Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli  |  Sanza ya Février 2014

 ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Etumba oyo ebongolaki mokili

Etumba oyo ebongolaki mokili

Eleki sikoyo siɛklɛ moko, bamilio ya bilenge mibali batikaki bandako na bango mpe bakendaki etumba. Bakendaki na esengo nyonso mpo bolingo ya ekólo etindaki bango básala bongo. Na 1914, moko ya bilenge yango moto ya Amerika akomaki boye: “Nazali na esengo makasi mpo na mikolo kitoko oyo ezali koya.”

Kasi eumelaki te, esengo na bango ebongwanaki mawa. Moto moko te ayebaki ete ebele wana ya basoda bakonyokwama bambula mingi na Belgique mpe France. Na ntango wana, bato babengaki yango “Etumba monene.” Lelo oyo, babengaka yango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba.

Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebomaki mpenza ebele ya bato. Bamosusu balobi ete etumba yango ebomaki bato soki milio 10 mpe bato milio 20 bazokaki. Mabunga minene oyo bato basalaki nde ebimisaki etumba yango. Bakonzi ya Leta ya Mpoto bazalaki na likoki te ya kosala ete matata oyo ezalaki kati na bikólo yango epalangana te na mokili mobimba. Likambo ya mabe koleka ezali ete “Etumba monene” etiká bilembo ya mabe mpenza. Ebongolaki mokili na ndenge ememelá bato mpasi tii lelo.

 MABUNGA OYO ELONGOLAKI BATO ELIKYA

Mabunga oyo bato basalaki nde ebimisaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Buku moko (The Fall of the Dynasties—The Collapse of the Old Order 1905-1922) elobi ete bakonzi ya Mpoto bayebaki te ete bikateli oyo bazwaki ekomemela mokili mobimba mpasi ya ndenge wana na 1914.

Nsima ya mwa bapɔsɔ, kobomama ya Archiduc ya Autriche esalaki ete bikólo mingi ya nguya ya Mpoto emikɔtisa na etumba oyo elingaki te. Ntango etumba yango ebandaki, mikolo moke na nsima batunaki mokonzi ya Allemagne boye: “Makambo wana nyonso ebandaki ndenge nini?” Na mawa nyonso ayanolaki boye: “Ah, soki ata moto moko ayebaka.”

Bakonzi oyo bazwaki bikateli ya mabe oyo ebimisaki etumba yango, bayebaki te makama oyo yango ekobimisa. Kasi mosika te, basoda oyo babombanaki na mabulu bayebaki makambo oyo ezalaki koleka. Bamonaki ete bakonzi na bango ya Leta mpe ya mangomba bakosaki bango, mpe bakonzi na bango ya basoda batɛkaki bango. Na ndenge nini?

Bakonzi na bango ya Leta mpe ya mangomba bakosaki bango, mpe bakonzi na bango ya basoda batɛkaki bango

Bakonzi ya Leta balakaki ete etumba yango ekosala ete mokili ekóma ya sika mpe malamu koleka. Mokonzi ya Allemagne alobaki boye: “Tozali kobunda mpo na misala makasi oyo tosalá mpe mpo na libula oyo bankɔkɔ batikelá biso, mpe mpo avenire na biso ezala malamu.” Woodrow Wilson, prezida ya kala ya Amerika azali moto ya liboso oyo alobaki maloba oyo eyebani mingi ete etumba yango ekosala ete “demokrasi ebatelama.” Mpe na Grande-Bretagne, bato bakanisaki ete ekozala “etumba oyo ekosukisa bitumba.” Bango nyonso bamikosaki.

Bakonzi ya mangomba bapesaki mpenza mabɔkɔ na etumba yango. Buku moko (The Columbia History of the World) elobi boye: “Bakonzi ya mangomba oyo basengelaki koteya Liloba ya Nzambe bazalaki nde kolendisa bato bakende etumba. Na esika bápekisa ezaleli ya koyinana, bapelisaki nde mɔtɔ.” Buku mosusu (A History of Christianity) elobi boye: “Na esika bátya bolingo ya kristo na esika ya liboso, bakonzi ya mangomba batyaki nde bolingo ya ekólo. Mpo na koboya mindɔndɔ, mingi na bango balobaki ete bolingo ya ekólo eyokani na mateya ya Kristo. Balendisaki basoda nyonso ya mangomba na bango bábomana na nkombo ya Mobikisi na bango.”

Bakonzi ya basoda balakaki ete bakolonga etumba yango nokinoki, kasi esalemaki bongo te. Eumelaki te, basoda oyo bazalaki kobunda bamonaki ete bango nyonso balongaki te. Na nsima, ndenge moto moko ya istware amonisi yango, bamilio ya basoda bakutanaki na oyo tokoki kobenga yango “kotungisama oyo eleki mabe oyo enyokolaki bato na makanisi mpe na nzoto.” Atako bazalaki kolonga te, bakonzi ya basoda bakobaki kobwaka basoda na bango na ngambo mosusu ya kangá-moyibi oyo ekabolaki bango na banguna mpe bakobaki kobwaka babɔmbi. Tokoki kokamwa te soki basoda mingi batombokaki.

Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esalaki bato nini? Buku moko etángi maloba ya soda moko oyo abundaki etumba yango, oyo alobaki boye: “Etumba . . . ebebisaki makanisi mpe bizaleli ya bato ya ntango wana.” Etumba yango esalaki mpe ete bateritware mingi elimwa. Matata yango esalaki ete siɛklɛ yango ezala siɛklɛ ya liboso oyo makila esopanaki mingi koleka basiɛklɛ mosusu nyonso. Bato bakómaki kotomboka mingi mpenza.

Mpo na nini etumba yango ebongolaki mokili? Likambo yango eyaki kaka na mbalakaka? Biyano na mituna yango ekoki kosalisa biso tóyeba avenire na biso?