Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2015

Yehova akosunga yo

Yehova akosunga yo

“Yehova ye moko akosunga ye na mbeto ya maladi.”​NZEMBO 41:3.

NZEMBO: 23, 138

1, 2. Na ntango ya kala Nzambe asalaki nini, mpe bato mosusu oyo bazali kobɛla bakoki kokanisa nini?

SOKI obɛlaki maladi moko ya makasi, mbala mosusu omitunaki boye: ‘Nakoyoka mpenza malamu?’ To ekoki kozala ete moto moko ya libota to moninga moko azali kobɛla, mpe ozali komituna soki akoyoka malamu. Ezali mabe te koluka kozala nzoto malamu, mpe koluka ete bato oyo tolingaka bázala mpe nzoto malamu. Na Biblia, totángaka masolo ya bato mosusu oyo bazalaki koyoka nzoto malamu te mpe balingaki koyeba soki bakoyoka malamu. Na ndakisa, Mokonzi Ahazia, mwana ya Ahaba ná Yezabele, azalaki komituna soki akobika na maladi oyo azalaki kobɛla. Na nsima, Bene-hadade, mokonzi ya Siri, abɛlaki mpe atunaki soki akobika na maladi na ye.​—2 Bakonzi 1:2; 8:7, 8.

2 Biblia elobi mpe ete na ntango ya kala, mbala mosusu, Yehova azalaki kobikisa bato na ndenge ya likamwisi, ata mpe kosalela basakoli na ye mpo na kosekwisa bato mosusu oyo bakufaki. (1 Bakonzi 17:17-24; 2 Bakonzi 4:17-20, 32-35) Lelo oyo, bato mosusu oyo bazali kobɛla bakoki  komituna soki Nzambe akosalisa bango mpe báyoka malamu.

3-5. Yehova ná Yesu bazali na likoki ya kosala nini, mpe mituna nini tokotalela sikoyo?

3 Yehova azali na nguya ya kosalisa bato bázala nzoto malamu. Apesaki bato mosusu etumbu ya maladi, na ndakisa Farao na ntango ya Abrahama, mpe na nsima Miriame yaya ya Moize. (Ebandeli 12:17; Mitángo 12:9, 10; 2 Samwele 24:15) Apesaki mpe Bayisraele etumbu ya ‘maladi to bolɔzi’ ntango bazalaki lisusu sembo te epai na ye. (Kolimbola Mibeko 28:58-61) Na bantango mosusu, Yehova abatelaki basaleli na ye mpo bábɛla te. (Kobima 23:25; Kolimbola Mibeko 7:15) Kutu, abikisaki basusu kati na bango. Na ndakisa, abikisaki Yobo ntango abɛlaki makasi mpe alingaki kokufa.​—Yobo 2:7; 3:11-13; 42:10, 16.

4 Tozali na kondima ete Yehova azali na nguya ya kobikisa baoyo bazali kobɛla. Yesu mpe akoki kobikisa bato oyo bazali kobɛla. Ntango azalaki awa na mabele, abikisaki bato oyo bazalaki kobɛla maladi lokola maba to maladi ya ndɛkɛ. Abikisaki bato oyo bakufá miso mpe baoyo bazalaki kokoka kotambola te to kotɛlɛma te. (Tángá Matai 4:23, 24; Yoane 9:1-7) Makamwisi wana elendisi biso tózela na mposa makasi makambo ya kokamwa oyo Yesu akosala na mokili ya sika. Na ntango wana, “moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yisaya 33:24.

5 Kasi, soki tobɛli maladi moko ya makasi, tokoki nde kozela ete Yehova to Yesu bábikisa biso na ndenge ya likamwisi lelo oyo? Mpe, tosengeli kokanisa nini na likambo etali kopona lisalisi ya monganga?

TYELÁ YEHOVA MOTEMA NTANGO OZALI KOBƐLA

6. Biblia elobi nini mpo na makamwisi oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kosala?

6 Na siɛklɛ ya liboso, Yehova atyaki bakristo mafuta na elimo santu mpe apesaki basusu na bango likoki ya kosala makamwisi. (Misala 3:2-7; 9:36-42) Na ndakisa, bakokaki kobikisa bato mpe koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge. (1 Bakorinti 12:4-11) Kasi na nsima, makamwisi wana esukaki, kaka ndenge Biblia esakolaki. (1 Bakorinti 13:8) Na yango, lelo oyo tokoki te kozela ete Nzambe asala likamwisi mpo na kobikisa biso to bato oyo tolingaka.

Yehova ayebi malamu maladi oyo basaleli na ye bazali kobɛla, mpe akobosana bango te

7. Ndenge nini Nzembo 41:3 ekoki kolendisa biso?

7 Kasi, soki ozali kobɛla, Yehova akobɔndisa yo mpe akosunga yo, ndenge asalaki mpo na basaleli na ye na ntango ya kala. Mokonzi Davidi akomaki boye: “Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá; na mokolo ya likama Yehova akobikisa ye. Yehova ye moko akokɛngɛla ye mpe akobatela ye na bomoi.” (Nzembo 41:1, 2) Ya solo, Davidi alingaki koloba te ete moto malamu oyo azalaki na ntango wana, oyo azalaki kotyela moto oyo azangá likebi, akokaki kokufa soki moke te. Kasi, ndenge  nini Yehova akokaki kosalisa moto yango ya malamu? Davidi alimbolaki boye: “Yehova ye moko akosunga ye na mbeto ya maladi; okobongola mpenza mbeto na ye nyonso na boumeli ya maladi na ye.” (Nzembo 41:3) Yehova ayebi malamu maladi oyo basaleli na ye bazali kobɛla, mpe akobosana bango te. Akoki kopesa bango mpiko mpe bwanya. Yehova asalá mpe nzoto ya moto na likoki ya komibikisa yango moko.

8. Na kotalela Nzembo 41:4, Davidi asɛngaki Yehova asala nini mpo na ye ntango azalaki kobɛla makasi?

8 Na Nzembo 41, mokonzi Davidi alobeli ntango oyo abɛlaki makasi, alɛmbaki mpe atungisamaki. Emonani ete na ntango wana, mwana na ye Abisalome azalaki koluka kokóma mokonzi na esika na ye. Davidi azalaki kobɛla makasi, yango wana azalaki na likoki te ya kopekisa Abisalome. Ayebaki ete mikakatano oyo ekómelaki libota na ye ezalaki mpo na lisumu oyo asalaki ná Bata-seba. (2 Samwele 12:7-14) Na yango, asalaki nini? Abondelaki boye: “Ee Yehova, moniselá ngai boboto. Bikisá molimo na ngai, mpo nasaleli yo lisumu.” (Nzembo 41:4) Davidi ayebaki ete Yehova alimbisaki lisumu na ye, mpe atyelaki ye motema mpo asalisa ye na ntango azalaki kobɛla. Kasi Davidi azalaki nde kozela ete Yehova asala likamwisi mpo na kobikisa ye?

9. (a) Yehova asalaki nini mpo na mokonzi Hizikiya? (b) Mokonzi Davidi azalaki kozela ete Yehova asala nini mpo na ye?

9 Ezali solo ete ntango mosusu Nzambe abikisaka bato. Na ndakisa, ntango mokonzi Hizikiya alingaki kokufa, Yehova abikisaki ye. Mokonzi Hizikiya aumelaki lisusu mbula 15. (2 Bakonzi 20:1-6) Kasi, Davidi azelaki te ete Nzambe abikisa ye na ndenge ya likamwisi. Azalaki nde kozela ete Nzambe asalisa ye, kaka ndenge akokaki kosalisa “moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá.” Davidi azalaki na boyokani malamu ná Yehova, yango wana akokaki kosɛnga Yehova abɔndisa ye mpe asalisa ye ntango azalaki kobɛla. Asɛngaki mpe ete nzoto na ye ezonga makasi mpe ayoka malamu. Biso mpe tokoki kosɛnga Yehova asalisa biso na ndenge wana.​—Nzembo 103:3.

10. Nini ekómelaki Trofime mpe Epafrodite, yango eteyi biso nini?

10 Na siɛklɛ ya liboso, bakristo nyonso babikisamaki na ndenge ya likamwisi te, atako ntoma Paulo mpe bamosusu bazalaki na likoki ya kobikisa bato oyo bazalaki kobɛla. (Tángá Misala 14:8-10.) Ntoma Paulo abikisaki tata ya Publiusi, oyo azalaki na fiɛvrɛ mpe maladi mosusu ya makasi. “Abondelaki, atyelaki ye mabɔkɔ mpe abikisaki ye.” (Misala 28:8) Kasi, ntoma Paulo abikisaki te bato nyonso oyo ayebaki. Trofime, moko ya baninga na ye, akendaki elongo na ye na mobembo moko ya misionɛrɛ. (Misala 20:3-5, 22; 21:29) Ntango Trofime abɛlaki, ntoma Paulo abikisaki ye te. Yango wana, Trofime akataki mobembo elongo na Paulo mpe atikalaki na Milete tii ntango ayokaki malamu. (2 Timote 4:20) Epafrodite, moninga mosusu ya ntoma Paulo, abɛlaki mpe alingaki kokufa. Kasi, Biblia elobi te ete ntoma Paulo abikisaki ye.​—Bafilipi 2:25-27, 30.

TOLI NINI OSENGELI KONDIMA?

11, 12. Makambo nini toyebi mpo na Luka, mpe ndenge nini asalisaki ntoma Paulo?

11 Luka azalaki monganga, mpe asalaki mobembo elongo na ntoma Paulo.  (Misala 16:10-12; 20:5, 6; Bakolose 4:14) Emonani ete asalisaki ntoma Paulo mpe bato mosusu ntango bazalaki kobɛla na mibembo na bango ya misionɛrɛ. (Bagalatia 4:13) Kaka ndenge Yesu alobaki, “baoyo bazali kobɛla” bazalaka na mposa ya monganga.​—Luka 5:31.

Tosengeli kokeba ntango moto moko apesi biso toli na oyo etali kozala nzoto malamu

12 Luka azalaki kaka te moto oyo alingaki kopesa bato toli mpo bázala nzoto malamu. Atángaki kelasi ya monganga. Biblia elobi te esika nini to ntango nini akɔtaki kelasi yango. Kasi elobi ete ntoma Paulo alobaki ete Luka atindelaki bandeko ya Kolose mbote. Na yango, ekoki kozala ete Luka akɔtaki kelasi ya monganga na Laodikia, engumba oyo ezalaki pene na Kolose. Lisusu, ntango Luka akomaki evanzile na ye mpe mokanda ya Misala, asalelaki elobeli ya minganga. Lokola azalaki monganga, alobelaki masolo mingi oyo Yesu abikisaki bato.

13. Makambo nini tosengeli kobosana te liboso ya kopesa to kondima toli moko na oyo etali kozala nzoto malamu?

13 Lelo oyo, ndeko moko te akoki kosala makamwisi mpe kobikisa biso. Kasi lokola basusu bazali na mposa ya kosalisa biso, bakoki kopesa biso toli ata soki tosɛngi bango yango te. Ya solo, batoli mosusu ezalaka mabe te. Na ndakisa, ntoma Paulo apesaki Timote toli ete amɛlaka mwa vinyo. Timote azalaki na maladi ya estoma, mbala mosusu mpo azalaki komɛla mai oyo ezalaki pɛto te. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Tángá 1 Timote 5:23.) Kasi tosengeli kokeba. Ndeko moko akoki koluka kondimisa biso ete tósalela nkisi moko boye ya monganga to nkasa ya nzete moko to mpe tólya to tóboya kolya biloko mosusu. Akoki koyebisa biso ete esalisaki moto moko ya libota na ye oyo azalaki na maladi oyo biso tozali na yango. Kasi yango elingi koloba te ete ekosalisa mpe biso. Tosengeli kobosana te ete ata soki bato mingi bazali kosalela nkisi moko to mayele moko ya minganga, likama ekoki kaka kobima.​—Tángá Masese 27:12.

SALELÁ BOSOSOLI

14, 15. (a) Bato ya ndenge nini tosengeli kokeba na bango? (b) Liteya nini tokoki kozwa na Masese 14:15?

14 Biso nyonso tolingaka kozala nzoto malamu mpo tósepela na bomoi mpe tósala mosala makasi mpo na Yehova. Kasi tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana ata soki tosali nini tokobɛla kaka. Soki tobɛli, ekoki kozala na ndenge mingi ya komisalisa, mpe tozali na lotomo ya kopona oyo tolingi. Nzokande, bibongiseli mosusu mpe bato mosusu bakoki koloba ete bazwi nkisi oyo ekosalisa maladi na biso. Basalaka bongo mpo balingi kozwa mbongo mingi. Bakoki koloba ete bato mingi basalelaki nkisi yango mpe babikaki. Soki tozali kobɛla, tokoki kozala na mposa ya komeka nkisi nyonso oyo ekoki kosalisa biso tóyoka malamu mpe tózala na bomoi ya molai. Kasi tosengeli  kobosana te toli oyo ya Liloba ya Nzambe: “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.”​—Masese 14:15.

Tosengeli kosalela bososoli mpe kozala ekɛngɛ mpo na makambo oyo tosengeli kondima

15 Soki tozali ekɛngɛ, to tozali na bwanya, tokokeba liboso ya kondima toli oyo bapesi biso, mingimingi soki moto oyo apesi biso yango azwá formasyo ya makambo ya monganga te. Tokoki komituna boye: ‘Alobi ete vitamini oyo, nzete oyo, to bilei oyo esalisá bato mosusu, kasi nini endimisi ngai ete esalisaki bango mpenza? Ata soki esalisaki bato mosusu, ndenge nini nayebi ete ekosalisa mpe ngai? Nasengeli naino kolukaluka na mozindo mpe kosolola na bato mosusu oyo bazwá formasyo ya malamu mpo na kosalisa maladi oyo nazali na yango?’​—Kolimbola Mibeko 17:6.

16. Makambo nini tosengeli kotalela ntango tozali kozwa ekateli mpo na lisalisi ya monganga?

16 Ntango tozali kozwa ekateli ya kopona ekzamɛ oyo tokosala to lisalisi ya monganga oyo tokondima, tosengeli kozala na “makanisi malamu,” to kosalela bososoli. (Tito 2:12) Kosala bongo ezali na ntina, mingimingi soki ekzamɛ to lisalisi yango ya monganga eyebani mpenza te. Moto yango akoki kolimbola ndenge oyo ekzamɛ to lisalisi yango ekosala na nzoto na biso? Ndimbola na ye ezali mbilingambilinga? Minganga mingi bandimi ete ekzamɛ to lisalisi yango ekoki kobikisa bato? (Masese 22:29) Mbala mosusu moto moko akoki koyebisa biso  ete lisalisi yango ya sika euti na mboka moko ya mosika mpe minganga mosusu bayebi yango naino te. Kasi ezali na makambo oyo endimisi biso ete lisalisi wana ezalaka? Bato mosusu bakoki ata kopesa lisalisi ya monganga oyo ezali kosalela biloko ya sekele to nguya moko oyo eyebani te. Yango ekoki mpenza kozala likama. Kobosana te ete Nzambe akebisi biso tósalela te nguya ya bilimo mabe to misala ya maji.​—Kolimbola Mibeko 18:10-12; Yisaya 1:13.

“BÓTIKALA MALAMU!”

17. Mposa nini biso nyonso tozalaka na yango?

17 Lisangani ya mikóló-bakambi na siɛklɛ ya liboso etindaki mokanda na masangá mpo na koyebisa bandeko makambo mosusu oyo basengelaki koboya. Na nsuka ya mokanda yango, lisangani ya mikóló-bakambi ekomaki boye: “Soki bomibateli malamumalamu na makambo wana, bokozala malamu. Bótikala malamu!” (Misala 15:29) Atako maloba ya nsuka ezalaki kaka ndenge ya koloba ete bótikala malamu, ezali kokundwela biso ete ezali mabe te kolinga kozala nzoto malamu.

Atako tolingaka kozala nzoto malamu, totyaka likebi nde na kosalela Yehova (Talá paragrafe 17)

18, 19. Makambo nini tozali kozela na motema moko na mokili ya sika?

18 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tobɛlaka kaka. Mpe ntango tobɛli, tozelaka te ete Yehova abikisa biso na ndenge ya likamwisi. Kasi, tokoki kozela ntango oyo Nzambe akobikisa biso mpo na libela na mikolo ezali koya. Na Emoniseli 22:1, 2, ntoma Yoane alobelaki “mai ya bomoi” mpe “banzete ya bomoi” oyo ekobikisa moto nyonso. Yango elimboli te ete ezali na nkasa ya nzete moko boye oyo tokoki kosalela yango lelo to na mokili ya sika mpo tóbika. Ezali kolobela nde bibongiseli nyonso oyo Yehova mpe Yesu bakozwa mpo tózala na bomoi ya seko.​—Yisaya 35:5, 6.

19 Tozali kozela na motema moko ntango wana ya malamu. Kasi sikoyo, tondimi ete Yehova alingaka mokomoko na biso mpe ayebi ndenge toyokaka ntango tozali kobɛla. Lokola Davidi, biso mpe tozali na kondima ete soki tobɛli, Yehova akosundola biso te. Akosalisa baoyo nyonso bazali kotikala sembo epai na ye.​—Nzembo 41:12.

^ par. 13 Buku moko (The Origins and Ancient History of Wine) elobi ete bato ya siansi bamoni ete typhoïde mpe bamikrobe mosusu ya mabe ekufaka nokinoki soki esangani na vinyo.