Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2015

Teyá mwana na yo oyo akómi elenge asalela Yehova

Teyá mwana na yo oyo akómi elenge asalela Yehova

“Yesu akobaki kokola na bwanya mpe na nzoto mpe bato ná Nzambe bazalaki kondima ye.”​—LUKA 2:52.

NZEMBO: 41, 89

1, 2. (a) Nini etungisaka baboti mosusu oyo bana na bango bakómi bilenge? (b) Matomba nini bana bakoki kozwa ntango bazali naino bilenge?

BABOTI bazalaka na esengo mingi ntango bana na bango bazwi batisimo. Ndeko Bernice azali na bana minei mpe bango nyonso bazwaki batisimo liboso bákokisa mbula 14. Ndeko yango alobi: “Ezalaki likambo ya esengo mpenza mpo na biso. Ya solo, tosepelaki mingi ndenge bana na biso balingaki kosalela Yehova. Kasi, toyebaki mpe ete lokola bazalaki naino bilenge bakokaki kokutana na mikakatano mingi.” Yo mpe okoki komitungisa ndenge wana soki mwana na yo azali elenge to soki etikali moke akóma elenge.

2 Moto moko ya mayele oyo ayekolaka makanisi mpe bizaleli ya bana mike alobi ete eleko ya bolenge ekoki kozala mpasi, ezala mpo na baboti to mpo na bana, kasi baboti basengeli te kokanisa ete mitó ya bana na bango ezali kosala malamu te to bazali kokanisa kaka lokola bana mike. Kasi, alobaki ete bilenge babimisaka makambo mingi ya sika, bamonisaka polele ndenge oyo bazali komiyoka mpe bazalaka na mposa ya kolekisa ntango elongo na baninga. Na yango, ntango bana na yo  bazali bilenge, bakoki kokóma baninga ya motema ya Yehova, ndenge Yesu asalaki yango ntango azalaki elenge. (Tángá Luka 2:52.) Bakoki mpe kokolisa makoki na bango na mosala ya kosakola mpe kokóma na mposa makasi ya kosala mingi na mosala ya Nzambe. Bakoki mpe kozwa bikateli bango moko, na ndakisa kopesa bomoi na bango epai ya Yehova mpe kotosa ye. Kasi, lokola ozali moboti, okoki kosala nini mpo na koteya mwana na yo oyo akómi elenge asalela Yehova? Okoki kozwa liteya na lolenge oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye na bolingo, na komikitisa mpe na bososoli.

LINGÁKÁ MWANA NA YO OYO AKÓMI ELENGE

3. Ndenge nini bantoma bayebaki ete Yesu azalaki moninga na bango?

3 Yesu azalaki Nkolo epai ya bantoma na ye mpe moninga na bango. (Tángá Yoane 15:15.) Na ntango ya kala, mbala mingi Nkolo azalaki te koyebisa baombo na ye makanisi na ye mpe ndenge oyo azalaki komiyoka. Kasi, Yesu azwaki bantoma na ye te lokola baombo. Alingaki bango mpe azalaki kolekisa ntango mingi elongo na bango. Azalaki na esengo ya koyebisa bango makanisi na ye mpe ndenge oyo azalaki komiyoka, mpe koyoka bango na likebi ntango bazalaki kobimisa makanisi na bango mpe ndenge oyo bazalaki komiyoka. (Marko 6:30-32) Lokola Yesu azalaki kosolola malamu ná bantoma na ye, yango esalaki ete bákóma mpenza baninga na ye ya motema mpe abongisa bango mpo na mosala oyo basengelaki kosala na nsima.

4. Baboti, ndenge nini bokoki kozala baninga ya bana na bino? (Talá elilingi ya ebandeli.)

4 Atako ozali mokonzi ya bana na yo, okoki mpe kozala moninga na bango. Baninga balekisaka ntango mingi elongo. Mbala mosusu okoki kolekisa ntango moke na mosala to na makambo mosusu mpo otikala na ntango mingi ya kolekisa elongo na bana na yo. Yango ezali likambo oyo osengeli kobondela mpo na yango mpe kotyela yango mpenza likebi. Baninga basepelaka mpe na makambo ya ndenge moko. Na yango, luká koyeba makambo oyo mwana na yo asepelaka na yango mingi, na ndakisa miziki, bafilme to masano oyo alingaka mingi. Na nsima, yo mpe salá makasi okóma kosepela na yango. Ndeko Ilaria, oyo afandaka na Italie, alobi: “Baboti na ngai bakómaki kosepela na miziki oyo nayokaka. Kutu, papa akómá moninga na ngai ya motema, mpe nabangaka te koyebisa ye ata makambo oyo ezalaka mpasi kolobela yango.” Soki ozali moninga ya bana na yo mpe osalisi bango bákóma baninga ya Yehova, yango elingi koloba te ete ozali lisusu mokonzi na bango te. (Nzembo 25:14) Bana na yo bakomona ete olingaka bango mpe otosaka bango, mpe ekozala mpasi te mpo báyebisa yo makambo na bango nyonso.

5. Ndenge nini bayekoli ya Yesu bakokaki kozala na esengo na mosala ya Yehova?

5 Yesu ayebaki ete soki bayekoli na ye bazali kosepela kosalela Yehova mpe bazali komipesa mingi na mosala ya kosakola, bakozala na esengo ya solosolo. Na yango, alendisaki bango básala mingi na mosala ya kosakola mpe alakaki bango ete akosalisa bango.​—Matai 28:19, 20.

6, 7. Ndenge nini omonisaka ete olingaka bana na yo ntango oteyaka bango básalaka makambo oyo tosalaka mbala na mbala mpo na kosalela Yehova?

6 Olingaka ete bana na yo bátikala penepene na Yehova. Mpe Yehova alingi ete oteya bana na yo mpe opesa bango disiplini. Apesá yo bokonzi ya kosala yango. (Baefese 6:4) Na yango, osengeli kondimisama ete bana na yo bazali koteyama mbala  na mbala. Kanisá likambo oyo: Osalaka nyonso mpo bana na yo bákendaka kelasi mpo oyebi ete koyekola ezali na ntina mingi mpe olingaka báyekola makambo ya sika. Ndenge moko mpe, osengeli kondimisama ete bana na yo bakendaka makita, mayangani mpe bazalaka na losambo na kati ya libota. Mpo mateya oyo bazwaka epai ya Yehova nde ekoki kobikisa bango. Na yango, salisá bango básepelaka koyekola makambo ya Yehova mpe bámona ete akoki koteya bango mpo bákoma mpenza na bwanya. (Masese 24:14) Lisusu, salisá bana na yo bábimaka na mosala ya kosakola mbala na mbala. Landá ndakisa ya Yesu mpe salisá bango básepelaka koteya basusu Liloba ya Nzambe.

7 Ndenge nini makambo oyo tosalaka mbala na mbala na mosala ya Yehova na ndakisa, koyekola, makita mpe mosala ya kosakola esalisaka bilenge? Ndeko Erin, oyo afandaka na Afrika ya Sudi, alobi boye: “Mbala mingi, biso bana tozalaka na momeseno ya koloba ‘naboyi na ngai’ mpe tolelalelaka soki esɛngi tóyekola Biblia, tókenda makita mpe tóbima na mosala ya kosakola. Ntango mosusu, tozalaki kobebisa programɛ ya boyekoli ya libota na nko kaka mpo tósala yango te. Kasi, baboti na biso balɛmbaki te.” Ndeko yango azali na botɔndi mingi epai ya baboti na ye mpo basalisaki ye amona mpenza ntina ya makambo wana. Lelo oyo, soki esalemi ete azangisa makita to abima te na mosala ya kosakola, asalaka makasi azongela momeseno wana na lombangu mpenza.

ZALÁ NA KOMIKITISA

8. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki na komikitisa? (b) Ndenge nini komikitisa ya Yesu esalisaki bayekoli na ye?

8 Atako Yesu azalaki moto ya kokoka, azalaki na komikitisa mpe ayebisaki bayekoli na ye ete asengelaki na lisalisi ya Yehova. (Tángá Yoane 5:19.) Yango esalaki nde ete bayekoli bátosa ye lisusu mingi te? Te. Lokola bazalaki komona ete azali kotyela Yehova motema mingi, bango mpe bakómaki kotyela ye motema mingi. Na nsima, balandaki ndakisa na ye ya komikitisa.​—Misala 3:12, 13, 16.

Soki ozali kondima mabunga na yo, bana na yo bakotosa yo

9. Soki ozali kondima mabunga na yo mpe kosɛnga bolimbisi, ndenge nini yango ekoki kosalisa mwana na yo?

9 Na kokesana na Yesu, biso tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga. Yango wana, zalá na komikitisa. Yebá ete ezali na makambo mingi oyo okoki kosala te, mpe ndimáká mabunga na yo. (1 Yoane 1:8) Soki osali bongo, mwana na yo akoyekola kondima mabunga na ye, mpe akotosa yo lisusu mingi. Tókende epai tózonga epai, nani oyo okolinga kotosa mingi? Patrɔ oyo andimaka mabunga na ye to oyo asɛngaka bolimbisi soki moke te? Ndeko Rosemary, oyo azali na bana misato, alobi ete ye ná mobali na ye bazalaki kondima mabunga na bango. Alobi: “Yango etindaki bana na biso báfungolela biso mitema ntango bazali na mikakatano.” Abakisi boye: “Toteyaki bana na biso báyeba oyo ekoki mpenza kosalisa bango bálonga mikakatano na bango. Ntango bazalaki na mposa ya lisalisi, tozalaki ntango nyonso kosalela mikanda na biso mpe kobondela elongo na bango.”

10. Ndenge nini Yesu azalaki na komikitisa ata ntango azalaki koyebisa bayekoli na ye oyo basengeli kosala?

 10 Yesu azalaki na bokonzi ya koyebisa bayekoli na ye makambo oyo basengelaki kosala. Kasi, lokola azalaki na komikitisa, mbala mingi azalaki koyebisa bango ntina oyo basengeli kosala bongo. Na ndakisa, asukaki kaka te na koyebisa bango ete báluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye. Kasi alobaki mpe ete: “Mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.” Ntango Yesu ayebisaki bango ete bátika kosambisa, alimbolaki ete: “Mpo básambisa bino te; mpo bakosambisa bino na lisambisi oyo bozali kosambisa.”​—Matai 6:31–7:2.

11. Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo soki oyebisi ye ntina oyo otye mobeko to ozwi ekateli boye?

11 Luká ntango oyo ebongi mpo na kolimbolela mwana na yo ntina oyo otye mobeko to ozwi ekateli boye. Soki ayebi ntina, ekozala mpasi te andima kotosa yo. Ndeko Barry, oyo abɔkɔlaki bana minei, alobi ete: “Koyebisa ntina oyo osali likambo moko ekosalisa bilenge bátyela yo motema.” Bilenge bakomona te ete otyeli bango mobeko to ozwi ekateli kaka mpo ozali na bokonzi ya kosala bongo, kasi mpo ezali na ntina oyo ebongi ya kosala bongo. Mpe kobosana te ete bilenge bazali lisusu bana mike te. Bazali koyekola ndenge ya kokanisa makambo na bango moko mpe bazali na mposa bázwaka bikateli bango moko. (Baroma 12:1) Ndeko Barry alimboli boye: “Bilenge basengeli koyekola kokanisa liboso ya kozwa bikateli ya minene, na esika ya kozwa yango kaka na mbalakaka.” (Nzembo 119:34) Na yango, zalá na komikitisa mpe limbolelá mwana na yo ntina oyo ozwaki ekateli boye to boye. Na ndenge wana, akoyekola kozwa bikateli ye moko mpe akoyeba ete opesaka ye kilo mpe oyebi ete abandi kokóla.

ZALÁ NA BOSOSOLI

12. Lokola Yesu azalaki na bososoli, ndenge nini asalisaki Petro?

12 Yesu azalaki na bososoli mpe ayebaki lisalisi ya ndenge nini bayekoli na ye basengelaki na yango. Na ndakisa, ntango ayebisaki bayekoli na ye ete akobomama, Petro ayebisaki ye amitungisa te. Yesu ayebaki ete Petro alingaka ye, kasi, ayebaki mpe ete lolenge oyo Petro azalaki kokanisa ezalaki mabe. Ndenge nini Yesu asalisaki ye mpe bayekoli mosusu? Liboso, asembolaki Petro. Na nsima, amonisaki oyo ekokómela bato oyo baboyaka kosalela Yehova ntango makambo eyaka ndongo. Alobaki mpe ete Yehova akopesa mbano na baoyo bamipimelaka. (Matai 16:21-27) Petro azwaki liteya.​—1 Petro 2:20, 21.

13, 14. (a) Makambo nini ekoki komonisa ete mwana na yo asengeli kokómisa kondima na ye makasi? (b) Ndenge nini okoki koyeba lisalisi oyo mwana na yo azali mpenza na mposa na yango?

13 Bondelá Yehova apesa yo bososoli mpo oyeba lisalisi oyo mwana na yo asengeli na yango. (Nzembo 32:8) Mbala mosusu omoni ete azali lisusu na esengo te ndenge azalaki liboso, to akómi koloba mabe mpo na bandeko. Ntango mosusu ozali komona lokola ete azali kobombela yo likambo moko. Kokanisa mbala moko te ete mwana na yo azali kosala likambo moko ya mabe na kobombana. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Kasi, kokanga miso na likambo yango te mpe kokanisa te ete ekoleka kaka bongo. Mbala mosusu ekoki kosɛnga ete osalisa ye akómisa kondima na ye makasi.

Salisá mwana na yo azwa baninga malamu na lisangá (Talá paragrafe 14)

 14 Mpo na koyeba ndenge oyo okoki kosalisa mwana na yo, tunáká mituna na boboto mpe na limemya. Yango ezali lokola kotoka mai na libulu mozindo. Soki obimisi yango mbangumbangu, okozwa mai mingi te. Ndenge moko mpe soki ozali motema molai te ntango ozali kotuna mituna to ozali kotinda mwana na yo na makasi aloba, okoyeba te makambo oyo azali mpenza kokanisa mpe ndenge oyo azali komiyoka. (Tángá Masese 20:5.) Ndeko IIaria alobi ete ntango azalaki elenge, azalaki kolinga kolekisa ntango mingi ná baninga na ye ya kelasi, kasi ayebaki ete kosala bongo ezali mabe. Baboti na ye bamonaki ete likambo moko ezalaki kotungisa ye. Alobi: “Mokolo moko na mpokwa, balobaki na ngai ete mikolo oyo bazali komona ngai malamu te, mpe batunaki ngai soki nazalaki na likambo. Mbala moko nabandaki kolela mpe nayebisaki bango likambo yango mpe nasɛngaki bango básalisa ngai. Bayambaki ngai, bayebisaki ngai ete bazali komitya na esika na ngai mpe balakaki ngai ete bakosalisa ngai.” Mbala moko baboti ya IIaria babandaki kosalisa ye azwa baninga ya malamu na lisangá.

Lukáká bizaleli malamu ya mwana na yo mpe pesáká ye longonya

15. Wapi lolenge mosusu oyo Yesu amonisaki ete azalaki na bososoli?

15 Yesu amonisaki mpe bososoli ntango azalaki komona bizaleli malamu ya bayekoli na ye. Na ndakisa, ntango Natanaele ayokaki ete Yesu azali moto ya Nazarete, alobaki ete: “Eloko moko ya malonga ekoki nde kobima na Nazarete?” (Yoane 1:46) Soki ozalaki wana, olingaki nde kokanisa ete Natanaele azali kokanisela basusu mabe to azangi kondima? Kasi, Yesu akanisaki bongo te. Kutu, amonisaki nde bososoli mpe ayebaki ete Natanaele azalaki sembo, yango wana alobaki ete azali “Moyisraele ya solosolo, oyo azali na bokosi te.” (Yoane 1:47) Yesu azalaki na likoki ya koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato mpe asalelaki likoki yango mpo na koluka bizaleli malamu ya bato.

16. Ndenge nini okoki kolendisa mwana na yo akóma lisusu malamu koleka?

16 Atako okoki te koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato, ndenge Yesu azalaki koyeba yango, okoki kozala na bososoli. Yehova akoki kosalisa yo olukaka bizaleli malamu ya mwana na yo. Ata soki  mwana na yo ayokisi yo mpasi na motema, koloba soki moke te ete azali mwana mabe to eluka-makambo. Kokanisela ye bongo ata moke te. Kasi, yebisá ye nde ete oyebi bizaleli na ye ya malamu mpe ozali na elikya ete akosala makambo ya malamu. Tyá likebi na makambo oyo abongisi mpe pesá ye longonya. Soki likoki ezali, pesáká ye mwa mikumba mosusu mpo na kosalisa ye akolisa makoki oyo azali na yango. Yesu asalaki bongo mpo na bayekoli na ye. Mbula moko na ndambo nsima ya kokutana na Natanaele (oyo abengami mpe Bartelemi), Yesu apesaki ye mokumba moko monene. Akómisaki ye ntoma na ye, mpe Natanaele akokisaki mokumba oyo Yesu apesaki ye na bosembo mpenza. (Luka 6:13, 14; Misala 1:13, 14) Na yango, na esika otinda mwana na yo akanisa ete asalaka likambo ya malamu ata moko te, pesá ye longonya mpe lendisá ye. Salisá ye amona ete akoki kosepelisa yo ná Yehova, mpe kosalela makoki na ye na mosala ya Yehova.

KOTEYA BANA NA YO EKOMEMELA YO ESENGO MINGI

17, 18. Soki okobi koteya mwana na yo asalela Yehova, matomba nini okozwa?

17 Mbala mosusu okoki komiyoka lokola ntoma Paulo. Atungisamaki mingi mpo na baoyo bazalaki lokola bana na ye. Ezalaki bato oyo asalisaki mpo báyeba Yehova, mpe azalaki kolinga bango mingi. Yango wana, kokanisa ete basusu kati na bango bakokaki kotika kosalela Yehova ezalaki kopesa ye mpasi na motema. (1 Bakorinti 4:15; 2 Bakorinti 2:4) Ndeko Victor, oyo abɔkɔlaki bana misato, alobi: “Eleko ya bolenge ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi, bantango ya malamu oyo tolekisaki esalaki ete tóbosana mikakatano oyo tokutanaki na yango. Na lisalisi ya Yehova, tokómaki mpenza baninga ya motema ya bana na biso.”

18 Baboti, bosalaka mosala makasi mpo na koteya bana na bino mpo bolingaka bango mingi. Bólɛmba te. Bókanisa nde esengo oyo bokoyoka ntango bana na bino bakozwa ekateli ya kosalela Nzambe mpe bakokoba kosalela ye na bosembo.​—3 Yoane 4.

^ par. 13 Baboti bakoki kozwa makanisi oyo ekosalisa bango soki batángi buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, volimi 1, lokasa 317 mpe volimi 2, nkasa 136-141.