Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Mai 2014

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Moto akoki koyeba avenire?

Moto akoki koyeba avenire?

Biso nyonso tokanisaka avenire na biso. Tomitunaka soki bomoi na biso mpe ya bandeko na biso ekozala ndenge nini. Tomitunaka mituna lokola oyo: ‘Bana na ngai bakofanda na mokili ya malamu koleka? Likama moko boye ekobebisa mabele? Ezali na likambo moko oyo nakoki kobongisa sikoyo mpo avenire na ngai ezala malamu koleka?’ Moto nyonso azalaka na mposa ya koyeba makambo wana; tozalaka na mposa báyebisa biso likambo moko oyo ekokitisa biso motema, oyo ezali solo, na molɔngɔ, mpe tózala na bomoi ya malamu. Soki oyebi ndenge avenire na yo ekozala, okomibongisa ezala na nzoto to na makanisi.

Na yango, avenire ebombeli yo nini? Nani akoki koyeba yango? Bato ya mayele oyo balukaka kolobela avenire balongaka na makambo mosusu, kasi balongaka mpe te na makambo mingi. Kasi, Nzambe akoki koyebisa na bosikisiki makambo oyo ekosalema. Liloba na ye elobi boye: “Banda na ebandeli ayebisaka ndenge makambo ekosuka, mpe banda kala makambo oyo esalemi naino te.” (Yisaya 46:10) Makambo oyo alobaka ekokisamaka mpenza?

MAKAMBO OYO NZAMBE ALOBAKA EKOKISAMAKA

Mpo na nini osengeli kotya likebi na bisakweli ya kala ya Nzambe oyo ekokisamaki? Na ntembe te, okokamwa soki moto oyo asalaka na meteo alobaka mikolo nyonso makambo oyo ekokisamaka. Boye, okotya mpe likebi na makambo oyo alobi ete ekosalema lobi. Ndenge moko mpe, soki oyebi ete makambo oyo Nzambe asakolaki ekokisamaki mpenza, okotya mpenza likebi na makambo oyo alobi ete ekosalema na mikolo ezali koya.

Efelo moko oyo batongi lisusu na bitika ya engumba ya kala ya Ninive

KOBEBISAMA YA ENGUMBA MOKO MONENE:

Na ndakisa, ekozala likambo ya kokamwa kosakola na bosikisiki ete mosika te engumba moko monene oyo ezali na nguya mingi na boumeli ya basiɛklɛ, ekobebisama. Na nzela ya molobeli na ye, Nzambe asakolaki likambo  ya ndenge wana, elingi koloba kobebisama ya Ninive. (Sefania 2:13-15) Bato ya istware bakomaki nini? Emonani ete esakweli yango ekokisamaki nsima ya bambula 15, ntango bato ya Babilone mpe Bamede babundisaki Ninive mpe bakweisaki yango na siɛklɛ ya nsambo liboso ya ntango na biso. Longola yango, Nzambe alobaki polele liboso ete Ninive ekokóma “esika oyo etikali mpamba, etúká oyo ezangá mai lokola esobe.” Maloba yango ekokisamaki mpenza? Ɛɛ. Atako bonene ya engumba yango ezalaki ya kilomɛtrɛ-kare 518, bato oyo balongaki yango babatelaki yango te mpe bafandaki wana te ndenge bato mosusu bakoki kokanisa. Kutu, babebisaki nde yango. Moto moko ya mayele na makambo ya politiki akoki kosakola makambo ya ndenge wana na bosikisiki?

MIKUWA YA BATO EKOTUMBAMA:

Nani akoki kosakola bambula 300 liboso nkombo mpenza mpe bankɔkɔ ya moto oyo akotumba mikuwa ya bato na etumbelo, ata mpe nkombo ya engumba oyo etumbelo yango ekozala? Soki likambo ya ndenge wana oyo esalemaka mingi te ekokisami, na ntembe te yango ekosala ete moto oyo asakolaki yango ayebana mingi. Molobeli moko ya Nzambe asakolaki ete: “Mwana moko akobotama na ndako ya Davidi, nkombo na ye Yosiya! . . . , mpe akotumba mikuwa ya bato” likoló ya etumbelo moko na engumba Betele. (1 Bakonzi 13:1, 2) Basiɛklɛ soki misato na nsima, mokonzi moko na nkombo Yosiya autaki na libota ya Davidi; ezali nkombo oyo kaka ye moko nde azali na yango na Biblia. Kaka ndenge esakolamaki, Yosiya atindaki “bato bázwa mikuwa na malita yango mpe atumbaki yango likoló ya etumbelo yango” oyo ezalaki na Betele. (2 Bakonzi 23:14-16) Ndenge nini moto akoki kosakola makambo wana nyonso soki atambwisami te na nguya moko oyo eleki oyo ya bato?

Basakoli ya Biblia basakolaki kokwea ya Babilone na bosikisiki mpenza

NSUKA YA AMPIRE MOKO:

Ekozala likambo ya kokamwa soki bambula mingi liboso, moto moko asakoli nkombo ya moto oyo akokweisa ekólo moko ya nguya ya mokili mobimba, mpe alobeli mayele oyo moto yango akosalela mpo na kokweisa ekólo yango. Nzambe asakolaki ete mobali moko na nkombo Siruse akokweisa ekólo moko boye. Siruse yango akolongola Bayuda na boombo mpe akosalisa bango mpo na kotonga lisusu tempelo mosantu. Longola yango, Nzambe alobaki ete na mayele oyo Siruse akosalela na  etumba yango, akokaukisa mpe mai ya ebale; mpe alobaki ete baporte ya engumba yango ekotikala polele, mpo baoyo bakokweisa yango bákɔta na pɛtɛɛ nyonso. (Yisaya 44:27–45:2) Makambo mingi wana nyonso oyo Nzambe alobaki na esakweli yango ekokisamaki mpenza? Bato ya istware bandimi ete Siruse akweisaki mpenza engumba yango. Basoda ya Siruse basalaki mosala monene mpo na kolekisa mai ya ebale moko ya Babilone na ngámbo mosusu, mpe yango esalaki ete mai yango ekauka. Longola yango, basoda bakɔtaki na baporte ya engumba yango oyo etikalaki polele. Na nsima, Siruse alongolaki Bayuda na boombo mpe alobaki ete bátonga lisusu tempelo na bango na Yerusaleme. Ezalaki likambo ya kokamwa, mpo Siruse azalaki kosambela Nzambe ya Bayuda te. (Ezera 1:1-3) Soki Nzambe te, nani mosusu akoki koyebisa liboso likambo mokomoko oyo esalemaki na ntango wana ya kala?

Tolobeli bandakisa misato oyo emonisi ndenge makambo oyo Nzambe asakolaki ekokisamaki mpenza. Esuki kaka wana te. Yosua, mokambi ya Bayuda alobaki likambo moko oyo Bayuda nyonso bayebaki malamu; alobaki boye: “Boyebi malamu na mitema na bino nyonso mpe na milimo na bino nyonso ete na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te ezangaki kokokisama.” (Yosua 23:1, 2, 14) Bato ya Yosua bakokaki te kowangana ete bilaka mpe bisakweli nyonso ya Nzambe ekokisamaki. Kasi ndenge nini Nzambe akokisaka yango? Banzela ya Nzambe ekeseni mpenza na oyo ya bato. Ezali na ntina oyeba yango mpo Nzambe alobeli makambo mosusu oyo ekosalema mosika te, oyo ekobongola bomoi na yo mpo na libela.

BISAKWELI YA NZAMBE EKESENI NA OYO YA BATO

Mbala mingi, ntango bato basakolaka makambo, batalelaka bolukiluki ya siansi, ndenge makambo ya mokili ezali kotambola to balandaka maloba ya bato oyo balobaka ete bazali na boyebi oyo eleki ya bomoto. Nsima ya kosakola makambo oyo ekoya, bakangaka mabɔkɔ mpo na kozela soki makambo yango ekosalema.Masese 27:1.

Nzambe akeseni mpenza na bato mpo ayebaka makambo nyonso. Ayebi malamumalamu bizaleli mpe makanisi ya bato; na yango, soki alingi kosala likambo moko, Nzambe akoki komona liboso makambo mpenza oyo bato to bikólo bakosala. Nzambe asuki kaka wana te. Akoki kutu kotambwisa mpe kobongola makambo mpo oyo akani ekokisama. Alobi boye: “Liloba oyo ezali kobima na monɔkɔ na ngai . . . ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te, . . . mpe ekolonga mpenza.” (Yisaya 55:11) Na bantango mosusu, bisakweli ya Nzambe ezalaka makambo oyo ayebisi biso ete akosala na mikolo ezali koya. Asalaka mpenza ete ekokisama.

AVENIRE NA YO

Ezali na esakweli moko oyo okoki kotyela motema oyo etali avenire na yo mpe ya bandeko na yo? Soki oyebi liboso ete mopɛpɛ moko ya makasi ezali koya, okoluka ndenge ya komibatela. Okoki mpe kosala bongo mpo na bisakweli ya Biblia. Nzambe asakolaki ete mosika te mbongwana moko monene ekosalema na mokili mobimba. (Talá etanda “ Nzambe alobi nini mpo na avenire?”) Avenire yango ekeseni mpenza na makambo oyo bato oyo bamibengaka basakoli ya makambo ekoya balobaka.

Tokoki koloba likambo yango boye: Istware ya bato eyebani. Na nzela ya bisakweli ya Biblia, tokoki koyeba makambo oyo ekosalema ntango istware yango ekosuka. Nzambe alobi boye: “Moto oyo banda na ebandeli ayebisaka ndenge makambo ekosuka, . . . Moto oyo alobaka ete: ‘Mokano na ngai ekosimba, mpe eloko nyonso oyo ezali kosepelisa ngai, nakosala yango.’” (Yisaya 46:10) Yo ná libota na yo bokoki kozala na avenire moko ya malamu mpenza. Sɛngá Batatoli ya Yehova báyebisa yo oyo Biblia elobi mpo na makambo oyo ezali koya. Batatoli ya Yehova bazali banganga-nkisi te; balobaka mpe te ete bayokaka mingongo oyo euti na mokili ya bilimo to bazali na nguya moko boye ya kosakola makambo oyo ekoya. Bazali bayekoli ya Biblia oyo bakoki kolakisa yo makambo kitoko oyo Nzambe azali kobongisa mpo na avenire na yo.