Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Février 2014

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Aloe ya ndenge nini bazalaki kosalela na ntango ya kala?

Bazalaki kobimisa aloe na nzete ya Agare

Biblia elobi ete bazalaki kosalela Aloe lokola malasi mpo na kotya na bilamba mpe mbeto. (Nzembo 45:8; Masese 7:17; Loyembo ya Salomo 4:14) Bazalaki kobimisa Aloe oyo Biblia elobeli na nzete ya agare (oyo ekokani na nzete ya Aqualaria). Soki nzete yango epɔli ezalaki kobimisa mwa mafuta moko ya nsolo kitoko mpe mai ya kole. Bazalaki kokómisa nzete yango pudrɛ mpe na nsima bazalaki kotɛka yango lokola “aloe.”

Biblia ekokanisi Bahema ya Yisraele na “aloe oyo Yehova aloni.” (Mitángo 24:5, 6) Yango ekoki kokokana na nzete ya Agare oyo molai na yango ekoki kokóma tii mɛtrɛ soki 30 mpe na nsima epanzaka bitape na yango. Atako nzete yango ezalaka lisusu na Isräel te, kasi buku moko (A Dictionary of the Bible) elobi boye: “Tokoki te koloba ete ezali mabe kokanisa ete nzete yango mpe banzete mosusu oyo eyebani te sikoyo na [mokili yango] ezalaki kolonama na mabele wana oyo ezalaki kobota malamu na lobwaku ya Yordani epai bato bazalaka mingi.”

Bambeka ya ndenge nini bazalaki kondima na tempelo ya Yerusaleme?

Kashɛ ya mabele ya lima oyo bamonaki na tempelo ya Yerusaleme esali bambula soki 2000

Mibeko ya Nzambe elobaki ete bambeka nyonso oyo bazalaki kopesa na tempelo esengelaki kozala oyo eleki malamu mpenza. Nzambe azalaki kondima te bambeka oyo ezali na mbeba. (Kobima 23:19; Balevi 22:21-24) Philon, mokomi moko ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso oyo azalaki Moyuda alobaki ete banganga-nzambe bazalaki kotala banyama malamumalamu “kobanda na motó tii na makolo” mpo bámona soki ezali mpenza malamu mpe “ezangi mbeba.”

Moto moko ya mayele na nkombo Parish Sanders alobi ete mbala mosusu bato oyo bazalaki kosala na tempelo “bayebisaki bato oyo bazalaki na ndingisa ya kotɛka banyama ya kopesa mbeka ete basengelaki kotɛka kaka banyama mpe bandɛkɛ oyo banganga-nzambe batalaki yango malamumalamu. Na yango, bato oyo bazalaki kotɛka banyama basengelaki kopesa moto oyo asombi faktire oyo ekomonisa ete nyama yango ezangi mbeba.”

Na 2011, bato ya arkeoloji bamonaki faktire ya ndenge wana na esika oyo tempelo ezalaki—oyo ekokanaki na mbongo ya ebende oyo ezalaki na kashɛ moko ya mabele ya lima ya siɛklɛ ya 1 liboso ya ntango na biso tii na mobu 70 ya ntango na biso. Bato mosusu ya arkeoloji babongolaki maloba mibale ya monɔkɔ ya Aramɛyɛ oyo ezalaki na ebende yango na “Pɛto mpo na Nzambe.” Emonani ete bato oyo bazalaki kosala na tempelo bazalaki kokangisa faktire yango na nyama to na eloko oyo esengelaki kopesama mbeka.