Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Juin 2014

Osí omeká limpa ya bomoi?

Osí omeká limpa ya bomoi?

BATURISTE bazalaki na nzala. Kotala bisika oyo ezalaka na biloko ya kala na engumba Beteleme epesaki bango mposa ya kolya mpe balingaki komeka elubu moko ya mboka wana. Moko na bango amonaki restora moko oyo balambaka elubu kitoko ya madesu ya mikemike baniká, tomati, matungulu, mpe ndunda mosusu oyo balyaka yango na limpa oyo ezangá levire. Biloko kitoko ya mikemike oyo balyaki epesaki bango makasi lisusu ya kokoba mobembo na bango.

Kozanga ete báyeba, bapaya yango balyaki limpa ya mindɔndɔ te oyo ezangá levire, likambo oyo bakutanaki na yango na mokolo wana ezalaki oyo bakokaki kobosana te. Nkombo Beteleme elimboli “ndako ya limpa,” mpe bazalaki kosala mampa na engumba yango na boumeli ya bankoto ya bambula. (Ruta 1:22; 2:14) Limpa yango ezali limpa oyo bato balyaka mingi na Beteleme.

Eleki sikoyo mbula soki 4 000, mosika te na sudi ya Beteleme, Sara, mwasi ya Abrahama asalaki “bagato ya libungutulu” mpo na bapaya misato oyo bayaki epai na bango na mbalakaka. (Ebandeli 18:6) Ekoki kozala ete “farini ya malamu” oyo Sara asalelaki ezalaki farini ya blé to ya ɔrje. Sara asengelaki kosala mampa yango nokinoki mpe ekoki kozala ete atumbaki yango na mabanga ya mɔtɔ.1 Bakonzi 19:6.

Ndenge lisolo oyo emonisi yango, bato ya libota ya Abrahama bazalaki kosala mpe kotumba mampa na bango ya kolya bango moko. Lokola bazalaki kofanda esika moko te, Sara mpe bato na ye ya misala bazalaki te kotumba mampa na fur ndenge bato ya engumba na ye Ure bazalaki kosala. Asalaki farini ya malamu na bambuma ya mboka wana. Ezalaki mosala moko makasi mpenza mpo bazalaki kosalela enikelo ya mabɔkɔ mpe ekoki kozala ete bazalaki kosalela liboka ná motute.

Basiɛklɛ minei na nsima, Mibeko ya Moize elobaki ete moto moko akoki te kokanga enikelo ya mabɔkɔ mpo na nyongo oyo moto azali na yango mpo ezalaki ‘eloko oyo moto abikelaka na yango.’ (Kolimbola Mibeko 24:6) Nzambe azalaki kotalela enikelo ya mabɔkɔ lokola eloko ya motuya mpo soki ezangi, bato ya libota bakokaki te kosala mampa na bango ya mokolo.—Talá etanda “ Konika mbuma mpe kosala mampa ya mokolo na mokolo na ntango ya kala.”

LIMPA MPO NA KOPESA MOTEMA YA MOTO MOWEI MPAMBA MAKASI

Makomami elobeli mampa mbala ebele, yango emonisi ete ezalaki bilei ya ntina na ntango ya kala. Yango wana, bato oyo bakomaki Biblia balobelaki mbala mingi mampa na esika ya bilei. Yesu amonisaki ete baoyo basalelaka Nzambe bakoki kobondela na motema mobimba ete: “Pesá biso lelo [mampa] na biso mpo na mokolo oyo.” (Matai 6:11) Awa, liloba mampa elakisi bilei nyonso oyo tolyaka; na yango, Yesu amonisi ete tosengeli kotya motema ete Nzambe akokokisa bamposa na biso ya mokolo na mokolo.Nzembo 37:25.

Kasi, ezali na eloko moko oyo eleki mampa to bilei na valɛrɛ mpenza. Yesu alobaki boye: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Matai 4:4) Maloba na ye emonisi ete akanisaki ntango oyo elikya nyonso ya Bayisraele ezalaki na biloko oyo Nzambe azalaki kopesa bango. Yango ebandaki mwa moke nsima ya kobima na bango na Ezipito. Sanza soki moko elekaki banda bakɔtaki na esobe ya Sinai, bilei oyo bazalaki na yango etikalaki moke. Lokola babangaki ete bakokufa na nzala na esobe wana oyo ekauká, bamilelalelaki boye: “Tozalaki kolya mampa ndenge tolingi” na Ezipito.Kobima 16:1-3.

Na ntembe te, mampa ya Ezipito ezalaki elɛngi. Na ntango ya Moize, basali-mampa oyo bayebaki mpenza mosala yango bazalaki kosalela Baezipito mampa mpe bagato ya ndenge na ndenge. Kasi Yehova azalaki na mposa te ya kotika bato na ye  kozanga mampa ata ya lolenge nini. Alakaki bango boye: “Talá nazali konɔkisela bino mampa longwa na likoló.” Kaka ndenge alakaki bango, mampa yango, “eloko moko ya moke oyo ebukanaka mpambampamba” oyo eutaki na likoló ezalaki kokita na ntɔngɔ, ezalaki lokola biloko moko ya mpɛmbɛmpɛmbɛ. Bayisraele batunaki boye ntango bamonaki yango mpo na mbala ya liboso: “Oyo nini?” Moize ayebisaki bango boye: “Ezali mampa oyo Yehova apesi bino mpo na kolya.” Babengaki yango mana, * mpe mampa yango esalisaki bango na boumeli ya bambula 40.Kobima 16:4, 13-15, 31.

Na ebandeli, mana yango ekamwisaki Bayisraele. Elɛngi na yango ezalaki lokola “bagato ya papala esalemi na mafuta ya nzoi,” mpe moto nyonso azalaki kozwa oyo ekoki na ye. (Kobima 16:18) Kasi, wana mikolo ezalaki koleka, bakómaki komona ete bazangi biloko ndenge na ndenge oyo bazalaki kolya na Ezipito. Bakómaki koimaima ete: “Miso na biso ezali komona eloko mosusu te kaka mana.” (Mitángo 11:6) Na nsima, bakómaki koloba na nkanda ete: “Molimo na biso ekómi koyoka mampa ya mpamba oyo mpii.” (Mitángo 21:5) Bakómaki komona ete “limpa oyo eutaki na likoló” ezalaki lisusu elɛngi te mpe bayinaki yango.Nzembo 105:40.

LIMPA YA BOMOI

Na ntembe te, bato bakoki kozwa limpa na valɛrɛ mpenza te kaka ndenge bazwaka biloko mosusu mingi na valɛrɛ te. Kasi Biblia elobeli lolenge moko ya limpa oyo ezali sipesiale, oyo tokoki komona yango mpamba te. Limpa yango, oyo Yesu akokanisaki na mana oyo Bayisraele batyolaki, ekoki kopesa bolamu ya seko.

Yesu ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete: “Ngai nazali limpa ya bomoi. Bankɔkɔ na bino balyaki mana na esobe kasi bakufaki. Oyo ezali limpa oyo euti na likoló, mpo ete moto nyonso alya yango mpe akufa te. Ngai nazali limpa ya bomoi oyo euti na likoló; soki moto azali kolya limpa yango akozala na bomoi libela; mpe, ya solo, limpa oyo nakopesa ezali  mosuni na ngai mpo na bomoi ya mokili.”Yoane 6:48-51.

Mingi ya bato oyo bayokaki makambo oyo Yesu alobaki bakangaki te ntina ya “limpa” mpe “mosuni;” mpo ezalaki maloba ya elilingi. Ata bongo, ndakisa yango ebongaki mpenza. Mampa ezalaki kokokisa bamposa ya mokolo na mokolo ya Bayuda, kaka ndenge mana ekokisaki bamposa ya Bayisraele na boumeli ya mbula 40 na esobe. Atako mana ezalaki likabo oyo eutaki epai ya Nzambe, epesaki bato bomoi ya seko te. Nzokande mbeka ya Yesu ezali kopesa baoyo bazali komonisa kondima epai na ye bomoi ya seko. Azali mpenza “limpa ya bomoi.”

Mbala mosusu ntango oyokaka nzala, ozwaka mwa eteni ya limpa. Okoki mpe kopesa Nzambe mersi mpo na ‘mampa ya mokolo na mokolo.’ (Matai 6:11) Ntango tozali kosepela na bilei ya elɛngi, tiká ete tóbosana soki moke te valɛrɛ ya Yesu Kristo, “limpa ya bomoi.”

Tokomonisa ete tokeseni na Bayisraele oyo bazangaki bɔtɔndi na mikolo ya Moize soki tozali kozwa limpa wana ya valɛrɛ mingi na lisɛki te. Yesu alobaki boye: “Soki bolingi ngai, bokotosa mitindo na ngai.” (Yoane 14:15) Soki tozali kotosa mibeko ya Yesu, tokozala na libaku ya kolya limpa mpo na libela.Kolimbola Mibeko 12:7.

^ par. 10 “Mana” euti na maloba ya Ebre “man hu’?” oyo elimboli “oyo nini?”