Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2015

Mbula nkama ya boyangeli ya Bokonzi!

Mbula nkama ya boyangeli ya Bokonzi!

“Nzambe ya kimya, . . . apesa bino eloko nyonso ya malamu mpo na kosala mokano na ye.”​—BAEBRE 13:20, 21.

NZEMBO: 136, 14

1. Mosala ya kosakola ezalaki na ntina nini na miso ya Yesu? Limbolá.

YESU azalaki kosepela mingi kolobela Bokonzi ya Nzambe. Ntango azalaki awa na mabele, alobelaki Bokonzi yango mingi koleka makambo mosusu nyonso. Asalelaki liloba Bokonzi mbala koleka 100 na mosala na ye ya kosakola awa na mabele. Ya solo, Bokonzi ezalaki na ntina mingi na miso ya Yesu.​—Tángá Matai 12:34.

2. Bato boni bayokaki etinda oyo ezali na Matai 28:19, 20, mpe mpo na nini tolobi bongo?

2 Mwa moke nsima ya lisekwa na ye, Yesu akutanaki na bato koleka 500 oyo basengelaki kokóma bayekoli na ye. (1 Bakorinti 15:6) Mbala mosusu ezalaki na ntango wana nde Yesu apesaki etinda ya kosakola epai ya ‘bato ya bikólo nyonso.’ Mosala yango elingaki kozala pɛtɛɛ te. * (Talá maloba na nse ya  lokasa.) Ayebisaki bango ete mosala ya kosakola ekokoba mpo na ntango molai, tii “na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Ntango osakolaka nsango malamu lelo oyo, opesaka mabɔkɔ mpo esakweli yango ekokisama.​—Matai 28:19, 20.

3. Wapi makambo misato oyo esalisi biso tósakola nsango malamu?

3 Nsima ya kopesa etinda ya kosakola, Yesu alobaki ete: “Nazali elongo na bino.” (Matai 28:20) Na maloba wana, Yesu alakaki bayekoli na ye ete akotambwisa mosala ya kosakola mpe akosalisa bango básakola na mokili mobimba. Yehova mpe azali elongo na biso. Apesi biso “eloko nyonso ya malamu” mpo na kosalisa biso tósakola. (Baebre 13:20, 21) Na lisolo oyo, tokolobela makambo misato na biloko yango ya malamu: (1) bisaleli oyo Mokonzi apesi biso, (2) mayele oyo tosaleli, mpe (3) formasyo oyo tozwi. Ya liboso, tótalela bisaleli mosusu oyo tosaleli na boumeli ya mbula 100 oyo eleki.

BISALELI OYO ESALISI BASALELI YA NZAMBE BÁSAKOLA

4. Ndenge nini bisaleli ndenge na ndenge esalisi biso na mosala na biso ya kosakola?

4 Yesu alobaki ete nsango ya Bokonzi ezali lokola mboto oyo elonami na mabele ndenge na ndenge. (Matai 13:18, 19) Mpo na kobongisa mabele, moloni asalelaka bisaleli ndenge na ndenge. Ndenge moko mpe, Mokonzi na biso apesi biso bisaleli oyo tokoki kosalela mpo na kosalisa bato bándima nsango na biso. Bisaleli mosusu esalelamaki mpo na mwa ntango, kasi mosusu ezali kosalelama tii lelo. Kasi bisaleli yango nyonso esalisi biso tókolisa makoki na biso ya kosakola.

Mokanda ya litatoli esalisaki bandeko mingi bábanda kosakola

5. Mokanda ya litatoli ezalaki nini, mpe ndenge nini bazalaki kosalela yango?

5 Na 1933, basakoli babandaki kosalela mokanda ya litatoli, esaleli oyo esalisaki bandeko mingi bábanda kosakola. Ezalaki karte moko ya moke, oyo ezalaki na nsango ya mokuse mpe ya polele ya Biblia. Ntango mosusu, bazalaki kobimisa mokanda ya litatoli ya sika oyo ezalaki na nsango ya sika. Ndeko Erlenmeyer azalaki na mbula soki zomi ntango asalelaki mokanda ya litatoli mpo na mbala ya liboso. Alobi: “Mbala mingi, mpo na kobanda lisolo, tozalaki kotuna boye: ‘Okosepela kotánga mokanda oyo?’ Soki moto asilisi kotánga mokanda yango, tozalaki kopesa ye mikanda mosusu, na nsima tosimbi nzela tokei.”

6. Ndenge nini mokanda ya litatoli esalisaki basakoli?

6 Mokanda ya litatoli esalisaki basakoli na ndenge mingi. Na ndakisa, basakoli mosusu bazalaki nsɔninsɔni, mpe atako bazalaki mpenza na mposa ya kosakola, bayebaki te makambo nini bakoloba. Nzokande, basakoli mosusu bazalaki na mpiko ya koleka ndelo. Na mosala ya kosakola, kaka na miniti moke, bazalaki koyebisa moto makambo nyonso oyo bayebaki, kasi mbala mingi bazalaki koloba na mayele te. Mokanda ya litatoli esalisaki basakoli nyonso bápesa litatoli na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele.

7. Kosalela mokanda ya litatoli ebimisaki mikakatano nini?

7 Ezalaki mpe na mikakatano. Ndeko mwasi Grace Estep alobi: “Ntango mosusu bazalaki kotuna biso, ‘Mokanda yango elobi nini? Mpo na nini te koyebisa ngai kaka  makambo oyo ezali na kati?’” Lisusu, bato mosusu bazalaki kokoka te kotánga makambo oyo ezalaki na mokanda yango. Basusu bazalaki kaka kozwa mokanda, na nsima bakangi porte. Bato mosusu bazalaki kolinga nsango na biso te, yango wana bazalaki kopasola mokanda yango mikemike. Atako mikakatano wana nyonso, mokanda ya litatoli esalisaki basakoli bápesa litatoli epai ya bazalani na bango mpe báyebana lokola basakoli ya Bokonzi.

8. Ndenge nini bazalaki kosalela bafono oyo bazalaki komema na mabɔkɔ? (Talá elilingi ya ebandeli.)

8 Esaleli mosusu oyo tosalelaki nsima ya 1930 ezalaki fono oyo bazalaki komema na mabɔkɔ. Batatoli mosusu bazalaki kobenga yango Arona, mpo masini yango ezalaki koloba na esika na bango. (Tángá Kobima 4:14-16.) Soki moto andimi koyoka, mosakoli azalaki kotya diskur ya mokuse ya Biblia, na nsima kotikela ye mikanda. Ntango mosusu, libota mobimba ezalaki koyangana mpo na koyoka diskur yango! Na 1934, la Société ebandaki kosala bafono oyo bazalaki komema na mabɔkɔ, mpo na mosala ya kosakola. Nsukansuka, bandeko bakɔtisaki badiskur 92 na bafono yango.

9. Matomba nini fono oyo bazalaki komema na mabɔkɔ ebimisaki?

9 Ntango ndeko Hillary Goslin ayokaki diskur moko ya ndenge wana, asɛngaki bápesa ye fono mpo asalela yango pɔsɔ mobimba mpo ayebisa bazalani na ye nsango ya Biblia. Nsima na yango, bato ebele bakómaki kosepela na mateya ya solo mpe bazwaki batisimo. Nsukansuka, bana mibale ya basi ya ndeko Goslin bakɔtaki na Eteyelo ya Gileadi mpe bakómaki bamisionɛrɛ. Ndenge moko na mokanda ya litatoli, fono oyo bazalaki komema na mabɔkɔ esalisaki basakoli mingi bábanda kosakola. Na nsima, na nzela ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, Mokonzi apesaki basaleli na ye formasyo mpo bákóma bateyi oyo babongi.

KOSALELA MAYELE NYONSO OYO ESENGELI MPO NA KOKUTANA NA BATO

10, 11. Ndenge nini tosalelaki bazulunalo mpe radio mpo na kosakola nsango malamu, mpe mpo na nini mayele yango ezalaki malamu?

10 Na litambwisi ya Mokonzi na biso, basaleli ya Nzambe basaleli mayele ndenge na ndenge mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato mingi. Mayele yango ezalaki na ntina, mingimingi na ntango oyo tozalaki na basakoli mingi te. (Tángá Matai 9:37.) Na ndakisa, eleki bambula mingi, tozalaki kosalela bazulunalo mpo na kosakola nsango malamu. Pɔsɔ nyonso, ndeko Russell azalaki kotinda diskur moko ya Biblia na biro moko oyo ebimisaka bazulunalo. Na nsima, bazalaki kotinda diskur yango na bazulunalo na Canada, na Mpoto, mpe na États-Unis. Kobanda na 1913, badiskur ya ndeko Russell ekómaki kobima na bazulunalo 2 000, mpe bato soki milio 15 bazalaki kotánga yango!

Bazulunalo mpe radio esalisaki biso tósakola nsango malamu epai ya bato mingi na bisika oyo basakoli bazalaki mingi te

11 Tosalelaki mpe radio na ndenge ya malamu mpo na kosakola nsango malamu. Na mokolo ya 16/04/1922, ndeko Rutherford asalaki diskur na ye ya liboso na radio, mpe bato soki 50 000 balandaki yango. Eumelaki te, tokómaki kosalela shɛni na biso  moko ya radio, oyo ezalaki kobengama WBBR, mpe emisyo na yango ya liboso esalemaki na mokolo ya 24/02/1924. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1924 elobaki boye: “Tokanisi ete radio ezali mayele oyo eleki malamu mpe oyo ezali kosɛnga mbongo mingi te mpo na kopalanganisa nsango malamu koleka mayele mosusu nyonso.” Ndenge moko na bazulunalo, radio esalisaki biso tósakola nsango malamu epai ya bato mingi na bisika oyo basakoli bazalaki mingi te.

Basakoli mingi ya Bokonzi basepelaka kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso mpe kolakisa bato site Internet na biso (Talá paragrafe 12, 13)

12. (a) Lolenge nini ya litatoli na bisika ya bato nyonso osepelaka na yango mingi? (b) Nini ekoki kosalisa biso tólongola kobanga oyo tokoki kozala na yango mpo na kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso?

12 Kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso ezali mayele ya malamu ya koyebisa bato nsango malamu lelo oyo. Tosalaka milende mingi mpo na kopesa bato litatoli na bisika oyo bazelaka mituka, bingbunduka, na baparkingi, ata mpe na bisika ya bato nyonso, mpe na bazando to bawenze. Kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso ebangisaka yo? Soki ezali bongo, bondelá mpo na kosɛnga lisalisi, mpe tyá likebi na maloba ya ndeko Manera, oyo azali mokɛngɛli ya zongazonga. Alobaki boye: “Tozalaki kotalela lolenge nyonso ya sika ya mosala lokola lolenge mosusu ya kosalela Yehova, lolenge mosusu ya komonisela ye bosembo na biso, lolenge mosusu oyo bosembo na biso emekami, mpe tozalaki na mposa makasi ya kondima kosalela ye na lolenge nyonso oyo asɛngi  biso.” Soki totiki kobanga mpe tosaleli mayele ya sika mpo na kosakola, tokokóma kotyela Yehova motema lisusu mingi, mpe tokokóma basakoli ya malamu koleka.​—Tángá 2 Bakorinti 12:9, 10.

13. Mpo na nini kosalela site Internet na biso na mosala ya kosakola ezali mayele ya malamu? Makambo nini okutanaki na yango ntango osalelaki yango?

13 Basakoli mingi basepelaka kolakisa bato site Internet na biso jw.org, epai bakoki kotánga mpe kozwa mikanda na biso na minɔkɔ koleka 700. Mokolo na mokolo, bato koleka milio moko na ndambo bakɔtaka na site Internet na biso. Kala, radio ezalaki kosalisa ata bato oyo bafandi na bisika oyo basakoli bazali te báyoka nsango malamu. Lelo oyo, site Internet na biso ezali mpe kosala bongo.

KOPESA BASAKOLI YA NSANGO MALAMU FORMASYO

14. Formasyo nini basakoli basengelaki na yango, mpe eteyelo nini esalisaki bango bákóma bateyi malamu?

14 Bisaleli mpe mayele ndenge na ndenge oyo tolobeli ebimisaki mpenza matomba. Kasi, na bambula wana ya ebandeli bandeko basengelaki kozwa formasyo mpo bázala basakoli ya malamu. Na ndakisa, bato mosusu bazalaki kondima te makambo oyo bazalaki koyoka na fono. Na bantango mosusu, bato bazalaki kosepela mpe koluka koyeba makambo mosusu. Basakoli basengelaki koyeba ndenge ya koloba na mayele soki moto abimisi ntembe mpe kokóma bateyi malamu. Na ntembe te, elimo ya Nzambe esalisaki ndeko Knorr amona ete ezalaki na ntina mingi basakoli báyekola ndenge ya koloba na mosala ya kosakola. Yango wana, kobanda na 1943, masangá ebandaki kosala Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Eteyelo yango esalisaki basakoli nyonso bákóma bateyi malamu.

15. (a) Bandeko mosusu bamiyokaki ndenge nini ntango basalaki lisolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi? (b) Ndenge nini elaka ya Yehova oyo ezali na Nzembo 32:8 ekokisamaki epai na yo?

15 Bandeko mingi bamesanaki te koloba liboso ya bato ebele. Ndeko Ramu akanisi lisusu lisolo na ye ya liboso, oyo asalaki na 1944. Lisolo yango ezalaki kolobela moto moko oyo Biblia elobeli, na nkombo Doege. Alobi: “Mabɔlɔngɔ na ngai, mabɔkɔ na ngai, mpe mino na ngai ezalaki kolɛnga makasi.” Abakisi ete: “Ezalaki mbala na ngai ya liboso nasala lisolo na estrade, kasi nakangaki kaka motema.” Atako ezalaki pɛtɛɛ te, bana mike mpe bazalaki kosala masolo na eteyelo yango. Ndeko Manera akanisi lisusu likambo oyo esalemaki ntango mwana moko ya mobali asalaki lisolo na ye ya liboso; alobi: “Azalaki kobanga makasi ntango abandaki lisolo na ye, mpe mongongo na ye ekómaki lokola moto azali kolela. Lokola azalaki na ekateli ya kokoba lisolo na ye, asalaki lisolo yango mobimba kaka na mongongo wana.” Ekoki  kozala ete opesaka biyano te to osalaka masolo te na makita mpo ozalaka nsɔninsɔni to omonaka ete okokoka kosala yango te. Soki ezali bongo, sɛngá Yehova asalisa yo otika kobanga. Akosalisa yo ndenge asalisaki bayekoli wana ya liboso ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.​—Tángá Nzembo 32:8.

Kobanda 1943, bamisionɛrɛ koleka 8 500 oyo bazwaki formasyo na Eteyelo ya Gileade batindamaki na bikólo 170

16. Mokano ya Eteyelo ya Gileade ezalaki nini (a) liboso (b) mpe ekómi nini kobanda 2011?

16 Ebongiseli ya Nzambe epesaka mpe formasyo na nzela ya Eteyelo ya Gileade. Moko ya mikano ya eteyelo yango ezali ya kopesa bana-kelasi mposa makasi ya kosakola nsango malamu. Eteyelo ya Gileade ebandaki na 1943, mpe kobanda wana, bana-kelasi 8 500 bazwi formasyo na eteyelo yango mpe batindami na bikólo 170. Kobanda 2011, babongisi-nzela monene, bakɛngɛli-batamboli, bandeko ya Betele, to bamisionɛrɛ oyo bakɔtá naino Eteyelo ya Gileade te nde babengisamaka na eteyelo yango.

17. Formasyo ya Gileade ebimisi matomba nini?

17 Eteyelo ya Gileade ebimisá matomba? Ɛɛ. Tótalela oyo esalemaki na Japon. Na sanza ya 08/1949, basakoli bakómaki ata zomi te na ekólo yango. Kasi, na nsuka ya mobu yango, bamisionɛrɛ 13 bakómaki kosakola elongo na bandeko ya ekólo yango. Lelo oyo, na Japon basakoli bazali soki 216 000, mpe pene na katikati na bango bazali babongisi-nzela!

18. Tángá biteyelo mosusu oyo tozali na yango.

18 Tozali mpe na biteyelo mosusu, na ndakisa, Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi, Eteyelo ya babongisi-nzela, Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, Eteyelo mpo na bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango, mpe Eteyelo ya bandeko ya Komite ya filiale ná basi na bango. Biteyelo wana nyonso epesi mpenza bandeko mibali mpe basi formasyo mpe ekómisi kondima na bango makasi. Ezali polele ete Yesu azali kokoba kopesa ebele ya bato formasyo.

19. Ndeko Russell alobaki nini mpo na mosala ya kosakola, mpe ndenge nini likambo yango ekokisamaki?

19 Eleki sikoyo mbula 100 banda Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela. Na boumeli ya ntango wana nyonso, Mokonzi na biso Yesu Kristo, azali kotambwisa mosala ya kosakola. Banda 1916, ndeko Russell azalaki na kondima ete mosala ya kosakola nsango malamu ekopalangana na mokili mobimba. Alobaki boye: “Mosala ezali kokola nokinoki, mpe ekokoba kokola, mpo mosala ya kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi’ esengeli kosalema na mokili mobimba.” (buku La foi en marche ya ndeko Alexandre Macmillan, lokasa 69) Mosala yango ezali kosalema lelo oyo! Tozali kotɔnda Yehova, Nzambe ya kimya, ndenge apesi biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kosala mokano na ye!

^ par. 2 Ekoki kozala ete mingi na bato yango bakómaki bakristo. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo ntoma Paulo abengaki bango “bandeko koleka nkama mitano (500).” Alobaki mpe ete: “Mingi na bango bazali tii sikoyo, kasi bamosusu balalá na kati ya liwa.” Na yango, emonani ete ntoma Paulo mpe bakristo mosusu bayebaki bandeko mingi kati na baoyo bayokaki Yesu azali kopesa etinda ya kosakola.