Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Mars 2014

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Makambo oyo Nzambe asalelá yo

Makambo oyo Nzambe asalelá yo

“Mpo Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”Yoane 3:16.

Wana ezali moko ya bavɛrsɛ oyo bato ebele bayebi malamu mpe bazongelaka yango mingi. Balobaka ete ezali na vɛrsɛ mosusu te oyo “emonisaka malamu koleka boyokani oyo Nzambe azali na yango na bato mpe nzela ya kozwa lobiko.” Yango wana na bikólo mosusu, mbala mingi bakomaka “Yoane 3:16” to maloba na yango na bitanda minene esika bato ebele ya mboka bakoya, na mituka, na bifelo, mpe na bisika mosusu.

Na ntembe te, bato oyo bakomaka maloba ya vɛrsɛ yango bandimaka ete lokola Nzambe alingaka bango, akopesa bango bomoi ya seko. Bongo yo? Okanisaka nini mpo na bolingo ya Nzambe? Nzambe asalá nini mpo na komonisa ete alingaka yo?

“NZAMBE ALINGAKI MOKILI MINGI”

Bato mingi bandimaka ete Nzambe nde akelá biloko nyonso, likoló ná mabele, banzete ná banyama, mpe biso bato. Biloko ndenge na ndenge oyo bamonaka na mokili ekelamá malamu mpe na ndenge ya kokamwa emonisaka ete moto moko ya mayele mingi nde akelá yango. Bato ebele bapesaka Nzambe matɔndi mokolo na mokolo mpo na bomoi oyo apesi bango. Bayebaka mpe ete soki bazali na bomoi, ezali mpo na biloko oyo Nzambe asalá mpo ebatela bomoi, na ndakisa mopɛpɛ, mai, biloko ya kolya, mpe bileko ndenge na ndenge mpe yango esalaka ete básepela na bomoi.

Ezali malamu tópesaka Nzambe matɔndi mpo na biloko nyonso wana, mpo azali mpenza Mokeli na biso mpe Mobateli ya bomoi na biso. (Nzembo 104:10-28; 145:15, 16; Misala 4:24) Tokoki komona ete Nzambe alingaka biso soki  tokanisi nyonso oyo asalaka kaka mpo tózala na bomoi. Ntoma Paulo amonisaki yango na maloba oyo: “[Nzambe] apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso. Mpamba te na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.”Misala 17:25, 28.

Nzokande, bolingo ya Nzambe emonanaka na ndenge mingi; esuki kaka te na kokokisa bamposa na biso ya mosuni. Apesá biso mpe lokumu mingi na ndenge akelá biso na mposa ya koyeba ye, mpe asalisaka biso tókokisa mposa yango. (Matai 5:3) Na yango, bato ya botosi bazali na elikya ya kokóma bato ya libota ya Nzambe, to “bana” na ye.Baroma 8:19-21.

Ndenge Yoane 3:16 ebakisi yango, Nzambe amonisaki bolingo na ye mpo na biso na ndenge atindaki Mwana na ye Yesu awa na mabele mpo ateya biso makambo ya Tata na ye Nzambe mpe akufa mpo na biso. Kasi, bato mingi balobaka ete bamonaka te ntina oyo esɛngaki Yesu akufela bato mpe na ndenge nini liwa na ye emonisaka bolingo ya Nzambe mpo na biso. Tótala naino ndenge Biblia emonisi ntina oyo Yesu akufaki.

“APESAKI MWANA NA YE SE MOKO OYO ABOTAMAKI”

Moto nyonso akoki kobɛla, konuna, mpe kokufa. Kasi, na ebandeli, Nzambe akanaki te ete ezala bongo. Apesaki Adama ná Eva, bato ya liboso, elikya ya kozala na bomoi ya seko na paradiso na mabele. Kasi, mpo bázwa bomoi yango, basengelaki kotosa ye. Nzambe alobaki na bango ete soki batosi ye te, bakokufa. (Ebandeli 2:17) Adama aboyaki kotosa bokonzi ya Nzambe, mpe yango ememelaki ye moko mpe bana na ye nyonso liwa. Ntoma Paulo alimbolaki ete: “Kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.”Baroma 5:12.

Kasi, Nzambe “alingaka bosembo.” (Nzembo 37:28) Akangaki miso te na lisumu oyo Adama asalaki na nko; kasi, akatelaki mpe te bato nyonso etumbu ya liwa libela na libela kaka mpo na kozanga botosi ya moto moko. Na kolanda mobeko oyo elobi ete “molimo mpo na molimo,” Nzambe asalelaki bosembo mpe abongisaki makambo mpo bato ya batosi bázwa lisusu bomoi ya seko. (Kobima 21:23) Kasi, ‘Esengelaki nini mpo na kozongisa bomoi ya kokoka oyo Adama abungisaki?’ Eyano: Esengelaki moto moko apesa bomoi ya kokoka mpo yango nde Adama abungisaki.

Yesu andimaki koya na mabele mpe apesaki bomoi na ye mpo na kobikisa bato na lisumu mpe na liwa

Nzokande, lokola bato nyonso bautá na Adama mpe bazali bato ya kozanga kokoka, moko te akokaki kopesa bomoi ya ndenge wana. Kasi Yesu akokaki kopesa bomoi ya ndenge wana. (Nzembo 49:6-9) Lokola Yesu abotamaki na lisumu te, azalaki moto ya kokoka, kaka ndenge Adama azalaki. Na yango, ntango Yesu apesaki bomoi na ye, asikolaki bato na boombo ya lisumu. Na ndenge yango, apesaki bana ya Adama ná Eva likoki ya kozwa bomoi ya kokoka, lokola oyo bazalaki na yango na  ebandeli. (Baroma 3:23, 24; 6:23) Tosengeli kosala nini mpo tózwa likabo wana monene oyo Nzambe apesi mpo na komonisa bolingo na ye?

“MOTO NYONSO OYO AZALI KONDIMELA YE”

Yoane 3:16 elobi mpe ete “moto nyonso oyo azali kondimela [Yesu] abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” Yango emonisi ete mpo tózwa likabo ya bomoi ya seko, tosengeli kosala eloko. Mpo tózwa “bomoi ya seko,” tosengeli kondimela Yesu mpe kotosa ye.

Okoki komituna, ‘Mpo na nini kotosa? Yesu alobaki ete “moto nyonso oyo azali kondimela ye” akozwa bomoi ya seko, boye te?’ Ya solo, kondima ezali na ntina mingi. Kasi, tosengeli koyeba ete na Biblia, kozala na kondima elimboli te kozala bindimandima. Diksionɛrɛ moko (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) elobi ete na Grɛki, liloba oyo Yoane asalelaki elimboli “kotyela motema, kasi te kondima bindimelá.” Mpo Nzambe apambola moto, moto yango asengeli kosuka kaka te na kotya na motó na ye ete Yesu azali Mobikisi. Asengeli mpe kosala makasi mpenza mpo asalela makambo oyo Yesu ateyaki. Kondima ya solosolo emonanaka na misala. Biblia elobi: “Kondima oyo ezali na misala te ekufi.” (Yakobo 2:26) Na maloba mosusu, moto oyo andimi asengeli komonisa kondima epai ya Yesu, elingi koloba, kozala na bomoi oyo eyokani na makambo oyo azali kondima.

Paulo amonisaki yango na maloba oyo: “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba, mpo oyo tomoni yango oyo: ete moto moko [Yesu] akufelaki bato nyonso . . . mpe akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe alamwisamaki.” (2 Bakorinti 5:14, 15) Soki tozali mpenza na botɔndi mpo na mbeka oyo Yesu apesaki, tokobongola bomoi na biso: tokotika koluka kaka bolamu na biso mpe tokokóma na bomoi mpo na Yesu, moto oyo akufelaki biso. Yango elingi koloba ete na bomoi na biso, tosengeli libosoliboso kolukaka kosala makambo oyo Yesu ateyaki. Kosala bongo ekotinda biso tóbongola bizaleli na biso, bikateli oyo tozwaka, mpe makambo nyonso oyo tosalaka. Bato oyo bazali kondimela Yesu mpe komonisa yango na misala bakozwa mbano nini?

“ABOMAMA TE KASI AZWA BOMOI YA SEKO”

Eteni ya nsuka ya Yoane 3:16 elobeli elaka oyo Nzambe apesi bato oyo bazali kondimela lisiko mpe bazali kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na bango. Nzambe alingi ete bato yango ya sembo ‘bábomama te, kasi bázwa bomoi ya seko.’ Kasi, bato oyo Nzambe andimi bakozwa bomoi ya seko, bamosusu na likoló, bamosusu awa na mabele.

Yesu alakaki bato mosusu bomoi ya seko na likoló. Ayebisaki bayekoli na ye ya sembo polele ete akokende kobongisela bango esika mpo báyangela elongo na ye na likoló. (Yoane 14:2, 3; Bafilipi 3:20, 21) Bato oyo bakosekwa mpo na bomoi na likoló “bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkóto moko (1 000).”Emoniseli 20:6.

Kaka mwa ndambo ya bayekoli ya Kristo nde bakokende likoló. Kutu, Yesu alobaki: “Bóbanga te, etonga moke, mpo Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.” (Luka 12:32) “Etonga moke” yango ezali na bato boni? Emoniseli 14:1, 4 elobi boye: “Namonaki, mpe talá! Mwana-Mpate [Yesu Kristo oyo asekwá] atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona [na likoló], mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000) oyo nkombo na ye mpe nkombo ya Tata na ye ekomamá na bilongi na bango. . . . Bango basombamaki na kati ya bato, bazali mbuma ya liboso epai ya Nzambe mpe epai ya Mwana-Mpate.” Soki tozwi bamiliare ya bato oyo bazali lelo, bato 144 000 bazali mpenza “etonga moke.” Biblia elobi ete bakozala bakonzi; kasi bakoyangela banani?

Yesu alobelaki bato mosusu ya sembo oyo bakozwa mapamboli oyo Bokonzi ya likoló ekomema. Na Yoane 10:16, Yesu alobaki: “Nazali na bampate mosusu, oyo ezali ya lopango oyo te; yango mpe nasengeli komema yango, mpe ekoyoka mongongo na ngai, mpe ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.” “Bampate” yango bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko na mabele—elikya oyo Adama ná Eva bazalaki na yango  na ebandeli. Ndenge nini toyebi ete bakofanda na mabele?

Na bisika mingi, Biblia elobi ete Paradiso ekozala awa na mabele. Mpo oyeba yango, fungolá Biblia mpe tángá bavɛrsɛ oyo elandi: Nzembo 37:9-11; 46:8, 9; 72:7, 8, 16; Yisaya 35:5, 6; 65:21-23; Matai 5:5; Yoane 5:28, 29; Emoniseli 21:4. Bavɛrsɛ yango elobi ete bitumba, nzala, maladi, mpe liwa ekosila. Elobeli ntango oyo bato ya malamu bakozala na esengo mpo bakotonga bandako na bango moko, bakolona na mabele na bango moko, mpe bakobɔkɔla bana na mokili moko ya kimya. * Makambo nyonso wana ezali ya esengo, boye te? Tozali na ntina ya kondima ete mosika te, bilaka yango ekokokisama.

NZAMBE ASALÁ MINGI

Soki okanisi makambo nyonso oyo Nzambe asalelá yo mpe bato nyonso, okomona polele ete asalá mingi mpenza. Apesá biso bomoi, mayele, nzoto makasi, mpe biloko oyo tosengeli na yango mpo na kobatela bomoi. Longola yango, likabo ya lisiko oyo Yehova apesi na nzela ya Yesu, oyo akufaki mpo na biso, ekoki kopesa biso mapamboli minene mpenza, ndenge tomoni yango na Yoane 3:16.

Bomoi ya seko na mokili ya kimya epai maladi, bitumba, nzala, mpe liwa ekozala te, ekopesa esengo mpenza mpe ekomema mapamboli nsuka te. Mpo ozwa mapamboli yango, etali kaka yo moko. Ya solo, Nzambe asalá mingi mpo na yo, sikoyo motuna yango oyo: Yo ozali kosala nini mpo na Ye?

^ par. 24 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali bisakweli yango, talá mokapo 3 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Makambo mosusu

Biblia eteyaka mpenza nini?

Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Nzambe alingi nasala nini na bomoi na ngai?

Esengeli Nzambe apesa yo vision, omona emonaneli to olɔta ndɔtɔ mpo oyeba mokano ya Nzambe? Talá eyano ya Biblia.