Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2015

Teyá mwana na yo asalela Yehova

Teyá mwana na yo asalela Yehova

“Tiká moto ya Nzambe ya solo . . . alakisa biso nini tosengeli kosalela mwana oyo akobotama.”​—BASAMBISI 13:8.

NZEMBO: 88, 120

1. Manoa asalaki nini ntango ayebaki ete akokóma moboti?

MANOA ná mwasi na ye bayebaki ete bakobota bana te. Kasi mokolo moko, anzelu ya Yehova ayebisaki mwasi ya Manoa ete akobota mwana mobali. Yango ezalaki likambo ya kokamwa! Ntango mwasi yango ayebisaki mobali na ye Manoa likambo yango, asepelaki mingi. Kasi, akanisaki mpe na bozindo mokumba oyo Yehova apesaki ye, ya kozala moboti. Ndenge nini ye ná mwasi na ye bakokaki koteya mwana na bango alinga Yehova mpe asalela ye, na ntango oyo bato mingi na Yisraele bazalaki kosala makambo ya mabe? Manoa abondelaki Yehova atinda lisusu anzelu na ye mpe alobaki boye: “Nabondeli yo, tiká moto ya Nzambe ya solo oyo outi kotinda aya lisusu epai na biso mpe alakisa biso nini tosengeli kosalela mwana oyo akobotama.”​—Basambisi 13:1-8.

2. Osengeli kosala nini mpo na koteya bana na yo, mpe ndenge nini okoki kosala yango? (Talá mpe etanda “ Bayekoli na yo ya Biblia ya libosoliboso.”)

2 Soki ozali moboti, na ntembe te ozali koyeba ndenge Manoa azalaki komiyoka. Yo mpe ozali na mokumba ya kosalisa bana na yo báyeba Yehova mpe bálinga ye. (Masese 1:8) Na losambo na kati ya libota, okoki kosalisa bango bákoba  koyekola makambo ya Yehova mpe Biblia. Ya solo, osengeli kosuka kaka te na koyekola na bana na yo Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. (Tángá Kolimbola Mibeko 6:6-9.) Nini mosusu ekoki kosalisa yo oteya bango bálinga Yehova mpe básalela ye? Na lisolo oyo, tokolobela ndakisa ya Yesu. Atako azalaki moboti te, okoki kozwa mateya na lolenge oyo ateyaki bayekoli na ye mpe apesaki bango formasyo. Yesu alingaki bango mpe azalaki na komikitisa. Azalaki mpe na bososoli, elingi koloba ayebaki ndenge bazalaki komiyoka mpe ndenge ya kosalisa bango. Tótala sikoyo ndenge tokoki komekola Yesu.

LINGÁKÁ BANA NA YO

3. Ndenge nini bayekoli ya Yesu bayebaki ete alingaka bango?

3 Mbala na mbala, Yesu azalaki koyebisa bayekoli na ye ete alingaka bango. (Tángá Yoane 15:9.) Azalaki mpe kolekisa ntango mingi elongo na bango. (Marko 6:31, 32; Yoane 2:2; 21:12, 13) Azalaki moteyi na bango mpe moninga na bango. Na yango, bayebaki malamu ete alingaka bango. Ndakisa ya Yesu ekoki koteya yo nini?

4. Ndenge nini okoki komonisa bana na yo ete olingaka bango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

4 Yebisáká bana na yo ete olingaka bango, mpe monisá bango ete bazali na ntina mingi na miso na yo. (Masese 4:3; Tito 2:4) Ndeko Samuel, oyo afandaka na Australie, alobi: “Ntango nazalaki mwana moke, papa azalaki kotángela ngai buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpokwa nyonso. Azalaki koyanola na mituna na ngai, koyamba ngai mpe kopesa ngai bizi liboso nalala. Nakamwaki ntango nayebaki ete papa akolaki te na libota oyo ezalaki na momeseno ya koyamba bana mpe kopesa bango bizi! Atako bongo, asalaki mpenza milende mpo na komonisa ete alingaka ngai. Yango esalaki ete nalinga ye mingi, nazala na esengo mpe namona ete bazali kobatela ngai.” Salisá bana na yo bámiyokaka ndenge wana  mpe yebisáká bango mbala na mbala ete “nalingaka bino.” Yambáká bango mpe pesáká bango bizi. Lekisáká ntango elongo na bango, lyáká elongo na bango mpe sakanáká elongo na bango.

5, 6. (a) Yesu asalaki nini lokola azalaki kolinga bayekoli na ye? (b) Ndenge nini osengeli kopesa bana na yo disiplini?

5 Yesu alobaki ete: “Bato nyonso oyo ngai nalingaka mingi napamelaka bango mpe napesaka bango disiplini.” * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Emoniseli 3:19) Na ndakisa, bayekoli na ye bazalaki kowelana mbala na mbala mpo na koluka koyeba nani aleki baninga. Yesu ayebaki likambo yango. Atako bongo, na motema molai mpenza apesaki bango toli mbala na mbala. Kasi, azalaki ntango nyonso na boboto mpe azalaki kozela ntango mpe esika oyo ebongi mpo na kosembola bango.​—Marko 9:33-37.

Poná ngonga mpe esika oyo ebongi mpo na kopesa mwana na yo disiplini, mpe salá yango na boboto

6 Lokola olingaka bana na yo, oyebi ete osengeli kopesa bango disiplini. Ntango mosusu esɛngaka kaka kolimbolela bango mpo na nini eloko boye ezali malamu to mabe. Kasi, okosala nini soki bazali mitó makasi? (Masese 22:15) Landá ndakisa ya Yesu. Na motema molai mpenza, kobá kopesa bango disiplini, elingi koloba kopesa bango litambwisi, formasyo mpe kosembola bango. Poná ngonga mpe esika oyo ebongi mpo na kopesa bango disiplini, mpe salá yango na boboto. Elaine, ndeko mwasi moko na Afrika ya Sudi, akanisi lisusu ndenge oyo baboti na ye bazalaki kopesa ye disiplini. Bazalaki ntango nyonso kolimbolela ye nini balingi asala. Soki bayebisi ye ete bakopesa ye etumbu mpo atosi te, bazalaki kosala kaka bongo. Kasi alobi: “Ata mokolo moko te bapesaki ngai disiplini na nkanda to kozanga koyebisa ngai ntina oyo bazali kopesa ngai disiplini yango.” Lokola bazalaki kosala bongo, ayebaki ete baboti na ye balingaka ye.

ZALÁ NA KOMIKITISA

7, 8. (a) Liteya nini bayekoli ya Yesu bazwaki na mabondeli na ye? (b) Ndenge nini mabondeli na yo ekoki koteya bana na yo bátyela Nzambe motema?

7 Mwa moke liboso ete bákanga Yesu mpe báboma ye, abondelaki Tata na ye boye: “Aba, Tata, makambo nyonso ekoki kosalema epai na yo; longolelá ngai kɔpɔ oyo. Nzokande, ezala te oyo ngai nalingi, kasi oyo yo olingi.” * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Marko 14:36) Kanisá ndenge oyo bayekoli ya Yesu bamiyokaki ntango boyokaki libondeli wana, to bayokaki lisolo ya libondeli yango. Bamonaki ete atako Yesu azalaki moto ya kokoka, azalaki kaka na mposa ya lisalisi ya Tata na ye. Na yango, bayekolaki ete bango mpe basengeli kozala na komikitisa mpe kotyela Yehova motema.

Ntango bana na yo bazali koyoka ndenge ozali kosɛnga Yehova asalisa yo, bango mpe bakoyekola kotyela Yehova motema

8 Bana na yo bakoki koyekola makambo mingi na mabondeli na yo. Ya solo,  obondelaka te kaka mpo na koteya bana na yo. Kasi, ntango bazali koyoka ndenge ozali kobondela, bakoki koyekola kotyela Yehova motema. Na mabondeli na yo, kosuka kaka te na kosɛnga Yehova asalisa bana na yo, sɛngá ye mpe asalisa yo. Ndeko Ana, oyo afandaka na Brésil, alobi: “Ntango tokutanaki na mikakatano, na ndakisa ntango bankɔkɔ na ngai bazalaki kobɛla, baboti na ngai bazalaki kosɛnga Yehova apesa bango makasi ya koyikela mikakatano yango mpiko mpe bwanya mpo na kozwa bikateli ya malamu. Ata na ntango ya mikakatano makasi, bazalaki kotika makambo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. Yango esalaki ete nayekola kotyela Yehova motema.” Ntango bana na yo bazali koyoka ndenge ozali kosɛnga Yehova apesa yo mpiko mpo opesa moninga moko ya kartye litatoli to osɛnga patrɔ na yo konje mpo okende na liyangani, bakomona ete ozali kotyela Yehova motema mpo asalisa yo, bango mpe bakosala bongo.

9. (a) Ndenge nini Yesu ateyaki bayekoli na ye bázala na komikitisa mpe bándima komipimela? (b) Soki ozali na komikitisa mpe ozali komipimela, yango ekoteya bana na yo nini?

9 Yesu ateyaki bayekoli na ye bázala na komikitisa mpe bándima komipimela; atikelaki mpe bango ndakisa. (Tángá Luka 22:27.) Bantoma na ye bamonaki ndenge oyo ye moko amipimelaki mpo na kosalela Yehova mpe kosalisa basusu, bayekolaki mpe kosala bongo. Yo mpe okoki koteya bana na yo na ndakisa na yo. Ndeko Debbie, oyo azali na bana mibale alobi: “Nazalaki koyoka zuwa ata moke te soki mobali na ngai, oyo azali nkulutu, alekisi ntango mingi na bandeko mosusu. Nazalaki koyeba ete ntango nyonso oyo libota na biso ezali na mposa atyela biso likebi, akosala  yango.” (1 Timote 3:4, 5) Ndenge nini ndakisa ya Debbie ná mobali na ye Pranas, esalisi libota na bango? Ndeko Pranas alobi ete bana na bango basepelaka kosala misala na ntango ya liyangani. Bazalaki na esengo, bazwaki baninga malamu mpe bazalaki kosepela kozala elongo na bandeko na bango bakristo. Lelo oyo, libota yango mobimba ezali na mosala ya ntango nyonso. Soki ozali na komikitisa mpe ozali komipimela, ozali koteya bana na yo básepelaka kosalisa basusu.

ZALÁ NA BOSOSOLI

10. Ndenge nini Yesu amonisaki bososoli ntango bato mosusu ya Galile bayaki koluka ye?

10 Yesu azalaki na bososoli na ndenge ya kokoka. Azalaki kotya likebi te kaka na makambo oyo bato bazalaki kosala; azalaki mpe koluka koyeba ntina oyo bazali kosala yango. Azalaki koyeba makambo oyo ezalaki na mitema ya bato. Na ndakisa, mokolo moko bato mosusu ya Galile bayaki koluka ye. (Yoane 6:22-24) Ayebaki ete ntina mpenza oyo bayaki koluka ye, ezalaki te mpo balingaki koyoka mateya na ye, kasi ezalaki nde mpo bazalaki na mposa ya kolya. (Yoane 2:25) Yesu ayebaki mpenza makanisi na bango. Na nsima, na motema molai mpenza, asembolaki bango mpe alimbolelaki bango mbongwana oyo basengelaki kosala.​—Tángá Yoane 6:25-27.

Salisá bana na yo básepelaka na mosala ya kosakola (Talá paragrafe 11)

11. (a) Ndenge nini okoki koyeba soki bana na yo basepelaka na mosala ya kosakola to te? (b) Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo básepela na mosala ya kosakola?

11 Atako okoki te koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato, yo mpe okoki kozala na bososoli. Na ndakisa, okoki koluka koyeba ndenge oyo bana na yo batalelaka mosala ya kosakola. Okoki komituna boye: ‘Ekoki nde kozala ete na mosala ya kosakola bana na ngai bazelaka kaka ntango oyo tokopema, tokolya to tokomɛla mwa eloko?’ Soki omoni ete bana na yo basepelaka mpenza te na mosala ya kosakola, luká ndenge ya kosala mpo bákoma kosepela na yango mingi. Pesáká bango mwa makambo ya kosala mpo bámona ete bazali na ntina.

12. (a) Yesu akebisaki bayekoli na ye na likambo nini? (b) Mpo na nini bayekoli ya Yesu basengelaki mpenza na likebisi yango?

12 Ndenge nini mosusu Yesu amonisaki bososoli? Ayebaki ete libunga moko ekoki komema na mosusu, ata mpe na lisumu monene, mpe akebisaki bayekoli na ye mpo na yango. Na ndakisa, bayekoli bayebaki ete pite to ekobo ezali mabe. Kasi, Yesu akebisaki bango na makambo oyo ekoki komema na pite to na ekobo. Alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema. Nzokande, soki liso na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo.” (Matai 5:27-29) Bayekoli ya Yesu bazalaki kofanda ná Baroma, oyo bazalaki kolinga kotala masano oyo etondi na makambo ya kosangisa nzoto mpe na maloba ya mbindo. Na yango, na bolingo mpenza, Yesu akebisaki bayekoli na ye báboya eloko nyonso oyo ekokaki kopekisa bango básala makambo ya malamu.

13, 14. Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo báboya kominanola mpe masano ya mbindo?

13 Lokola ozali moboti, okoki komonisa bososoli mpo na kobatela bana na yo básala te eloko moko oyo ekoki kosepelisa Yehova te. Likambo ya mawa, lelo oyo ata bana mike bazali na likama ya kotala pornografi mpe makambo mosusu ya mbindo. Ya solo, osengeli koyebisa bana na yo ete kotala makambo ya mbindo ezali mabe. Kasi, ezali na makambo mosusu oyo okoki kosala mpo na kobatela bango.  Omituna boye: ‘Bana na ngai bayebi mpo na nini pornografi ezali mpenza likama? Nini ekoki kotinda bango básepela kotala bililingi ya ndenge wana? Nasalaka ete bábanga te koyebisa ngai likambo nyonso, mpo básɛnga ngai nasalisa bango ata soki bakutani na motambo ya kotala pornografi?’ Ata ntango bana bazali naino mike, okoki koyebisa bango boye: “Soki omoni eloko moko na Internet, oyo ezali kotinda yo oluka koyeba makambo etali kosangisa nzoto mpe oyoki mposa ya kotala yango, yaká mbangu koyebisa ngai. Kobanga te to koyoka nsɔni te mpo na kosɛnga ngai nasalisa yo. Nalingi mpenza kosalisa bino.”

14 Ntango ozali kopona masano mpe kominanola, kanisá malamumalamu na ndenge oyo okoki mpe kozala ndakisa malamu mpo na bana na yo. Ndeko Pranas oyo tolobelaki liboso, alobi: “Okoki koloba makambo mingi, kasi bana na yo bakotala nde makambo oyo osalaka mpe bakomekola yo.” Soki ntango nyonso oponaka na ekɛngɛ miziki oyo oyokaka, babuku oyo otángaka mpe bafilme oyo otalaka mpo na kominanola, okoki kosalisa bana na yo básala mpe bongo.​—Baroma 2:21-24.

YEHOVA AKOSALISA YO

15, 16. (a) Mpo na nini bokoki kozala na kondima ete Yehova akosalisa bino bóteya bana na bino? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

15 Nini esalemaki ntango Manoa asɛngaki Yehova asalisa ye azala moboti malamu? “Nzambe ya solo ayokaki mongongo ya Manoa.” (Basambisi 13:9) Baboti, Yehova akoyoka mpe mabondeli na bino. Akosalisa bino bóteya bana na bino. Mpe akosalisa bino bómonisa bana na bino ete bolingaka bango, bózala na komikitisa mpe bózala na bososoli.

16 Kaka ndenge Yehova akosalisa bino bóteya bana na bino ntango bazali naino mike, akoki mpe kosalisa bino bóteya bango ntango bakokóma bilenge. Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge oyo ndakisa ya Yesu na oyo etali bolingo, komikitisa mpe bososoli ekoki kosalisa bino bóteya bana na bino oyo bakómi bilenge básalela Yehova.

^ par. 5 Biblia eteyaka ete disiplini elimboli kopesa litambwisi, kopesa formasyo, kosembola mpe na bantango mosusu kopesa etumbu. Baboti basengeli kopesa disiplini na boboto mpe kosala yango soki moke te ntango bazali na nkanda.

^ par. 7 Na ntango ya Yesu, bana bazalaki kobenga batata na bango Aba. Liloba yango ezalaki komonisa bolingo mpe botosi.​—The International Standard Bible Encyclopedia.