Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2015

Yehova azali Nzambe ya bolingo

Yehova azali Nzambe ya bolingo

“Nzambe azali bolingo.”​—1 YOANE 4:8, 16.

NZEMBO: 18, 91

1. Ezaleli ya Nzambe oyo eleki monene ezali nini, mpe koyeba likambo yango etindi yo otalela ye ndenge nini?

BIBLIA eyebisi biso ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Kasi yango elingi mpenza koloba nini? Bolingo ezali te kaka moko ya bizaleli kitoko ya Nzambe. Ezali ezaleli na ye oyo eleki monene. Azali na bolingo te, kasi azali bolingo. Bolingo nde etindaka ye asala makambo nyonso. Tozali mpenza na botɔndi ndenge toyebi ete bolingo nde etindaki Yehova akela molɔ́ngɔ́ mobimba mpe biloko nyonso ya bomoi!

2. Bolingo ya Nzambe endimisi biso likambo nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

2 Yehova alingaka bikelamu na ye mpe asalelaka bango makambo na boboto. Bolingo na ye endimisi biso ete mokano na ye mpo na bato ekokokisama na ndenge oyo eleki malamu. Yango ekosala ete bato oyo batosaka ye bázala na esengo ya solosolo. Na ndakisa, lokola Yehova azali bolingo, “atye mokolo moko oyo akani kosambisa na boyengebene mabele oyo bato bafandi na nzela ya moto moko oyo ye aponi,” Yesu Kristo. (Misala 17:31) Tondimisami ete lisambisi yango ekosalema  mpenza. Mpo na bato ya botosi, yango ekolimbola bomoi ya malamu mpe ya libela na libela na mikolo ezali koya.

ISTWARE EMONISI NINI?

3. Bomoi elingaki kozala ndenge nini soki Yehova alingaki bato te?

3 Soki bolingo ezalaki te ezaleli ya Nzambe oyo eleki monene, bomoi ya bato elingaki kozala ndenge nini na mikolo ezali koya? Bato balingaki kokoba koyangela baninga na bango bato; mpe Satana, nzambe oyo azangá bolingo mpe ayinaka bato, nde alingaki kotambwisa bango. (2 Bakorinti 4:4; 1 Yoane 5:19; tángá Emoniseli 12:9, 12.) Bomoi elingaki kozala mabe mpenza na mikolo ezali koya soki Yehova alingaki biso te!

4. Mpo na nini Yehova atikaki ete bátombokela boyangeli na ye?

4 Ntango Satana atombokelaki boyangeli ya Nzambe, atindaki mpe baboti na biso ya liboso bátombokela ye. Atyaki ntembe ete Nzambe azali te na lotomo ya kozala Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Satana abɛtaki ntolo ete boyangeli na ye ekozala malamu koleka oyo ya Nzambe. (Ebandeli 3:1-5) Na bwanya mpenza, Yehova atikelaki Satana mwa ntango mpo amonisa soki makambo oyo alobaki ezali solo. Kasi, emonani polele ete ezala Satana to bato bakoki te kozala bayangeli malamu.

Yehova akelaki bato te na likoki to na lotomo ya komiyangela bango moko kozanga ete atambwisa bango

5. Istware ya bato emonisi nini?

5 Lelo oyo, mokili ezali kobeba se kobeba. Bato koleka milio 100 babomamaki na boumeli ya mbula 100 oyo euti koleka. Biblia elobi mpo na “mikolo ya nsuka” ete: “Bato mabe mpe bakosi bakosala lisusu mabe koleka.” (2 Timote 3:1, 13) Biblia elobi lisusu boye: “Ee Yehova, nayebi malamu ete nzela ya moto ya mabele ezali ya ye te. Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Yirimia 10:23) Istware emonisi polele ete maloba wana ezali solo. Yehova akelaki bato te na likoki to na lotomo ya komiyangela bango moko kozanga ete atambwisa bango.

6. Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe?

6 Lokola Yehova atiki makambo ya mabe ekoba mpo na mwa ntango, amonisi mpe ete kaka boyangeli na ye nde ebongi mpenza. Na mikolo ezali koya, Nzambe akoboma bato nyonso ya mabe. Na nsima, soki moto moko ameki kotya ntembe na boyangeli na ye, oyo etondi na bolingo, akotika ye te. Akoki kosalela makambo oyo eleká na lisolo ya bato mpo na komonisa ete batomboki ya ndenge wana basengeli kobomama nokinoki. Akotika lisusu soki moke te nzela na mabe.

NDENGE NINI NZAMBE AMONISAKI BOLINGO NA YE?

7, 8. Ndenge nini Yehova amonisi bolingo na ye?

7 Yehova amonisi bolingo na ye na ndenge mingi. Kanisá naino bonene mpe kitoko ya molɔ́ngɔ́, oyo esalemi na bamiliare ya bagalaksi, mpe galaksi mokomoko ezali na bamiliare ya minzoto mpe baplanɛti. Na galaksi na biso, oyo ebengami La voie lactée, moi ezali moko ya minzoto. Soki moi ezalaki te, bomoi elingaki  kozala na mabele te. Biloko wana nyonso emonisi ete Yehova azali Mozalisi na biso, mpe emonisaka bizaleli na ye, na ndakisa nguya, bwanya, mpe bolingo na ye. Ya solo, bizaleli ya Nzambe “oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye.”​—Baroma 1:20.

Biloko nyonso oyo Yehova akelá awa na mabele esalisaka bato mpe banyama

8 Yehova asalá mabele mpo bikelamu ya bomoi efanda wana. Biloko nyonso oyo ezali na mabele esalisaka bato mpe banyama. Nzambe asalelaki bato esika moko kitoko mpo báfanda mpe apesaki bango makanisi mpe nzoto ya kokoka mpo bázala na bomoi libela na libela. (Tángá Emoniseli 4:11.) Longola yango, “apesaka ekelamu nyonso ya mosuni bilei: Mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.”​—Nzembo 136:25.

9. Atako Yehova azali Nzambe ya bolingo, ayinaka nini?

9 Yehova azali Nzambe ya bolingo, kasi ayinaka makambo ya mabe. Na ndakisa, Nzembo 5:4-6 elobi mpo na ye ete: “Ozali Nzambe oyo asepelaka na mabe te . . . oyinaka baoyo nyonso basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi.” Ayinaka mpe “moto oyo asopaka makila mpe oyo akosaka.”

MOSIKA TE MAKAMBO MABE EKOSILA

10, 11. (a) Nini ekokómela bato mabe? (b) Ndenge nini Yehova akopesa bato ya botosi mbano?

10 Na ntango oyo ebongi, Yehova akolongola mabe na molɔ́ngɔ́ mobimba mpo azali Nzambe ya bolingo mpe ayinaka makambo ya mabe. Liloba ya Nzambe elaki ete: “Basali-mabe bakobomama, kasi bato oyo balikyaka na Yehova nde bakozwa mabele. Mpe etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te.” Banguna ya Yehova “bakosila mpenza lokola molinga.”​—Nzembo 37:9, 10, 20.

11 Liloba ya Nzambe elaki mpe ete: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Nzembo 37:29) Bato ya sembo “bakosepela mpenza na kimya mingi.” (Nzembo 37:11) Mpo na nini? Mpo Nzambe na biso ya bolingo asalelaka ntango nyonso basaleli na ye ya sembo makambo oyo eleki malamu. Biblia eyebisi biso ete: “Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.” (Emoniseli 21:4) Talá makambo kitoko oyo ezali kozela bato ya botosi oyo basepelaka ndenge Nzambe azali bolingo!

12. “Moto oyo azangi mbeba” azali nani?

12 Biblia eyebisi biso ete: “Talá moto oyo azangi mbeba mpe kobá kotala moto ya makambo alima, mpo bomoi ya moto yango na mikolo ezali koya, ekozala na kimya. Kasi bato oyo babukaka mibeko bakosila mpenza bango nyonso nyɛɛ; bomoi ya bato mabe na mikolo ezali koya ekolongolama mpenza.” (Nzembo 37:37, 38) “Moto oyo azangi mbeba” ayebaka Yehova mpe Mwana na ye mpe asalaka mokano na ye. (Tángá Yoane 17:3.) Andimaka mpenza ete “mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe  azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:17) Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene, tosengeli mpenza ‘kotyela Yehova elikya mpe kobatela nzela na ye.’​—Nzembo 37:34.

LIKAMBO ELEKI MONENE OYO EMONISI BOLINGO YA NZAMBE

13. Likambo nini eleki monene oyo emonisi bolingo ya Nzambe?

13 Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kotosa Nzambe. Tokoki mpe kozala na boyokani makasi ná Yehova na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu, likambo eleki monene oyo emonisi bolingo ya Nzambe. Yehova apesaki lisiko mpo bato ya botosi bázwa libaku ya kolongwa na boombo ya lisumu mpe liwa. (Tángá Baroma 5:12; 6:23.) Yesu azalaki sembo epai ya Yehova na boumeli ya ntango molai na likoló, yango wana Yehova azalaki na ntembe ata moke te ete Mwana na ye akotikala mpe sembo awa na mabele. Lokola Yehova azali Tata ya bolingo, ayokaki mpasi mingi na motema ntango amonaki bato bazali konyokola Mwana na ye. Kasi, na bosembo mpenza Yesu amonisaki ete Nzambe azali na lotomo ya koyangela mpe ete moto ya kokoka akoki kotikala sembo epai ya Nzambe ata soki akutani na mikakatano oyo eleki makasi.

Na bolingo na ye, Nzambe atindaki Mwana na ye (Talá paragrafe 13)

14, 15. Liwa ya Yesu ememeli bato matomba nini?

14 Atako Yesu akutanaki na mikakatano ya makasi mpenza, atikalaki sembo mpe alongisaki lotomo ya Yehova ya koyangela. Tosengeli mpenza kozala na botɔndi ndenge Yesu, na nzela ya liwa na ye, apesaki lisiko mpo yango epesa bato libaku ya kozala na bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe! Ntoma Paulo alobelaki bolingo oyo Yehova mpe Yesu bamonisaki na nzela ya lisiko. Alobaki ete: “Ya solo, ntango tozalaki naino na bolɛmbu, na ntango oyo etyamá, Kristo akufelaki bato oyo batyolaka Nzambe. Mpo ezali mpasi mpenza moto akufela moyengebene; kasi mbala mosusu, moto akoki ata kondima kokufela moto malamu. Kasi Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye na likambo oyo: ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.” (Baroma 5:6-8) Ntoma Yoane akomaki ete: “Na likambo oyo nde  bolingo ya Nzambe emonisamaki polele mpo na biso, mpamba te Nzambe atindaki na mokili Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye. Bolingo, na likambo oyo, ezali te ete biso tolingaki Nzambe, kasi nde ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye azala mbeka mpo na kozipa masumu na biso.”​—1 Yoane 4:9, 10.

15 Yesu alobaki ete “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Atako ezalaki mpasi mpo na Yehova, andimaki kopesa Mwana na ye lokola lisiko. Yango emonisi bolingo monene oyo azali na yango mpo na bato. Mpe bolingo yango ekoumela mpo na libela. Ntoma Paulo akomaki ete: “Nandimi mpenza ete ezala liwa, to bomoi, to baanzelu, to baguvɛrnema, to makambo ya sikoyo, to makambo oyo ekoya, to banguya, to bosanda, to bozindo, to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali na Kristo Yesu Nkolo na biso.”​—Baroma 8:38, 39.

BOKONZI YA NZAMBE EZALI KOYANGELA

16. Bokonzi ya Masiya ezali nini, mpe Yehova aponi nani mpo azala Mokonzi na yango?

16 Guvɛrnema ya Nzambe to Bokonzi ya Masiya, emonisi mpe bolingo ya Yehova mpo na bato. Na ndenge nini? Yehova asili kotya Mokonzi oyo alingaka bato mpe abongi mpenza koyangela: Yesu Kristo. (Masese 8:31) Lisusu, bato 144 000 oyo baponami awa na mabele bakoyangela ná Kristo na likoló. Ntango basekwaka, babosanaka te makambo nyonso oyo etali bomoi ya bato. (Emoniseli 14:1) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Bokonzi ya Nzambe ezalaki motó ya likambo ya mateya na ye, mpe ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Tozelaka na motema mobimba ete mabondeli wana ekokisama, ntango Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato ebele ya mapamboli!

17. Na nini boyangeli ya Yesu ekeseni na oyo ya bato?

17 Bokeseni monene ezali kati na boyangeli ya Yesu oyo etondi na bolingo mpe boyangeli ya bato. Boyangeli ya bato ebimisá bitumba oyo ebomá bamilio ya bato. Kasi Mokonzi na biso Yesu alingaka biso mingi mpe amekolaka bizaleli kitoko ya Nzambe, mingimingi bolingo na ye. (Emoniseli 7:10, 16, 17) Yesu alobaki ete: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Matai 11:28-30) Oyo nde elaka kitoko!

18. (a) Nini ezali kosalema kobanda 1914? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Biblia emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló na 1914. Kobanda wana, bato oyo bakoyangela ná Yesu na likoló mpe “ebele mpenza ya bato” oyo bakobika na nsuka ya ebongiseli oyo mpo na kokɔta na mokili ya sika bazali koyanganisama. (Emoniseli 7:9, 13, 14) Ebele mpenza ya bato yango bazali boni lelo oyo? Makambo nini Nzambe azali kosɛnga bango? Lisolo oyo elandi ekolobela mituna wana.