Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Février 2014

 MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO

Ayikaki mpiko na makambo ya kozanga bosembo

Ayikaki mpiko na makambo ya kozanga bosembo

ELIYA azali kotambola na lobwaku ya Yordani. Atamboli na boumeli ya bapɔsɔ, auti mosika na ngomba Horebe mpe azali kokende na ngámbo ya nɔrdi. Sikoyo, lokola azongi na Yisraele, akoki komona mbongwana oyo ekɔti na mboka na ye. Makambo oyo eleko molai ya elanga ebimisaki ebandi kosila. Bambula ya eleko ya otɔnɛ ebandi kobɛta, mpe basali-bilanga bazali kosala bilanga na bango. Ntango amonaki ndenge mabele ebongi, motema ya mosakoli yango ekitaki mwa moke, kasi likebi na ye ezalaki mingi nde epai ya bato ya mboka na ye. Boyokani na bango na Nzambe ezalaki mpenza malamu te. Losambo ya Baala ezwaki mpenza misisa, mpe Eliya azalaki na mingi ya kosala. *

Pene na engumba Abele-mehola, Eliya amonaki bato bazali kobongisa mosala moko monene mpo na bilanga. Bakangisaki bangɔmbɛ 24 mibalemibale, mpe ekipi 12 ezalaki kobalola mabele nzela moko, kosala mikala na mabele oyo ezalaki maimai. Mobali oyo azalaki kokamba ekipi ya nsuka ezalaki moto oyo Eliya azalaki koluka. Ezalaki Elisha, mobali oyo Yehova aponaki mpo akóma mosakoli nsima ya Eliya. Liboso, Eliya akanisaki ete kaka ye moko nde azalaki sembo epai ya Nzambe, na ntembe te ntango amonaki Elisha asepelaki mingi.1 Bakonzi 18:22; 19:14-19.

Eliya akakatanaki mwa moke mpo na kopesa moto mosusu ndambo ya mikumba na ye, to abangaki ete mokolo mosusu moto moko azwa esika na ye? Toyebi te; tokoki mpe koloba te ete makanisi wana eyelaki ye te. Kutu, azalaki “moto lokola biso.” (Yakobo 5:17) Ezala ndenge nini, Biblia elobi: “Eliya akatisaki epai na ye mpe abwakelaki ye elamba na ye ya mosala.” (1 Bakonzi 19:19) Elamba ya mosala ya Eliya, oyo mbala mosusu esalemaki na mposo ya mpate to ya ntamba, ezalaki kolatama likoló ya elamba mosusu mpo na komonisa ete moto oyo alati yango azwi mokumba ya ntina mingi epai ya Yehova. Boye, ndenge abwakelaki yango Elisha na mapeka, ezalaki mpenza na ndimbola. Eliya atosaki Yehova na motema moko ndenge aponaki Elisha azwa esika na ye. Eliya atyelaki Nzambe na ye motema mpe atosaki ye.

Na komikitisa nyonso Eliya aponaki Elisha azwa esika na ye

Elenge mobali yango asepelaki mpe kosalisa mosakoli wana ya mokóló. Elisha azwaki mbala moko te esika ya Eliya. Kutu, mbula soki motoba, azalaki kotambola elongo na mosakoli wana ya kala mpe kopesa ye mabɔkɔ, na nsima ayebanaki lokolo moto “oyo azalaki kosopela Eliya mai na mabɔkɔ.” (2 Bakonzi 3:11) Kozala na mosaleli wana oyo azalaki na makoki ya kosalisa ye, ebɔndisaki mpenza Eliya! Na ntembe te, mibali yango bakómaki mpenza baninga. Kutu, ndenge oyo bazalaki kolendisana esalisaki bango báyika mpiko atako bazalaki komona makambo ya kozanga bosembo ya mabe mpenza oyo ezalaki mingi na mokili na bango. Mingimingi, mabe ya Mokonzi Ahaba ezalaki se kobakisama.

Naino okutaná na makambo ya kozanga bosembo te? Mingi na biso bakutanaka na yango na mokili oyo mabe. Kozwa moninga oyo alingaka Yehova ekoki kosalisa yo oyika mpiko. Okoki mpe koyekola makambo mingi na kondima ya Eliya ntango okutani na makambo ya kozanga bosembo.

 “TƐLƐMÁ, KITÁ KOKUTANA NA AHABA”

Eliya ná Elisha basalaki mosala makasi mpo na kozongisa bato na nzela ya Nzambe. Emonani ete bapesaki basakoli mosusu formasyo, oyo mbala mosusu babongisamaki na biteyelo moko boye. Kasi na nsima, Yehova apesaki Eliya mokumba ya sika, alobaki na ye boye: “Tɛlɛmá, kitá kokutana na Ahaba mokonzi ya Yisraele.” (1 Bakonzi 21:18) Ahaba asalaki nini?

Mokonzi yango akómaki mopɛngwi, mokonzi ya mabe koleka na Yisraele. Abalaki Yezabele mpe asalaki ete losambo ya Baala etonda ya Yisraele, mpe mokonzi ye moko azalaki kosangana na losambo yango. (1 Bakonzi 16:31-33) Losambo ya Baala ezalaki na milulu etali kobota, bondumba mpe bambeka ya bana. Lisusu, Ahaba autaki kobuka etinda ya Yehova ya koboma Bene-hadade mokonzi mabe ya Siri. Emonani ete Ahaba aboyaki kotosa Yehova mpo na koluka lifuti. (1 Bakonzi mokapo 20) Sikoyo, lokoso, kolinga biloko ya mokili mpe mobulu ya Ahaba ná Yezabele ekómaki mabe koleka.

Ahaba azalaki na ndako moko na Samaria mpe ezalaki mpenza monene! Azalaki mpe na ndako mosusu na Yizireele, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 37. Elanga moko ya vinyo ezalaki na nsuka ya lopango na ye ya mibale. Ahaba alulaki eteni wana ya mabele, oyo ezalaki ya mobali moko na nkombo Nabote. Ahaba abengaki ye mpe alobaki apesa ye mbongo to atɛkɛla ye elanga wana ya vinyo. Kasi, Nabote alobaki boye: “Nakoki kokanisa yango ata moke te, na kolanda likanisi ya Yehova, ete napesa yo libula ya bankɔkɔ na ngai.” (1 Bakonzi 21:3) Nabote azalaki motó makasi to mafumafu? Bato mingi bakanisaka bongo. Kasi, atosaki nde Mobeko ya Yehova, oyo epekisaki Bayisraele kotɛka mpo na libela libula ya bankɔkɔ na bango. (Balevi 25:23-28) Nabote amonaki ete ekokaki kosalema te abuka Mobeko ya Nzambe. Azalaki moto ya kondima mpe mpiko, mpo ayebaki ete kotɛmɛla Ahaba ezalaki likama.

Ahaba akanisaki mobeko ya Yehova te. Azongaki ndako “na mawa mpe alɛmbaki nzoto” mpo azwaki te eloko oyo alingaki. Biblia elobi boye: “Alalaki na mbeto na ye mpe abalolaki elongi na ye, mpe alyaki limpa te.” (1 Bakonzi 21:4) Ntango Yezabele amonaki ete mobali na ye abebisi elongi lokola mwana moke oyo asiliki, abongisaki nokinoki mwango moko mpo mobali na ye azwa eloko oyo alingaki mpe koluka kobebisa libota moko ya bato ya sembo.

Mayele oyo asalelaki ekamwisaka bato mingi mpo na mabe na yango. Yezabele ayebaki ete Mobeko ya Nzambe esɛngaki batemwɛ mibale liboso ya kondima efundeli moko ya monene. (Kolimbola Mibeko 19:15) Yango wana akomaki mikanda na nkombo ya Ahaba, asɛngaki bato ya lokumu ya Yizireele báluka mibali mibale oyo bakokosela Nabote makambo ete afingi Nzambe, likambo oyo mpo na yango bazalaki kokatela moto etumbu ya liwa. Likambo ya mawa, mayele mabe na ye esimbaki. Bato mibale “ya mpambampamba” bakoselaki Nabote makambo mpe yango esalaki ete báboma ye na mabanga. Longola yango, babomaki mpe  bana ya Nabote! * (1 Bakonzi 21:5-14; Balevi 24:16; 2 Bakonzi 9:26) Ahaba atikelaki mwasi na ye nzela asala oyo nyonso alingaki mpe abomisaki bato oyo basalaki eloko te.

Kanisá naino ndenge Eliya ayokaki na motema ntango Yehova ayebisaki ye makambo oyo mokonzi mpe mwasi na ye basalaki. Komona ete bato mabe bazali konyokola bato oyo basali eloko te ekoki mpenza kolɛmbisa. (Nzembo 73:3-5, 12, 13) Mbala mingi tomonaka lelo makambo ya kozanga bosembo ya mabe mpenza; na bantango mosusu bato ya nguya, oyo balobaka ete bazali bamonisi ya Nzambe nde basalaka makambo ya ndenge wana. Ata bongo, lisolo oyo ekoki kobɔndisa biso. Biblia emonisi biso awa ete eloko moko te ebombani na miso ya Yehova. Amonaka nyonso. (Baebre 4:13) Asalaka nini na makambo mabe oyo amonaka?

“AA MONGUNA NA NGAI, OZWI NGAI MPENZA!”

Yehova atindaki Eliya epai ya Ahaba. Nzambe alobaki na ye polele ete: “Ye wana na elanga ya vinyo ya Nabote.” (1 Bakonzi 21:18) Ntango Yezabele ayebisaki Nabote ete elanga ya vinyo ekómi sikoyo ya ye, alamukaki nokinoki mpe akendaki kotala esika na ye wana ya sika. Akanisaki ata moke te ete Yehova azalaki komona. Kanisá naino esengo oyo ayokaki ntango afandaki na elanga wana ya vinyo, mpe azali kokanisa elanga kitoko oyo akosala na esika wana. Kasi, Eliya abimelaki ye na mbalakaka! Esengo ya Ahaba esilaki, akómaki na nkanda makasi mpe koyina ntango alobaki maloba oyo: “Aa monguna na ngai, ozwi ngai mpenza!”1 Bakonzi 21:20.

“Monguna na ngai, ozwi ngai mpenza!”

Maloba ya Ahaba emonisi makambo mibale ya bozoba. Ya liboso, ntango alobaki na Eliya ete, “Aa monguna na ngai, ozwi ngai,” Ahaba amonisaki ete akanisaki Yehova te. Kasi Yehova amonaki ye. Amonaki ndenge Ahaba asalelaki bonsomi na ye ya kopona na ndenge ya mabe mpe asepelaki na mayele mabe ya Yezabele. Nzambe amonaki motema ya Ahaba, epai bolingo ya biloko ya mokili ekómaki na ntina koleka bizaleli lokola motema mawa to bosembo. Ya mibale, ntango alobaki na Eliya, “Aa, monguna na ngai!” Ahaba amonisaki ete azalaki koyina moto oyo azalaki moninga ya Yehova Nzambe mpe oyo akokaki kosalisa ye atika nzela wana ya mabe.

Tokoki kozwa liteya na makambo mibale oyo Ahaba asalaki. Tosengeli ntango nyonso kobosanaka  te ete Yehova amonaka nyonso. Lokola Tata ya bolingo, ayebaka soki tobungi nzela, mpe asepelaka soki tozongi na nzela ya malamu. Mpo na kosalisa biso, asalelaka mbala mingi baninga na ye, bato ya sembo oyo, lokola Eliya, bamemelaka baninga na bango Liloba ya Nzambe. Ekozala mpenza libunga kotalela baninga ya Nzambe lokola banguna na biso!Nzembo 141:5.

Meká naino komona ndenge Eliya azali koyanola Ahaba: “Nazwi yo.” Ayebaki ndenge Ahaba azalaki—moyibi, mobomi mpe moto oyo atombokelaki Yehova Nzambe. Esɛngaki ete Eliya azala na mpiko mpo na kotɛlɛma liboso ya moto mabe wana! Eliya ayebisaki Ahaba bikateli ya Nzambe. Yehova ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki koleka; mabe ezalaki se kopalangana na libota ya Ahaba mpe ezalaki kobebisa bato ya mboka. Yango wana, Eliya ayebisaki Ahaba ete Nzambe azwi ekateli ya ‘kokɔmbɔla’ boyangeli wana mobimba. Yezabele akosambisama.1 Bakonzi 21:20-26.

Eliya alobaki likolólikoló te ete bato bátika mabe mpe makambo ya kozanga bosembo. Ezali mpasi te kokanisa bongo lelo oyo. Lisolo oyo ya Biblia emonisi biso kaka te ete Yehova Nzambe amonaka makambo nyonso kasi mpe asalaka ete bosembo esalema na ngonga oyo ebongi. Liloba na ye emonisi biso ete na mikolo oyo ezali koya, akosukisa mpo na libela makambo nyonso ya kozanga bosembo! (Nzembo 37:10, 11) Kasi, okoki komituna boye: ‘Kosambisa ya Nzambe esɛngaka kaka moto azwa etumbu? Amonisaka mpe motema mawa?’

“OMONI NDENGE AHABA AMIKITISI?”

Ekoki kozala ete Eliya akamwaki ndenge Ahaba asalaki ntango Nzambe asambisaki ye. Lisolo yango elobi boye: “Ntango kaka Ahaba ayokaki maloba yango, apasolaki bilamba na ye mpe alataki ngɔtɔ na nzoto na ye; mpe akilaki bilei mpe azalaki se kolala na ngɔtɔ mpe kotambola, alɛmbi nzoto.” (1 Bakonzi 21:27) Ahaba abongwanaki?

Toyebi ete abongwanaki mwa moke. Ahaba amikitisaki; likambo oyo ezalaka mpasi moto ya lolendo to ya lofundo asala yango. Kasi ezalaki mpenza kobongwana ya solosolo? Tózwa ndakisa ya Manase, mokonzi oyo ayangelaki nsima ya Ahaba mpe oyo alekaki Ahaba na mabe. Ntango Yehova apesaki Manase etumbu, amikitisaki, asɛngaki Yehova asalisa ye. Kasi, asukaki wana te. Na nsima, abongolaki bomoi na ye na ndenge alongolaki bikeko ya losambo oyo atɛlɛmisaki, asalaki milende mpo na kosalela Yehova mpe kolendisa bato na ye mpe básala bongo. (2 Ntango 33:1-17) Ahaba asalaki mpe bongo? Likambo ya mawa, asalaki bongo te.

Yehova amonaki ndenge Ahaba alakisaki polele ete ayoki mawa na mabe na ye? Yehova alobaki na Eliya boye: “Omoni ndenge Ahaba amikitisi mpo na ngai? Lokola amikitisi mpo na ngai, nakopesa mpasi yango na mikolo na ye te. Na mikolo ya mwana na ye nde nakopesa ndako na ye mpasi yango.” (1 Bakonzi 21:29) Yehova alimbisaki Ahaba? Te, kaka kobongwana ya solosolo nde etindaka Nzambe alimbisa bongo. (Ezekiele 33:14-16) Kasi lokola Ahaba amonisaki mwa mawa, Yehova mpe amoniselaki ye mwa motema mawa. Ahaba asengelaki te komona ndenge libota na ye mobimba ekobomama.

Ata bongo, ekateli ya Yehova ebongwanaki te. Na nsima, Yehova asololaki ná baanzelu na ye mpo na ndenge ya malamu ya kokosa Ahaba mpo akende na etumba oyo ekosukisa bomoi na ye. Eumelaki te, Ahaba azwaki etumbu oyo Yehova akatelaki ye. Ahaba azokaki na etumba mpe makila etangaki na shario na ye tii akufaki. Lisolo yango ebakisi boye: Ntango bazalaki kosukola shario ya mokonzi na libanda, bambwa mosusu balɛmbɔlaki makila na ye. Na ndenge wana ya polele, maloba oyo Yehova atindaki Eliya ayebisa Ahaba, ekokisamaki: “Na esika bambwa elɛmbɔlaki makila ya Nabote, bambwa ekolɛmbɔla makila na yo, ɛɛ, ya yo.”1 Bakonzi 21:19; 22:19-22, 34-38.

Mpo na Eliya, Elisha mpe basaleli mosusu nyonso ya sembo na Yisraele, liwa ya Ahaba emonisaki mpenza ete Yehova abosanaki te mpiko mpe kondima ya Nabote. Nzambe ya bosembo azangaka te kopesa bato mabe etumbu, ata soki eumeli to te; mpe azangaka te komonisa motema mawa soki esɛngi asala bongo ntango azali kosambisa. (Mitángo 14:18) Ezalaki mpenza liteya monene mpo na Eliya oyo ayikaki mpiko bambula mingi ntango mokonzi mabe wana azalaki koyangela! Basí basalelá yo makambo ya kozanga bosembo? Ozalaka na mposa ete Nzambe abongisa makambo? Ekozala malamu omekola kondima ya Eliya. Elongo na moninga na ye ya sembo Elisha, akobaki kosakola nsango ya Nzambe, ayikaki mpiko na makambo ya kozanga bosembo!

^ par. 3 Yehova asalaki ete mbula ebɛta te na boumeli ya mbula misato na ndambo mpo na komonisa ete Baala oyo bazalaki kosambela mpo abɛtisa mbula mpe asala ete mabele ebota malamu azalaki na nguya te. (1 Bakonzi mokapo 18) Talá lisolo “Mekolá kondima na bango” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/2008 mpe 01/04/2008.

^ par. 13 Soki Yezabele abangaki ete lotomo ya elanga wana ya vinyo ekokóma ya bana ya Nabote, yango etindaki ye aluka kobomisa mpe bana ya Nabote. Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atikaki makambo wana ya mabe esalema, talá lisolo “Mituna ya batángi” na zulunalo oyo.