu na lifelo kaka mpo azwaki batisimo te mpo na kokóma mokristo ezali sembo te, ezali kutu mabe mpenza. Kutu, balobaka ete makambo yango esalemaki liboso kutu nsango etali Kristo ekɔta na mboka na ye.

Lisolo yango ezalaki mpe na mituna-lisolo elongo na sango moko. Batunaki ye soki baoyo bakufaki kozanga koyekola makambo ya Yesu bango nyonso bakozwa etumbu ya lifelo. Apesaki eyano nini? “Toyebi te. Tokanisi kaka ete nguya ya Nzambe ekoki kosala [mpo na bato ya ndenge wana].”

ESƐNGAMI MPO NA KOZWA LOBIKO?

Buku moko (The New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Batisimo ezali na ntina mpo moto azwa lobiko. Ndenge Kristo ye moko alobaki yango, soki moto abotami na mai mpe na elimo santu te, akoki te kokɔta na Bokonzi ya Nzambe.” (Yoane 3.5) Mpo na yango, bato mosusu bakanisaka ete baoyo bakufá kozanga kozwa batisimo babwaká bango na lifelo to bazali konyokwama na lolenge moko to mosusu nsima ya liwa.

Kasi, ezali mpe na bato mingi mosusu oyo bamonaka ete liteya yango ezangi motó ná makolo. Bamilio ya bato bakufá kozanga báyeba Biblia. Babongi konyokwama seko na seko? Biblia elobi nini na likambo yango?

ELIKYA OYO BIBLIA EPESI

Biblia emonisi polele ete Nzambe abosani te bato oyo, na bomoi na bango bayebaki te makambo oyo asɛngaka. Misala 17:30 elobi boye: “Nzambe akangi miso mpo na bantango wana ya kozanga boyebi.” Kasi, elikya nini Biblia epesi mpo na baoyo bakufaki kozanga kozwa libaku ya koyekola makambo ya Nzambe?

Elaka oyo Yesu apesaki ete: “Okozala na ngai na Paradiso” elimboli nini?

Maloba oyo Yesu alobaki na mosali-mabe oyo akufaki elongo na ye ekoki kopesa biso eyano. Moto yango alobaki na Yesu boye: “Kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” Yesu apesaki ye eyano nini? alobaki na ye boye: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na Paradiso.”Luka 23:39-43.

Yesu alakaki nde moto yango bomoi na likoló? Te. Moto yango ‘abotamaki’ na mai mpe na elimo te, makambo oyo esɛngamaki mpo moto akɔta na Bokonzi ya likoló. (Yoane 3:3-6) Kutu, Yesu alakaki nde ete moto mabe yango akozonga lisusu na bomoi na paradiso. Lokola azalaki Moyuda, moto yango ayebaki ete paradiso ezalaki awa na mabele, na elanga ya Edene, ndenge mokanda ya liboso ya Biblia emonisi yango. (Ebandeli 2:8) Elaka ya Yesu epesaki moto yango elikya ya lisekwa na paradiso ntango ekozonga awa na mabele.

Kutu, Biblia elaki ete “lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) “Bato oyo bazangi boyengebene” ezali baoyo basalaki te makambo oyo Nzambe asɛngaka mpo bayebaki te mibeko mpe mokano na ye. Yesu akosekwisa moto mabe oyo asololaki na ye mpe bamilio ya bato mosusu oyo “bazangi boyengebene,” oyo bakufaki kozanga koyeba Nzambe. Na nsima, ntango bakozonga na bomoi na paradiso, bakoteya bango makambo oyo Nzambe asɛngaka, mpe bakozwa libaku ya komonisa ete balingaka Nzambe soki batosi mibeko na ye.

 NTANGO BATO OYO BAZANGI BOYENGEBENE BAKOSEKWA

Ntango bato oyo bazangi boyengebene bakosekwa, bakosambisama na kolanda makambo oyo basalá kala? Te. Mpo Baroma 6:7 elobi ete: “Moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.” Ntango bato oyo bazangi boyengebene bakufaka, bafutaka masumu na bango. Na yango, bakosambisama na kolanda makambo oyo bakosala nsima ya lisekwa na bango, kasi te mpo na makambo oyo basalaki na kozanga koyeba liboso bákufa. Matomba nini bakozwa?

Nsima ya lisekwa, bato oyo bazangi boyengebene bakozwa libaku ya koyekola mibeko ya Nzambe, oyo ekoyebana ntango barulo ekofungwama. Na nsima bakosambisama ‘na kolanda misala na bango.’ (Emoniseli 20:12, 13) Mpo na bato mingi oyo bazangi boyengebene, yango ekozala libaku ya mibale te, kasi nde ya liboso mpo na bango ya kozwa bomoi ya seko na mabele soki bayekoli mpe basali mokano ya Nzambe.

Mateya oyo ya Biblia esali ete bato mingi bázongela kondimela Nzambe. Moko na bango ezali Yeong Sug. Azalaki mondimi monene ya Lingomba ya Katolike banda bomwana. Bato ya libota na ye bazalaki basango. Lokola azalaki na mposa ya kokóma mamelo, akɔtaki kuva. Na nsima, abimaki kuva mpo alɛmbaki nzoto mpo na makambo oyo ezalaki koleka kuna. Longola yango, azalaki kondima liteya ya lifelo te mpo azalaki komona ete konyokola bato na mɔtɔ ezali sembo te mpe bolingo te.

Na nsima, Motatoli moko ya Yehova alakisaki Yeong Sug maloba oyo ya Biblia: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te, bazali mpe na lifuti lisusu te.” (Mosakoli 9:5) Motatoli yango asalisaki ye amona ete bankɔkɔ na ye oyo bakufá banyokwamaka na lifelo te. Balali nde na liwa, bazali kozela lisekwa.

Lokola ayebaki ete bato mingi bayoká naino te solo oyo ezali na Biblia, maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 24:14 esimbaki motema ya Yeong Sug; elobi boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” Lelo oyo asakolaka nsango malamu mpe ayebisaka basusu elikya kitoko oyo Biblia epesi ye.

“NZAMBE APONAKA BILONGI TE”

Biblia elobi boye: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Yango nde bosembo ya solosolo oyo biso nyonso tokoki kozela epai ya Nzambe oyo “alingaka boyengebene mpe bosembo.”Nzembo 33:5.