Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2015

Olingaka “mozalani na yo lokola yo moko”?

Olingaka “mozalani na yo lokola yo moko”?

“Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”​MATAI 22:39.

NZEMBO: 73, 36

1, 2. Ndenge nini Biblia emonisi ntina ya kozala na bolingo?

BOLINGO ezali ezaleli ya Yehova Nzambe oyo eleki monene. (1 Yoane 4:16) Yesu Kristo, ekelamu na ye ya liboso, alekisaki bamiliare ya bambula na likoló elongo na Tata na ye mpe amonaki ndenge Yehova azali mpenza Nzambe ya bolingo. (Bakolose 1:15) Yesu amonisaki mpe bolingo ya ndenge wana na bomoi na ye mobimba, ezala na likoló to awa na mabele. Na yango, tokoki mpenza kondima ete Yehova ná Yesu bakoyangela na bolingo.

2 Ntango moto moko atunaki Yesu mobeko nini eleki monene, Yesu alobaki: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’”​—Matai 22:37-39.

3. Nani azali “mozalani” na biso?

 3 Ezali na ntina mingi ete tómonisaka bolingo na boyokani na biso na Nzambe mpe na basusu. Yesu alobaki ete tosengeli kolinga Yehova mpe mozalani na biso. Kasi nani azali “mozalani” na biso? Soki tobalá, mozalani na biso ya libosoliboso ezali molongani na biso. Mozalani na biso ezali mpe ndeko nyonso na lisangá mpe moto nyonso oyo tokutani na ye na mosala ya kosakola. Na lisolo oyo tokomona ndenge tokoki komonisa bolingo mpo na mozalani na biso.

LINGÁKÁ MOLONGANI NA YO

4. Ndenge nini libala ekoki kolonga atako tozali bato ya kozanga kokoka?

4 Yehova akelaki Adama ná Eva mpe abalisaki bango. Yango ezalaki libala ya liboso. Nzambe alingaki ete bázala na libala ya esengo, bábota bana, mpe bátondisa mabele. (Ebandeli 1:27, 28) Kasi, ntango baboyaki kotosa Yehova, libala na bango ebebaki, mpe batikelá biso nyonso lisumu mpe liwa. (Baroma 5:12) Atako bongo, lelo oyo libala ekoki kolonga. Yehova, Mobandisi ya libala, apesi mibali mpe basi batoli oyo eleki malamu na kati ya Biblia.​—Tángá 2 Timote 3:16, 17.

Yehova alingaka ete mobali asalela bokonzi na ye na bolingo

5. Bolingo ezali na ntina nini na libala?

5 Biblia emonisi ete boboto mpe bolingo ezali na ntina mingi mpo na kozala na boyokani malamu ná basusu. Ezali mpe bongo mpo na libala. Ntoma Paulo amonisaki soki bolingo ya solosolo ezali nini ntango alobaki ete: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. Esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te, kasi esepelaka nde na solo. Ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.” (1 Bakorinti 13:4-8) Soki tokanisi malamumalamu na maloba wana ya ntoma Paulo mpe tosaleli yango, tokoki kozala na libala ya esengo.

Biblia emonisi biso ndenge ya kozala na libala ya malamu (Talá paragrafe 6, 7)

6, 7. (a) Biblia elobi nini na likambo etali kozala mokonzi ya libota? (b) Ndenge nini mobali mokristo asengeli kosalela mwasi na ye makambo?

6 Yehova nde aponá mokonzi ya libota. Ntoma Paulo alimboli boye: “Nalingi bóyeba ete mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Kristo ezali Nzambe.” (1 Bakorinti 11:3) Kasi Yehova alingaka ete mobali asalela bokonzi na ye na bolingo, kasi te na ndenge ya moimi to na ndenge ya mabe. Yehova ye moko azali Mokonzi ya boboto mpe alukaka matomba na ye moko te. Yango wana, Yesu atosaka bokonzi ya Nzambe, oyo etondi na bolingo. Alobaki ete: “Ngai nalingaka Tata.” (Yoane 14:31) Yesu alingaki koloba bongo te soki Yehova azalaki makambo makasimakasi.

7 Atako mobali azali mokonzi ya mwasi na ye, Biblia esɛngi ye amemya mwasi na ye. (1 Petro 3:7) Ndenge nini mobali akoki  kosala yango? Akoki kotalela makambo oyo mwasi na ye azali na yango mposa mpe kosala oyo ye asepelaka na yango. Biblia elobi ete: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, ndenge Kristo mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” (Baefese 5:25) Ya solo, Yesu kutu apesaki bomoi na ye mpo na bayekoli na ye. Soki mobali azali mokonzi ya bolingo lokola Yesu, ekozala mpasi te mpo mwasi na ye alinga ye, amemya ye, mpe atosa bikateli na ye.​—Tángá Tito 2:3-5.

LINGÁKÁ BANDEKO NA YO BAKRISTO

8. Ndenge nini tosengeli kotalela bandeko na biso bakristo?

8 Lelo oyo, na mokili mobimba, bamilio ya bato bazali kosambela Yehova. Bazali bandeko na biso. Ndenge nini tosengeli kotalela bango? Biblia elobi ete: “Tósalela bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Bagalatia 6:10; tángá Baroma 12:10.) Ntoma Petro akomaki ete soki tozali “kotosa solo,” yango ekobota “bolingo ya bondeko.” Petro ayebisaki mpe bandeko na ye bakristo ete: “Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi.”​—1 Petro 1:22; 4:8.

9, 10. Mpo na nini basaleli ya Nzambe bazali na bomoko?

9 Ebongiseli na biso ya mokili mobimba ekeseni na mosusu nyonso. Mpo na nini?  Mpo tolinganaka makasi mpe tozali na bolingo ya solosolo. Oyo eleki ntina, lokola tolingaka Yehova mpe totosaka mibeko na ye, apesaka biso elimo santu na ye, nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́ mobimba. Elimo ya Nzambe esalisaka biso tózala na bomoko na bandeko na biso ya mokili mobimba.​—Tángá 1 Yoane 4:20, 21.

10 Ntoma Paulo amonisaki ntina oyo bakristo basengeli kolinganaka ntango akomaki ete: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai. Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo. Kasi, longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:12-14) Tozali mpenza na botɔndi ndenge bolingo, oyo ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko,” ezali kati na biso, ata soki toutá wapi!

Bolingo mpe bomoko emonisaka ete Batatoli ya Yehova bazali bayekoli ya solo ya Kristo, bato oyo Nzambe azali kosalela mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba

11. Nini esalisaka bato báyeba ebongiseli ya Nzambe?

11 Bolingo ya solosolo mpe bomoko ya basaleli ya Yehova emonisaka ete bazali na lingomba ya solo. Yesu alobaki: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:34, 35) Ntoma Yoane mpe akomaki ete: “Bana ya Nzambe ná bana ya Zabolo bayebanaka na likambo oyo: Moto nyonso oyo asalaka makambo ya boyengebene te auti na Nzambe te, ndenge moko mpe moto oyo azali kolinga ndeko na ye te. Mpo oyo ezali nsango boyokaki banda na ebandeli: ete tólinganaka.” (1 Yoane 3:10, 11) Bolingo mpe bomoko emonisaka ete Batatoli ya Yehova bazali bayekoli ya solo ya Kristo, bato oyo Nzambe azali kosalela mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba.​—Matai 24:14.

KOYANGANISAMA YA “EBELE MPENZA YA BATO”

12, 13. Baoyo bazali na kati ya “ebele mpenza ya bato” bazali kosala nini lelo oyo, mpe nini ezali kozela bango mosika te?

12 Lelo oyo, basaleli ya Yehova mingi bazali na kati ya “ebele mpenza ya bato” oyo bauti na bikólo ndenge na ndenge, mpe bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi. Bazali “bato oyo bauti na bolɔzi monene, mpe basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana-Mpate” na ndenge bazali komonisa kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu. “Ebele mpenza ya bato” yango balingaka Yehova mpe Mwana na ye, mpe basambelaka Yehova “butu moi.”​—Emoniseli 7:9, 14, 15.

13 Etikali moke, Nzambe akoboma mokili oyo mabe na “bolɔzi moko monene.” (Matai 24:21; tángá Yirimia 25:32, 33.)  Kasi Yehova akobatela mpe akokamba basaleli na ye na mokili na ye ya sika mpo alingaka bango. Ndenge alakaki yango esili koleka mbula pene na 2000, “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” Ozali kozela na motema mobimba kofanda na Paradiso ntango mabe, mpasi, mpe liwa ekozala lisusu te?​—Emoniseli 21:4.

14. Motángo ya “ebele mpenza ya bato” ekómi boni?

14 Ntango mikolo ya nsuka ebandaki na 1914, basaleli ya Nzambe bazalaki kaka mwa bankóto. Lokola bazalaki kolinga bazalani na bango mpe na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, bandeko yango oyo batyamaki mafuta na elimo, basakolaki nsango malamu ya Bokonzi atako bakutanaki na mikakatano. Yango ebotaki mbuma nini? Lelo oyo ebele mpenza ya bato, oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele bazali koyanganisama. Batatoli ya Yehova bazali soki milio 8, na masangá koleka 115 400 na mokili mobimba, mpe motángo na bango ezali komata se komata. Na ndakisa, na mobu ya mosala 2014, bato koleka 275 500 bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova. Elingi koloba bato soki 5 300 bazwaka batisimo pɔsɔ nyonso.

15. Ndenge nini bato mingi bazali koyoka nsango malamu lelo oyo?

15 Ezali likambo ya kokamwa komona ndenge ebele ya bato bayoki nsango malamu ya Bokonzi. Lelo oyo, mikanda na biso ezali kobongolama na minɔkɔ koleka 700. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali zulunalo oyo ekabolami mingi koleka bazulunalo nyonso na mokili mobimba. Sanza nyonso, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli koleka milio 52 ezali kobimisama na minɔkɔ 247. Longola yango, buku Biblia eteyaka mpenza nini? oyo tosalelaka mpo na koyekola na bato Biblia, ebongolami na minɔkɔ koleka 250. Kutu, babuku yango koleka milio 200 esili kobimisama.

16. Mpo na nini ebongiseli ya Yehova ezali kokoba kokende liboso?

16 Ebongiseli na biso ezali kokoba kokende liboso mpo tondimelaka Nzambe mpe tondimaka ete Biblia ezali Liloba na ye oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye. (1 Batesaloniki 2:13) Yehova azali kokoba kopambola biso atako Satana azali koyina mpe kotɛmɛla biso.​—2 Bakorinti 4:4.

LINGÁKÁ BASUSU NTANGO NYONSO

17, 18. Ndenge nini Yehova alingi tótalela bato oyo basambelaka ye te?

17 Na mosala ya kosakola, bato nyonso bayambaka biso ndenge moko te. Bato mosusu bayokaka biso, kasi basusu bayinaka nsango na biso. Ndenge nini Yehova alingaka ete tótalela bato oyo basambelaka ye te? Ezala bato basepeli na nsango na biso to te, tolandaka toli ya Biblia oyo elobi ete: “Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto mokomoko eyano.” (Bakolose 4:6) Mbala nyonso oyo tolobelaka kondima na biso, tosalaka yango “na boboto mpe na limemya makasi” mpo tolingaka bazalani na biso.​—1 Petro 3:15.

18 Ata soki bato basiliki to baboyi koyoka nsango na biso, tomonisaka ete tolingaka bazalani na biso mpe tolandaka ndakisa ya Yesu. “Ntango [Yesu] azalaki kofingama, azalaki kozongisa kofinga te. Ntango azalaki konyokwama, azalaki  kokanela moto te.” Kasi, Yesu azalaki nde kotyela Yehova motema. (1 Petro 2:23) Na yango, tomonisaka ntango nyonso komikitisa mpe tosalelaka toli oyo: “Bózongisaka mabe na mabe te to kofinga na kofinga te, kutu bino bópambolaka.”​—1 Petro 3:8, 9.

Tosengeli kolinga banguna na biso ata soki basali biso nini

19. Ndenge nini tosengeli kotalela banguna na biso?

19 Komikitisa esalisaka biso tótosa etinda moko ya ntina mingi oyo Yesu apesaki. Alobaki ete: “Boyokaki ete balobi, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo mpe koyina monguna na yo.’ Nzokande, ngai nalobi na bino ete: Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló, mpo abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.” (Matai 5:43-45) Lokola tozali basaleli ya Nzambe, tosengeli kolinga banguna na biso ata soki basali biso nini.

20. Ndenge nini toyebi ete bolingo mpo na Nzambe mpe mozalani ekotonda na mabele mobimba? (Talá elilingi ya ebandeli.)

20 Ntango nyonso, tosengeli komonisa ete tolingaka Yehova mpe bazalani na biso. Ata soki bato batɛmɛli biso to baboyi nsango na biso, tosalisaka bango ntango bazali na bosɛnga. Ntoma Paulo akomaki: “Bózala na nyongo ya moto te, longola kaka nyongo ya kolingana; mpo moto oyo azali kolinga moninga na ye akokisi mobeko. Mpo mokanda ya mibeko​—‘Osengeli kosala ekobo te, Osengeli koboma moto te, Osengeli koyiba te, Osengeli kolula eloko ya moto te,’ mpe mobeko mosusu nyonso—​etángami na mokuse na liloba oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Bolingo esalaka moto mabe te; yango wana, bolingo ezali nde kokokisama ya mibeko.” (Baroma 13:8-10) Na mokili oyo mabe, oyo ekabwani, etondi na mobulu, mpe eyangelami na Satana, basaleli ya Nzambe bamonisaka ete balingaka mpenza bazalani na bango. (1 Yoane 5:19) Ntango Yehova akoboma Satana, bademo na ye, mpe mokili oyo mabe, mabele mobimba ekotonda na bolingo. Ekozala mpenza lipamboli ntango bato nyonso awa na mabele bakolinga Yehova mpe bazalani na bango!