Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Avril 2014

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Osengeli kobondelaka?

Osengeli kobondelaka?

Okoki komituna boye: ‘Soki Nzambe ayebaka makambo nyonso, ezala makanisi to bamposa na ngai, mpo na nini nasengeli lisusu kobondela?’ Motuna wana ezali mabe te. Yesu alobaki te ete Nzambe ‘ayebi makambo oyo tozali na bosɛnga na yango liboso kutu tósɛnga ye’? (Matai 6:8) Davidi mokonzi ya kala ya Yisraele ayebaki yango, mpe akomaki boye: “Liloba moko te ezali na lolemo na ngai, kasi talá! Ee Yehova, osili koyeba yango nyonso.” (Nzembo 139:4) Kasi, mpo na nini tosengeli kobondelaka Nzambe? Mpo na koyanola motuna yango, tótalela naino oyo Biblia elobi mpo na mabondeli ya basaleli ya Nzambe. *

“Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”Yakobo 4:8

 LIBONDELI ESALISAKA BISO TÓPUSANA PENEPENE NA NZAMBE

Atako Biblia elobi ete Yehova * Nzambe ayebi makambo nyonso, emonisi mpe ete alukaka te kolandela likambo nyonso oyo etali basambeli na ye. (Nzembo 139:6; Baroma 11:33) Makanisi na ye oyo ezangi nsuka ezali te lokola ordinatɛrɛ oyo ebombaka makambo oyo etali bato. Kutu, Nzambe azalaka na mposa makasi ya koyeba makambo oyo ezali mpenza na mitema na biso mpo alingaka ete tópusana penepene na ye. (Nzembo 139:23, 24; Yakobo 4:8) Yango wana Yesu alendisaki bayekoli na ye bábondelaka, ata soki Tata na ye ayebaka makambo oyo bazali mpenza na mposa na yango. (Matai 6:6-8) Ntango tozali kokoba koyebisa Mozalisi makambo oyo ezali na mitema na biso, tokopusana lisusu penepene na ye.

Na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi tóyeba mpenza makambo ya kosɛnga na libondeli. Soki ezali bongo, Nzambe akoki kutu komona mosika koleka ndenge oyo tozali komiyoka na motema mpe akoki kosalela boyebi na ye ya kokoka mpo na kokokisa bamposa na biso, atako tozali kokoka kobimisa yango polele te. (Baroma 8:26, 27; Baefese 3:20) Ntango tomoni ete Nzambe asalisi biso, ata na ndenge oyo tozalaki kokanisa te, tokomiyoka ete tozali penepene na ye.

NZAMBE AYANOLAKA MABONDELI NYONSO?

Biblia emonisi ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayanolaka mabondeli ya basaleli na ye ya sembo, kasi emonisi mpe ntina oyo ayanolaka mabondeli mosusu te. Na ndakisa, na eleko oyo mobulu etondaki na Yisraele, Nzambe atindaki mosakoli Yisaya ayebisa bato na ye boye: “Ata bozali kobondela mingi, nazali koyoka te; mabɔkɔ na bino etondi na makila oyo bosopi.” (Yisaya 1:15) Ezali polele ete Nzambe ayokaka te mabondeli ya baoyo baboyaka kotosa mibeko na ye to babondelaka na makanisi mabe.Masese 28:9; Yakobo 4:3.

Na ngámbo mosusu, Biblia elobi boye: “Ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” (1 Yoane 5:14) Yango elingi nde koloba ete Nzambe apesaka mbala moko eloko nyonso oyo basambeli na ye basɛngi ye? Ezalaka ntango nyonso bongo te. Tózwa ndakisa ya ntoma Paulo, oyo asɛngaki Nzambe mbala misato ete alongola ye “nzubɛ moko na kati ya mosuni.” (2 Bakorinti 12:7, 8) Ekoki kozala ete Paulo azalaki konyokwama na maladi moko ya miso oyo esilaka te. Ezalaki mpenza mpasi mpo na ye! Nzambe apesaki ye nguya ya kobikisa mpe asekwisaki kutu moto moko oyo akufaki, ata bongo, asengelaki koyika mpiko na maladi na ye moko. (Misala 19:11, 12; 20:9, 10) Atako eyano oyo Nzambe apesaki na libondeli na ye ezalaki te ndenge oyo Paulo alingaki, andimaki eyano yango na bɔtɔndi nyonso.2 Bakorinti 12:9, 10.

“Kotya motema oyo totyelaka ye yango oyo: ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.”1 Yoane 5:14

Toboyi te, Nzambe ayanolaki mabondeli ya bato mosusu oyo Biblia elobeli na ndenge ya likamwisi. (2 Bakonzi 20:1-7) Kasi ata na ntango ya kala, Nzambe azalaki koyanola bato mingi te ndenge wana. Basaleli na ye mosusu bazalaki kotungisama ntango bamoni ete Nzambe ayanoli mabondeli na bango te. Mokonzi Davidi atunaki boye: “Ee Yehova, kino ntango nini okobosana ngai? Libela?” (Nzembo 13:1) Kasi ntango Davidi moto ya sembo amonaki ndenge oyo mbala mingi Yehova azalaki kobikisa ye, atyelaki ye lisusu motema mingi. Kaka na libondeli yango, Davidi abakisaki boye: “Ngai natye motema na motema boboto na yo.” (Nzembo 13:5) Ndenge moko na Davidi, basaleli ya Nzambe lelo oyo basengeli kokoba kobondela tii ntango bakomona ete Nzambe ayanoli mabondeli na bango.Baroma 12:12.

 NDENGE OYO NZAMBE AYANOLAKA MABONDELI

Nzambe akokisaka mpenza bamposa na biso.

Soki baboti bapesaka ntango nyonso te bana na bango biloko oyo basɛngaka bango na ntango oyo basɛngi yango, ezalaka na ntina. Ndenge moko mpe, ntango mosusu, Nzambe akoki te kopesa biso eloko oyo tosɛngi ye na ndenge oyo tokanisi ete asengeli kopesa biso yango to na ntango oyo tozali kozela yango. Kasi tosengeli kotya motema ete Mozalisi na biso, oyo azali lokola tata ya bolingo, akokokisa mpenza bamposa na biso na ntango ebongi mpe na ndenge ya malamu.Luka 11:11-13.

Nzambe akoki kopesa eyano na likambo oyo tosɛngaki na nzela ya Biblia

Nzambe akoki koyanola na ndenge oyo tokanisaki te.

Kasi, tokoloba boni soki tosɛngi Nzambe asalisa biso na mokakatano moko oyo ezali kosila te? Tosengeli nde koloba ete lokola Yehova ayanoli biso te na ndenge ya likamwisi, elingi nde koloba ete asalisi biso te? Kutu, ekozala malamu ete tótala soki Nzambe asalisaki biso te na lolenge mosusu oyo tokanisaki te. Na ndakisa, mbala mosusu moninga moko asalaki oyo akokaki kosala mpo na kosalisa biso kaka na ntango oyo ebongaki mpenza. (Masese 17:17) Ekoki kozala ete Yehova nde atindaki ye aya epai na biso. Lisusu, Nzambe akoki kopesa eyano na likambo oyo tosɛngaki ye na nzela ya Biblia. Na Biblia, tokoki kozwa mayele oyo esengeli mpo na kolonga mokakatano moko boye.2 Timote 3:16, 17.

Nzambe akoki kosalela baninga ya motema mpo na kosalisa biso na ntango oyo ebongi mpenza

Na esika ya kosilisa mokakatano oyo moto azali na yango, mbala mingi Nzambe apesaka basaleli na ye makasi oyo esengeli mpo báyikela yango mpiko. (2 Bakorinti 4:7) Na ndakisa, ntango Yesu asɛngaki Tata na ye alongola komekama ya mabe mpenza oyo ezalaki liboso na ye, mpo abangaki ete ekofingisa nkombo ya Nzambe, Yehova atindaki anzelu moko mpo na kolendisa Mwana na ye. (Luka 22:42, 43) Ndenge moko mpe, Nzambe akoki kosalela moninga moko ya motema mpo aloba na biso makambo oyo ekolendisa biso na ntango oyo tozali mpenza na mposa na yango. (Masese 12:25) Lokola eyano ya ndenge wana ezali te oyo tozalaki kokanisa, tosengeli kotyaka lisusu likebi na ndenge oyo Nzambe ayanolaka mabondeli na biso.

Nzambe azelaka ntango oyo ebongi mpo na koyanola mabondeli mosusu.

Biblia elobi ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso amonisaka boboto epai ya bato ya komikitisa “na ntango oyo ekoki.” (1 Petro 5:6) Na yango, soki tomoni lokola ete Nzambe azali koumela mpo na kopesa biso eloko oyo tosɛngaki ye na motema moko, tosengeli te komona yango lokola nde Yehova atyelaka biso likebi te. Kutu, lokola ayebaka makambo mingi koleka, na ntembe te, Mozalisi na biso oyo atyelaka biso likebi atalelaka liboso makambo oyo tosɛngaka na ndenge oyo amoni ete ezali mpenza malamu mpo na biso.

“Bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, mpo atombola bino na ntango oyo ekoki.”1 Petro 5:6

Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali na mwana ya moke ya mobali oyo asɛngi yo velo. Okopesa ye yango mbala moko? Soki omoni ete abongi naino te kokumba velo, okomona malamu ozela naino liboso ya kosombela ye yango. Kasi, na nsima okopesa ye eloko oyo asɛngi ntango okomona ete kosala bongo ekozala mpo na litomba na ye. Ndenge moko mpe, Nzambe akoki ‘kopesa biso oyo motema na biso ezali kosɛnga’ na ntango oyo ebongi soki tozali kokoba kobondela.Nzembo 37:4.

ZALÁ NA KONDIMA ETE YEHOVA AYOKAKA

Biblia elendisi bakristo ya solo bábosana te ete libondeli ezali na ntina. Bamosusu bakoki koloba ete ‘koloba ezali pɛtɛɛ, kasi kosala nde mpasi.’ Toboyi te, soki tozali koyikela mokakatano moko oyo ezali koumela mpiko to mwa likambo moko ya kozanga bosembo, tokoki komona yango mpasi kozela eyano ya  Nzambe. Ata bongo, tosengeli kobosana te oyo Yesu ateyaki na likambo ya kokoba kobondela.

Yesu apesaki ndakisa ya mwasi mobola oyo akufelá mobali, oyo akobaki kokende epai ya zuzi moko oyo azali sembo te mpo akata likambo na ye na bosembo. (Luka 18:1-3) Atako liboso zuzi yango aboyaki kosalisa ye, nsukansuka, amilobelaki boye: “Nakosala ete alonga, noki te akokoba koya kobɛtabɛta ngai makofi tii nalɛmba.” (Luka 18:4, 5) Na kotalela monɔkɔ ya ebandeli oyo bakomaki na yango makomi yango, zuzi atyelaki mwasi yango likebi mpo atika “kobɛta [ye] na nse ya liso,” to na maloba mosusu, “abebisa lokumu na ye.” * Soki ata zuzi oyo azali sembo te, mpo na kobanga kobebisa lokumu na ye, asalisaki mwasi mobola oyo mobali na ye akufaki, ekozala boni mpo na Nzambe na biso oyo atyelaka biso likebi asala ete bosembo esalema mpo na baoyo “babelelaka ye butu moi”? Ndenge Yesu alobaki yango, Nzambe “akosala ete likambo na bango ekatama na bosembo nokinoki.”Luka 18:6-8.

“Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino.”Luka 11:9

Atako na bantango mosusu tokoki kolɛmba mpo na kosɛnga lisalisi to bámonisela biso boboto, tosengeli kotika te. Soki tokobi kobondela, tokomonisa mposa mpenza oyo tozali na yango ya komona lobɔkɔ ya Nzambe na bomoi na biso. Ekosalisa mpe biso tóyebaka biyano oyo Nzambe apesaka na mabondeli na biso, mpe yango ekosala ete tópusana penepene na ye. Ya solo, tokoki mpenza kotya motema ete Yehova akoyanola mabondeli na biso soki tokobi kosɛnga ye na kondima.Luka 11:9.

^ par. 3 Soki tolingi ete Nzambe ayoka mabondeli na biso, tosengeli mpenza kosala makambo oyo asɛngaka. Soki tosali yango, boye, tokoki komona nguya oyo libondeli ezalaka na yango, ndenge elobelami na lisolo oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 17 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 5 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.

^ par. 22 Na ntango ya kala, Nzambe asɛngaki bazuzi na Yisraele ete bátyela mpenza basi oyo bakufelá mibali mpe bitike likebi.Kolimbola Mibeko 1:16, 17; 24:17; Nzembo 68:5.