Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Mai 2014

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Mpo na nini ntango bazalaki koboma basali-mabe bazalaki mpe kobuka bango makolo?

Evanzile elobi boye mpo na ndenge oyo babomaki Yesu ná basali-mabe mibale oyo babakaki likoló ya nzete ya mpasi: “Bayuda . . . basɛngaki Pilate atinda bábuka bango makolo mpe bálongola bibembe.”​—Yoane 19:31.

Mibeko ya Bayuda elobaki ete nzoto ya mosali-mabe oyo bakakisi likoló ya nzete nsima ya koboma ye, ‘esengelaki te kotikala butu mobima likoló ya nzete.’ (Kolimbola Mibeko 21:22, 23) Emonani ete Bayuda bazalaki mpe kosalela mobeko yango epai ya bato oyo Baroma bazalaki koboma likoló ya nzete. Na libaku wana, kobuka makolo ya bato yango ezalaki kosala ete bákufa noki mpe bákundama liboso sabata ebanda ntango moi elali.

Ntango bazalaki koboma bato mingi ndenge wana, bazalaki kozwa mabɔkɔ ná makolo ya moto oyo bakateli ye etumbu mpe kokangisa yango na nzete mpo na kobɛta yango bansɛtɛ. Ntango bazalaki kotombola nzete, kilo ya nzoto na ye ezalaki kosala ete ayoka mpasi makasi mpo na bansɛtɛ wana. Mpo apema, moto asengelaki kobenda makolo na ye oyo ebɛtami na bansɛtɛ. Nzokande, akokaki kosala yango te soki mikuwa ya makolo na ye ebukanaki. Azalaki kokufa nokinoki mpo na kozanga kopema to mpo na mpasi makasi.

Ndenge nini bazalaki kosalela bilingongo to lansi na bitumba na ntango ya kala?

Bilingongo ezalaki ebundeli oyo Davidi asalelaki mpo na koboma engambe Goliate. Emonani ete Davidi ayekolaki kosalela ebundeli yango ntango azalaki naino elenge na mosala ya kobatela bampate.​—1 Samwele 17:40-50.

Liyemi oyo emonisi basoda ya asiri bazali kosalela lansi mpo na kobundisa engumba moko ya bayuda oyo ebatelami makasi

Bilingongo to lansi emonisami na mayemi ya bato ya Ezipito to ya Asiri ya ntango ya kala. Ebundeli yango ezalaki lokola poshɛ ya mposo ya nyama to ya elamba oyo bazalaki kokangisa yango na nsinga mibale. Moto oyo azalaki kosalela yango azalaki kotya na poshɛ yango libanga ya mosɛlu ya santimɛtrɛ mitano to nsambo na ndambo mpe ekokaki kozala na gramɛ 250. Azalaki kobalusa lansi yango likoló ya motó na ye mpe kobwaka nsinga moko, oyo ezalaki kosala ete libanga yango epumbwa mosika na nguya mpenza mpe ekende esika mpenza oyo moto alingi.

Na mabulu oyo bato ya arkeoloji batimolaki na Moyen-Orient, bamonaki ebele ya balansi oyo bato bazalaki kosalela na bitumba na ntango ya kala. Basoda oyo bayebaki mpenza kobunda bazalaki kotinda mabanga yango na vitɛsi ya bakilomɛtrɛ 160 tii 240 na ngonga moko mpamba. Bato ya mayele bayebaka te soki lansi yango ezalaki lokola litimbo, kasi na ntembe te, lansi yango ezalaki mpenza koboma.​—Basambisi 20:16.