Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2015

Salelá malamu nguya ya lolemo na yo

Salelá malamu nguya ya lolemo na yo

“Maloba ya monɔkɔ na ngai . . . Ekóma elɛngi liboso na yo, Ee Yehova.”​—NZEMBO 19:14.

NZEMBO: 82, 77

1, 2. Mpo na nini Biblia ekokanisi likoki na biso ya koloba na mɔtɔ?

MOKOLO moko na 1871, mɔtɔ ebandaki kopela na zamba, na etúká ya Wisconsin, na États-Unis. Nokinoki, mɔtɔ yango epanzanaki mpe ezikisaki banzete soki miliare 2. Bato koleka 1 200 bakufaki. Kutu, bato oyo bakufaki na mɔtɔ wana bazalaki ebele koleka bato oyo bakufá na mɔtɔ mosusu nyonso na États-Unis. Emonani ete mwa mintɛntɛi ya mɔtɔ (étincelles) ya bingbunduka (trains) oyo elekaki na zamba yango nde ebandisaki mɔtɔ wana ya makasi. Yango ekundweli biso maloba ya vɛrsɛ oyo ya Biblia: “Talá! Mwa mɔtɔ moke ekoki kotumba zamba ya monene mpenza!” (Yakobo 3:5) Mpo na nini mokomi Yakobo alobi boye?

2 Alimboli ete: “Lolemo ezali mɔtɔ.” (Yakobo 3:6) “Lolemo” elimboli likoki na biso ya koloba. Kaka lokola mɔtɔ, makambo oyo tolobaka ekoki kobimisa makama minene. Maloba na biso ekoki kosala basusu malamu to mabe. Kutu, Biblia elobi ete makambo oyo tolobaka ekoki kopesa basusu bomoi to komema bango na liwa. (Masese 18:21) Kasi, yango elingi nde koloba ete tosengeli kobanga koloba mpo tokoloba likambo moko ya mabe? Te, ezali bongo te. Totikaka te kosalela mɔtɔ kaka  mpo ekoki kozikisa biso. Tozalaka nde ekɛngɛ ntango tozali kosalela yango. Na ndakisa, tokoki kosalela mɔtɔ mpo na kolamba bilei, mpo na kozwa molunge na ntango ya malili mpe mpo na kozwa pole. Ndenge moko mpe, soki tozali ekɛngɛ na maloba na biso, tokoki kosalela likoki na biso ya koloba mpo na kokumisa Yehova mpe mpo na bolamu ya basusu.​—Nzembo 19:14.

3. Makambo nini misato ekosalisa biso tólendisa basusu ntango tozali koloba?

3 Yehova apesá biso likoki ya koyebisa basusu makambo oyo tozali kokanisa mpe ndenge tozali koyoka, ezala na maloba to na bajɛstɛ. Kasi, ndenge nini tokoki kosalela likabo wana kitoko mpo na kolendisa basusu? (Tángá Yakobo 3:9, 10.) Tosengeli koyeba ntango ya koloba, makambo oyo tokoloba mpe ndenge ya koloba yango.

NTANGO NINI TOSENGELI KOLOBA?

4. Ntango nini tosengeli kofanda nyɛɛ?

4 Ntango mosusu ezalaka malamu kofanda nyɛɛ. Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ.” (Mosakoli 3:7) Na ndakisa, tofandaka nyɛɛ ntango basusu bazali koloba mpo na komonisa ete tozali komemya bango. (Yobo 6:24) Lisusu, tolobaka te makambo oyo ezali sekele mpe oyo bato mosusu basengeli koyeba te. (Masese 20:19) Mpe ntango moto moko ayokisi biso nkanda, tokomonisa ete tozali na bwanya soki tofandi nyɛɛ mpe tolobi eloko te.​—Nzembo 4:4.

5. Ndenge nini tokoki komonisa Yehova ete tozali na botɔndi na ndenge apesá biso likabo ya koloba?

5 Kasi ezali mpe na ntango oyo ezalaka malamu koloba. (Mosakoli 3:7) Ezali na ntango ya kokumisa Yehova, kolendisa basusu, koyebisa ndenge tozali komiyoka, mpe koyebisa basusu oyo tozali na mposa na yango. (Nzembo 51:15) Soki tosaleli likoki na biso ya koloba na ndenge wana, tokomonisa ete tozali na botɔndi epai ya Yehova na ndenge apesá biso likabo yango. Soki moninga moko apesi biso likabo moko ya kitoko, tolingaka kosalela yango na ndenge oyo eleki malamu.

6. Mpo na nini ezali na ntina kopona ntango oyo ebongi mpo na koloba?

6 Mpo na nini ezali na ntina kopona ntango oyo ebongi mpo na koloba? Mokanda ya Masese 25:11 elobi ete: “Liloba oyo elobami na ntango na yango ezali lokola bapɔme ya wolo na kati ya eloko ya mayemi ya palata.” Bapɔme ya wolo ezalaka kitoko, kasi ezalaka lisusu kitoko koleka soki ezali liboso ya eloko moko ya palata. Ndenge moko mpe, tokoki kozala na likambo moko ya malamu ya koyebisa moto. Kasi, soki toponi ntango oyo ebongi mpo na koloba yango, tokoki kosalisa moto yango lisusu mingi koleka. Ndenge nini tokoki kosala yango?

7, 8. Ndenge nini bandeko na biso ya Japon balandaki ndakisa ya Yesu?

7 Soki tolobi na ntango oyo ebongi te, mbala mosusu bato bakokanga ntina te to bakondima te makambo oyo tolobi. (Tángá Masese 15:23.) Na ndakisa, na sanza ya 03/2011, koningana ya mabele mpe tsunami ebebisaki bingumba mingi na Ɛsti ya Japon. Bato koleka 15 000 bakufaki. Atako ebele ya Batatoli ya Yehova babungisaki bandeko na bango ya libota mpe baninga na bango, bazalaki kaka na mposa ya kosalela Biblia mpo na kosalisa bato mosusu oyo bazalaki na mpasi lokola bango. Kasi, bayebaki ete mingi ya bato yango bazalaki bato ya Lingomba ya Bouddha mpe bayebaki makambo mingi te ya Biblia. Yango wana, na esika ya koyebisa bango elikya ya lisekwa, bandeko babɔndisaki bango mpe bamonisaki bango ntina oyo makambo ya nsɔmɔ ndenge wana ekomelaka ata bato malamu.

 8 Bandeko wana balandaki ndakisa ya Yesu, oyo ayebaki ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba. (Yoane 18:33-37; 19:8-11) Mpe azelaki ntango oyo ebongi mpo na koteya bayekoli na ye makambo mosusu. (Yoane 16:12) Bandeko ya Japon bazelaki ntango oyo ebongaki mpo na koyebisa bato elikya ya lisekwa. Mbula mibale na ndambo nsima ya tsunami, bakabolaki trakte “Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?” Bato mingi bazwaki trakte yango mpe ntango batángaki yango ebɔndisaki bango. Biso mpe tosengeli koluka koyeba mimeseno mpe bindimeli ya bato ya teritware na biso mpo tóluka ntango oyo ebongi mpo na kosolola na bango.

Tosengeli kozala motema molai, mpe koyeba ntango oyo bato bakoki kondima koyoka biso

9. Na makambo nini mosusu tosengeli kozela ntango oyo ebongi mpo na koloba?

9 Na makambo nini mosusu tosengeli kozela ntango oyo ebongi mpo na koloba? Mbala mosusu moto moko alobi likambo oyo eyokisi biso mpasi. Na esika ya kozongisa mbala moko mpe koloba likambo moko ya mabe, tokomonisa bwanya soki tofandi nyɛɛ mpe tokanisi boye: ‘Yango elakisi ete moto yango azali na boboto te? Nasengeli mpenza kosolola na ye mpo na likambo oyo alobi?’ Mbala mosusu ekoki kozala malamu koleka tóloba eloko te. Kasi, soki tomoni ete ezali mpenza na ntina tósolola na ye, tosengeli kozela tii ntango motema na biso ekokita. (Tángá Masese 15:28.) To mpe ekoki kozala ete tolingi kolendisa bato ya libota na biso oyo bazali Batatoli te báyeba Yehova. Tosengeli kozala motema molai, kokanisa malamu makambo oyo tokoloba, mpe koyeba ntango oyo bakoki kondima koyoka biso.

MAKAMBO NINI TOSENGELI KOLOBA?

10. (a) Mpo na nini tosengeli kopona malamu maloba na biso? (b) Lolenge nini ya maloba tosengeli koboya?

10 Makambo oyo tolobaka ekoki kosala ete basusu báyoka malamu to kosala bango lisusu mabe koleka. (Tángá Masese 12:18.) Bato mingi na mokili ya Satana babimisaka “maloba ya bololo” oyo ezali lokola “likula” to “mopanga” mpo balingaka kozokisa basusu mpe koyokisa bango mpasi. (Nzembo 64:3) Bato mingi bayekolaka koloba ndenge wana na nzela ya bafilme mpe ya makambo oyo batalaka na televizyo. Kasi, bakristo basengeli te koloba makambo oyo eyokisaka basusu mpasi mpe oyo ezangi boboto, ata na ndenge ya masɛki. Masɛki ezali malamu mpe ekoki kosala ete makambo oyo tozali koloba esepelisa basusu. Kasi, tosengeli soki moke te kobimisa maloba ya kozokisa, elingi koloba, koloba likambo moko oyo ekoyokisa moto nsɔni to ata kofinga moto kaka mpo na kosɛkisa basusu. Biblia epekisi bakristo kobimisa “maloba ya kofinga.” Elobi mpe ete: “Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te, kasi nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.”​—Baefese 4:29, 31.

11. Nini ekoki kosalisa biso tópona maloba ya malamu?

11 Yesu alobaki ete “monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.” (Matai 12:34) Yango elingi koloba ete makambo oyo tolobaka ekoki komonisa ndenge oyo tozali komiyoka. Yango wana, soki tolingaka bato mpe tokipaka bango, na  ntembe te, tokopona maloba ya malamu ntango tozali koloba na bango. Makambo oyo tokoloba ekozala ya malamu mpe ya kolendisa.

12. Nini mosusu ekoki kosalisa biso tópona maloba ya malamu?

12 Esɛngaka milende mpo na kopona maloba ya malamu. Atako mokonzi Salomo azalaki na bwanya, “akanisaki malamumalamu mpe alukaki malamumalamu” mpo makambo oyo akokoma ezala ya solo mpe esepelisa batángi. (Mosakoli 12:9, 10) Nini ekoki kosalisa biso tóyeba makambo oyo tokoloba? Tokoki kotala na Biblia mpe na mikanda na biso mpo na komona ndenge ya sika ya kobimisa makanisi na biso. Tokoki koyekola ndimbola ya maloba oyo tozali kokanga ntina na yango te. Tokoki mpe koyekola ndakisa ya Yesu mpo na koyeba ndenge ya koloba na basusu na ndenge oyo ekosalisa bango. Yesu ayebaki mpenza makambo ya koloba mpo Yehova ateyaki ye “ndenge ya koloba mpo na kobɔndisa moto oyo alɛmbi.” (Yisaya 50:4) Ezali mpe na ntina kokanisa na ndenge oyo maloba na biso ekoki kosala epai ya basusu. (Yakobo 1:19) Tokoki komituna boye: ‘Soki nalobi boye, moto akokanga ntina ya likambo oyo nalingi koyebisa ye? Akomiyoka ndenge nini?’

13. Mpo na nini tosengeli koloba na ndenge oyo ezali pɛtɛɛ mpo bato bákanga ntina?

13 Na Yisraele, bazalaki kobɛta kelelo mpo na koyebisa bato likambo. Ebɛtɛli mosusu ya kelelo ezalaki kolimbola ete bato basengeli kokutana esika moko. Mosusu ezalaki komonisa ete basoda basengeli kobundisa banguna. Kanisá nini elingaki kokómela limpinga ya basoda soki kelelo eyokani malamu te! Biblia ekokanisi kobɛta kelelo na ndenge ya polele na maloba oyo ezali pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina. Soki tozali koloba makambo polele te, bato bakoki kozwa mobulu na makanisi to kondima likambo oyo ezali solo te. Ata soki tolingi kobimisa makanisi na biso polele, tosengeli kokeba ete maloba na biso ezala te oyo ezangi bokonde to limemya.​—Tángá 1 Bakorinti 14:8, 9.

14. Ndakisa nini emonisi ete Yesu azalaki koloba na ndenge oyo ezalaki pɛtɛɛ mpo bato bákanga ntina?

14 Matai mokapo 5 tii 7 ezali ndakisa malamu oyo emonisi ndenge Yesu aponaki maloba oyo ezali pɛtɛɛ mpo bato bákanga ntina. Na lisolo na ye, alukaki te kosalela maloba ya mindɔndɔ to oyo ezangi ntina mpo na kokamwisa bato. Mpe alobaki te maloba oyo ekokaki kozokisa basusu. Yesu ateyaki makambo ya ntina mpenza oyo ezalaki na ndimbola monene, kasi alobaki yango na ndenge oyo ezalaki pɛtɛɛ mpo bato bákanga ntina. Na ndakisa, Yesu alingaki ete bayekoli na ye báyeba ete basengeli komitungisa te mpo na bamposa na bango ya mokolo na mokolo. Yango wana, alimbolaki ete Yehova aleisaka bandɛkɛ ntango nyonso. Na nsima, atunaki bango boye: “Bino boleki bango na motuya te?” (Matai 6:26) Na maloba wana ya pɛtɛɛ, Yesu asalisaki bango bákanga ntina ya liteya moko monene mpe bálendisama.

NDENGE NINI TOSENGELI KOLOBA NA BASUSU?

15. Mpo na nini tosengeli koloba na boboto?

15 Ndenge oyo tolobaka na basusu mpe makambo oyo tolobaka na bango ezali na ntina. Bato bazalaki kosepela koyoka Yesu mpo azalaki na maloba “kitoko,” to ya boboto. (Luka 4:22) Soki tozali koloba na boboto, na ntembe te, bato bakosepela koyoka biso mpe bakondima makambo oyo tozali koloba. (Masese 25:15) Tokozala na likoki ya koloba na basusu na boboto soki tomemyaka bango mpe tokipaka ndenge  oyo bamiyokaka. Yesu azalaki kosala bongo. Na ndakisa, ntango amonaki ebele ya bato bazali kosala makasi mpo na koyoka ye, asepelaki mingi kolekisa ntango elongo na bango mpe koteya bango. (Marko 6:34) Ata ntango bato bafingaki ye, azalaki kozongisa kofinga te.​—1 Petro 2:23.

16, 17. (a) Ntango tozali koloba na bandeko na biso ya libota mpe baninga na biso, ndenge nini tokoki komekola Yesu? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Ndenge nini mama moko asalaki malamu mingi ntango alobaki na boboto?

16 Atako tolingaka bato ya libota na biso mpe baninga na biso, ekoki kokóma ete tólobela bango maloba oyo ezangi boboto mpo toyebi bango malamu. Tokoki kokanisa ete tosengeli te kokeba na ndenge oyo tosengeli koloba na bango. Kasi, Yesu alobaki ata mokolo moko te na baninga na ye na ndenge oyo ezangi boboto. Ntango basusu kati na bango bazalaki kowelana mpo na koyeba nani aleki baninga, asembolaki bango na boboto mpe asalelaki ndakisa ya mwana moke mpo na kosalisa bango bábongola ndenge na bango ya kokanisa. (Marko 9:33-37) Bankulutu bakoki komekola Yesu soki bazali kopesa basusu toli na boboto.​—Bagalatia 6:1.

17 Ata ntango moto alobi na biso likambo oyo epesi biso nkanda, tokoki kosala malamu mingi soki tolobi na ye na boboto. (Masese 15:1) Na ndakisa, elenge mobali moko oyo abɔkɔlami na mama na ye azalaki kosala makambo ya mabe mpe koloba ete asalelaka Yehova. Ndeko mwasi mosusu na lisangá ayokelaki mama yango mawa mpe alobaki na ye boye: “Ezali mpenza mawa mpo na yo ndenge olongi te kobɔkɔla mwana na yo malamu.” Mama yango akanisaki mwa moke, na nsima alobaki boye: “Ezali solo ete makambo ezali naino kotambola malamu te, kasi formasyo na ye ezali kokende malɛmbɛmalɛmbɛ. Tósolola lisusu nsima ya Armagedone; na ntango wana nde ekoyebana.” Lokola mama yango afandaki kimya mpe azalaki kaka na boboto epai ya ndeko mwasi yango, boninga na bango ekobaki. Longola yango, mwana wana ayokaki makambo mama na ye alobaki mpe amonaki ete mama na ye azalaki kaka na kondima ete akoki kobongwana. Yango wana, atikaki baninga mabe, azwaki batisimo, mpe na nsima akómaki kosala na Betele. Ezala ntango tozali koloba na bandeko na biso bakristo, na bato ya libota na biso, to bato oyo toyebi te, maloba na biso esengeli ntango nyonso kozala “kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa.”​—Bakolose 4:6.

18. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na ndenge na biso ya koloba?

18 Likoki ya koyebisa basusu makanisi na biso mpe ndenge tozali komiyoka ezali mpenza likabo kitoko oyo euti na Yehova. Soki tolandi ndakisa ya Yesu, tokopona ntango oyo ebongi mpo na koloba, tokokeba na makambo oyo tokoloba mpe tokozala ntango nyonso na boboto. Yango wana, tiká ete tósalela maloba na biso mpo na kolendisa basusu mpe kosepelisa Yehova.