Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2015

Yehova, Nzambe oyo ayebi kosolola

Yehova, Nzambe oyo ayebi kosolola

“Yoká, nabondeli yo, mpe ngai nakoloba.”​—YOBO 42:4.

NZEMBO: 113, 114

1-3. (a) Mpo na nini makanisi ya Nzambe mpe elobeli na ye eleki mosika oyo ya bato? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

YEHOVA alingaki ete bikelamu mosusu mpe ezala na bomoi, yango wana asalaki baanzelu, na nsima asalaki bato. (Nzembo 36:9; 1 Timote 1:11) Liboso, Yehova asalaki Yesu, oyo ntoma Yoane abengi “Liloba.” (Yoane 1:1; Emoniseli 3:14) Yehova azalaki kosolola na ye, koyebisa ye makanisi na ye mpe ndenge oyo azalaki koyoka. (Yoane 1:14, 17; Bakolose 1:15) Ntoma Paulo alobi ete baanzelu mpe basololaka; bazali na monɔkɔ na bango, oyo ekeseni mosika na oyo ya bato.​—1 Bakorinti 13:1.

2 Yehova ayebi makambo nyonso ya bamiliare ya baanzelu mpe bato oyo asalaki. Azali na likoki ya koyoka mabondeli ya bamilio ya bato na mbala moko, mpe kokanga ntina ya mabondeli na bango, ata soki ezali na monɔkɔ nini. Ntango azali koyoka mabondeli yango nyonso, azali mpe kosolola na baanzelu mpe kopesa bango malako. Mpo Yehova asala nyonso wana, esengeli ete makanisi na ye mpe elobeli na ye eleka mosika makanisi ya bato mpe minɔkɔ oyo bato balobaka. (Tángá Yisaya 55:8, 9.) Na yango,  ntango asololaka na bato, asalelaka elobeli ya pɛtɛɛ mpo bákanga ntina.

3 Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo Yehova asololaka na bato na ndenge ya polele. Tokomona mpe ndenge oyo abongolaka lolenge ya kosolola na kotalela likambo ya moto na moto.

NZAMBE ASOLOLAKA NA BATO

4. (a) Monɔkɔ nini Yehova asalelaki mpo na kosolola na Moize, Samwele, mpe Davidi? (b) Biblia elobeli makambo nini?

4 Ntango Yehova asololaki na mobali ya liboso Adama na elanga ya Edene, mbala mosusu asalelaki lolenge moko ya kala ya monɔkɔ ya Ebre. Na nsima, Yehova asololaki na bato lokola Moize, Samwele, mpe Davidi. Atako bakomaki na maloba na bango moko na monɔkɔ ya Ebre mpe basalelaki elobeli na bango moko, bazalaki kokoma nde makanisi ya Nzambe. Bakomaki makambo oyo Yehova ye moko ayebisaki bango mpe makambo etali boyokani ya Nzambe na bato ya ekólo na ye. Na ndakisa, Biblia elobeli kondima na bango mpe bolingo oyo bazalaki kolinga Nzambe, mabunga oyo basalaki, mpe kozanga bosembo na bango. Makambo nyonso wana ekomamaki mpo na litomba na biso.​—Baroma 15:4.

Bakomi ya Biblia bakomaki makambo oyo Yehova ye moko ayebisaki bango mpe makambo etali boyokani ya Nzambe na bato ya ekólo na ye

5. Nzambe asalelaki kaka monɔkɔ ya Ebre mpo na kosolola na bato? Limbolá.

5 Yehova azalaki ntango nyonso te kosolola na bato na monɔkɔ ya Ebre. Ntango Bayisraele balongwaki na boombo na Babilone, basusu kati na bango bazalaki koloba monɔkɔ ya Aramɛyɛ na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Mbala mosusu, ezalaki mpo na ntina wana nde Danyele, Yirimia mpe Ezera bakomaki mikanda mosusu ya Biblia na monɔkɔ ya Aramɛyɛ.​—Ezera 4:8; 7:12; Yirimia 10:11; mpe Danyele 2:4.

6. Mpo na nini babongolaki Makomami ya Ebre na Grɛki?

6 Na nsima, ntango Alexandre le Grand akómaki koyangela mikili mingi, bato mingi bakómaki koloba Koine, Grɛki oyo bato nyonso bazalaki koloba. Bayuda mingi bakómaki koloba Grɛki, mpe nsukansuka Makomami ya Ebre ebongolamaki na monɔkɔ ya Grɛki. Libongoli yango ebengami Septante. Ezalaki libongoli ya liboso ya Biblia mpe moko ya mabongoli ya ntina mingi. Bato ya mayele balobaka ete bato 72 nde basilisaki libongoli ya Septante. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Bato mosusu babongolaki liloba mokomoko ya Makomami ya Ebre, kasi basusu basalaki bongo te. Atako bongo, Bayuda oyo bazalaki koloba Grɛki mpe bakristo bandimaki ete libongoli ya Septante ezalaki Liloba ya Nzambe.

7. Monɔkɔ nini Yesu azalaki koloba mpo na koteya bayekoli na ye?

 7 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, na ntembe te azalaki koloba Ebre. (Yoane 19:20; 20:16; Misala 26:14) Mbala mosusu azalaki mpe kosalela maloba mosusu ya Aramɛyɛ oyo bato mingi bayebaki na ntango wana. Kasi, ayebaki mpe Ebre ya kala oyo Moize ná basakoli mosusu bazalaki koloba, mpo makomi na bango ezalaki kotángama pɔsɔ nyonso na basinagoga. (Luka 4:17-19; 24:44, 45; Misala 15:21) Atako Grɛki mpe Latin ezalaki kolobama na ntango ya Yesu, Biblia elobi te soki Yesu azalaki mpe koloba minɔkɔ yango.

8, 9. Mpo na nini bakristo mingi bazalaki koloba Grɛki, mpe yango eteyi biso nini mpo na Yehova?

8 Bayekoli ya liboso ya Yesu bazalaki koloba Ebre, kasi nsima ya liwa na ye, bayekoli na ye bazalaki mpe koloba minɔkɔ mosusu. (Tángá Misala 6:1.) Ntango nsango malamu epalanganaki, bakristo mingi bazalaki koloba Grɛki na esika ya Ebre. Lokola Grɛki ezalaki monɔkɔ oyo eyebanaki mingi, mokanda ya Matai, Marko, Luka, mpe Yoane ekabolamaki mingi na monɔkɔ ya Grɛki. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Longola yango, mikanda ya ntoma Paulo mpe mikanda mosusu ya Biblia ekomamaki na Grɛki.

9 Tósimba ete ntango bakomi ya Makomami ya Grɛki ya bokristo bazalaki kozongela maloba oyo ezali na Makomami ya Ebre, mbala mingi bazalaki kosalela libongoli ya Septante. Na nsima, maloba yango ekómaki kokesana mwa moke na maloba ya monɔkɔ ya Ebre ya ebandeli. Na yango, Biblia oyo tozali na yango lelo, ndambo na yango euti na mosala ya babongoli ya kozanga kokoka. Yango eteyi biso ete Yehova amonaka te ete monɔkɔ moko to momeseno moko eleki mosusu.​—Tángá Misala 10:34.

Nzambe asɛngaka biso te tóloba kaka monɔkɔ moko boye mpo tóyeba ye to mokano na ye

10. Toyekoli nini na ndenge Yehova asololaka na bato?

10 Tomonaki ete Yehova asololaka na bato na kotalela likambo ya moto na moto. Asɛngaka biso te tóloba kaka monɔkɔ moko boye mpo tóyeba ye to mokano na ye. (Tángá Zekaria 8:23; Emoniseli 7:9, 10.) Tomonaki mpe ete Yehova, na litambwisi ya elimo na ye, atikaki bakomi ya Biblia bákoma makanisi na ye kasi na maloba na bango moko.

NZAMBE ABATELAKA NSANGO NA YE

11. Atako bato balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge, mpo na nini yango ezali mokakatano te mpo na Yehova?

11 Bato balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge, kasi yango ezali mokakatano te mpo na Yehova. Ndenge nini toyebi yango? Biblia ezali kaka na maloba moke oyo Yesu asalelaki na monɔkɔ ya  ebandeli oyo bakomaki na yango Biblia. (Matai 27:46; Marko 5:41; 7:34; 14:36) Kasi, Yehova asalaki ete nsango ya Yesu ekomama mpe ebongolama na monɔkɔ ya Grɛki, mpe na nsima, na minɔkɔ mosusu. Lisusu, lokola Bayuda mpe bakristo bazalaki kosala bakopi ya Liloba ya Nzambe mbala na mbala, nsango ya Nzambe ebatelamaki. Na nsima, bakopi yango ezalaki kobongolama na minɔkɔ mosusu ebele. Mbula soki 400 nsima ya Kristo, Jean Chrysostome alobaki ete mateya ya Yesu ebongolamaki na minɔkɔ ya bato ya Siri, Ezipito, Inde, Perse, Etiopi, mpe bikólo mosusu mingi.

12. Ndenge nini balukaki kolimwisa Biblia?

12 Banda kala, balukaki kolimwisa Biblia mpe babundisaki baoyo bazalaki kobongola mpe kokabola yango. Mbula soki 300 nsima ya kobotama ya Yesu, Dioclétien, Amperɛrɛ Moroma, apesaki etinda ete bábebisa Babiblia nyonso. Mbula soki 1 200 na nsima, William Tyndale abandaki kobongola Biblia na Lingelesi. Alobaki ete soki Nzambe atiki ye na bomoi ntango molai, akosala ete ata elenge mobali oyo akoli na ferme ayeba Makomami koleka sango. Mpo na kokima minyoko, Tyndale alongwaki na Angleterre mpo abongola Biblia mpe abimisa yango. Atako bakonzi ya mangomba basalaki nyonso mpo na kotumba Babiblia nyonso oyo bakutaki, libongoli ya Tyndale ekabolamaki epai ya bato ebele. Nsukansuka, bakangaki Tyndale nsinga na nkingo mpe batumbaki ye. Kasi bakonzi ya mangomba balongaki te kolimwisa libongoli ya Tyndale, oyo esalelamaki mpo na kobongisa libongoli ya Lingelesi oyo babengi King James Version.​—Tángá 2 Timote 2:9.

13. Boyekoli ya bamaniskri ya kala ya Biblia emonisi nini?

13 Ezali solo ete Babiblia mosusu ya kala ezali na mwa bafoti ya mikemike mpe na mwa makambo mosusu oyo ekeseni. Kasi, bato ya mayele na makambo ya Biblia bayekolaki malamumalamu bankóto ya bamaniskri, biteni mosusu ya bamaniskri, mpe mabongoli ya kala ya Biblia. Nsima ya kokokanisa yango, bamonaki ete ezali kaka na mwa bavɛrsɛ oyo ezali na bokeseni na makambo ya mikemike. Kasi nsango ya Biblia ebongwani te. Boyekoli ya ndenge wana endimisi bayekoli ya sembo ya Biblia ete oyo bazali na yango lelo ezali Liloba ya Yehova oyo ekomamaki na litambwisi  ya elimo na ye.​—Yisaya 40:8. *

14. Lelo oyo Biblia ebongolami na minɔkɔ boni?

14 Atako basalaki nyonso mpo na kolimwisa Biblia, ebongolami na minɔkɔ koleka 2 800. Lelo oyo, ezali na buku mosusu te oyo ekabolami mingi koleka yango. Atako bato mingi bandimelaka Nzambe te, Liloba na ye ezali buku oyo ezali kokabolama mingi koleka babuku mosusu nyonso. Atako mabongoli mosusu ya Biblia ezali pɛtɛɛ te mpo na kotánga to ezali mpenza polele te, mingi na yango ezali na nsango ya polele oyo ezali kopesa elikya mpe bomoi ya seko.

TOSENGELAKI NA LIBONGOLI YA SIKA YA BIBLIA

15. (a) Mbongwana nini esalemaki mpo na mikanda na biso kobanda 1919 tii lelo? (b) Mpo na nini mikanda na biso ekomamaka liboso na Lingelesi?

15 Na 1919, mwa ndambo ya Bayekoli ya Biblia batyamaki lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Na ntango wana, moombo ya sembo azalaki kopesa libota ya Nzambe bilei ya elimo mingimingi na Lingelesi. (Matai 24:45) Kasi lelo, mikanda oyo elimbolaka Biblia ezali kobimisama na minɔkɔ koleka 700. Ndenge moko na monɔkɔ ya Grɛki, lelo oyo Lingelesi ezali kolobama mingi na makambo ya mombongo mpe ya kelasi mpe bato mingi balobaka yango. Yango wana, mikanda na biso ekomamaka liboso na Lingelesi, na nsima babongolaka yango na minɔkɔ mosusu.

16, 17. (a) Basaleli ya Nzambe basengelaki na nini? (b) Ndenge nini mposa yango ekokisamaki? (c) Mposa ya ndeko Knorr ezalaki nini?

16 Mikanda na biso nyonso elobelaka makambo oyo euti na Biblia. Liboso, basaleli ya Nzambe basalelaki Biblia ya Lingelesi (King James Version) oyo ebimaki na 1611. Kasi, elobeli na yango ekómaki ya kala mpe ezalaki mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Na libongoli yango, nkombo ya Nzambe ezalaki na bisika mingi te, atako na bamaniskri ya kalakala nkombo yango esalelamaki mbala nkóto na nkóto. Libongoli yango ezalaki mpe na bafoti ya kobongola mpe ezalaki na bavɛrsɛ mosusu oyo ezalaki te na bamaniskri ya kalakala. Babiblia mosusu na Lingelesi ezalaki mpe na mokakatano wana.

17 Emonani ete basaleli ya Nzambe basengelaki na libongoli ya Biblia ya polele mpe oyo ezalaki mpasi te kokanga  ntina na yango. Yango wana, Komite ya bobongoli ya Libongoli ya Mokili ya Sika esalemaki, mpe bandeko ya Komite yango babimisaki Biblia na biteni ebele kobanda 1950 tii 1960. Volimi ya liboso na bavolimi 6, ebimaki na liyangani moko, na mokolo ya 02/08/1950. Na liyangani yango, ndeko Knorr alobaki ete basaleli ya Nzambe basengelaki na libongoli ya Biblia ya sika oyo ezali polele, oyo ezali mpasi te mpo na kokanga ntina na yango mpe oyo ekosalisa bango báyekola solo na ndenge ya polele mpenza. Basengelaki na libongoli moko oyo ezalaki mpasi te mpo na kotánga mpe kokanga ntina na yango, kaka ndenge makomi ya ebandeli ya bayekoli ya Yesu ezalaki. Mposa ya ndeko Knorr ezalaki ete Libongoli ya Mokili ya Sika esalisa bamilio ya bato báyeba Yehova.

18. Nini esalisi mpo na kobongolama ya Biblia?

18 Na 1963, mposa ya ndeko Knorr ekokisamaki. Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ebimisamaki na monɔkɔ ya Allemand, Espagnole, Italien, Lifalanse, Néerlandais, mpe Portugais. Na 1989, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova efungolaki departema ya sika na biro monene mpo na kosalisa babongoli ya Biblia. Na nsima, na 2005, ndingisa epesamaki ete Biblia ebongolama na minɔkɔ nyonso oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kobongolama. Yango esali ete lelo oyo Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolama, na mobimba to na ndambo, na minɔkɔ koleka 130.

19. Likambo nini ya ntina mingi esalemaki na 2013, mpe tokoyekola nini na lisolo oyo elandi?

19 Banda Libongoli ya Mokili ya Sika ya liboso ebimaki na Lingelesi tii lelo, Lingelesi ebongwani mingi, yango wana esɛngaki ete bábongisa yango lisusu na elobeli ya lelo. Na mokolo ya 05 mpe 06/10/2013, bato 1 413 676 na mikili 31, balandaki Likita ya nsuka ya mbula ya mbala ya 129 ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, basusu kati na bango balandaki na nzela ya Internet. Na likita yango, ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ayebisaki ete Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu ebimi na Lingelesi. Bayangani batondaki na esengo, mpe mingi na bango balelaki ntango basimbaki libongoli wana ya sika na mabɔkɔ. Ntango balobi bazalaki kotánga bavɛrsɛ na libongoli yango, bato nyonso bamonaki polele ete Biblia yango ezalaki mpasi te mpo na kotánga mpe kokanga ntina na yango. Na lisolo oyo elandi, tokomona makambo mingi oyo etali Biblia yango, mpe ndenge oyo ezali kobongolama na minɔkɔ mosusu.

^ par. 6 Septante elimboli “ntuku nsambo.” Emonani ete mosala ya kobongola Biblia yango ebandaki soki mbula 300 liboso ya Kristo mpe esilaki mbula 150 na nsima. Libongoli yango ezali kaka na ntina tii lelo mpo esalisaka bato ya mayele bákanga ntina ya maloba ya Ebre oyo ezali makasi to bavɛrsɛ mosusu.

^ par. 8 Bato mosusu bakanisaka ete Matai akomaki mokanda na ye na Ebre, na nsima mokanda yango ebongolamaki na Grɛki, mbala mosusu ye moko moto abongolaki yango.

^ par. 13 Talá Apɛndisi A3 na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu na Lingelesi, mpe mwa buku Un livre pour tous, nkasa 7-9, “Un survivant de l’Histoire.”