Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Février 2014

 MITUNA YA BATÁNGI . . .

Mpo na nini Nzambe atikaka baoyo bazali na bokonzi bányokola bato?

Mpo na nini Nzambe atikaka baoyo bazali na bokonzi bányokola bato?

Biblia elobeli bato mosusu oyo bazalaki na bokonzi, oyo banyokolaki bato. Tokoki kozwa ndakisa ya Nabote. * Ahaba, mokonzi moko oyo ayangelaki Yisraele na siɛklɛ ya 10 liboso ya ntango na biso, atikaki mwasi na ye, Yezabele, abomisa Nabote ná bana na ye ya mibali mpo azwa elanga na ye ya vinyo. (1 Bakonzi 21:1-16; 2 Bakonzi 9:26) Mpo na nini Nzambe atikaki ye asalela bokonzi na ye na ndenge ya mabe?

“Nzambe . . . akoki kobuka lokuta te.”​—Tito 1:2

Tótalela naino ntina ya libosoliboso: Nzambe akoki kobuka lokuta te. (Tito 1:2) Yango etali makambo mabe oyo enyokolaka bato na nini? Kaka na ebandeli, Nzambe akebisaki bato ete soki batombokeli ye bakokufa. Ndenge Nzambe alobaki yango, bato bakómá kokufa banda botomboki oyo ebimaki na elanga ya Edene. Kutu, Abele azalaki moto ya liboso oyo akufaki mpo na likambo moko ya mabe oyo basalelaki ye​—ndeko na ye Kaina abomaki ye.​—Ebandeli 2:16, 17; 4:8.

Liloba ya Nzambe elobi na mokuse ete banda ntango wana “moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Maloba yango ekokisami mpenza? Yehova akebisaki Bayisraele bato na ye ete bakonzi na bango bakonyokola bango, yango wana bakolela epai na Ye. (1 Samwele 8:11-18) Ata Salomo, mokonzi ya bwanya, afutisaki bato bampako ya koleka ndelo. (1 Bakonzi 11:43; 12:3, 4) Bakonzi ya mabe, lokola Ahaba, banyokolaki mpenza bato. Tókanisa naino: Soki Nzambe apekisaka biyangeli nyonso ya ndenge wana, maloba na ye elingaki komonana lokuta, boye te?

“Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.”​—Mosakoli 8:9

Kobosana te ete Satana alobaki ete bato basalelaka Nzambe kaka mpo na matomba na bango moko. (Yobo 1:9, 10; 2:4) Soki Nzambe abatelaka basaleli na ye na biyangeli ya ndenge nyonso, yango elingaki komonisa te ete maloba ya Satana ezali solo? Mpe soki Nzambe apekisaka ete minyoko ya ndenge nyonso ekómela ata moto moko te, ye te nde alingaki kobima moto ya lokuta monene? Soki abatelaka bato ndenge wana, bato mingi balingaki koloba ete bato bakoki komitambwisa malamu kozanga Nzambe. Kasi Liloba ya Nzambe elobi bongo te, elobi nde ete moto akoki komitambwisa ye moko te. (Yirimia 10:23) Tozali na mposa Bokonzi ya Nzambe eya; mpo yango nde ekosala ete bosembo ezala.

Yango elingi nde koloba ete Nzambe asalaka eloko te mpo na minyoko? Te. Tótala makambo mibale oyo asalaka: Ya liboso, amonisaka polele ndenge oyo minyoko ezalaka. Na ndakisa, Liloba na ye emonisi likambo mokomoko oyo Yezabele asalaki mpo na kobomisa Nabote. Biblia emonisi biso lisusu ete mokonzi moko ya nguya oyo alingaka te báyeba ye nde atindaka bato básala makambo mabe ya ndenge wana. (Yoane 14:30; 2 Bakorinti 11:14) Biblia elobi polele ete ezali Satana Zabolo. Lokola Nzambe amonisi polele esika mabe mpe minyoko eutaka, asalisi biso tómibatela na makambo ya mabe. Na yango, abatelaka biso mpo tózwa bomoi ya seko na mikolo ezali koya.

Ya mibale, Nzambe apesi biso elikya ete akosilisa minyoko. Ndenge Nzambe amonisaki polele mabe ya Ahaba mpe ya Yezabele, asambisaki mpe apesaki bango mpe bato mosusu ya mabe lokola bango etumbu, etindi biso tóndima ete mokolo mosusu, elaka na ye ya kopesa bato nyonso ya mabe etumbu ekokokisama. (Nzembo 52:1-5) Nzambe alaki ete mosika te, akosilisa makambo nyonso ya mabe oyo ekómelaka bato oyo balingaka ye. * Nabote, moto ya sembo, akozala ná bana na ye na paradiso na ntango oyo makambo ya kozanga bosembo ekozala lisusu te.​—Nzembo 37:34.

^ par. 3 Talá lisolo “Mekolá kondima na bango” na zulunalo oyo.

^ par. 8 Talá mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.